الممتحنة

 

Al-Mumtahanah

 

She that is to be examined

1 - Al-Mumtahanah (She that is to be examined) - 001

يَـٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَا تَتَّخِذُواْ عَدُوِّي وَعَدُوَّكُمۡ أَوۡلِيَآءَ تُلۡقُونَ إِلَيۡهِم بِٱلۡمَوَدَّةِ وَقَدۡ كَفَرُواْ بِمَا جَآءَكُم مِّنَ ٱلۡحَقِّ يُخۡرِجُونَ ٱلرَّسُولَ وَإِيَّاكُمۡ أَن تُؤۡمِنُواْ بِٱللَّهِ رَبِّكُمۡ إِن كُنتُمۡ خَرَجۡتُمۡ جِهَٰدٗا فِي سَبِيلِي وَٱبۡتِغَآءَ مَرۡضَاتِيۚ تُسِرُّونَ إِلَيۡهِم بِٱلۡمَوَدَّةِ وَأَنَا۠ أَعۡلَمُ بِمَآ أَخۡفَيۡتُمۡ وَمَآ أَعۡلَنتُمۡۚ وَمَن يَفۡعَلۡهُ مِنكُمۡ فَقَدۡ ضَلَّ سَوَآءَ ٱلسَّبِيلِ
1. Oh bino baye bondima! Bozua monguna na ngai na ya bino azala moninga ya kolanda te, na kopesa bango bolingo mpo basila kopengwa na maye eyeli bino ya bosembo, mpe bazali kobengana motindami na bino mpo bondimi na Allah Nkolo wa bino, soki bobimi na nzela na ngai тропа kobunda mpe koluka esengo na ngai, bozali kopesa bango bolingo na kobombama? Mpe nayebi maye bozali kobomba na maye bozali komonisa polele. Kasi oyo akosala yango kati na bino asili kobunga nzela.

2 - Al-Mumtahanah (She that is to be examined) - 002

إِن يَثۡقَفُوكُمۡ يَكُونُواْ لَكُمۡ أَعۡدَآءٗ وَيَبۡسُطُوٓاْ إِلَيۡكُمۡ أَيۡدِيَهُمۡ وَأَلۡسِنَتَهُم بِٱلسُّوٓءِ وَوَدُّواْ لَوۡ تَكۡفُرُونَ
2. Soki balongi bino, bakozala banguna na bino, mpe bakosala bino mabe kowuta na minoko, mpe bamaboko na bango, mpe bakosepela ete bopengwa.

3 - Al-Mumtahanah (She that is to be examined) - 003

لَن تَنفَعَكُمۡ أَرۡحَامُكُمۡ وَلَآ أَوۡلَٰدُكُمۡۚ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ يَفۡصِلُ بَيۡنَكُمۡۚ وَٱللَّهُ بِمَا تَعۡمَلُونَ بَصِيرٞ
3. Bondeko kati na bino mpe bana na bino bakosalisa bino na eloko te. О mokolo ya suka akokabola okati na bino, kasi Allah azali kornona maye bozali kosala.

4 - Al-Mumtahanah (She that is to be examined) - 004

قَدۡ كَانَتۡ لَكُمۡ أُسۡوَةٌ حَسَنَةٞ فِيٓ إِبۡرَٰهِيمَ وَٱلَّذِينَ مَعَهُۥٓ إِذۡ قَالُواْ لِقَوۡمِهِمۡ إِنَّا بُرَءَـٰٓؤُاْ مِنكُمۡ وَمِمَّا تَعۡبُدُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ كَفَرۡنَا بِكُمۡ وَبَدَا بَيۡنَنَا وَبَيۡنَكُمُ ٱلۡعَدَٰوَةُ وَٱلۡبَغۡضَآءُ أَبَدًا حَتَّىٰ تُؤۡمِنُواْ بِٱللَّهِ وَحۡدَهُۥٓ إِلَّا قَوۡلَ إِبۡرَٰهِيمَ لِأَبِيهِ لَأَسۡتَغۡفِرَنَّ لَكَ وَمَآ أَمۡلِكُ لَكَ مِنَ ٱللَّهِ مِن شَيۡءٖۖ رَّبَّنَا عَلَيۡكَ تَوَكَّلۡنَا وَإِلَيۡكَ أَنَبۡنَا وَإِلَيۡكَ ٱلۡمَصِيرُ
4. Ya soló, Ibrâhîm azali ndakisa malamu тропа bino mpe baye bazalaki elongo na naye, tango balobaki na bato na bango: Ya soló, biso tozali mosika na bino na maye bozali kosala mpe kobondela botiki (nzela) ya Allah, emonani polele été tokabwani na bino,mpe kibonguna na koyinana ekoti kati na biso kino bokondima na Allah na bomoko bwa ye, longola sé liloba lia Ibrâhîm (oyo alobaki тропа tata naye) été: Nakosengelaka yo bolimbisi epai ya Allah, kasi nakosalisa yo na eloko te kowuta na Allah. Nkolo na biso tomipesi epai nayo mpe epai nayo nde tozali kotubela, mpe epai nayo nde bozongi ezali.

5 - Al-Mumtahanah (She that is to be examined) - 005

رَبَّنَا لَا تَجۡعَلۡنَا فِتۡنَةٗ لِّلَّذِينَ كَفَرُواْ وَٱغۡفِرۡ لَنَا رَبَّنَآۖ إِنَّكَ أَنتَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
5. Nkolo wa biso, kozalisa biso te eloko ya котеката тропа bapagano, mpe limbisa biso Nkolo, ya sólo ozali nguya otonda bwanya.

6 - Al-Mumtahanah (She that is to be examined) - 006

لَقَدۡ كَانَ لَكُمۡ فِيهِمۡ أُسۡوَةٌ حَسَنَةٞ لِّمَن كَانَ يَرۡجُواْ ٱللَّهَ وَٱلۡيَوۡمَ ٱلۡأٓخِرَۚ وَمَن يَتَوَلَّ فَإِنَّ ٱللَّهَ هُوَ ٱلۡغَنِيُّ ٱلۡحَمِيدُ
6. Ya sólo, ezalaki тропа bino ndakisa elamu тропа oyo azali kolikia na Allah mpe mokolo ya suka. Kasi oyo akopesa mokongo (ayeba été) Allah akoka mpe atonda lokumu.

7 - Al-Mumtahanah (She that is to be examined) - 007

۞عَسَى ٱللَّهُ أَن يَجۡعَلَ بَيۡنَكُمۡ وَبَيۡنَ ٱلَّذِينَ عَادَيۡتُم مِّنۡهُم مَّوَدَّةٗۚ وَٱللَّهُ قَدِيرٞۚ وَٱللَّهُ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
7. Tango mosusu Allah akotiya kati kati na bino na bango kibondeko mpe Allah azali na bokoki mpe Allah azali molimbisi atonda ngolu.

8 - Al-Mumtahanah (She that is to be examined) - 008

لَّا يَنۡهَىٰكُمُ ٱللَّهُ عَنِ ٱلَّذِينَ لَمۡ يُقَٰتِلُوكُمۡ فِي ٱلدِّينِ وَلَمۡ يُخۡرِجُوكُم مِّن دِيَٰرِكُمۡ أَن تَبَرُّوهُمۡ وَتُقۡسِطُوٓاْ إِلَيۡهِمۡۚ إِنَّ ٱللَّهَ يُحِبُّ ٱلۡمُقۡسِطِينَ
8. Baye babundisi bino te тре babimisi bino na bandako na bino te, Allah apekisi bino te kozala na bango malamu, mpe kozala na bosembo epai na bango. Ya soló, Allah alingaka bato ya bosembo.

9 - Al-Mumtahanah (She that is to be examined) - 009

إِنَّمَا يَنۡهَىٰكُمُ ٱللَّهُ عَنِ ٱلَّذِينَ قَٰتَلُوكُمۡ فِي ٱلدِّينِ وَأَخۡرَجُوكُم مِّن دِيَٰرِكُمۡ وَظَٰهَرُواْ عَلَىٰٓ إِخۡرَاجِكُمۡ أَن تَوَلَّوۡهُمۡۚ وَمَن يَتَوَلَّهُمۡ فَأُوْلَـٰٓئِكَ هُمُ ٱلظَّـٰلِمُونَ
9. Kasi, Allah azali kopekisa bino nde тропа baye bazali kobundisa bino тропа lingomba lia bino, mpe babenganaki bino na bandako, mpe baye basalisaki basusu mpo babengana bino, mpe baye banso balandaki bango. Bango nde bato mabe.

10 - Al-Mumtahanah (She that is to be examined) - 010

يَـٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِذَا جَآءَكُمُ ٱلۡمُؤۡمِنَٰتُ مُهَٰجِرَٰتٖ فَٱمۡتَحِنُوهُنَّۖ ٱللَّهُ أَعۡلَمُ بِإِيمَٰنِهِنَّۖ فَإِنۡ عَلِمۡتُمُوهُنَّ مُؤۡمِنَٰتٖ فَلَا تَرۡجِعُوهُنَّ إِلَى ٱلۡكُفَّارِۖ لَا هُنَّ حِلّٞ لَّهُمۡ وَلَا هُمۡ يَحِلُّونَ لَهُنَّۖ وَءَاتُوهُم مَّآ أَنفَقُواْۚ وَلَا جُنَاحَ عَلَيۡكُمۡ أَن تَنكِحُوهُنَّ إِذَآ ءَاتَيۡتُمُوهُنَّ أُجُورَهُنَّۚ وَلَا تُمۡسِكُواْ بِعِصَمِ ٱلۡكَوَافِرِ وَسۡـَٔلُواْ مَآ أَنفَقۡتُمۡ وَلۡيَسۡـَٔلُواْ مَآ أَنفَقُواْۚ ذَٰلِكُمۡ حُكۡمُ ٱللَّهِ يَحۡكُمُ بَيۡنَكُمۡۖ وَٱللَّهُ عَلِيمٌ حَكِيمٞ
10. Oh bino bandimi! Soki bandimi ya basi bakimi bayei epai na bino, bomeka bango, Allah nde ayebi kondima na bango, soki boyebi ete bazali bandimi bozongisa bango epai na bapagano te, mpo bakoki na bango te, bango mpe bakoki na bango te, mpe bozongisela bapagano mbongo na bango ya libala, mpe ezali mabe te ete bobala soki bopesi bango lifuta na bango. Mpe bobatela mabala na basambeli bikeko te, bosenga bango biloko na bino oyo bopesaki bango,mpe basenga oyo bapesaki. Oyo wana nde mobeko ya Allah azali kokata na yango kati na bino, Allah azali moyebi atonda bwanya.

11 - Al-Mumtahanah (She that is to be examined) - 011

وَإِن فَاتَكُمۡ شَيۡءٞ مِّنۡ أَزۡوَٰجِكُمۡ إِلَى ٱلۡكُفَّارِ فَعَاقَبۡتُمۡ فَـَٔاتُواْ ٱلَّذِينَ ذَهَبَتۡ أَزۡوَٰجُهُم مِّثۡلَ مَآ أَنفَقُواْۚ وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ ٱلَّذِيٓ أَنتُم بِهِۦ مُؤۡمِنُونَ
11. Мре soki mwasi na bino moko akimi epai ya bapengwi, mpe soki bozui biloko na bitumba, bopesa misolo epai ya oyo mwasi naye akimaka epai ya bapengwi, mpe bobanga Allah oyo bozali kondimela.

12 - Al-Mumtahanah (She that is to be examined) - 012

يَـٰٓأَيُّهَا ٱلنَّبِيُّ إِذَا جَآءَكَ ٱلۡمُؤۡمِنَٰتُ يُبَايِعۡنَكَ عَلَىٰٓ أَن لَّا يُشۡرِكۡنَ بِٱللَّهِ شَيۡـٔٗا وَلَا يَسۡرِقۡنَ وَلَا يَزۡنِينَ وَلَا يَقۡتُلۡنَ أَوۡلَٰدَهُنَّ وَلَا يَأۡتِينَ بِبُهۡتَٰنٖ يَفۡتَرِينَهُۥ بَيۡنَ أَيۡدِيهِنَّ وَأَرۡجُلِهِنَّ وَلَا يَعۡصِينَكَ فِي مَعۡرُوفٖ فَبَايِعۡهُنَّ وَٱسۡتَغۡفِرۡ لَهُنَّ ٱللَّهَۚ إِنَّ ٱللَّهَ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
12. Oh ntoma! Soki bandimi ya basi bayei epai nayo na malako (kolapa epai nayo), ete bakosangisa Allah te na eloko, bakoyiba te mpe bakosala ekobo te, mpe bakoboma bana na bango te, mpe bakoya na lokuta te to makambo ya nsoni na maboko na bango te na makolo mpe te, mpe bakozanga yo botosi te, ndimela bango mpe sengela bango bolimbisi ya Allah. Mpamba te, Allah azali molimbisi atonda ngolu.

13 - Al-Mumtahanah (She that is to be examined) - 013

يَـٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَا تَتَوَلَّوۡاْ قَوۡمًا غَضِبَ ٱللَّهُ عَلَيۡهِمۡ قَدۡ يَئِسُواْ مِنَ ٱلۡأٓخِرَةِ كَمَا يَئِسَ ٱلۡكُفَّارُ مِنۡ أَصۡحَٰبِ ٱلۡقُبُورِ
13. Eh bino bandimi! Bozua bondeko te na bato oyo Allah asilikela bango, basila kozanga elikia тропа mokolo ya suka, ndenge bapagano bazanga elikia na baye bazali na malita.

[sc name="verse"][/sc]

Scroll to Top