البقرة

 

Al-Baqarah

 

The Cow

1 - Al-Baqarah (The Cow) - 001

الٓمٓ
1. Alif, Lâm, Mîm(1).
1 Ba suratu oyo: 2, 3, 7, 10, 11, 12, 13, 14, 15, 19, 20, 26, 27, 28, 29, 30, 31, 32, 36, 38, 40, 41, 42, 43, 44, 45, 46, 50, 68, Bibandeli na yango ezali ba letele oyo bantina na yango eyebani te, bandimbola na yango eyebi kaka ye moko Allah.

2 - Al-Baqarah (The Cow) - 002

ذَٰلِكَ ٱلۡكِتَٰبُ لَا رَيۡبَۛ فِيهِۛ هُدٗى لِّلۡمُتَّقِينَ
2. Buku eye ezali na ntembe te okati na yango ezali kokamba baye babangi (Allah).

3 - Al-Baqarah (The Cow) - 003

ٱلَّذِينَ يُؤۡمِنُونَ بِٱلۡغَيۡبِ وَيُقِيمُونَ ٱلصَّلَوٰةَ وَمِمَّا رَزَقۡنَٰهُمۡ يُنفِقُونَ
3. Ba oyo bandimi na mabombami mpe batelemisi losambo mpe kowuta na maye topesaki bango bazali kobimisa.

4 - Al-Baqarah (The Cow) - 004

وَٱلَّذِينَ يُؤۡمِنُونَ بِمَآ أُنزِلَ إِلَيۡكَ وَمَآ أُنزِلَ مِن قَبۡلِكَ وَبِٱلۡأٓخِرَةِ هُمۡ يُوقِنُونَ
4. Mpe ba oyo bazali kondima na maye makitisamaki epai nayo mpe na maye makitisamaki liboso nayo mpe bazali kondima na mokolo ya suka.

5 - Al-Baqarah (The Cow) - 005

أُوْلَـٰٓئِكَ عَلَىٰ هُدٗى مِّن رَّبِّهِمۡۖ وَأُوْلَـٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡمُفۡلِحُونَ
5. Bango nde bakambami kowuta epai ya Nkolo wa bango mpe bango nde balongi.

6 - Al-Baqarah (The Cow) - 006

إِنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ سَوَآءٌ عَلَيۡهِمۡ ءَأَنذَرۡتَهُمۡ أَمۡ لَمۡ تُنذِرۡهُمۡ لَا يُؤۡمِنُونَ
6. Ya sôló ba oyo bapengwa bazali bobele bongo, okebisa bango to okebisa bango te bakondimaka te.

7 - Al-Baqarah (The Cow) - 007

خَتَمَ ٱللَّهُ عَلَىٰ قُلُوبِهِمۡ وَعَلَىٰ سَمۡعِهِمۡۖ وَعَلَىٰٓ أَبۡصَٰرِهِمۡ غِشَٰوَةٞۖ وَلَهُمۡ عَذَابٌ عَظِيمٞ
7. Allah asila kokanga mitema mia bango mpe boyoki na bango, mpe azipi bomoni na bango mpe bakozua etumbu enene.

8 - Al-Baqarah (The Cow) - 008

وَمِنَ ٱلنَّاسِ مَن يَقُولُ ءَامَنَّا بِٱللَّهِ وَبِٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِ وَمَا هُم بِمُؤۡمِنِينَ
8. Mpe okati ya bato basusu bazali koloba ete tondimi na Allah, mpe na mokolo ya suka, mpe bango bazali bandimi te.

9 - Al-Baqarah (The Cow) - 009

يُخَٰدِعُونَ ٱللَّهَ وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَمَا يَخۡدَعُونَ إِلَّآ أَنفُسَهُمۡ وَمَا يَشۡعُرُونَ
9. Bakanisi ete bazali kokosa Allah na bandimi, nzoka nde bazali komikosa sé bango moko kasi bazali koyeba te.

10 - Al-Baqarah (The Cow) - 010

فِي قُلُوبِهِم مَّرَضٞ فَزَادَهُمُ ٱللَّهُ مَرَضٗاۖ وَلَهُمۡ عَذَابٌ أَلِيمُۢ بِمَا كَانُواْ يَكۡذِبُونَ
10. Okati ya mitema mia bango mitondi na bokono, mpe Allah akobakisela bango bokono ya makasi; mpe bazali na etumbu ya makasi na maye bazalaki kokosa.

11 - Al-Baqarah (The Cow) - 011

وَإِذَا قِيلَ لَهُمۡ لَا تُفۡسِدُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ قَالُوٓاْ إِنَّمَا نَحۡنُ مُصۡلِحُونَ
11. Mpe soki bayebisi bango bobebisa te okati ya mokili, bakolobaka ete: Ya sôló biso tozali babongisi.

12 - Al-Baqarah (The Cow) - 012

أَلَآ إِنَّهُمۡ هُمُ ٱلۡمُفۡسِدُونَ وَلَٰكِن لَّا يَشۡعُرُونَ
12. Kasi bango bazali babebisi, mpe bango bazali komiyeba te.

13 - Al-Baqarah (The Cow) - 013

وَإِذَا قِيلَ لَهُمۡ ءَامِنُواْ كَمَآ ءَامَنَ ٱلنَّاسُ قَالُوٓاْ أَنُؤۡمِنُ كَمَآ ءَامَنَ ٱلسُّفَهَآءُۗ أَلَآ إِنَّهُمۡ هُمُ ٱلسُّفَهَآءُ وَلَٰكِن لَّا يَعۡلَمُونَ
13. Mpe soki bayebisi bango, bondima ndenge bato bandimi, bakoloba ete: Boye, tondima lokola bazoba bandimi? Mpe ya sôló bango nde bazoba kasi bazali komiyeba te.

14 - Al-Baqarah (The Cow) - 014

وَإِذَا لَقُواْ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ قَالُوٓاْ ءَامَنَّا وَإِذَا خَلَوۡاْ إِلَىٰ شَيَٰطِينِهِمۡ قَالُوٓاْ إِنَّا مَعَكُمۡ إِنَّمَا نَحۡنُ مُسۡتَهۡزِءُونَ
14. Mpe soki bakutani na ba oyo bandima bakolobaka: Tondimi, soki bakutani epai ya bazabulu na bango, bakolobaka ete: Biso tozali elongo moko na bino, ya sôló tozali sé kotiola bango.

15 - Al-Baqarah (The Cow) - 015

ٱللَّهُ يَسۡتَهۡزِئُ بِهِمۡ وَيَمُدُّهُمۡ فِي طُغۡيَٰنِهِمۡ يَعۡمَهُونَ
15. Allah akotiolaka mpe bango, mpe akobakisela bango bopengwi na ntango molayi.

16 - Al-Baqarah (The Cow) - 016

أُوْلَـٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ ٱشۡتَرَوُاْ ٱلضَّلَٰلَةَ بِٱلۡهُدَىٰ فَمَا رَبِحَت تِّجَٰرَتُهُمۡ وَمَا كَانُواْ مُهۡتَدِينَ
16. Bango nde basila kosomba libungi batiki bokambemi, kasi mombongo mwa bango mozali na lifuti te, mpe bakokambama te.

17 - Al-Baqarah (The Cow) - 017

مَثَلُهُمۡ كَمَثَلِ ٱلَّذِي ٱسۡتَوۡقَدَ نَارٗا فَلَمَّآ أَضَآءَتۡ مَا حَوۡلَهُۥ ذَهَبَ ٱللَّهُ بِنُورِهِمۡ وَتَرَكَهُمۡ فِي ظُلُمَٰتٖ لَّا يُبۡصِرُونَ
17. Ndakisa na bango ezali lokola moto oyo apelisi móto, mpe na tango móto engali zinga zinga na yango Allah abungisi bongengi bwa bango, mpe atiki bango okati ya molili, bakomonaka te.

18 - Al-Baqarah (The Cow) - 018

صُمُّۢ بُكۡمٌ عُمۡيٞ فَهُمۡ لَا يَرۡجِعُونَ
18. Bakoyokaka bosembo ata moke te, mpe bakolobelaka yongo ata moke te, mpe bakomona yango ata moke te, mpe bakozongaka na bosembo te.

19 - Al-Baqarah (The Cow) - 019

أَوۡ كَصَيِّبٖ مِّنَ ٱلسَّمَآءِ فِيهِ ظُلُمَٰتٞ وَرَعۡدٞ وَبَرۡقٞ يَجۡعَلُونَ أَصَٰبِعَهُمۡ فِيٓ ءَاذَانِهِم مِّنَ ٱلصَّوَٰعِقِ حَذَرَ ٱلۡمَوۡتِۚ وَٱللَّهُ مُحِيطُۢ بِٱلۡكَٰفِرِينَ
19. Lokola mapata ya moyindo lolenge mbula eyaka mpe na lokito ya nkake na bazali kotia misapi na matoyi mia bango mpo na bobangi lokito ya nkake mpe mpona bobangi ete bakufa, mpe Allah azali mozingi ya bapengwi o bisika binso.

20 - Al-Baqarah (The Cow) - 020

يَكَادُ ٱلۡبَرۡقُ يَخۡطَفُ أَبۡصَٰرَهُمۡۖ كُلَّمَآ أَضَآءَ لَهُم مَّشَوۡاْ فِيهِ وَإِذَآ أَظۡلَمَ عَلَيۡهِمۡ قَامُواْۚ وَلَوۡ شَآءَ ٱللَّهُ لَذَهَبَ بِسَمۡعِهِمۡ وَأَبۡصَٰرِهِمۡۚ إِنَّ ٱللَّهَ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٞ
20. Etikalaki sé moke eboma miso na bango mikalali, tango inso bongengi wana ekomeli bango bakotambola, mpe soki molili mozongi batelemi, kasi soki Allah alingaki nde abomi boyoki mpe bomoni bwa bango, ya sôló Allah azali na nguya likolo lia biloko binso.

21 - Al-Baqarah (The Cow) - 021

يَـٰٓأَيُّهَا ٱلنَّاسُ ٱعۡبُدُواْ رَبَّكُمُ ٱلَّذِي خَلَقَكُمۡ وَٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِكُمۡ لَعَلَّكُمۡ تَتَّقُونَ
21. Eh bino bato! Bobondela Nkolo wa bino oyo akeli bino mpe akeli ba oyo balekaki liboso na bino mpo bozwa bobangi.

22 - Al-Baqarah (The Cow) - 022

ٱلَّذِي جَعَلَ لَكُمُ ٱلۡأَرۡضَ فِرَٰشٗا وَٱلسَّمَآءَ بِنَآءٗ وَأَنزَلَ مِنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءٗ فَأَخۡرَجَ بِهِۦ مِنَ ٱلثَّمَرَٰتِ رِزۡقٗا لَّكُمۡۖ فَلَا تَجۡعَلُواْ لِلَّهِ أَندَادٗا وَأَنتُمۡ تَعۡلَمُونَ
22. Ye nde oyo akeli mpo na bino mabele lokola mbeto, mpe likolo lokola etando, mpe azali kokitisa mayi kowuta likolo, mpe azali kobimisa na yango bambuma ya lolenge nyonso ezala bozwi mpo na bino, mpe bozuela Allah basangisi te wana bosili koyeba.

23 - Al-Baqarah (The Cow) - 023

وَإِن كُنتُمۡ فِي رَيۡبٖ مِّمَّا نَزَّلۡنَا عَلَىٰ عَبۡدِنَا فَأۡتُواْ بِسُورَةٖ مِّن مِّثۡلِهِۦ وَٱدۡعُواْ شُهَدَآءَكُم مِّن دُونِ ٱللَّهِ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
23. Mpe soki bozali na ntembe na maye tokitisaki epai ya mowumbu na biso, boya na suratu lolenge na yango mpe bobenga banzeneneke na bino(1) na botiki Allah soki bozali bato ya bosembo.
1 Baye oyo bazali kobondela na botiki Allah.

24 - Al-Baqarah (The Cow) - 024

فَإِن لَّمۡ تَفۡعَلُواْ وَلَن تَفۡعَلُواْ فَٱتَّقُواْ ٱلنَّارَ ٱلَّتِي وَقُودُهَا ٱلنَّاسُ وَٱلۡحِجَارَةُۖ أُعِدَّتۡ لِلۡكَٰفِرِينَ
24. Mpe soki bosali yango te, mpe bokokoka kosala yango te, bobanga móto oyo nkoni na yango ekozala bato na mabanga, elengelami mpona bapengwi.

25 - Al-Baqarah (The Cow) - 025

وَبَشِّرِ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّـٰلِحَٰتِ أَنَّ لَهُمۡ جَنَّـٰتٖ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُۖ كُلَّمَا رُزِقُواْ مِنۡهَا مِن ثَمَرَةٖ رِّزۡقٗا قَالُواْ هَٰذَا ٱلَّذِي رُزِقۡنَا مِن قَبۡلُۖ وَأُتُواْ بِهِۦ مُتَشَٰبِهٗاۖ وَلَهُمۡ فِيهَآ أَزۡوَٰجٞ مُّطَهَّرَةٞۖ وَهُمۡ فِيهَا خَٰلِدُونَ
25. Mpe pesa sango ya malamu epai na ba oyo bandimi mpe bazali kosala misala ya malamu, ya sôló bakozala na bisika mingala mikotiola na nsé na yango. Ntango inso bazali koleisama na bambuma, bakoloba ete: Oyo nde (mbuma) toleisamaki liboso kasi, ekozala na lolenge mosusu. Mpe okati ya lola bakozala na basi baye bapetolama mpe kuna(1), bakozala seko na seko.
1 Na kati ya lola.

26 - Al-Baqarah (The Cow) - 026

۞إِنَّ ٱللَّهَ لَا يَسۡتَحۡيِۦٓ أَن يَضۡرِبَ مَثَلٗا مَّا بَعُوضَةٗ فَمَا فَوۡقَهَاۚ فَأَمَّا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ فَيَعۡلَمُونَ أَنَّهُ ٱلۡحَقُّ مِن رَّبِّهِمۡۖ وَأَمَّا ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ فَيَقُولُونَ مَاذَآ أَرَادَ ٱللَّهُ بِهَٰذَا مَثَلٗاۘ يُضِلُّ بِهِۦ كَثِيرٗا وَيَهۡدِي بِهِۦ كَثِيرٗاۚ وَمَا يُضِلُّ بِهِۦٓ إِلَّا ٱلۡفَٰسِقِينَ
26. Ya sôló, Allah azalaka na nsoni te ya kopesa ndakisa na eloko songolo oyo ye alingi ata soki ezali eloko moke lokola ngungi to mpe ndakisa mosusu likolo na yango. Mpe mpona ba oyo bandima bazali koyeba ete yango ezali bosembo kowuta epai ya Nkolo na bango. Mpe baye bapengwa, bakoloba ete nini Allah alingi koloba na bandakisa eye? Mpona yango bayike(1) bakozala na bobungi mpe bayike bakokambama, kasi, sé bato mabe nde bazali kobungisama na yango.
1 Ebele.

27 - Al-Baqarah (The Cow) - 027

ٱلَّذِينَ يَنقُضُونَ عَهۡدَ ٱللَّهِ مِنۢ بَعۡدِ مِيثَٰقِهِۦ وَيَقۡطَعُونَ مَآ أَمَرَ ٱللَّهُ بِهِۦٓ أَن يُوصَلَ وَيُفۡسِدُونَ فِي ٱلۡأَرۡضِۚ أُوْلَـٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡخَٰسِرُونَ
27. Baye bazali kokata boyokani eye bayokanaki na Allah, mpe bazali kokabola maye Allah apesaki ndingisa ete ekangisama, mpe bazali kobebisa okati ya mabele; bango nde bazali bazangi.

28 - Al-Baqarah (The Cow) - 028

كَيۡفَ تَكۡفُرُونَ بِٱللَّهِ وَكُنتُمۡ أَمۡوَٰتٗا فَأَحۡيَٰكُمۡۖ ثُمَّ يُمِيتُكُمۡ ثُمَّ يُحۡيِيكُمۡ ثُمَّ إِلَيۡهِ تُرۡجَعُونَ
28. Ndenge nini bokopengwa na Allah mpe bozalaki bibembe mpe apesi bino bomoyi? Sima akoboma bino, sima akosekwisa bino mpe epai naye nde bokozongisama.

29 - Al-Baqarah (The Cow) - 029

هُوَ ٱلَّذِي خَلَقَ لَكُم مَّا فِي ٱلۡأَرۡضِ جَمِيعٗا ثُمَّ ٱسۡتَوَىٰٓ إِلَى ٱلسَّمَآءِ فَسَوَّىٰهُنَّ سَبۡعَ سَمَٰوَٰتٖۚ وَهُوَ بِكُلِّ شَيۡءٍ عَلِيمٞ
29. Ye nde akeli mpo na bino maye manso mazuami o mabele, sima amitalisi na mapata, mpe akeli mapata nsambo, ye nde azali na boyebi ya biloko binso.

30 - Al-Baqarah (The Cow) - 030

وَإِذۡ قَالَ رَبُّكَ لِلۡمَلَـٰٓئِكَةِ إِنِّي جَاعِلٞ فِي ٱلۡأَرۡضِ خَلِيفَةٗۖ قَالُوٓاْ أَتَجۡعَلُ فِيهَا مَن يُفۡسِدُ فِيهَا وَيَسۡفِكُ ٱلدِّمَآءَ وَنَحۡنُ نُسَبِّحُ بِحَمۡدِكَ وَنُقَدِّسُ لَكَۖ قَالَ إِنِّيٓ أَعۡلَمُ مَا لَا تَعۡلَمُونَ
30. Mpe tango Nkolo wa yo alobaki na ba anzelu ete: Ya sôló ngai nalingi kotia na mabele mokitani. Bayanolaki ete: Olingi otia kati na mabele oyo akobebisa mpe akosopa makila? Mpe biso tozali kokumisa yo mpe tozali kokumisa bosantu bwayo. (Allah) alobaki ete: Ya sôló ngai nazali na boyebi na maye bino boyebi te.

31 - Al-Baqarah (The Cow) - 031

وَعَلَّمَ ءَادَمَ ٱلۡأَسۡمَآءَ كُلَّهَا ثُمَّ عَرَضَهُمۡ عَلَى ٱلۡمَلَـٰٓئِكَةِ فَقَالَ أَنۢبِـُٔونِي بِأَسۡمَآءِ هَـٰٓؤُلَآءِ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
31. Mpe atangisaki Âdam bankombo ya bikelamu binso, nsima atiaki yango liboso ya ba anzelu mpe alobaki: Botangela ngai bankombo ya bikelamu biye soki ya sôló bozali na bosembo.

32 - Al-Baqarah (The Cow) - 032

قَالُواْ سُبۡحَٰنَكَ لَا عِلۡمَ لَنَآ إِلَّا مَا عَلَّمۡتَنَآۖ إِنَّكَ أَنتَ ٱلۡعَلِيمُ ٱلۡحَكِيمُ
32. Bayanoli: Lokumu nayo! Tozali na boyebi te kaka na maye otangisaki biso. Ya sôló yo ozali moyebi ya manso mpe otondi na bwanya.

33 - Al-Baqarah (The Cow) - 033

قَالَ يَـٰٓـَٔادَمُ أَنۢبِئۡهُم بِأَسۡمَآئِهِمۡۖ فَلَمَّآ أَنۢبَأَهُم بِأَسۡمَآئِهِمۡ قَالَ أَلَمۡ أَقُل لَّكُمۡ إِنِّيٓ أَعۡلَمُ غَيۡبَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَأَعۡلَمُ مَا تُبۡدُونَ وَمَا كُنتُمۡ تَكۡتُمُونَ
33. Alobaki: Eh Âdam! tangela bango bankombo ya bikelamu biye. Mpe na tango atangelaki bango bankombo na yango, (Allah) alobaki: Nayebisaki bino te ete ya sôló ngai nayebi mabombami ya likolo na ya nsé mpe nayebi maye bobimisaka polele na maye bobombaka?

34 - Al-Baqarah (The Cow) - 034

وَإِذۡ قُلۡنَا لِلۡمَلَـٰٓئِكَةِ ٱسۡجُدُواْ لِأٓدَمَ فَسَجَدُوٓاْ إِلَّآ إِبۡلِيسَ أَبَىٰ وَٱسۡتَكۡبَرَ وَكَانَ مِنَ ٱلۡكَٰفِرِينَ
34. Mpe na tango toyebisaki na ba anzelu bogumbamela Âdam, banso bagumbamaki longola sé ibilisi(1) oyo atondisamaki na lolendo mpe azalaki okati ya bapengwi.
1 Satana.

35 - Al-Baqarah (The Cow) - 035

وَقُلۡنَا يَـٰٓـَٔادَمُ ٱسۡكُنۡ أَنتَ وَزَوۡجُكَ ٱلۡجَنَّةَ وَكُلَا مِنۡهَا رَغَدًا حَيۡثُ شِئۡتُمَا وَلَا تَقۡرَبَا هَٰذِهِ ٱلشَّجَرَةَ فَتَكُونَا مِنَ ٱلظَّـٰلِمِينَ
35. Mpe tolobaki: Eh Âdam! Fanda na mwasi nayo okati ya lola, mpe bolia binso biye bokolinga, mpe bobeleme te penepene na nzete oyo, soki bobelemi penepene na yango bokozala elongo ya babubi.

36 - Al-Baqarah (The Cow) - 036

فَأَزَلَّهُمَا ٱلشَّيۡطَٰنُ عَنۡهَا فَأَخۡرَجَهُمَا مِمَّا كَانَا فِيهِۖ وَقُلۡنَا ٱهۡبِطُواْ بَعۡضُكُمۡ لِبَعۡضٍ عَدُوّٞۖ وَلَكُمۡ فِي ٱلۡأَرۡضِ مُسۡتَقَرّٞ وَمَتَٰعٌ إِلَىٰ حِينٖ
36. Mpe na sima satana akosaki bango mpe abimisaki bango o esika eye bazwamaki. Mpe tolobaki bokita bino na bino bokozala banguna mpe bokozala o mabele na bisengo ya ngonga moke.

37 - Al-Baqarah (The Cow) - 037

فَتَلَقَّىٰٓ ءَادَمُ مِن رَّبِّهِۦ كَلِمَٰتٖ فَتَابَ عَلَيۡهِۚ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلتَّوَّابُ ٱلرَّحِيمُ
37. Mpe Âdam azuaki maloba ya bolimbisi epai ya Nkolo wa ye, mpe (Allah) alimbisaki ye, ya sôló ye azali moyoki tubela mpe atonda ngolu.

38 - Al-Baqarah (The Cow) - 038

قُلۡنَا ٱهۡبِطُواْ مِنۡهَا جَمِيعٗاۖ فَإِمَّا يَأۡتِيَنَّكُم مِّنِّي هُدٗى فَمَن تَبِعَ هُدَايَ فَلَا خَوۡفٌ عَلَيۡهِمۡ وَلَا هُمۡ يَحۡزَنُونَ
38. Mpe tolobaki: Bokita bino banso, kowuta nakati na yango!(1) mpe ya sôló tango inso bokambami ekokomela bino uta epayi na ngai, ba oyo bakolanda bokambami bwa ngai, bakozala na bobangi te, mpe bakozala na mawa te.
1 Lola.

39 - Al-Baqarah (The Cow) - 039

وَٱلَّذِينَ كَفَرُواْ وَكَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِنَآ أُوْلَـٰٓئِكَ أَصۡحَٰبُ ٱلنَّارِۖ هُمۡ فِيهَا خَٰلِدُونَ
39. mpe baye bapengwa mpe bazali kobuka lokuta na mikapo na biso, bango nde bato ya lifelo. Bakozala seko o kati na yango.

40 - Al-Baqarah (The Cow) - 040

يَٰبَنِيٓ إِسۡرَـٰٓءِيلَ ٱذۡكُرُواْ نِعۡمَتِيَ ٱلَّتِيٓ أَنۡعَمۡتُ عَلَيۡكُمۡ وَأَوۡفُواْ بِعَهۡدِيٓ أُوفِ بِعَهۡدِكُمۡ وَإِيَّـٰيَ فَٱرۡهَبُونِ
40. Eh bana ya Isalayele! Bokanisa bolamu na ngai oyo napesaki bino, mpe bokokisa elaka na ngai na kokisa elaka na bino. Mpe ngai nde esengeli bobanga.

41 - Al-Baqarah (The Cow) - 041

وَءَامِنُواْ بِمَآ أَنزَلۡتُ مُصَدِّقٗا لِّمَا مَعَكُمۡ وَلَا تَكُونُوٓاْ أَوَّلَ كَافِرِۭ بِهِۦۖ وَلَا تَشۡتَرُواْ بِـَٔايَٰتِي ثَمَنٗا قَلِيلٗا وَإِيَّـٰيَ فَٱتَّقُونِ
41. Mpe bondima maye nakitisaki, ezali kondima na maye bozali nayango, mpe bozala te bato ya liboso mpona koboya yango. Mpe boteka te mikapo mia ngai na ntalo moke, mpe nga nde esengeli bobanga.

42 - Al-Baqarah (The Cow) - 042

وَلَا تَلۡبِسُواْ ٱلۡحَقَّ بِٱلۡبَٰطِلِ وَتَكۡتُمُواْ ٱلۡحَقَّ وَأَنتُمۡ تَعۡلَمُونَ
42. Mpe bosangisa bosembo na lokuta te, mpe bozali kobomba bosembo mpe na bino bozali koyeba.

43 - Al-Baqarah (The Cow) - 043

وَأَقِيمُواْ ٱلصَّلَوٰةَ وَءَاتُواْ ٱلزَّكَوٰةَ وَٱرۡكَعُواْ مَعَ ٱلرَّـٰكِعِينَ
43. Mpe botelemisa losambo, mpe bobimisa zakat(1), mpe bogumbama elongo na bagumbami.
1 Zakat: Ezali likabo oyo bato ya bozwi bapesaka babola mbala moko na mbula.

44 - Al-Baqarah (The Cow) - 044

۞أَتَأۡمُرُونَ ٱلنَّاسَ بِٱلۡبِرِّ وَتَنسَوۡنَ أَنفُسَكُمۡ وَأَنتُمۡ تَتۡلُونَ ٱلۡكِتَٰبَۚ أَفَلَا تَعۡقِلُونَ
44. Bozali kotinda bato na bolamu mpe bozali komibosana bino moko, mpe bino bozali kotanga buku? Boye bozali na bososoli te?

45 - Al-Baqarah (The Cow) - 045

وَٱسۡتَعِينُواْ بِٱلصَّبۡرِ وَٱلصَّلَوٰةِۚ وَإِنَّهَا لَكَبِيرَةٌ إِلَّا عَلَى ٱلۡخَٰشِعِينَ
45. Boluka lisalisi na koyika mpiko mpe na losambo, pamba te yango ezali mpasi te epai ya babangi (Allah).

46 - Al-Baqarah (The Cow) - 046

ٱلَّذِينَ يَظُنُّونَ أَنَّهُم مُّلَٰقُواْ رَبِّهِمۡ وَأَنَّهُمۡ إِلَيۡهِ رَٰجِعُونَ
46. Baye bazali kolikia ete ya sôló bakokutana na Nkolo na bango, mpe ya sôló epai naye nde bakozongaka.

47 - Al-Baqarah (The Cow) - 047

يَٰبَنِيٓ إِسۡرَـٰٓءِيلَ ٱذۡكُرُواْ نِعۡمَتِيَ ٱلَّتِيٓ أَنۡعَمۡتُ عَلَيۡكُمۡ وَأَنِّي فَضَّلۡتُكُمۡ عَلَى ٱلۡعَٰلَمِينَ
47. Eh bino bana ya Isalayele! Bokanisa bolamu na ngai napesaki epai na bino, mpe ya sôló ngai napesa bino lokumu likolo ya mokili mobimba(1).
1 Na tango na Bango.

48 - Al-Baqarah (The Cow) - 048

وَٱتَّقُواْ يَوۡمٗا لَّا تَجۡزِي نَفۡسٌ عَن نَّفۡسٖ شَيۡـٔٗا وَلَا يُقۡبَلُ مِنۡهَا شَفَٰعَةٞ وَلَا يُؤۡخَذُ مِنۡهَا عَدۡلٞ وَلَا هُمۡ يُنصَرُونَ
48. Mpe bobanga mokolo moye molimo moko mokosalisaka mosusu ata na eloko moko te, mpe bobondeli ekondimama te, mpe bosikoli ekoyambama te, mpe bakozua lisungi te.

49 - Al-Baqarah (The Cow) - 049

وَإِذۡ نَجَّيۡنَٰكُم مِّنۡ ءَالِ فِرۡعَوۡنَ يَسُومُونَكُمۡ سُوٓءَ ٱلۡعَذَابِ يُذَبِّحُونَ أَبۡنَآءَكُمۡ وَيَسۡتَحۡيُونَ نِسَآءَكُمۡۚ وَفِي ذَٰلِكُم بَلَآءٞ مِّن رَّبِّكُمۡ عَظِيمٞ
49. Mpe ntango tobikisaki bino epai ya bato ya falo, bazalaki konyokola bino na bitumbu binene, bazalaki kokata bakingo ya bana na bino mpe bazalaki kotika basi na bino na bomoyi mpe bozalaki na mimekano minene kowuta epai ya Nkolo wa bino.

50 - Al-Baqarah (The Cow) - 050

وَإِذۡ فَرَقۡنَا بِكُمُ ٱلۡبَحۡرَ فَأَنجَيۡنَٰكُمۡ وَأَغۡرَقۡنَآ ءَالَ فِرۡعَوۡنَ وَأَنتُمۡ تَنظُرُونَ
50. Mpe tango tokabolaki ebale mpo na bino (bokatisa ngambo esusu), mpe ya sôló tobikisaki bino mpe tozindisaki bato ya falo okati ya mayi, na bino bozalaki komona.

51 - Al-Baqarah (The Cow) - 051

وَإِذۡ وَٰعَدۡنَا مُوسَىٰٓ أَرۡبَعِينَ لَيۡلَةٗ ثُمَّ ٱتَّخَذۡتُمُ ٱلۡعِجۡلَ مِنۢ بَعۡدِهِۦ وَأَنتُمۡ ظَٰلِمُونَ
51. Mpe tango topesaki elaka epai ya Mûssa babutu ntuku minei, mpe bobondelaki mwana ngombe sima naye, mpe bozalaki babubi.

52 - Al-Baqarah (The Cow) - 052

ثُمَّ عَفَوۡنَا عَنكُم مِّنۢ بَعۡدِ ذَٰلِكَ لَعَلَّكُمۡ تَشۡكُرُونَ
52. Sima, tolimbisaki bino na yango, mpo ete bokoka kotondo.

53 - Al-Baqarah (The Cow) - 053

وَإِذۡ ءَاتَيۡنَا مُوسَى ٱلۡكِتَٰبَ وَٱلۡفُرۡقَانَ لَعَلَّكُمۡ تَهۡتَدُونَ
53. Mpe tango topesaki Mûssa buku mpe bososoli mpo ete bino bokambama.

54 - Al-Baqarah (The Cow) - 054

وَإِذۡ قَالَ مُوسَىٰ لِقَوۡمِهِۦ يَٰقَوۡمِ إِنَّكُمۡ ظَلَمۡتُمۡ أَنفُسَكُم بِٱتِّخَاذِكُمُ ٱلۡعِجۡلَ فَتُوبُوٓاْ إِلَىٰ بَارِئِكُمۡ فَٱقۡتُلُوٓاْ أَنفُسَكُمۡ ذَٰلِكُمۡ خَيۡرٞ لَّكُمۡ عِندَ بَارِئِكُمۡ فَتَابَ عَلَيۡكُمۡۚ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلتَّوَّابُ ٱلرَّحِيمُ
54. Mpe tango Mûssa alobaki na bato naye: Eh bino bato na ngai! ya sôló bino bomibubaki bino moko mpona kobondela mwana ngombe mpe botubela epai na Nkolo na bino, bomiboma kati kati na bino, wana nde ezali malamu epai ya Nkolo na bino. Mpe ayambi tubela na bino, ya sôló ye nde molimbisi atonda ngolu.

55 - Al-Baqarah (The Cow) - 055

وَإِذۡ قُلۡتُمۡ يَٰمُوسَىٰ لَن نُّؤۡمِنَ لَكَ حَتَّىٰ نَرَى ٱللَّهَ جَهۡرَةٗ فَأَخَذَتۡكُمُ ٱلصَّـٰعِقَةُ وَأَنتُمۡ تَنظُرُونَ
55. Mpe tango bolobaki: Eh Mûssa! Tokoki kondimela yo te kino tomona Allah polele, lokito ya nkake ebetaki bino, mpe bino bozalaki kotala.

56 - Al-Baqarah (The Cow) - 056

ثُمَّ بَعَثۡنَٰكُم مِّنۢ بَعۡدِ مَوۡتِكُمۡ لَعَلَّكُمۡ تَشۡكُرُونَ
56. Sima, tosekwisaki bino sima ya bino kokufa mpo ete bokoka kotondo.

57 - Al-Baqarah (The Cow) - 057

وَظَلَّلۡنَا عَلَيۡكُمُ ٱلۡغَمَامَ وَأَنزَلۡنَا عَلَيۡكُمُ ٱلۡمَنَّ وَٱلسَّلۡوَىٰۖ كُلُواْ مِن طَيِّبَٰتِ مَا رَزَقۡنَٰكُمۡۚ وَمَا ظَلَمُونَا وَلَٰكِن كَانُوٓاْ أَنفُسَهُمۡ يَظۡلِمُونَ
57. Mpe tobombaki bino okati ya elili ya londende, mpe tokitiselaki bino manna(1) mpe salwa,(2) bolia bilei ya malamu biye bipesamaki mpona bino, mpe babubaki biso te kasi bango moko bamibubaki.
1 Manna: Ezali: Masanga ya sukali oyo ezali lokola mafuta ya nzoyi. 2 Salwa: Ezali: Ndeke ya moke oyo ezali na mosuni ya elengi.

58 - Al-Baqarah (The Cow) - 058

وَإِذۡ قُلۡنَا ٱدۡخُلُواْ هَٰذِهِ ٱلۡقَرۡيَةَ فَكُلُواْ مِنۡهَا حَيۡثُ شِئۡتُمۡ رَغَدٗا وَٱدۡخُلُواْ ٱلۡبَابَ سُجَّدٗا وَقُولُواْ حِطَّةٞ نَّغۡفِرۡ لَكُمۡ خَطَٰيَٰكُمۡۚ وَسَنَزِيدُ ٱلۡمُحۡسِنِينَ
58. Mpe o tango tolobaki: Bokota na etuka eye, mpe bolia okati na yango ndenge bokosepela, mpe bokota na ekuke na bofukami, mpe boloba maloba ya bolimbisi, tokolimbisa mbeba na bino mpe tokobakisela bato ya malamu bolamu.

59 - Al-Baqarah (The Cow) - 059

فَبَدَّلَ ٱلَّذِينَ ظَلَمُواْ قَوۡلًا غَيۡرَ ٱلَّذِي قِيلَ لَهُمۡ فَأَنزَلۡنَا عَلَى ٱلَّذِينَ ظَلَمُواْ رِجۡزٗا مِّنَ ٱلسَّمَآءِ بِمَا كَانُواْ يَفۡسُقُونَ
59. Mpe babubi bayaki na liloba mosusu bayebisaki bango te, mpe tokitiselaki bango etumbu na likolo mpo na mabe bazaliki kosala.

60 - Al-Baqarah (The Cow) - 060

۞وَإِذِ ٱسۡتَسۡقَىٰ مُوسَىٰ لِقَوۡمِهِۦ فَقُلۡنَا ٱضۡرِب بِّعَصَاكَ ٱلۡحَجَرَۖ فَٱنفَجَرَتۡ مِنۡهُ ٱثۡنَتَا عَشۡرَةَ عَيۡنٗاۖ قَدۡ عَلِمَ كُلُّ أُنَاسٖ مَّشۡرَبَهُمۡۖ كُلُواْ وَٱشۡرَبُواْ مِن رِّزۡقِ ٱللَّهِ وَلَا تَعۡثَوۡاْ فِي ٱلۡأَرۡضِ مُفۡسِدِينَ
60. Mpe tango Mûssa alukaki lolenge ya komelisa bato naye (mayi), mpe tolobaki naye: beta lingenda nayo likolo ya libanga. Mpe tango abetaki ekabwanaki na biteni zomi na mibale ya mingala, bato banso bayebaki bisika bakomela, bolia mpe bomele kowuta na bozui oyo Allah apesi bino, kasi botia mobulu okati ya mabele te.

61 - Al-Baqarah (The Cow) - 061

وَإِذۡ قُلۡتُمۡ يَٰمُوسَىٰ لَن نَّصۡبِرَ عَلَىٰ طَعَامٖ وَٰحِدٖ فَٱدۡعُ لَنَا رَبَّكَ يُخۡرِجۡ لَنَا مِمَّا تُنۢبِتُ ٱلۡأَرۡضُ مِنۢ بَقۡلِهَا وَقِثَّآئِهَا وَفُومِهَا وَعَدَسِهَا وَبَصَلِهَاۖ قَالَ أَتَسۡتَبۡدِلُونَ ٱلَّذِي هُوَ أَدۡنَىٰ بِٱلَّذِي هُوَ خَيۡرٌۚ ٱهۡبِطُواْ مِصۡرٗا فَإِنَّ لَكُم مَّا سَأَلۡتُمۡۗ وَضُرِبَتۡ عَلَيۡهِمُ ٱلذِّلَّةُ وَٱلۡمَسۡكَنَةُ وَبَآءُو بِغَضَبٖ مِّنَ ٱللَّهِۚ ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ كَانُواْ يَكۡفُرُونَ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ وَيَقۡتُلُونَ ٱلنَّبِيِّـۧنَ بِغَيۡرِ ٱلۡحَقِّۚ ذَٰلِكَ بِمَا عَصَواْ وَّكَانُواْ يَعۡتَدُونَ
61. Mpe bino bokanisa tango bolobaki: Eh Mûssa! biso tolembi kolia bilei sé moko. Bondela na Nkolo nayo (Allah) mpo abimisa pona biso bilei kowuta na mabele ebimisa: Ndunda, maboke, hayi, solo mpe matungulu, alobi: Bolingi bobalola oyo ya malamu koleka na oyo ya mokie? Boye bokita(bokende) na engumba eye bino bolingi, mpe bino ya sôló bokozua oyo bozali kosenga. Mpe minyoko mibetaki bango bozangi, mpe bokono mpe kanda ya Allah ekitelaki bango. Nyonso wana mpo ya sôló bango bazalaka kopengwa na bilembo ya Allah, mpe bazalaki koboma bantoma mpamba. Nyonso wana mpo bazalaka koboya kotosa mpe balekisaki ndelo.

62 - Al-Baqarah (The Cow) - 062

إِنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَٱلَّذِينَ هَادُواْ وَٱلنَّصَٰرَىٰ وَٱلصَّـٰبِـِٔينَ مَنۡ ءَامَنَ بِٱللَّهِ وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِ وَعَمِلَ صَٰلِحٗا فَلَهُمۡ أَجۡرُهُمۡ عِندَ رَبِّهِمۡ وَلَا خَوۡفٌ عَلَيۡهِمۡ وَلَا هُمۡ يَحۡزَنُونَ
62. Ya sôló, baye bandima mpe baye bamikomisi bayuda mpe baklisto na baswâbi-îna(1) oyo akondima na Allah mpe na mokolo mwa suka mpe asali misala ya malamu, bakofutama epai ya Nkolo wa bango, mpe bakozala na bobangi te, mpe mawa te.
1 Baswâbi-îna: Bazali bayuda te mpe baklisto te, kasi bazali ba sangisi Allah.

63 - Al-Baqarah (The Cow) - 063

وَإِذۡ أَخَذۡنَا مِيثَٰقَكُمۡ وَرَفَعۡنَا فَوۡقَكُمُ ٱلطُّورَ خُذُواْ مَآ ءَاتَيۡنَٰكُم بِقُوَّةٖ وَٱذۡكُرُواْ مَا فِيهِ لَعَلَّكُمۡ تَتَّقُونَ
63. Mpe bokanisa mikano miye tozuelaki bino, mpe totombolaki likolo na bino ngomba, bosimba maye topesi bino makasi mpe bokanisa maye mazali na kati na yango mpo ete bozala na bobangi (ya Allah).

64 - Al-Baqarah (The Cow) - 064

ثُمَّ تَوَلَّيۡتُم مِّنۢ بَعۡدِ ذَٰلِكَۖ فَلَوۡلَا فَضۡلُ ٱللَّهِ عَلَيۡكُمۡ وَرَحۡمَتُهُۥ لَكُنتُم مِّنَ ٱلۡخَٰسِرِينَ
64. Sima bopesaki yango mokongo, mpe soki ezalaki bolamu ya Allah likolo ya bino mpe mawa naye te, nde bolingaki bozala na molongo ya bazangi.

65 - Al-Baqarah (The Cow) - 065

وَلَقَدۡ عَلِمۡتُمُ ٱلَّذِينَ ٱعۡتَدَوۡاْ مِنكُمۡ فِي ٱلسَّبۡتِ فَقُلۡنَا لَهُمۡ كُونُواْ قِرَدَةً خَٰسِـِٔينَ
65. Mpe ya sôló boyebaki baye oyo balekisaki ndelo na kati ya bino mpona mokolo mwa mposo, mpe tolobaki na bango: bozala bamakako biloko bizangi ntina.

66 - Al-Baqarah (The Cow) - 066

فَجَعَلۡنَٰهَا نَكَٰلٗا لِّمَا بَيۡنَ يَدَيۡهَا وَمَا خَلۡفَهَا وَمَوۡعِظَةٗ لِّلۡمُتَّقِينَ
66. Mpe totiaki yango ezala ndakisa mpona bingumba biye bizalaki zingazinga na yango mpe ezalaki toli mpona babangi.

67 - Al-Baqarah (The Cow) - 067

وَإِذۡ قَالَ مُوسَىٰ لِقَوۡمِهِۦٓ إِنَّ ٱللَّهَ يَأۡمُرُكُمۡ أَن تَذۡبَحُواْ بَقَرَةٗۖ قَالُوٓاْ أَتَتَّخِذُنَا هُزُوٗاۖ قَالَ أَعُوذُ بِٱللَّهِ أَنۡ أَكُونَ مِنَ ٱلۡجَٰهِلِينَ
67. Mpe tango Mûssa alobaki na bato naye: Ya sôló, Allah apesi na bino mobeko ete: Boboma ngombe. Balobaki: yo ozali kozua biso na maseki? (Mûssa) alobaki ete: Na mibateli epai ya Allah mpo ete nazala te na molongo ya bazoba.

68 - Al-Baqarah (The Cow) - 068

قَالُواْ ٱدۡعُ لَنَا رَبَّكَ يُبَيِّن لَّنَا مَا هِيَۚ قَالَ إِنَّهُۥ يَقُولُ إِنَّهَا بَقَرَةٞ لَّا فَارِضٞ وَلَا بِكۡرٌ عَوَانُۢ بَيۡنَ ذَٰلِكَۖ فَٱفۡعَلُواْ مَا تُؤۡمَرُونَ
68. Balobaki: Sengela biso Nkolo nayo alakisa biso ngombe wana ezali ndenge nini. (Mûssa) alobi: Ya sôló ye Nkolo alobi: Ya sôló ngombe wana ezali mobange te mpe elenge te, ezali na kati kati ya wana. Mpe bosala maye botindami.

69 - Al-Baqarah (The Cow) - 069

قَالُواْ ٱدۡعُ لَنَا رَبَّكَ يُبَيِّن لَّنَا مَا لَوۡنُهَاۚ قَالَ إِنَّهُۥ يَقُولُ إِنَّهَا بَقَرَةٞ صَفۡرَآءُ فَاقِعٞ لَّوۡنُهَا تَسُرُّ ٱلنَّـٰظِرِينَ
69. Balobaki: Sengela biso Nkolo wa yo alakisa biso polele langi na yango ezali nini. (Mûssa) alobaki: Ya sôló ye Nkolo na bino alobi: Ya sôló ngombe wana ezali na langi ya mosaka ya makasi(1) esepelisa bato tango bakomona yango.
1 Mayi ya mosaka.

70 - Al-Baqarah (The Cow) - 070

قَالُواْ ٱدۡعُ لَنَا رَبَّكَ يُبَيِّن لَّنَا مَا هِيَ إِنَّ ٱلۡبَقَرَ تَشَٰبَهَ عَلَيۡنَا وَإِنَّآ إِن شَآءَ ٱللَّهُ لَمُهۡتَدُونَ
70. Balobaki: Sengela biso Nkolo wa yo alakisa polele ngombe yango, ya sôló, epai na biso bangombe bazali lolenge moko. Mpe ya sôló biso na bolingi ya Allah tokokambama.

71 - Al-Baqarah (The Cow) - 071

قَالَ إِنَّهُۥ يَقُولُ إِنَّهَا بَقَرَةٞ لَّا ذَلُولٞ تُثِيرُ ٱلۡأَرۡضَ وَلَا تَسۡقِي ٱلۡحَرۡثَ مُسَلَّمَةٞ لَّا شِيَةَ فِيهَاۚ قَالُواْ ٱلۡـَٰٔنَ جِئۡتَ بِٱلۡحَقِّۚ فَذَبَحُوهَا وَمَا كَادُواْ يَفۡعَلُونَ
71. (Mûssa) alobaki: Ya sôló Nkolo wa bino alobi: Ya sôló ngombe yango ezala te oyo enuni na mosala ya bilanga, ezala te mpe ngombe ya makolo matengama to mabukama te. Balobaki: sika oyo nde olobi bosembo, mpe basasaki yango, pe bazalaki mpenza na posa ya kosala yango te.

72 - Al-Baqarah (The Cow) - 072

وَإِذۡ قَتَلۡتُمۡ نَفۡسٗا فَٱدَّـٰرَ ٰٔتُمۡ فِيهَاۖ وَٱللَّهُ مُخۡرِجٞ مَّا كُنتُمۡ تَكۡتُمُونَ
72. Mpe tango bobomaki moto, mpe moko na moko kati na bino abandaki koluka koyeba nani mobomi, mpe Allah nde mobimisi maye bino bozali kobomba.

73 - Al-Baqarah (The Cow) - 073

فَقُلۡنَا ٱضۡرِبُوهُ بِبَعۡضِهَاۚ كَذَٰلِكَ يُحۡيِ ٱللَّهُ ٱلۡمَوۡتَىٰ وَيُرِيكُمۡ ءَايَٰتِهِۦ لَعَلَّكُمۡ تَعۡقِلُونَ
73. Mpe tolobaki:(1) bobeta ye(2) na ndambo na yango,(3) na ndenge wana nde Allah akosekwisa bawei, mpe Allah azali kolakisa bi

Scroll to Top