“Ya solo Allah atalaka te na bilongi pe na bozwi na bino, kasi (Allah) azalaka nde kotala na mitema pe na misala na bino
Choose an available translation of this Hadeeth
Hadeeth text
Abu Hurairah (Allah asepela naye) alobi: Motindami ya Allah (kimia ezala likolo naye) alobaki: “Ya solo Allah atalaka te na bilongi pe na bozwi na bino, kasi (Allah) azalaka nde kotala na mitema pe na misala na bino".
Explanation
Na Allah Nkolo ya Nkembo, azalaka te kozwa to kotangela basali naye na makambo ya mokili oyo tope pona bokeseni na bango kati na yango, kasi Allah - Nkolo ya Lokumu - azalaka nde kotala na mitema na bango pe na maye oyo ezwami kati na yango, kowuta na bobangi pe bonsomi, bosolo mpe bosembo (bomoko ya Allah), tope na mikano ya mabe (oyo ekotaka na mitema) na boluki komilakisa, pe koyokisa. Mpe (Ye Allah) azalaka kotala na misala na bango na ndenge ya bosembo na yango pe na bobebisi na yango; mpe Azalaka kofuta lifuti pe bolamu pona yango to kofuta likolo na yango.
Benefits
Bosembo ya motema ewuti na mokano malamu, mpe bosembo ya misala ezali kolanda ntoma (s.a.w) kimia mpe mapamboli ezala likolo na ye, na yango ezali esika ya kotalela mpe kokanisa na Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.
Mutu asengeli te azala kokosama likolo ya bozui naye, to kitoko naye, ou bien nzoto na ye, to na eloko moko oyo ezo monana na mokili oyo.
Likebisi na kosala lolendo na makambo ya libanda, na bozangi kobongisa makambo ya kati.
Attribution
Categories
Share hadeeth
Sharing options · 0 Total shares

