آل عمران
Ali 'Imran
Family of Imran
1 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 001
الٓمٓ
1. Alif, Lâm, Mîm.(1)
1 Bótala suratu Al-Baqarah mokapo 1.
2 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 002
ٱللَّهُ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ ٱلۡحَيُّ ٱلۡقَيُّومُ
2. Allah, nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te kaka sé ye, azali na bomoyi, amikoka naye moko.
3 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 003
نَزَّلَ عَلَيۡكَ ٱلۡكِتَٰبَ بِٱلۡحَقِّ مُصَدِّقٗا لِّمَا بَيۡنَ يَدَيۡهِ وَأَنزَلَ ٱلتَّوۡرَىٰةَ وَٱلۡإِنجِيلَ
3. Akitiselaki yo(1) buku(2) na bosôló, ezali kondima na babuku ekitaka liboso. Mpe akitisi torah(3) mpe indjil.(4)
1 Muhammad (kimia mpe losambo ya Allah ezala likolo naye).
2 Kurani.
3 Torah: Ezali buku oyo Allah akitisaki ераї ya Mûssa.
4 Indjil: Ezali buku oyo Allah akitisaki ераї ya Issa.
4 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 004
مِن قَبۡلُ هُدٗى لِّلنَّاسِ وَأَنزَلَ ٱلۡفُرۡقَانَۗ إِنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ لَهُمۡ عَذَابٞ شَدِيدٞۗ وَٱللَّهُ عَزِيزٞ ذُو ٱنتِقَامٍ
4. Babuku biye bizalaki bokambi mpona bato. Na sima tokitisaki bososoli (eye ezali kokabola bosôló na lokuta). Ya sôló baye bazali kopengwa na bilembo to mpe mikapo mia Allah, bakozala na etumbu ya makasi. Allah azali makasi atonda nguya nakopesa etumbu.
5 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 005
إِنَّ ٱللَّهَ لَا يَخۡفَىٰ عَلَيۡهِ شَيۡءٞ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَلَا فِي ٱلسَّمَآءِ
5. Ya sôló eloko moko te ebombami epai na Allah. Ezala na nsé to na likolo.
6 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 006
هُوَ ٱلَّذِي يُصَوِّرُكُمۡ فِي ٱلۡأَرۡحَامِ كَيۡفَ يَشَآءُۚ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
6. Ye nde azali kopesa bino balolenge kowuta na mabumu ya bamama na bino yambo ete bobotama ndenge alingi. Nzambe mosusu azali te sé ye wa bokasi atonda bwányá.
7 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 007
هُوَ ٱلَّذِيٓ أَنزَلَ عَلَيۡكَ ٱلۡكِتَٰبَ مِنۡهُ ءَايَٰتٞ مُّحۡكَمَٰتٌ هُنَّ أُمُّ ٱلۡكِتَٰبِ وَأُخَرُ مُتَشَٰبِهَٰتٞۖ فَأَمَّا ٱلَّذِينَ فِي قُلُوبِهِمۡ زَيۡغٞ فَيَتَّبِعُونَ مَا تَشَٰبَهَ مِنۡهُ ٱبۡتِغَآءَ ٱلۡفِتۡنَةِ وَٱبۡتِغَآءَ تَأۡوِيلِهِۦۖ وَمَا يَعۡلَمُ تَأۡوِيلَهُۥٓ إِلَّا ٱللَّهُۗ وَٱلرَّـٰسِخُونَ فِي ٱلۡعِلۡمِ يَقُولُونَ ءَامَنَّا بِهِۦ كُلّٞ مِّنۡ عِندِ رَبِّنَاۗ وَمَا يَذَّكَّرُ إِلَّآ أُوْلُواْ ٱلۡأَلۡبَٰبِ
7. Ye nde akitiseli yo buku kati na yango ezali na mikapo mia polele ya mibeko, mikapo wana nde mizali misisa ya buku, mpe mikapo misusu mizali na bokokani kati na yango. Na yango bato baye bazali na bokono ya libungi o mitema mia bango, bazali sé kolanda mikapo miye mikokana mpona koluka bomekano to mpe koluka ndimbola na yango, kasi moto moko te ayebi ndimbola na yango, sé ye moko Allah. Nzoka nde, banganga Nzambe (Allah) baye batonda mayele balobaka ete: Biso tondimi na yango. Nyoso ewuti epai na Nkolo na biso, sé bato baye bazali na mayele nde bazali kokanisa mpe kondima na yango.
8 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 008
رَبَّنَا لَا تُزِغۡ قُلُوبَنَا بَعۡدَ إِذۡ هَدَيۡتَنَا وَهَبۡ لَنَا مِن لَّدُنكَ رَحۡمَةًۚ إِنَّكَ أَنتَ ٱلۡوَهَّابُ
8. Eh Nkolo wa biso! Kobongola bosôló o mitema mia biso te, sima ya kokamba biso. Mpe pesa biso ngolu nayo. Ya sôló yo ozali mopesi.
9 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 009
رَبَّنَآ إِنَّكَ جَامِعُ ٱلنَّاسِ لِيَوۡمٖ لَّا رَيۡبَ فِيهِۚ إِنَّ ٱللَّهَ لَا يُخۡلِفُ ٱلۡمِيعَادَ
9. Eh Nkolo wa biso! Yo okosangisa bato o mokolo mwa mbano moye mokozala na ntembe te; ya sôló Allah azangisaka elaka naye te.
10 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 010
إِنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لَن تُغۡنِيَ عَنۡهُمۡ أَمۡوَٰلُهُمۡ وَلَآ أَوۡلَٰدُهُم مِّنَ ٱللَّهِ شَيۡـٔٗاۖ وَأُوْلَـٰٓئِكَ هُمۡ وَقُودُ ٱلنَّارِ
10. Ya sôló baye bapengwa, misolo na bango na bana na bango ekosalisa bango na eloko te epai na Allah. Mpe bango bakozala bankoni ya lifelo.
11 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 011
كَدَأۡبِ ءَالِ فِرۡعَوۡنَ وَٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡۚ كَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِنَا فَأَخَذَهُمُ ٱللَّهُ بِذُنُوبِهِمۡۗ وَٱللَّهُ شَدِيدُ ٱلۡعِقَابِ
11. Ndenge ezalaki na bomeseni ya falo na bato naye, ndenge moko na baye bazalaki liboso na bango. Bazuaki bilembo mpe mikapo mia biso na lokuta. Mpe baboyaki kondima na yango, mpe Allah azuaki bango na masumu na bango. Allah azali makasi mpona kopesa etumbu.
12 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 012
قُل لِّلَّذِينَ كَفَرُواْ سَتُغۡلَبُونَ وَتُحۡشَرُونَ إِلَىٰ جَهَنَّمَۖ وَبِئۡسَ ٱلۡمِهَادُ
12. Loba na baye bapengwa ete: Bokobetama mpe bokokitisama, na sima bokosangisama o kati ya lifelo. Mpe oyo nde esika ya mabe ya kofanda!
13 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 013
قَدۡ كَانَ لَكُمۡ ءَايَةٞ فِي فِئَتَيۡنِ ٱلۡتَقَتَاۖ فِئَةٞ تُقَٰتِلُ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ وَأُخۡرَىٰ كَافِرَةٞ يَرَوۡنَهُم مِّثۡلَيۡهِمۡ رَأۡيَ ٱلۡعَيۡنِۚ وَٱللَّهُ يُؤَيِّدُ بِنَصۡرِهِۦ مَن يَشَآءُۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَعِبۡرَةٗ لِّأُوْلِي ٱلۡأَبۡصَٰرِ
13. Ezalaki ya sôló elembo mpe ekamwiseli mpona bino okati ya mapinga mibale makutanaki na bitumba; moko ezalaki kobunda mpona Allah, mosusu ezalaki na bopengwi. Na sima mapinga ya bandimi ekomaki komimona ete bakomaki mbala mibale koleka. Allah asalisaka oyo ye alingi na elonga naye moko. Ya sôló wana ezali liteya mpona bato bazali na miso ya komona.
14 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 014
زُيِّنَ لِلنَّاسِ حُبُّ ٱلشَّهَوَٰتِ مِنَ ٱلنِّسَآءِ وَٱلۡبَنِينَ وَٱلۡقَنَٰطِيرِ ٱلۡمُقَنطَرَةِ مِنَ ٱلذَّهَبِ وَٱلۡفِضَّةِ وَٱلۡخَيۡلِ ٱلۡمُسَوَّمَةِ وَٱلۡأَنۡعَٰمِ وَٱلۡحَرۡثِۗ ذَٰلِكَ مَتَٰعُ ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَاۖ وَٱللَّهُ عِندَهُۥ حُسۡنُ ٱلۡمَـَٔابِ
14. Engengisami mpona bato mposa ya basi, mpe ya bana, mpe bankita ya wolo mpe palata, mpe na bampunda, mpe an’âm(1), mpe bilanga. Wana nyoso bisengo ya mokili, nzoka nde bozongi ya malamu mpe ya kitoko ezali epai Allah.
1 An’âm: Lisanga ya bibuele biye: Chameau, ngombe, ntaba, meme.
15 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 015
۞قُلۡ أَؤُنَبِّئُكُم بِخَيۡرٖ مِّن ذَٰلِكُمۡۖ لِلَّذِينَ ٱتَّقَوۡاْ عِندَ رَبِّهِمۡ جَنَّـٰتٞ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُ خَٰلِدِينَ فِيهَا وَأَزۡوَٰجٞ مُّطَهَّرَةٞ وَرِضۡوَٰنٞ مِّنَ ٱللَّهِۗ وَٱللَّهُ بَصِيرُۢ بِٱلۡعِبَادِ
15. Loba: Bolingi nalakisa bino eloko ya malamu koleka maye bozali na yango? Mpona baye babangi (Allah) bazali na paladiso ya nkembo, epayi ya Nkolo wa bango, okati na yango mingala mizali kotiola, bakozala libela na kati mpe bakozala na basi baye bapetuama, mpe esengo kowuta epai na Allah. Allah azali komona bawumbu naye.
16 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 016
ٱلَّذِينَ يَقُولُونَ رَبَّنَآ إِنَّنَآ ءَامَنَّا فَٱغۡفِرۡ لَنَا ذُنُوبَنَا وَقِنَا عَذَابَ ٱلنَّارِ
16. Baye bazali koloba: Nkolo wa biso! Ya sôló tondimi, limbisa masumu ma biso, mpe tia biso mosika na etumbu ya lifelo.
17 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 017
ٱلصَّـٰبِرِينَ وَٱلصَّـٰدِقِينَ وَٱلۡقَٰنِتِينَ وَٱلۡمُنفِقِينَ وَٱلۡمُسۡتَغۡفِرِينَ بِٱلۡأَسۡحَارِ
17. Baye bazali kokanga mitema, mpe bato ya bosembo, mpe bato ya botosi, mpe baye babimisaka mpona Allah, mpe baye basengaka Allah bolimbilisi yambo ete ntongo etana.
18 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 018
شَهِدَ ٱللَّهُ أَنَّهُۥ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ وَٱلۡمَلَـٰٓئِكَةُ وَأُوْلُواْ ٱلۡعِلۡمِ قَآئِمَۢا بِٱلۡقِسۡطِۚ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
18. Allah asila kotatola ete nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te sé ye mei, ndenge moko na ba anzelu, na banganga ya mayele, Mpe (Allah) atonda bosembo Nzambe mosusu azali te sé ye Allah wa bokasi atonda bwanya.
19 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 019
إِنَّ ٱلدِّينَ عِندَ ٱللَّهِ ٱلۡإِسۡلَٰمُۗ وَمَا ٱخۡتَلَفَ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡكِتَٰبَ إِلَّا مِنۢ بَعۡدِ مَا جَآءَهُمُ ٱلۡعِلۡمُ بَغۡيَۢا بَيۡنَهُمۡۗ وَمَن يَكۡفُرۡ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ فَإِنَّ ٱللَّهَ سَرِيعُ ٱلۡحِسَابِ
19. Ya sôló, lingomba liye lindimami epai ya Allah lizali Islam (komisokia). Mpe baye bazuaki buku liboso(1) bakabwanaki te, sé na tango boyebi ekomelaki bango na likunya kati na bango. Oyo akopengwa na mikapo mia Allah, ya sôló Allah afutaka na lombango.
1 Kati na bayuda mpe bakliáto.
20 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 020
فَإِنۡ حَآجُّوكَ فَقُلۡ أَسۡلَمۡتُ وَجۡهِيَ لِلَّهِ وَمَنِ ٱتَّبَعَنِۗ وَقُل لِّلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡكِتَٰبَ وَٱلۡأُمِّيِّـۧنَ ءَأَسۡلَمۡتُمۡۚ فَإِنۡ أَسۡلَمُواْ فَقَدِ ٱهۡتَدَواْۖ وَّإِن تَوَلَّوۡاْ فَإِنَّمَا عَلَيۡكَ ٱلۡبَلَٰغُۗ وَٱللَّهُ بَصِيرُۢ بِٱلۡعِبَادِ
20. Mpe soki basuanisi yo, loba na bango ete: Namisoki mobimba epai na Allah, na baye banso balandi ngai. Mpe loba na baye bazuaki buku mpe na baye batanga te: Bomisoki? Soki bamisoki, basili kokambama. Mpe soki bapesi mokongo, yo ozali na eloko ya kosala te sé kokomisa sango. Mpe Allah azali komona bawumbu naye.
21 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 021
إِنَّ ٱلَّذِينَ يَكۡفُرُونَ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ وَيَقۡتُلُونَ ٱلنَّبِيِّـۧنَ بِغَيۡرِ حَقّٖ وَيَقۡتُلُونَ ٱلَّذِينَ يَأۡمُرُونَ بِٱلۡقِسۡطِ مِنَ ٱلنَّاسِ فَبَشِّرۡهُم بِعَذَابٍ أَلِيمٍ
21. Ya sôló baye bazali kopengwa na mikapo mia Allah, mpe bazali koboma bantoma mpamba, mpe bazali koboma baye bazali kotinda na bosembo, o kati ya bato pesa bango sango ya etumbu ya makasi.
22 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 022
أُوْلَـٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ حَبِطَتۡ أَعۡمَٰلُهُمۡ فِي ٱلدُّنۡيَا وَٱلۡأٓخِرَةِ وَمَا لَهُم مِّن نَّـٰصِرِينَ
22. Bango wana nde misala mia bango mibebisami awa na nsé, mpe o’mokolo ya suka, mpe bakozalaka na mosungi te.
23 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 023
أَلَمۡ تَرَ إِلَى ٱلَّذِينَ أُوتُواْ نَصِيبٗا مِّنَ ٱلۡكِتَٰبِ يُدۡعَوۡنَ إِلَىٰ كِتَٰبِ ٱللَّهِ لِيَحۡكُمَ بَيۡنَهُمۡ ثُمَّ يَتَوَلَّىٰ فَرِيقٞ مِّنۡهُمۡ وَهُم مُّعۡرِضُونَ
23. Ozali komona te mpona baye bapesamaki buku ndenge basalaki, soki babengami ete bakata makambo kati na bango na buku ya Allah, sima basusu kati na bango bapesi mokongo mpe bakimi?
24 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 024
ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ قَالُواْ لَن تَمَسَّنَا ٱلنَّارُ إِلَّآ أَيَّامٗا مَّعۡدُودَٰتٖۖ وَغَرَّهُمۡ فِي دِينِهِم مَّا كَانُواْ يَفۡتَرُونَ
24. Na bongo nde balobaki ete: Móto ekozwa biso sé mikolo mike ya kotanga. Mpe lokuta na bango ekosaki bango na lingomba na bango, na ntina na maye bazalaki kosala ya mabe.
25 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 025
فَكَيۡفَ إِذَا جَمَعۡنَٰهُمۡ لِيَوۡمٖ لَّا رَيۡبَ فِيهِ وَوُفِّيَتۡ كُلُّ نَفۡسٖ مَّا كَسَبَتۡ وَهُمۡ لَا يُظۡلَمُونَ
25. Mpe ekozala ndenge kani tango tokosangisa bango o mokolo moye mokozala na ntembe te, mpe molimo na molimo akofutama engebene na maye asalaki? Mpe bakobubama te.
26 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 026
قُلِ ٱللَّهُمَّ مَٰلِكَ ٱلۡمُلۡكِ تُؤۡتِي ٱلۡمُلۡكَ مَن تَشَآءُ وَتَنزِعُ ٱلۡمُلۡكَ مِمَّن تَشَآءُ وَتُعِزُّ مَن تَشَآءُ وَتُذِلُّ مَن تَشَآءُۖ بِيَدِكَ ٱلۡخَيۡرُۖ إِنَّكَ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٞ
26. Loba ete: Eh Allah! Mokonzi ya bakonzi, opesaka bokonzi na nani olingi, mpe olongalaka bokonzi na nani olingi, opesaka nguya na nani olingi. Mpe okitisaka nani olingi, bolamu nyoso ezali na maboko nayo, ya sôló ozali na bokasi likolo ya biloko binso.
27 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 027
تُولِجُ ٱلَّيۡلَ فِي ٱلنَّهَارِ وَتُولِجُ ٱلنَّهَارَ فِي ٱلَّيۡلِۖ وَتُخۡرِجُ ٱلۡحَيَّ مِنَ ٱلۡمَيِّتِ وَتُخۡرِجُ ٱلۡمَيِّتَ مِنَ ٱلۡحَيِّۖ وَتَرۡزُقُ مَن تَشَآءُ بِغَيۡرِ حِسَابٖ
27. Okotisaka butu kati na moyi mpe okotisaka moyi kati na butu. Mpe obimisaka moto ya bomoyi kowuta na liwa mpe obimisaka moto ya liwa kowuta na bomoyi. Mpe opesaka bozui nayo na moto oyo olingi, na motango moyebani te.
28 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 028
لَّا يَتَّخِذِ ٱلۡمُؤۡمِنُونَ ٱلۡكَٰفِرِينَ أَوۡلِيَآءَ مِن دُونِ ٱلۡمُؤۡمِنِينَۖ وَمَن يَفۡعَلۡ ذَٰلِكَ فَلَيۡسَ مِنَ ٱللَّهِ فِي شَيۡءٍ إِلَّآ أَن تَتَّقُواْ مِنۡهُمۡ تُقَىٰةٗۗ وَيُحَذِّرُكُمُ ٱللَّهُ نَفۡسَهُۥۗ وَإِلَى ٱللَّهِ ٱلۡمَصِيرُ
28. Esengeli te na bandimi kotika bandeko na bango bandimi, mpona kozua bapagano bazala baninga na bango. Oyo akosala lolenge wana akozala na eloko te epai na Allah, sé soki bozali koluka komibatela mpo na bango. Allah azali kokebisa bino mpona ye moko. Mpe epai naye Allah nde bozongi ezali.
29 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 029
قُلۡ إِن تُخۡفُواْ مَا فِي صُدُورِكُمۡ أَوۡ تُبۡدُوهُ يَعۡلَمۡهُ ٱللَّهُۗ وَيَعۡلَمُ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِۗ وَٱللَّهُ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٞ
29. Loba ete: Soki bobombi maye mazali kati ya mitema mia bino to bobimisi yango polele, Allah ayebi yango. Mpe ayebi maye mazali na likolo mpe na nsé. Mpe Allah azali na nguya likolo ya biloko binso.
30 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 030
يَوۡمَ تَجِدُ كُلُّ نَفۡسٖ مَّا عَمِلَتۡ مِنۡ خَيۡرٖ مُّحۡضَرٗا وَمَا عَمِلَتۡ مِن سُوٓءٖ تَوَدُّ لَوۡ أَنَّ بَيۡنَهَا وَبَيۡنَهُۥٓ أَمَدَۢا بَعِيدٗاۗ وَيُحَذِّرُكُمُ ٱللَّهُ نَفۡسَهُۥۗ وَٱللَّهُ رَءُوفُۢ بِٱلۡعِبَادِ
30. Mokolo molimo nyonso ekozua makambo ya malamu maye esalaki. Mazali komonana na maye manso esalaki ya mabe, akolikia ata sókó ezalaka kati ya oyo na oyo kuna ndelo ya mosika, mpe Allah azali kokebisa bino mpona ye moko mpe Allah atondi na ngolu mpona bawumbu naye.
31 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 031
قُلۡ إِن كُنتُمۡ تُحِبُّونَ ٱللَّهَ فَٱتَّبِعُونِي يُحۡبِبۡكُمُ ٱللَّهُ وَيَغۡفِرۡ لَكُمۡ ذُنُوبَكُمۡۚ وَٱللَّهُ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
31. Loba ete: Soki bolingi Allah, bolanda ngai.(1) Allah akolinga bino mpe akolimbisa masumu ma bino. mpe Allah azali molimbisi moyoki mawa.
1 Muhammad (kimia mpe losambo ya Allah ezala likolo naye).
32 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 032
قُلۡ أَطِيعُواْ ٱللَّهَ وَٱلرَّسُولَۖ فَإِن تَوَلَّوۡاْ فَإِنَّ ٱللَّهَ لَا يُحِبُّ ٱلۡكَٰفِرِينَ
32. Loba ete: Botosa Allah na motindami naye, mpe soki bapesi mokongo, ya sôló Allah alingaka bapengwi te.
33 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 033
۞إِنَّ ٱللَّهَ ٱصۡطَفَىٰٓ ءَادَمَ وَنُوحٗا وَءَالَ إِبۡرَٰهِيمَ وَءَالَ عِمۡرَٰنَ عَلَى ٱلۡعَٰلَمِينَ
33. Ya sôló, Allah aponaki Âdam, mpe Nûh, mpe libota ya Ibrâhîm mpe libota ya Imrân, likolo ya mokili.
34 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 034
ذُرِّيَّةَۢ بَعۡضُهَا مِنۢ بَعۡضٖۗ وَٱللَّهُ سَمِيعٌ عَلِيمٌ
34. Bakitani na bakitani kati na bango, mpe Allah azali moyoki atonda boyebi.
35 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 035
إِذۡ قَالَتِ ٱمۡرَأَتُ عِمۡرَٰنَ رَبِّ إِنِّي نَذَرۡتُ لَكَ مَا فِي بَطۡنِي مُحَرَّرٗا فَتَقَبَّلۡ مِنِّيٓۖ إِنَّكَ أَنتَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡعَلِيمُ
35. Kanisa tango mwasi ya Imrân alobaki ete: Eh Nkolo! Ya sôló ngai nalaki yo mokumba eye ezali na libumu na ngai. Mpe nabonzeli yo ye na bonsomi nyoso mpo ete azala mosali nayo, eh Nkolo! Ndima kolela na ngai, ya sôló ozali moyoki otonda boyebi.
36 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 036
فَلَمَّا وَضَعَتۡهَا قَالَتۡ رَبِّ إِنِّي وَضَعۡتُهَآ أُنثَىٰ وَٱللَّهُ أَعۡلَمُ بِمَا وَضَعَتۡ وَلَيۡسَ ٱلذَّكَرُ كَٱلۡأُنثَىٰۖ وَإِنِّي سَمَّيۡتُهَا مَرۡيَمَ وَإِنِّيٓ أُعِيذُهَا بِكَ وَذُرِّيَّتَهَا مِنَ ٱلشَّيۡطَٰنِ ٱلرَّجِيمِ
36. Mpe tango abotaki ye, alobaki ete: Eh Nkolo! Naboti ye mwana mwasi. Mpe Allah ayebaki mbotama wana, kasi mwana mwasi azali lokola mwana mobali te. Na yango napesi ye nkombo ya Maryam, mpe ngai ya sôló nati ye na libota naye, na nsé ya libateli nayo likolo na satana oyo alakelama mabe.
37 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 037
فَتَقَبَّلَهَا رَبُّهَا بِقَبُولٍ حَسَنٖ وَأَنۢبَتَهَا نَبَاتًا حَسَنٗا وَكَفَّلَهَا زَكَرِيَّاۖ كُلَّمَا دَخَلَ عَلَيۡهَا زَكَرِيَّا ٱلۡمِحۡرَابَ وَجَدَ عِندَهَا رِزۡقٗاۖ قَالَ يَٰمَرۡيَمُ أَنَّىٰ لَكِ هَٰذَاۖ قَالَتۡ هُوَ مِنۡ عِندِ ٱللَّهِۖ إِنَّ ٱللَّهَ يَرۡزُقُ مَن يَشَآءُ بِغَيۡرِ حِسَابٍ
37. Nkolo naye andimelaki ye na bondimeli ya malamu mpe akolisi ye kokola ya malamu. Mpe apesaki ye, na Zakariya mpo ete abokolo ye. Na tango inso Zakariya azalaki kokota na mihrâb(1) epai naye (Maryam) akokuta ye na bilei. Mpe akotuna ye eh Maryam! Ozui bilei biye wapi? Akozongisa eyano ete: Ewuti epai na Allah. Ya sôló, Allah apesaka bozui na moto oyo ye alingi na motango te.
1 Esika oyo ye Maryam azalaki ко fanda pona mabondeli.
38 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 038
هُنَالِكَ دَعَا زَكَرِيَّا رَبَّهُۥۖ قَالَ رَبِّ هَبۡ لِي مِن لَّدُنكَ ذُرِّيَّةٗ طَيِّبَةًۖ إِنَّكَ سَمِيعُ ٱلدُّعَآءِ
38. Na tango wana, Zakariya asengi Nkolo wa ye, alobaki ete: Nkolo, pesa ngai libota ya malamu kowuta epai nayo. Ya sôló ozali moyoki Mabondeli.
2 Bótala mokapo 37.
39 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 039
فَنَادَتۡهُ ٱلۡمَلَـٰٓئِكَةُ وَهُوَ قَآئِمٞ يُصَلِّي فِي ٱلۡمِحۡرَابِ أَنَّ ٱللَّهَ يُبَشِّرُكَ بِيَحۡيَىٰ مُصَدِّقَۢا بِكَلِمَةٖ مِّنَ ٱللَّهِ وَسَيِّدٗا وَحَصُورٗا وَنَبِيّٗا مِّنَ ٱلصَّـٰلِحِينَ
39. Ba anzelu babengaki ye tango ye atelemaki azali kosambela na kati ya Mihrab,(2) balobaki naye ete: Ya sôló Allah apesi yo sango elamu ya mbotama ya Yahya, ye oyo akondima na liloba ya Allah. Mpe akozala mokonzi mpe moto ya kilikili te, mpe moto ya ekobo te, mpe akozala ntoma o’kati ya bato ya malamu.
2 Bótala mokapo 37.
40 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 040
قَالَ رَبِّ أَنَّىٰ يَكُونُ لِي غُلَٰمٞ وَقَدۡ بَلَغَنِيَ ٱلۡكِبَرُ وَٱمۡرَأَتِي عَاقِرٞۖ قَالَ كَذَٰلِكَ ٱللَّهُ يَفۡعَلُ مَا يَشَآءُ
40. Mpe alobi ete: Eh Nkolo! Ndenge nini nakozua mwana mpe ngai nasili kokoma mobange, mpe mwasi na ngai abotaka te? (Allah) alobi: Ndenge wana nde, Allah asalaka oyo alingi.
41 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 041
قَالَ رَبِّ ٱجۡعَل لِّيٓ ءَايَةٗۖ قَالَ ءَايَتُكَ أَلَّا تُكَلِّمَ ٱلنَّاسَ ثَلَٰثَةَ أَيَّامٍ إِلَّا رَمۡزٗاۗ وَٱذۡكُر رَّبَّكَ كَثِيرٗا وَسَبِّحۡ بِٱلۡعَشِيِّ وَٱلۡإِبۡكَٰرِ
41. (Zakariya) alobaki ete: Nkolo! Pesa ngai elembo na yango. (Allah) alobi ete: Elembo nayo ete mikolo misato okosolola na bato te sé na bilembo. Na sima okanisa Nkolo wayo mingi, mpe sanzola ye na ntongo mpe mpokua.
42 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 042
وَإِذۡ قَالَتِ ٱلۡمَلَـٰٓئِكَةُ يَٰمَرۡيَمُ إِنَّ ٱللَّهَ ٱصۡطَفَىٰكِ وَطَهَّرَكِ وَٱصۡطَفَىٰكِ عَلَىٰ نِسَآءِ ٱلۡعَٰلَمِينَ
42. Mpe lisusu kanisa tango ba anzelu balobaki: Eh Maryam! Ya sôló Allah aponi yo mpe apetoli yo, mpe atomboli yo yambo ya basi banso ya mokili.(1)
1 Na ndembe naye.
43 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 043
يَٰمَرۡيَمُ ٱقۡنُتِي لِرَبِّكِ وَٱسۡجُدِي وَٱرۡكَعِي مَعَ ٱلرَّـٰكِعِينَ
43. Eh Maryam! Zala na botosi epai na Nkolo nayo, gumbama mpe fukama (o tia elongi nayo na mabele) elongo moko na bagumbami.
44 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 044
ذَٰلِكَ مِنۡ أَنۢبَآءِ ٱلۡغَيۡبِ نُوحِيهِ إِلَيۡكَۚ وَمَا كُنتَ لَدَيۡهِمۡ إِذۡ يُلۡقُونَ أَقۡلَٰمَهُمۡ أَيُّهُمۡ يَكۡفُلُ مَرۡيَمَ وَمَا كُنتَ لَدَيۡهِمۡ إِذۡ يَخۡتَصِمُونَ
44. Wana ezali basango mabombami tozali kopesa yo yango. Mpe ozalaki te epai na bango tango bazalaki ko buaka bikomeli bia bango mpona koyeba nani akozua mokumba ya kobokolo Maryam, mpe yo ozalaki te tango bazalaki kosuana.
45 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 045
إِذۡ قَالَتِ ٱلۡمَلَـٰٓئِكَةُ يَٰمَرۡيَمُ إِنَّ ٱللَّهَ يُبَشِّرُكِ بِكَلِمَةٖ مِّنۡهُ ٱسۡمُهُ ٱلۡمَسِيحُ عِيسَى ٱبۡنُ مَرۡيَمَ وَجِيهٗا فِي ٱلدُّنۡيَا وَٱلۡأٓخِرَةِ وَمِنَ ٱلۡمُقَرَّبِينَ
45. kanisa tango ba anzelu balobaki: Eh Maryam! Ya sôló, Allah azali kopesa yo sango elamu ya liloba kowuta epai naye (Allah), nkombo naye ekozala Masiya Issa, mwana ya Maryam, akozala na lokumu awa na nsé mpe na lola, mpe azali moko kati na baye bazali penepene (na Allah).
46 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 046
وَيُكَلِّمُ ٱلنَّاسَ فِي ٱلۡمَهۡدِ وَكَهۡلٗا وَمِنَ ٱلصَّـٰلِحِينَ
46. Mpe Akoloba na bato wuta mbotama naye, mpe tango akokola, mpe azali kati na bato ya malamu.
47 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 047
قَالَتۡ رَبِّ أَنَّىٰ يَكُونُ لِي وَلَدٞ وَلَمۡ يَمۡسَسۡنِي بَشَرٞۖ قَالَ كَذَٰلِكِ ٱللَّهُ يَخۡلُقُ مَا يَشَآءُۚ إِذَا قَضَىٰٓ أَمۡرٗا فَإِنَّمَا يَقُولُ لَهُۥ كُن فَيَكُونُ
47. (Maryam) alobi: (Nkolo ya sôló ndenge nini nakobota mpe ngai nasangani na mobali te?). Alobi: (Anzelu) (ndenge wana nde Allah akelaka maye alingi. Soki azwi mokano ya likambo, akoloba: “Zala”, Mpe lizalisami.
48 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 048
وَيُعَلِّمُهُ ٱلۡكِتَٰبَ وَٱلۡحِكۡمَةَ وَٱلتَّوۡرَىٰةَ وَٱلۡإِنجِيلَ
48. Mpe akotangisa ye buku, mpe bwanya, mpe torah(1) mpe indjil.(1)
1 Bótala mokapo 2.
49 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 049
وَرَسُولًا إِلَىٰ بَنِيٓ إِسۡرَـٰٓءِيلَ أَنِّي قَدۡ جِئۡتُكُم بِـَٔايَةٖ مِّن رَّبِّكُمۡ أَنِّيٓ أَخۡلُقُ لَكُم مِّنَ ٱلطِّينِ كَهَيۡـَٔةِ ٱلطَّيۡرِ فَأَنفُخُ فِيهِ فَيَكُونُ طَيۡرَۢا بِإِذۡنِ ٱللَّهِۖ وَأُبۡرِئُ ٱلۡأَكۡمَهَ وَٱلۡأَبۡرَصَ وَأُحۡيِ ٱلۡمَوۡتَىٰ بِإِذۡنِ ٱللَّهِۖ وَأُنَبِّئُكُم بِمَا تَأۡكُلُونَ وَمَا تَدَّخِرُونَ فِي بُيُوتِكُمۡۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗ لَّكُمۡ إِن كُنتُم مُّؤۡمِنِينَ
49. Mpe motindami epai ya bana Isalayele, (akoloba na bango été): Ya sôló, ngai nayeli bino elembo mpe ekamwiseli kowuta epayi na Nkolo wa bino. Ete ngai nakosalela bino mabele ya potopoto na lolenge ya ndeke, mpe nakofula na kati mpe ekokoma ndeke na ndingisa ya Allah. Mpe na kobikisa bato bakufa miso, mpe ya bokono ya maba. Mpe na kosekwisa bawa na ndingisa ya Allah. Mpe nakoyebisa bino bilei nini bokolia mpe bankita bozali kosangisa yango okati ya bandako na bino. Ya sôló nyoso wana ezali elembo mpe mateya mpona bino, soki ya sôló bozali bandimi.
50 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 050
وَمُصَدِّقٗا لِّمَا بَيۡنَ يَدَيَّ مِنَ ٱلتَّوۡرَىٰةِ وَلِأُحِلَّ لَكُم بَعۡضَ ٱلَّذِي حُرِّمَ عَلَيۡكُمۡۚ وَجِئۡتُكُم بِـَٔايَةٖ مِّن رَّبِّكُمۡ فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ
50. Mpe nandimi na maye mazuamaki na torah(1) mpe nakopesa bino ndingisa mpona kolia maye bapekisaki bino. Mpe nayeli bino elembo kowuta na Nkolo wa bino. Mpe bobanga Allah mpe botosa ngai.
1 Buku oyo ekitaki epaí ya Mûssa.
51 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 051
إِنَّ ٱللَّهَ رَبِّي وَرَبُّكُمۡ فَٱعۡبُدُوهُۚ هَٰذَا صِرَٰطٞ مُّسۡتَقِيمٞ
51. Ya sôló, Allah azali Nkolo na ngai mpe Nkolo na bino. Bobondela ye, oyo nde nzela ya semba.
52 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 052
۞فَلَمَّآ أَحَسَّ عِيسَىٰ مِنۡهُمُ ٱلۡكُفۡرَ قَالَ مَنۡ أَنصَارِيٓ إِلَى ٱللَّهِۖ قَالَ ٱلۡحَوَارِيُّونَ نَحۡنُ أَنصَارُ ٱللَّهِ ءَامَنَّا بِٱللَّهِ وَٱشۡهَدۡ بِأَنَّا مُسۡلِمُونَ
52. Mpe tango Issa amonaki bopengwi na bango, alobaki ete: Banani bakosunga ngai na nzela ya Allah? Bayekoli naye bayanolaki na koloba été: Biso tozali basungi nayo na nzela ya Allah tondimi na Allah. Mpe yo (Issa) zala nzeneneke na biso ete ya sôló tosili komisokia.
53 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 053
رَبَّنَآ ءَامَنَّا بِمَآ أَنزَلۡتَ وَٱتَّبَعۡنَا ٱلرَّسُولَ فَٱكۡتُبۡنَا مَعَ ٱلشَّـٰهِدِينَ
53. Nkolo na biso tondimi na maye okitisaki mpe tolandi motindami. Tia biso elongo na batatoli ya sôló.
54 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 054
وَمَكَرُواْ وَمَكَرَ ٱللَّهُۖ وَٱللَّهُ خَيۡرُ ٱلۡمَٰكِرِينَ
54. Mpe basalaki likita ya mabe, Allah mpe asalaki likita, kasi Allah nde azali likolo ya makita nyoso.
55 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 055
إِذۡ قَالَ ٱللَّهُ يَٰعِيسَىٰٓ إِنِّي مُتَوَفِّيكَ وَرَافِعُكَ إِلَيَّ وَمُطَهِّرُكَ مِنَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ وَجَاعِلُ ٱلَّذِينَ ٱتَّبَعُوكَ فَوۡقَ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ إِلَىٰ يَوۡمِ ٱلۡقِيَٰمَةِۖ ثُمَّ إِلَيَّ مَرۡجِعُكُمۡ فَأَحۡكُمُ بَيۡنَكُمۡ فِيمَا كُنتُمۡ فِيهِ تَخۡتَلِفُونَ
55. Kanisa(1) tango Allah alobaki: Eh Issa! Ya sôló, ngai nakozwa yo mpe nakomatisa yo epai na ngai mpe na kopetola yo okati ya bapagano. Mpe na kotia baye balandi yo likolo ya bapagano, kino suka ya molongo, sima epai na ngai nde bino nioso bokozonga. Mpe na ko sambisa bino okati ya maye bozalaki na bokabwani.
1 Muhammad.
56 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 056
فَأَمَّا ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ فَأُعَذِّبُهُمۡ عَذَابٗا شَدِيدٗا فِي ٱلدُّنۡيَا وَٱلۡأٓخِرَةِ وَمَا لَهُم مِّن نَّـٰصِرِينَ
56. Kasi mpona baye bapengwi, nakopesa bango etumbu ya makasi okati ya mokili mpe na mokolo ya suka, mpe bakozua basalisi te.
57 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 057
وَأَمَّا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّـٰلِحَٰتِ فَيُوَفِّيهِمۡ أُجُورَهُمۡۗ وَٱللَّهُ لَا يُحِبُّ ٱلظَّـٰلِمِينَ
57. Mpe mpona baye bandimi mpe bazali kosala misala ya malamu, akopesa bango lifuta na bango. Mpe Allah alingaka babubi te.
58 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 058
ذَٰلِكَ نَتۡلُوهُ عَلَيۡكَ مِنَ ٱلۡأٓيَٰتِ وَٱلذِّكۡرِ ٱلۡحَكِيمِ
58. Wana ezali kati ya mikapo tozali kotangela yo mpe Emoniseli ya bwányá.
59 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 059
إِنَّ مَثَلَ عِيسَىٰ عِندَ ٱللَّهِ كَمَثَلِ ءَادَمَۖ خَلَقَهُۥ مِن تُرَابٖ ثُمَّ قَالَ لَهُۥ كُن فَيَكُونُ
59. Ya sôló, ndakisa ya Issa epai na Allah ezali lolenge moko na Âdam akelaki ye na mabele, na sima alobaki naye: “Zala”, mpe azalisamaki.
60 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 060
ٱلۡحَقُّ مِن رَّبِّكَ فَلَا تَكُن مِّنَ ٱلۡمُمۡتَرِينَ
60. Bosembo ezali nde epai na Nkolo nayo. Kasi kozala te elongo na baye bazali na koyimayima.
61 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 061
فَمَنۡ حَآجَّكَ فِيهِ مِنۢ بَعۡدِ مَا جَآءَكَ مِنَ ٱلۡعِلۡمِ فَقُلۡ تَعَالَوۡاْ نَدۡعُ أَبۡنَآءَنَا وَأَبۡنَآءَكُمۡ وَنِسَآءَنَا وَنِسَآءَكُمۡ وَأَنفُسَنَا وَأَنفُسَكُمۡ ثُمَّ نَبۡتَهِلۡ فَنَجۡعَل لَّعۡنَتَ ٱللَّهِ عَلَى ٱلۡكَٰذِبِينَ
61. Kasi oyo akotia yo ntembe, mpe kosuanisa yo na ntina na (Issa) mpe yo osili kozua boyebi, loba na bango ete: Boya tokutana, mpe tobenga bana na biso mpe bana na bino, basi na biso mpe basi na bino, biso mpe bino, na sima tomisenga ete botutu ya Allah ekitela bato ya lokuta kati na biso.
62 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 062
إِنَّ هَٰذَا لَهُوَ ٱلۡقَصَصُ ٱلۡحَقُّۚ وَمَا مِنۡ إِلَٰهٍ إِلَّا ٱللَّهُۚ وَإِنَّ ٱللَّهَ لَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
62. Ya sôló, oyo nde masapo ya bosembo. Mpe ezali na Nzambe mosusu te sé Allah. Ya sôló, Allah ye nde azali na bokasi, atonda bwanya.
63 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 063
فَإِن تَوَلَّوۡاْ فَإِنَّ ٱللَّهَ عَلِيمُۢ بِٱلۡمُفۡسِدِينَ
63. Mpe soki bapesi mikongo, ya sôló mpenza Allah ayebi babebisi.
64 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 064
قُلۡ يَـٰٓأَهۡلَ ٱلۡكِتَٰبِ تَعَالَوۡاْ إِلَىٰ كَلِمَةٖ سَوَآءِۭ بَيۡنَنَا وَبَيۡنَكُمۡ أَلَّا نَعۡبُدَ إِلَّا ٱللَّهَ وَلَا نُشۡرِكَ بِهِۦ شَيۡـٔٗا وَلَا يَتَّخِذَ بَعۡضُنَا بَعۡضًا أَرۡبَابٗا مِّن دُونِ ٱللَّهِۚ فَإِن تَوَلَّوۡاْ فَقُولُواْ ٱشۡهَدُواْ بِأَنَّا مُسۡلِمُونَ
64. Loba: Eh bino bato baye bozua buku! Boya na liloba moko oyo ekosangisa biso na bino ete: Tobondela Nzambe mosusu te sé Allah, mpe tosangisa ye na eloko te, mpe tozua ba Nkolo misusu te na botıki Allah. Soki bapesi mokongo, boloba na bango ete: Bozala banzeneneke ete biso nde tozali bandimi.
65 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 065
يَـٰٓأَهۡلَ ٱلۡكِتَٰبِ لِمَ تُحَآجُّونَ فِيٓ إِبۡرَٰهِيمَ وَمَآ أُنزِلَتِ ٱلتَّوۡرَىٰةُ وَٱلۡإِنجِيلُ إِلَّا مِنۢ بَعۡدِهِۦٓۚ أَفَلَا تَعۡقِلُونَ
65. Eh bino bato bozua buku! Mpona nini bozali kosuana mpona Ibrâhîm? Mpe bino boyebi ete torah(1) mpe indjil(1) mikitaki sé sima naye (Ibrâhîm)? Boye bino bozali kososola te?
1 Bótala na mokapo 3.
66 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 066
هَـٰٓأَنتُمۡ هَـٰٓؤُلَآءِ حَٰجَجۡتُمۡ فِيمَا لَكُم بِهِۦ عِلۡمٞ فَلِمَ تُحَآجُّونَ فِيمَا لَيۡسَ لَكُم بِهِۦ عِلۡمٞۚ وَٱللَّهُ يَعۡلَمُ وَأَنتُمۡ لَا تَعۡلَمُونَ
66. Tala bino, bozali kosuana na likambo oyo bino boyebi, kasi mpona nini bozali kosuana na likambo oyo boyebi te? Mpe Allah ayebi kasi bino boyebi te.
67 - Ali 'Imran (Family of Imran) - 067