التوبة

 

At-Tawbah

 

The Repentance

1 - At-Tawbah (The Repentance) - 001

بَرَآءَةٞ مِّنَ ٱللَّهِ وَرَسُولِهِۦٓ إِلَى ٱلَّذِينَ عَٰهَدتُّم مِّنَ ٱلۡمُشۡرِكِينَ
1. Allah na motindami naye ba wangani basambeli bikeko baye bozuaki na bango elaka.

2 - At-Tawbah (The Repentance) - 002

فَسِيحُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ أَرۡبَعَةَ أَشۡهُرٖ وَٱعۡلَمُوٓاْ أَنَّكُمۡ غَيۡرُ مُعۡجِزِي ٱللَّهِ وَأَنَّ ٱللَّهَ مُخۡزِي ٱلۡكَٰفِرِينَ
2. Botambola na mokili sanza minei mpe boyeba ete bokokitisa bokasi ya Allah te, kasi ya soló, Allah akosambwisa bapagano.

3 - At-Tawbah (The Repentance) - 003

وَأَذَٰنٞ مِّنَ ٱللَّهِ وَرَسُولِهِۦٓ إِلَى ٱلنَّاسِ يَوۡمَ ٱلۡحَجِّ ٱلۡأَكۡبَرِ أَنَّ ٱللَّهَ بَرِيٓءٞ مِّنَ ٱلۡمُشۡرِكِينَ وَرَسُولُهُۥۚ فَإِن تُبۡتُمۡ فَهُوَ خَيۡرٞ لَّكُمۡۖ وَإِن تَوَلَّيۡتُمۡ فَٱعۡلَمُوٓاْ أَنَّكُمۡ غَيۡرُ مُعۡجِزِي ٱللَّهِۗ وَبَشِّرِ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ بِعَذَابٍ أَلِيمٍ
3. Mpe mbela ewuti epai ya Allah na motindami waye epai na bato тропа mokolo ya hajj ya monene (mobembo esantu o mboka makkah), ya solo, Allah na motindami waye bazali mosika na basambeli ya bikeko. Soki botubeli, ezali malamu тропа bino, тре soki boboyi mpe bopesi mikongo, boyeba ete ya sólo, bokokitisa bokasi ya Allah te. Mpe pesa sango ya etumbu ya makasi epai ya baye baboyi kondima. (bapengwi.)

4 - At-Tawbah (The Repentance) - 004

إِلَّا ٱلَّذِينَ عَٰهَدتُّم مِّنَ ٱلۡمُشۡرِكِينَ ثُمَّ لَمۡ يَنقُصُوكُمۡ شَيۡـٔٗا وَلَمۡ يُظَٰهِرُواْ عَلَيۡكُمۡ أَحَدٗا فَأَتِمُّوٓاْ إِلَيۡهِمۡ عَهۡدَهُمۡ إِلَىٰ مُدَّتِهِمۡۚ إِنَّ ٱللَّهَ يُحِبُّ ٱلۡمُتَّقِينَ
4. Longola sé epai ya bapagano baye bokamataki na bango elaka mpe sima balongoli тропа bino eloko te, mpe basalisaki banguna te тропа kobundisa bino mpe kosala bino mabe te, bokokisela bango elaka na bango kino tango oyo boyokanaki na bango ekoka. Pamba te ya sôló, Allah alingaka baye babangaka.

5 - At-Tawbah (The Repentance) - 005

فَإِذَا ٱنسَلَخَ ٱلۡأَشۡهُرُ ٱلۡحُرُمُ فَٱقۡتُلُواْ ٱلۡمُشۡرِكِينَ حَيۡثُ وَجَدتُّمُوهُمۡ وَخُذُوهُمۡ وَٱحۡصُرُوهُمۡ وَٱقۡعُدُواْ لَهُمۡ كُلَّ مَرۡصَدٖۚ فَإِن تَابُواْ وَأَقَامُواْ ٱلصَّلَوٰةَ وَءَاتَوُاْ ٱلزَّكَوٰةَ فَخَلُّواْ سَبِيلَهُمۡۚ إِنَّ ٱللَّهَ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
5. Mpe soki basanza esantu bileki, boboma bapagano о bisika binso bokokuta bango. Bokanga bango mpe bofandela bango, bokengele bango na bisika nyoso oyo batiyelaka bino mitambo. Kasi soki batiki mpe batubeli, mpe batelemisi losambo mpe bafuti zakat botungisa bango lisusu te, mpo ete ya sólo, Allah azali molimbisi atonda ngolu.

6 - At-Tawbah (The Repentance) - 006

وَإِنۡ أَحَدٞ مِّنَ ٱلۡمُشۡرِكِينَ ٱسۡتَجَارَكَ فَأَجِرۡهُ حَتَّىٰ يَسۡمَعَ كَلَٰمَ ٱللَّهِ ثُمَّ أَبۡلِغۡهُ مَأۡمَنَهُۥۚ ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ قَوۡمٞ لَّا يَعۡلَمُونَ
6. Mpe soki moko o kati ya basangisi nzambe asengi nayo obatela ye epai nayo, yamba ye mpo akoka koyoka liloba lia Allah. Sima komisa ye na esika naye ya kimia, mpo bazali baye bayebi te.

7 - At-Tawbah (The Repentance) - 007

كَيۡفَ يَكُونُ لِلۡمُشۡرِكِينَ عَهۡدٌ عِندَ ٱللَّهِ وَعِندَ رَسُولِهِۦٓ إِلَّا ٱلَّذِينَ عَٰهَدتُّمۡ عِندَ ٱلۡمَسۡجِدِ ٱلۡحَرَامِۖ فَمَا ٱسۡتَقَٰمُواْ لَكُمۡ فَٱسۡتَقِيمُواْ لَهُمۡۚ إِنَّ ٱللَّهَ يُحِبُّ ٱلۡمُتَّقِينَ
7. Ndenge nini basambeli ya bikeko bakozala na elaka epai ya Allah na motindami waye longola sé baye boyokanaki na bango pembeni ya ndako esantu? Tango inso bakomisembola epai na bino, bino mpe bozala semba epai na bango. Ya sólo, Allah alingaka babangi.

8 - At-Tawbah (The Repentance) - 008

كَيۡفَ وَإِن يَظۡهَرُواْ عَلَيۡكُمۡ لَا يَرۡقُبُواْ فِيكُمۡ إِلّٗا وَلَا ذِمَّةٗۚ يُرۡضُونَكُم بِأَفۡوَٰهِهِمۡ وَتَأۡبَىٰ قُلُوبُهُمۡ وَأَكۡثَرُهُمۡ فَٰسِقُونَ
8. Ndenge nini soki balongi bino, bazali kotosa lisusu elaka te, mpe bondeko te oyo ezali kati na bino na bango? Mpe bazali kosepelisa bino na lolemu na bango, nzoka nde mitema na bango mizali koboya. Kasi ebele na bango bazali bato mabe.

9 - At-Tawbah (The Repentance) - 009

ٱشۡتَرَوۡاْ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ ثَمَنٗا قَلِيلٗا فَصَدُّواْ عَن سَبِيلِهِۦٓۚ إِنَّهُمۡ سَآءَ مَا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ
9. Bazali koteka mikapo mia Allah na talo ya шоке mpe kokanga nzela naye. Ya soló, maye bazali kosala mazali mabe.

10 - At-Tawbah (The Repentance) - 010

لَا يَرۡقُبُونَ فِي مُؤۡمِنٍ إِلّٗا وَلَا ذِمَّةٗۚ وَأُوْلَـٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡمُعۡتَدُونَ
10. Babatelaka elaka te, bondeko mpe te ya makila oyo ezali okati na bango na bandimi. Kasi bango nde babebisi ya mibeko.

11 - At-Tawbah (The Repentance) - 011

فَإِن تَابُواْ وَأَقَامُواْ ٱلصَّلَوٰةَ وَءَاتَوُاْ ٱلزَّكَوٰةَ فَإِخۡوَٰنُكُمۡ فِي ٱلدِّينِۗ وَنُفَصِّلُ ٱلۡأٓيَٰتِ لِقَوۡمٖ يَعۡلَمُونَ
11. Soki batubeli, batelemisi losambo mpe babimisi zakat, bakomi bandeko na bino o kati ya lingomba. Mpe tozali kolimbola mikapo mpo bato bayeba.

12 - At-Tawbah (The Repentance) - 012

وَإِن نَّكَثُوٓاْ أَيۡمَٰنَهُم مِّنۢ بَعۡدِ عَهۡدِهِمۡ وَطَعَنُواْ فِي دِينِكُمۡ فَقَٰتِلُوٓاْ أَئِمَّةَ ٱلۡكُفۡرِ إِنَّهُمۡ لَآ أَيۡمَٰنَ لَهُمۡ لَعَلَّهُمۡ يَنتَهُونَ
12. Mpe soki babebisi ndai na bango na sima ya koyokana, babundisi lingomba lia bino, bobundisa bakonzi ya bopagano mpo ete ya sólo, bango bazali na botosi te na bandai na bango. Tango mosusu bakotika.

13 - At-Tawbah (The Repentance) - 013

أَلَا تُقَٰتِلُونَ قَوۡمٗا نَّكَثُوٓاْ أَيۡمَٰنَهُمۡ وَهَمُّواْ بِإِخۡرَاجِ ٱلرَّسُولِ وَهُم بَدَءُوكُمۡ أَوَّلَ مَرَّةٍۚ أَتَخۡشَوۡنَهُمۡۚ فَٱللَّهُ أَحَقُّ أَن تَخۡشَوۡهُ إِن كُنتُم مُّؤۡمِنِينَ
13. Boye bozali kobundisa te baye bazangi botosi na bandai na Bango, mpe bakani kobimisa motindami mpe bango nde babandi bino liboso? Boye bozali kobanga bango? Kasi Allah nde esengeli bobanga ye soki bozali bandimi.

14 - At-Tawbah (The Repentance) - 014

قَٰتِلُوهُمۡ يُعَذِّبۡهُمُ ٱللَّهُ بِأَيۡدِيكُمۡ وَيُخۡزِهِمۡ وَيَنصُرۡكُمۡ عَلَيۡهِمۡ وَيَشۡفِ صُدُورَ قَوۡمٖ مُّؤۡمِنِينَ
14. Bobundisa bango Allah akopesa bango etumbu na maboko na bino mpe akokitisa bango mpe akolongisa bino likolo na bango. Mpe akobikisa mitema mia bandimi.

15 - At-Tawbah (The Repentance) - 015

وَيُذۡهِبۡ غَيۡظَ قُلُوبِهِمۡۗ وَيَتُوبُ ٱللَّهُ عَلَىٰ مَن يَشَآءُۗ وَٱللَّهُ عَلِيمٌ حَكِيمٌ
15. Мре akolongola nkanda o mitema mia bango, mpe Allah alimbisaka oyo alingi, mpe Allah azali na boyebi atonda bwanya.

16 - At-Tawbah (The Repentance) - 016

أَمۡ حَسِبۡتُمۡ أَن تُتۡرَكُواْ وَلَمَّا يَعۡلَمِ ٱللَّهُ ٱلَّذِينَ جَٰهَدُواْ مِنكُمۡ وَلَمۡ يَتَّخِذُواْ مِن دُونِ ٱللَّهِ وَلَا رَسُولِهِۦ وَلَا ٱلۡمُؤۡمِنِينَ وَلِيجَةٗۚ وَٱللَّهُ خَبِيرُۢ بِمَا تَعۡمَلُونَ
16. Boye, bozali kokanisa ete bokotikama bongo mpe Allah ameki naino te baye babundi o kati na bino, mpe bazui balingami basusu te na batika Allah na motindami naye mpe na bandimi? Mpe Allah azali na sango ya maye bozali kosala.

17 - At-Tawbah (The Repentance) - 017

مَا كَانَ لِلۡمُشۡرِكِينَ أَن يَعۡمُرُواْ مَسَٰجِدَ ٱللَّهِ شَٰهِدِينَ عَلَىٰٓ أَنفُسِهِم بِٱلۡكُفۡرِۚ أُوْلَـٰٓئِكَ حَبِطَتۡ أَعۡمَٰلُهُمۡ وَفِي ٱلنَّارِ هُمۡ خَٰلِدُونَ
17. Esengeli te na basambeli ya binzambe nzambe kokota na bandako esantu ya Allah, na matatoli ya bopagano ya polele bazali na yango, bango wana misala mia bango misili kobeba, mpe bakozalaka libela o kati ya moto.

18 - At-Tawbah (The Repentance) - 018

إِنَّمَا يَعۡمُرُ مَسَٰجِدَ ٱللَّهِ مَنۡ ءَامَنَ بِٱللَّهِ وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِ وَأَقَامَ ٱلصَّلَوٰةَ وَءَاتَى ٱلزَّكَوٰةَ وَلَمۡ يَخۡشَ إِلَّا ٱللَّهَۖ فَعَسَىٰٓ أُوْلَـٰٓئِكَ أَن يَكُونُواْ مِنَ ٱلۡمُهۡتَدِينَ
18. Kasi baye bazali na ndingisa ya kokota na bandako esantu ya Allah. Sé baye bandimi na Allah, na mokolo ya suka, mpe batelemisi losambo mpe babimisi zakat, mpe babangi mususu te sé Allah, baye wana bakozala elongo na bakambami.

19 - At-Tawbah (The Repentance) - 019

۞أَجَعَلۡتُمۡ سِقَايَةَ ٱلۡحَآجِّ وَعِمَارَةَ ٱلۡمَسۡجِدِ ٱلۡحَرَامِ كَمَنۡ ءَامَنَ بِٱللَّهِ وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِ وَجَٰهَدَ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِۚ لَا يَسۡتَوُۥنَ عِندَ ٱللَّهِۗ وَٱللَّهُ لَا يَهۡدِي ٱلۡقَوۡمَ ٱلظَّـٰلِمِينَ
19. Boye, bolingi kotia moto oyo azali komelisa bapaya ya hajj mayi mpe azali kobongisa ndako esantu ya Allah, lolenge moko na moto oyo andimi na Allah mpe na mokolo ya suka mpe abundi o nzela ya Allah? Bakokani te epaí ya Allah, kasi Allah akambaka babubi te.

20 - At-Tawbah (The Repentance) - 020

ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَهَاجَرُواْ وَجَٰهَدُواْ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ بِأَمۡوَٰلِهِمۡ وَأَنفُسِهِمۡ أَعۡظَمُ دَرَجَةً عِندَ ٱللَّهِۚ وَأُوْلَـٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡفَآئِزُونَ
20. Baye bandimaki mpe batiki (Makkah), mpe babundi o nzela ya Allah na misoio mia bango mpe na milimo mia bango, baleki kozala na esika ya likolo epai ya Allah mpe bango nde balongi.

21 - At-Tawbah (The Repentance) - 021

يُبَشِّرُهُمۡ رَبُّهُم بِرَحۡمَةٖ مِّنۡهُ وَرِضۡوَٰنٖ وَجَنَّـٰتٖ لَّهُمۡ فِيهَا نَعِيمٞ مُّقِيمٌ
21. Nkolo wa bango azali kopesa bango sango elamu ya ngolu naye, mpe esengo naye mpe bilanga ya lola mpo na bango, kati na yango kofanda ya kitoko.

22 - At-Tawbah (The Repentance) - 022

خَٰلِدِينَ فِيهَآ أَبَدًاۚ إِنَّ ٱللَّهَ عِندَهُۥٓ أَجۡرٌ عَظِيمٞ
22. Libela o kati na yango mpe ya soló, lifuta linene likozuamaka sé epai ya Allah.

23 - At-Tawbah (The Repentance) - 023

يَـٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَا تَتَّخِذُوٓاْ ءَابَآءَكُمۡ وَإِخۡوَٰنَكُمۡ أَوۡلِيَآءَ إِنِ ٱسۡتَحَبُّواْ ٱلۡكُفۡرَ عَلَى ٱلۡإِيمَٰنِۚ وَمَن يَتَوَلَّهُم مِّنكُمۡ فَأُوْلَـٰٓئِكَ هُمُ ٱلظَّـٰلِمُونَ
23. Eh bino baye bondima! Bozua baboti ba bino na bandeko ba bino lokola balingami te soki baponi bopengwi batiki bondimi. Mpe kati na bino oyo akozua bango lokola balingami, bango nde babubi.

24 - At-Tawbah (The Repentance) - 024

قُلۡ إِن كَانَ ءَابَآؤُكُمۡ وَأَبۡنَآؤُكُمۡ وَإِخۡوَٰنُكُمۡ وَأَزۡوَٰجُكُمۡ وَعَشِيرَتُكُمۡ وَأَمۡوَٰلٌ ٱقۡتَرَفۡتُمُوهَا وَتِجَٰرَةٞ تَخۡشَوۡنَ كَسَادَهَا وَمَسَٰكِنُ تَرۡضَوۡنَهَآ أَحَبَّ إِلَيۡكُم مِّنَ ٱللَّهِ وَرَسُولِهِۦ وَجِهَادٖ فِي سَبِيلِهِۦ فَتَرَبَّصُواْ حَتَّىٰ يَأۡتِيَ ٱللَّهُ بِأَمۡرِهِۦۗ وَٱللَّهُ لَا يَهۡدِي ٱلۡقَوۡمَ ٱلۡفَٰسِقِينَ
24. Loba: Soki baboti ba bino, na bana ba bino na bandeko na bino, na basi na bino na mabota na bino, na misolo mia bino miye bozui na mombongo moye bozali na bobangi ete ekweya, na bandako kitoko bozali na yango, bilingami mingi epai na bino koleka Allah na motindami waye na kobunda na nzela naye, bozelakino Allah akoya na mitindo (mikano) mia ye, mpe Allah akambaka babebisi te.

25 - At-Tawbah (The Repentance) - 025

لَقَدۡ نَصَرَكُمُ ٱللَّهُ فِي مَوَاطِنَ كَثِيرَةٖ وَيَوۡمَ حُنَيۡنٍ إِذۡ أَعۡجَبَتۡكُمۡ كَثۡرَتُكُمۡ فَلَمۡ تُغۡنِ عَنكُمۡ شَيۡـٔٗا وَضَاقَتۡ عَلَيۡكُمُ ٱلۡأَرۡضُ بِمَا رَحُبَتۡ ثُمَّ وَلَّيۡتُم مُّدۡبِرِينَ
25. Allah asilaki ya soló, kolongisa bino obisika ebele, na o mokolo mwa (bitumba) bia Huna’ín,(1) tango bosepelaki na motango monene mwa bino, kasi yango esalisaki bino na eloko te. Mabele ekomelaki bino шоке na maye bozalaki kokanisa. Sima bopesaki mikongo mpe bokimaki.
1 Huna’ín: Ezali ngomba, esika oyo ba mizilima ba kutanaki na etumba na ba sangisi Allah.

26 - At-Tawbah (The Repentance) - 026

ثُمَّ أَنزَلَ ٱللَّهُ سَكِينَتَهُۥ عَلَىٰ رَسُولِهِۦ وَعَلَى ٱلۡمُؤۡمِنِينَ وَأَنزَلَ جُنُودٗا لَّمۡ تَرَوۡهَا وَعَذَّبَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْۚ وَذَٰلِكَ جَزَآءُ ٱلۡكَٰفِرِينَ
26. Sima, Allah akitisaki kimia naye epai ya motindami wa ye mpe epai ya bandimi. Mpe akitisaki basoda naye baye bomonaki bango te, mpe apesaki etumbu na bapengwi. Mpe wana nde lifuta lia bapengwi.

27 - At-Tawbah (The Repentance) - 027

ثُمَّ يَتُوبُ ٱللَّهُ مِنۢ بَعۡدِ ذَٰلِكَ عَلَىٰ مَن يَشَآءُۗ وَٱللَّهُ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
27. Sima, Allah andimaka tubela ya oyo alingi. Mpe Allah azali molimbisi atonda ngolu.

28 - At-Tawbah (The Repentance) - 028

يَـٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِنَّمَا ٱلۡمُشۡرِكُونَ نَجَسٞ فَلَا يَقۡرَبُواْ ٱلۡمَسۡجِدَ ٱلۡحَرَامَ بَعۡدَ عَامِهِمۡ هَٰذَاۚ وَإِنۡ خِفۡتُمۡ عَيۡلَةٗ فَسَوۡفَ يُغۡنِيكُمُ ٱللَّهُ مِن فَضۡلِهِۦٓ إِن شَآءَۚ إِنَّ ٱللَّهَ عَلِيمٌ حَكِيمٞ
28. Eh bino bandimi! Ya sólo, bapagano bazali mbindo, (basambeli bikeko) bapusana pena na ndako esantu te o sima ya mobu mwa bango moye. Kasi soki bozali kobanga kimobola, Allah akopesaka bino bomengo na bolamu bwaye soki alingi, ya sólo, Allah azali moyebi atonda bwanya.

29 - At-Tawbah (The Repentance) - 029

قَٰتِلُواْ ٱلَّذِينَ لَا يُؤۡمِنُونَ بِٱللَّهِ وَلَا بِٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِ وَلَا يُحَرِّمُونَ مَا حَرَّمَ ٱللَّهُ وَرَسُولُهُۥ وَلَا يَدِينُونَ دِينَ ٱلۡحَقِّ مِنَ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡكِتَٰبَ حَتَّىٰ يُعۡطُواْ ٱلۡجِزۡيَةَ عَن يَدٖ وَهُمۡ صَٰغِرُونَ
29. Bobundisa baye bazali kondima na Allah te, na mokolo ya suka te, mpe bazali kopekisa te maye Allah na motindami waye bapekisa, mpe bazali коропа lingomba lia lokuta. Batiki oyo ya bosôló, o kati ya baye bapesama buku (bayuda na baklišto), kino bakofuta lomande na maboko na bango na sima ya koyoka soni.

30 - At-Tawbah (The Repentance) - 030

وَقَالَتِ ٱلۡيَهُودُ عُزَيۡرٌ ٱبۡنُ ٱللَّهِ وَقَالَتِ ٱلنَّصَٰرَى ٱلۡمَسِيحُ ٱبۡنُ ٱللَّهِۖ ذَٰلِكَ قَوۡلُهُم بِأَفۡوَٰهِهِمۡۖ يُضَٰهِـُٔونَ قَوۡلَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ مِن قَبۡلُۚ قَٰتَلَهُمُ ٱللَّهُۖ أَنَّىٰ يُؤۡفَكُونَ
30. Mpe bayuda balobi: Uzairi azali mwana ya Allah. Mpe baklišto balobi: Masiya azali mwana ya Allah. Wana ezali liloba oyo ebimaka na minoko mia bango. Bazali komekola liloba lia bapengwi baye bapengwa liboso. Allah aboma bango na maye bazalaki kosala. Ndenge bamitiye mosika na bosôló!

31 - At-Tawbah (The Repentance) - 031

ٱتَّخَذُوٓاْ أَحۡبَارَهُمۡ وَرُهۡبَٰنَهُمۡ أَرۡبَابٗا مِّن دُونِ ٱللَّهِ وَٱلۡمَسِيحَ ٱبۡنَ مَرۡيَمَ وَمَآ أُمِرُوٓاْ إِلَّا لِيَعۡبُدُوٓاْ إِلَٰهٗا وَٰحِدٗاۖ لَّآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَۚ سُبۡحَٰنَهُۥ عَمَّا يُشۡرِكُونَ
31. Bazui bakonzi ya mangomba na bango na masiya mwana ya Maryam lokola banzambe na botiki Allah. Kasi batindamaki te sé babondela nzambe moko oyo azali na mosangani te sé ye mei (Allah), nkembo naye oyo azali likolo ya maye bazali kosangisa ye na yango.

32 - At-Tawbah (The Repentance) - 032

يُرِيدُونَ أَن يُطۡفِـُٔواْ نُورَ ٱللَّهِ بِأَفۡوَٰهِهِمۡ وَيَأۡبَى ٱللَّهُ إِلَّآ أَن يُتِمَّ نُورَهُۥ وَلَوۡ كَرِهَ ٱلۡكَٰفِرُونَ
32. Balingi kozimisa bongengi bwa Allah na minoko mia bango, kasi Allah azali sé kokolisa bongengi bwa ye, ata soki bapengwi bazali koboya.

33 - At-Tawbah (The Repentance) - 033

هُوَ ٱلَّذِيٓ أَرۡسَلَ رَسُولَهُۥ بِٱلۡهُدَىٰ وَدِينِ ٱلۡحَقِّ لِيُظۡهِرَهُۥ عَلَى ٱلدِّينِ كُلِّهِۦ وَلَوۡ كَرِهَ ٱلۡمُشۡرِكُونَ
33. Yende atindaki motindami naye na bokambi mpe na lingomba lia bosôló, mpo été ezala likolo ya mangomba nyoso, ata soki basambeli ya bikeko (basangisi) bazali koyina yango.

34 - At-Tawbah (The Repentance) - 034

۞يَـٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِنَّ كَثِيرٗا مِّنَ ٱلۡأَحۡبَارِ وَٱلرُّهۡبَانِ لَيَأۡكُلُونَ أَمۡوَٰلَ ٱلنَّاسِ بِٱلۡبَٰطِلِ وَيَصُدُّونَ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِۗ وَٱلَّذِينَ يَكۡنِزُونَ ٱلذَّهَبَ وَٱلۡفِضَّةَ وَلَا يُنفِقُونَهَا فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ فَبَشِّرۡهُم بِعَذَابٍ أَلِيمٖ
34. Eh bandimi! Ya soló, ebele ya bakonzi ya lingomba epai ya bayuda na ba klišto, bazali kolia misolo mia bato na lokuta, mpe bazali kobundisa nzela ya Allah, mpe na baye bazali kobomba nkita ya wolo mpe mpalata (mbongo), mpe baboyi kobimisa yango na nzela ya Allah, pesa bango sango ya etumbu makasi.

35 - At-Tawbah (The Repentance) - 035

يَوۡمَ يُحۡمَىٰ عَلَيۡهَا فِي نَارِ جَهَنَّمَ فَتُكۡوَىٰ بِهَا جِبَاهُهُمۡ وَجُنُوبُهُمۡ وَظُهُورُهُمۡۖ هَٰذَا مَا كَنَزۡتُمۡ لِأَنفُسِكُمۡ فَذُوقُواْ مَا كُنتُمۡ تَكۡنِزُونَ
35. Mokolo oyo wolo na mpalata na bango mikotoka na moto ya lifelo sima bakozikisaka bilongi na bango na yango, na mipanzi na bango na mikongo na bango. Oyo nde lifuta ya maye bozalaki kosangisa na nkita ya mokili. Na yango, bomeka etumbu ya maye bobombaki.

36 - At-Tawbah (The Repentance) - 036

إِنَّ عِدَّةَ ٱلشُّهُورِ عِندَ ٱللَّهِ ٱثۡنَا عَشَرَ شَهۡرٗا فِي كِتَٰبِ ٱللَّهِ يَوۡمَ خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ مِنۡهَآ أَرۡبَعَةٌ حُرُمٞۚ ذَٰلِكَ ٱلدِّينُ ٱلۡقَيِّمُۚ فَلَا تَظۡلِمُواْ فِيهِنَّ أَنفُسَكُمۡۚ وَقَٰتِلُواْ ٱلۡمُشۡرِكِينَ كَآفَّةٗ كَمَا يُقَٰتِلُونَكُمۡ كَآفَّةٗۚ وَٱعۡلَمُوٓاْ أَنَّ ٱللَّهَ مَعَ ٱلۡمُتَّقِينَ
36. Ya sólo, motango ya basanza epai ya Allah mozali (sanza) zomi na mibale okati ya makomi ma Allah, uta mokolo akela likolo na nsé, okati na yango (sanza) minei mizali esantu, wana ezali lingomba lia semba, mpe bobuba milimo na bino te okati na yango, mpe bobundisa basangisi Allah mobimba, ndenge bazali kobundisi bino, тре boyeba ete ya soló, Allah azali elongo na babangi.

37 - At-Tawbah (The Repentance) - 037

إِنَّمَا ٱلنَّسِيٓءُ زِيَادَةٞ فِي ٱلۡكُفۡرِۖ يُضَلُّ بِهِ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ يُحِلُّونَهُۥ عَامٗا وَيُحَرِّمُونَهُۥ عَامٗا لِّيُوَاطِـُٔواْ عِدَّةَ مَا حَرَّمَ ٱللَّهُ فَيُحِلُّواْ مَا حَرَّمَ ٱللَّهُۚ زُيِّنَ لَهُمۡ سُوٓءُ أَعۡمَٰلِهِمۡۗ وَٱللَّهُ لَا يَهۡدِي ٱلۡقَوۡمَ ٱلۡكَٰفِرِينَ
37. Ya sólo, kozongisa mikolo ya sanza esantu sima, ezali kobakisa bopengwi, na yango nde ezali kobungisa ba oyo bapengwa. Mobu moye bamoni yango pamba mpe mobu mosusu babulisi yango, pona kobebisa motango ya basanza esantu biye Allah atia, boye nde bazali kornona pamba maye Allah atia yango esantu, babongiseli bango misala mabe liboso na bango na bonzenga. Kasi Allah akambaka bapengwi te.

38 - At-Tawbah (The Repentance) - 038

يَـٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ مَا لَكُمۡ إِذَا قِيلَ لَكُمُ ٱنفِرُواْ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ ٱثَّاقَلۡتُمۡ إِلَى ٱلۡأَرۡضِۚ أَرَضِيتُم بِٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا مِنَ ٱلۡأٓخِرَةِۚ فَمَا مَتَٰعُ ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا فِي ٱلۡأٓخِرَةِ إِلَّا قَلِيلٌ
38. Eh bino baye bondima! Mpona nini soki bayebisi bino bobima na nzela ya Allah, bozali kofanda na nsé. Boye bolingi bomoyi bwa mokili koleka oyo ya mokolo ya suka? Bisengo bia mokili bizali mike, oyo ya lobi nde bileki.

39 - At-Tawbah (The Repentance) - 039

إِلَّا تَنفِرُواْ يُعَذِّبۡكُمۡ عَذَابًا أَلِيمٗا وَيَسۡتَبۡدِلۡ قَوۡمًا غَيۡرَكُمۡ وَلَا تَضُرُّوهُ شَيۡـٔٗاۗ وَٱللَّهُ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٌ
39. Soki bokei kobunda te, akopesa bino etumbu ya makasi mpe akokela bato basusu o esika na bino mpe eloko moko ya mabe ekosala ye te. Mpe Allah azali na bokoki likolo ya biloko binso.

40 - At-Tawbah (The Repentance) - 040

إِلَّا تَنصُرُوهُ فَقَدۡ نَصَرَهُ ٱللَّهُ إِذۡ أَخۡرَجَهُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ ثَانِيَ ٱثۡنَيۡنِ إِذۡ هُمَا فِي ٱلۡغَارِ إِذۡ يَقُولُ لِصَٰحِبِهِۦ لَا تَحۡزَنۡ إِنَّ ٱللَّهَ مَعَنَاۖ فَأَنزَلَ ٱللَّهُ سَكِينَتَهُۥ عَلَيۡهِ وَأَيَّدَهُۥ بِجُنُودٖ لَّمۡ تَرَوۡهَا وَجَعَلَ كَلِمَةَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ ٱلسُّفۡلَىٰۗ وَكَلِمَةُ ٱللَّهِ هِيَ ٱلۡعُلۡيَاۗ وَٱللَّهُ عَزِيزٌ حَكِيمٌ
40. Soki bopesi ye lisungi te, (Muhammad) Allah asilaki kolongisa ye. Tango bapengwi babimisaki ye, ya mibale bango babale, tango bazalaki kati ya libanga, tango azali koloba na moyekoli naye: Kobanga te, ya soló, Allah azali elongo na biso, Allah akitisaki lisungi lia ye epai naye, mpe asalisi ye na mapinga baye bomonaki bango te, mpe atiyaki liloba lia bapengwi nanse, mpe liloba lia Allah lizala likolo, mpe Allah azali na bokasi atonda bwanya.

41 - At-Tawbah (The Repentance) - 041

ٱنفِرُواْ خِفَافٗا وَثِقَالٗا وَجَٰهِدُواْ بِأَمۡوَٰلِكُمۡ وَأَنفُسِكُمۡ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِۚ ذَٰلِكُمۡ خَيۡرٞ لَّكُمۡ إِن كُنتُمۡ تَعۡلَمُونَ
41. Bökende moko moko to na lisanga kobunda na nzela na Allah na misolo na bino mpe na nzoto na bino, wana ezali malamu тропа bino soki bozali koyeba.

42 - At-Tawbah (The Repentance) - 042

لَوۡ كَانَ عَرَضٗا قَرِيبٗا وَسَفَرٗا قَاصِدٗا لَّٱتَّبَعُوكَ وَلَٰكِنۢ بَعُدَتۡ عَلَيۡهِمُ ٱلشُّقَّةُۚ وَسَيَحۡلِفُونَ بِٱللَّهِ لَوِ ٱسۡتَطَعۡنَا لَخَرَجۡنَا مَعَكُمۡ يُهۡلِكُونَ أَنفُسَهُمۡ وَٱللَّهُ يَعۡلَمُ إِنَّهُمۡ لَكَٰذِبُونَ
42. Soki bozui (ya bitumba) ezalaki pete, mpe mobembo ezalaki pembeni kasi balandaki yo, kasi etamboli ya mosika epekisaki bango mikakatano, mpe bazali kolapa na nkombo ya Allah été: Soki tozalaka na makasi, tolingaki kobima elongo na bino. Bazali komibebisa sé bango moko. Mpe Allah ayebi ya soló, bazali babuki lokuta.

43 - At-Tawbah (The Repentance) - 043

عَفَا ٱللَّهُ عَنكَ لِمَ أَذِنتَ لَهُمۡ حَتَّىٰ يَتَبَيَّنَ لَكَ ٱلَّذِينَ صَدَقُواْ وَتَعۡلَمَ ٱلۡكَٰذِبِينَ
43. Allah alimbisa yo na maye opesaki bango ndingisa, kino oyeba bato ya bosóló, mpe oyeba babuki lokuta.

44 - At-Tawbah (The Repentance) - 044

لَا يَسۡتَـٔۡذِنُكَ ٱلَّذِينَ يُؤۡمِنُونَ بِٱللَّهِ وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِ أَن يُجَٰهِدُواْ بِأَمۡوَٰلِهِمۡ وَأَنفُسِهِمۡۗ وَٱللَّهُ عَلِيمُۢ بِٱلۡمُتَّقِينَ
44. Baye bandimi па Allah mpe na mokolo ya suka basenga yo nzela te liboso ya kokende kobunda o nzela ya Allah na misolo na bango na banzoto na bango. Allah nde moyebi wa babangi.

45 - At-Tawbah (The Repentance) - 045

إِنَّمَا يَسۡتَـٔۡذِنُكَ ٱلَّذِينَ لَا يُؤۡمِنُونَ بِٱللَّهِ وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِ وَٱرۡتَابَتۡ قُلُوبُهُمۡ فَهُمۡ فِي رَيۡبِهِمۡ يَتَرَدَّدُونَ
45. Ya soló, baye bazali kosenga yo nzela, bandimi na Allah te, mpe na mokolo ya suka te, mpo mitema mia bango mitondi na ntembe, тропа ntembe wa bango bazali sé koyimayima.

46 - At-Tawbah (The Repentance) - 046

۞وَلَوۡ أَرَادُواْ ٱلۡخُرُوجَ لَأَعَدُّواْ لَهُۥ عُدَّةٗ وَلَٰكِن كَرِهَ ٱللَّهُ ٱنۢبِعَاثَهُمۡ فَثَبَّطَهُمۡ وَقِيلَ ٱقۡعُدُواْ مَعَ ٱلۡقَٰعِدِينَ
46. Kasi soki balingaka kobima (тропа kobunda), balingaki komilengele тропа yango. Kasi Allah asepelaki te na kobima na bango. Mpe avandisi bango. Mpe ayebisaki bango: Botikala elongo na baye batikalaki.

47 - At-Tawbah (The Repentance) - 047

لَوۡ خَرَجُواْ فِيكُم مَّا زَادُوكُمۡ إِلَّا خَبَالٗا وَلَأَوۡضَعُواْ خِلَٰلَكُمۡ يَبۡغُونَكُمُ ٱلۡفِتۡنَةَ وَفِيكُمۡ سَمَّـٰعُونَ لَهُمۡۗ وَٱللَّهُ عَلِيمُۢ بِٱلظَّـٰلِمِينَ
47. Soki babimaka elongo na bino, balingaki sé kotiela bino mobulu o mapinga mpe kobakisela bino mabe, mpe koluka kokabola. Mpe kati na bino ezali na bato bazali koyoka bango, kasi Allah ayebaka babubi.

48 - At-Tawbah (The Repentance) - 048

لَقَدِ ٱبۡتَغَوُاْ ٱلۡفِتۡنَةَ مِن قَبۡلُ وَقَلَّبُواْ لَكَ ٱلۡأُمُورَ حَتَّىٰ جَآءَ ٱلۡحَقُّ وَظَهَرَ أَمۡرُ ٱللَّهِ وَهُمۡ كَٰرِهُونَ
48. Ya soló, basilaki kotiya songi songi liboso, mpe bakangeli yo makambo kino bosóló boyaki, mpe bokasi na mibeko mia Allah mimonanaki, mpe bango bazali koboya.

49 - At-Tawbah (The Repentance) - 049

وَمِنۡهُم مَّن يَقُولُ ٱئۡذَن لِّي وَلَا تَفۡتِنِّيٓۚ أَلَا فِي ٱلۡفِتۡنَةِ سَقَطُواْۗ وَإِنَّ جَهَنَّمَ لَمُحِيطَةُۢ بِٱلۡكَٰفِرِينَ
49. Мре kati na bango, basusu bazali koloba: Pesa ngai ndingisa (ya kotikala), kasi komeka ngai te! Kaši basilaki kokweya na kati yakomekama, mpe ya soló moto mwa lifelo mokozinga bapangano.

50 - At-Tawbah (The Repentance) - 050

إِن تُصِبۡكَ حَسَنَةٞ تَسُؤۡهُمۡۖ وَإِن تُصِبۡكَ مُصِيبَةٞ يَقُولُواْ قَدۡ أَخَذۡنَآ أَمۡرَنَا مِن قَبۡلُ وَيَتَوَلَّواْ وَّهُمۡ فَرِحُونَ
50. Soki bolamu bozui yo bamoni yango mabe, soki mabe mazui yo balobi: Soki tomilengeleke te oyo ezui ye, elingaki ezua biso mpe bapesi mikongo bakei na kosepela.

51 - At-Tawbah (The Repentance) - 051

قُل لَّن يُصِيبَنَآ إِلَّا مَا كَتَبَ ٱللَّهُ لَنَا هُوَ مَوۡلَىٰنَاۚ وَعَلَى ٱللَّهِ فَلۡيَتَوَكَّلِ ٱلۡمُؤۡمِنُونَ
51. Loba: Mpasi ekoki kozua biso te, sé eye Allah akomela biso, ye nde mobateli wa biso, mpe epai ya Allah esengeli na bandimi komipesa.

52 - At-Tawbah (The Repentance) - 052

قُلۡ هَلۡ تَرَبَّصُونَ بِنَآ إِلَّآ إِحۡدَى ٱلۡحُسۡنَيَيۡنِۖ وَنَحۡنُ نَتَرَبَّصُ بِكُمۡ أَن يُصِيبَكُمُ ٱللَّهُ بِعَذَابٖ مِّنۡ عِندِهِۦٓ أَوۡ بِأَيۡدِينَاۖ فَتَرَبَّصُوٓاْ إِنَّا مَعَكُم مُّتَرَبِّصُونَ
52. Loba: Boye bozali kozela nini тропа biso okati ya bolamu mibale ya malamu (elonga to kokufa тропа Allah)? Kasi biso tozali kozela тропа bino, été Allah apesa bino etumbu to, ewuta na maboko na biso. Na yango bozela, biso mpe tozali kozela elongo na bino.

53 - At-Tawbah (The Repentance) - 053

قُلۡ أَنفِقُواْ طَوۡعًا أَوۡ كَرۡهٗا لَّن يُتَقَبَّلَ مِنكُمۡ إِنَّكُمۡ كُنتُمۡ قَوۡمٗا فَٰسِقِينَ
53. Loba: Bopesa na kosepela to nakoyina, bakondimela bino yango te, ya soló, bozalaki bato mabe.

54 - At-Tawbah (The Repentance) - 054

وَمَا مَنَعَهُمۡ أَن تُقۡبَلَ مِنۡهُمۡ نَفَقَٰتُهُمۡ إِلَّآ أَنَّهُمۡ كَفَرُواْ بِٱللَّهِ وَبِرَسُولِهِۦ وَلَا يَأۡتُونَ ٱلصَّلَوٰةَ إِلَّا وَهُمۡ كُسَالَىٰ وَلَا يُنفِقُونَ إِلَّا وَهُمۡ كَٰرِهُونَ
54. Makabo na bango endimamaki te mpo baboyaki kondima na Allah na motindami naye, mpe basambelaka te, sé batelema na bolembu, mpe babimisaka mabonza na esengo te.

55 - At-Tawbah (The Repentance) - 055

فَلَا تُعۡجِبۡكَ أَمۡوَٰلُهُمۡ وَلَآ أَوۡلَٰدُهُمۡۚ إِنَّمَا يُرِيدُ ٱللَّهُ لِيُعَذِّبَهُم بِهَا فِي ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا وَتَزۡهَقَ أَنفُسُهُمۡ وَهُمۡ كَٰفِرُونَ
55. Bomengo na bana na bango bikamwisa yo te. Kasi Allah alingi kopesa bango etumbu тропа yango o kati ya mokili, тре alongóla milimo mia bango тре bazali o kati na bopengwi.

56 - At-Tawbah (The Repentance) - 056

وَيَحۡلِفُونَ بِٱللَّهِ إِنَّهُمۡ لَمِنكُمۡ وَمَا هُم مِّنكُمۡ وَلَٰكِنَّهُمۡ قَوۡمٞ يَفۡرَقُونَ
56. Мре bazali kolapa па Allah, (bato ya bilongi mibale) ete bazali penza bato ba bino, kasi bazali na bino te, mpe ya soló bango bazali kobanga bino.

57 - At-Tawbah (The Repentance) - 057

لَوۡ يَجِدُونَ مَلۡجَـًٔا أَوۡ مَغَٰرَٰتٍ أَوۡ مُدَّخَلٗا لَّوَلَّوۡاْ إِلَيۡهِ وَهُمۡ يَجۡمَحُونَ
57. Soki bazuaka esika ya bokimi to lidusu o nsé ya ngomba, to esika ya kokotela, balingaki bakima epai wana bango banso na lombango.

58 - At-Tawbah (The Repentance) - 058

وَمِنۡهُم مَّن يَلۡمِزُكَ فِي ٱلصَّدَقَٰتِ فَإِنۡ أُعۡطُواْ مِنۡهَا رَضُواْ وَإِن لَّمۡ يُعۡطَوۡاْ مِنۡهَآ إِذَا هُمۡ يَسۡخَطُونَ
58. Mpe basusu kati na bango bazali kotongo yo тропа mabonza. Soki bapesi bango yango, basepeli, mpe soki bapesi bango te, basiliki.

59 - At-Tawbah (The Repentance) - 059

وَلَوۡ أَنَّهُمۡ رَضُواْ مَآ ءَاتَىٰهُمُ ٱللَّهُ وَرَسُولُهُۥ وَقَالُواْ حَسۡبُنَا ٱللَّهُ سَيُؤۡتِينَا ٱللَّهُ مِن فَضۡلِهِۦ وَرَسُولُهُۥٓ إِنَّآ إِلَى ٱللَّهِ رَٰغِبُونَ
59. Mpe soki bango ya sólo, basepelaki na maye Allah na motindami waye bapesaki bango mpe balobi été: Allah akoki na biso. Allah akopesa biso bolamu bwaye, mpe motindami naye, ya sólo epai ya Allah nde tokozongisa makambo na baposa ya biso.

60 - At-Tawbah (The Repentance) - 060

۞إِنَّمَا ٱلصَّدَقَٰتُ لِلۡفُقَرَآءِ وَٱلۡمَسَٰكِينِ وَٱلۡعَٰمِلِينَ عَلَيۡهَا وَٱلۡمُؤَلَّفَةِ قُلُوبُهُمۡ وَفِي ٱلرِّقَابِ وَٱلۡغَٰرِمِينَ وَفِي سَبِيلِ ٱللَّهِ وَٱبۡنِ ٱلسَّبِيلِۖ فَرِيضَةٗ مِّنَ ٱللَّهِۗ وَٱللَّهُ عَلِيمٌ حَكِيمٞ
60. Ya sólo, makabo mazali тропа babola na bazangi nyoso na baye bazali kosala mosala wana ya kokongola yango, mpe тропа kolendisa mitema ya bandimi ya sika, ezali mpe тропа kokangola bawumbu to bakangami na boloko, ezali mpe тропа baye bazangi makoki ya kofuta ba nyongo, ezali mpe тропа baye babimi na nzela ya Allah, ezali mpe тропа mopaya na moto ya mobembo oyo azali na bokoki te, wana ezali lotomo oyo ewuti epai ya Allah, mpe Allah azali moyebi atonda bwanya.

61 - At-Tawbah (The Repentance) - 061

وَمِنۡهُمُ ٱلَّذِينَ يُؤۡذُونَ ٱلنَّبِيَّ وَيَقُولُونَ هُوَ أُذُنٞۚ قُلۡ أُذُنُ خَيۡرٖ لَّكُمۡ يُؤۡمِنُ بِٱللَّهِ وَيُؤۡمِنُ لِلۡمُؤۡمِنِينَ وَرَحۡمَةٞ لِّلَّذِينَ ءَامَنُواْ مِنكُمۡۚ وَٱلَّذِينَ يُؤۡذُونَ رَسُولَ ٱللَّهِ لَهُمۡ عَذَابٌ أَلِيمٞ
61. Mpe basusu kati na bango bazali komonisa ntoma pasi mpe bazali koloba: Afungoli litoyi naye тропа kolanda nyoso tozali koloba, loba: Litoyi yango ezali тропа bolamu na bino, azali kondima na Allah mpe azali na makanisi ya malamu likolo ya bandimi. Mpe azali mawa тропа basusu. Kati na bino bazali na kondima kasi baye bazali konyokolo motindami ya Allah, bakozua etumbu ya makasi.

62 - At-Tawbah (The Repentance) - 062

يَحۡلِفُونَ بِٱللَّهِ لَكُمۡ لِيُرۡضُوكُمۡ وَٱللَّهُ وَرَسُولُهُۥٓ أَحَقُّ أَن يُرۡضُوهُ إِن كَانُواْ مُؤۡمِنِينَ
62. Bazali kolapa na nkombo ya Allah тропа kosepelisa bino, kasi Allah na motindami

Scroll to Top