“Nzambe apesi ndakisa ya nzela ya semba
Choose an available translation of this Hadeeth
Hadeeth text
Kowuta na maloba ya A-Nawwaas bin Sama'an Al-Answaari, Nzambe asepela na ye, kowuta na maloba ya Ntoma ya Nzambe (s.a.w) alobaki: “Nzambe apesi ndakisa ya nzela ya semba, mpe na ngambo nyonso mibale ya nzela ezali na clôture mibale. Na kati na yango ezali na baporte ya polele, mpe likolo ya baporte ezali na ba rido oyo ekangami te, mpe na ekuke ya nzela ezali na mobengi moko oyo akoloba: Ee bato, bokota na nzela banso elongo, mpe boningana te, mpo ete mosakoli abengi uta likolo ya nzela Soki alingi, afungolaka moko ya baporte wana. Alobi: Mawa na yo, kofungola yango te, mpo soki ofungoli yango okokota na yango, mpe nzela ezali Islam, mpe ba clôture mibale ezali: Bandelo ya Nzambe mpe baporte ya polele eza: Bipekiseli ya Nzambe, Yango nde mobengi na motó ya nzela ezali: Buku ya Nzambe, mpe mobengi uta likolo ya nzela ezali: mosakoli ya Nzambe na motema ya musulman nyonso”.
Explanation
Benefits
Esengeli kokangama na ndelo ya Nzambe mpe oyo epesami nzela mpe epekisami, mpe ete kozanga bopeto kati na yango ememaka na libebi.
Bolamu ya Corani monene mpe elendiseli ya kosalela yango, mpo ete ezali na bokambi, na lumière, mpe elonga.
Mawa ya Nzambe epai ya basaleli na Ye mpe oyo atie na mitema ya bandimi ezali oyo ezali kopekisa bango mpe kopesa bango toli mpo na kokweya na likama te.
Nzambe, na ngolu na Ye, akeli bipekiseli mpo na basaleli na Ye, oyo ezali kopekisa bango kokweya na masumu.
Moko ya banzela ya koteya ezali ya kopesa ndakisa mpo na komema polele mpe bososoli.
Attribution
Categories
Share hadeeth
Sharing options · 0 Total shares

