يونس

 

Yunus

 

Jonah

1 - Yunus (Jonah) - 001

الٓرۚ تِلۡكَ ءَايَٰتُ ٱلۡكِتَٰبِ ٱلۡحَكِيمِ
1. Alif, lâm, râ(1). Wana ezali mikapo ya buku ya bwanya.
1 Bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 1.

2 - Yunus (Jonah) - 002

أَكَانَ لِلنَّاسِ عَجَبًا أَنۡ أَوۡحَيۡنَآ إِلَىٰ رَجُلٖ مِّنۡهُمۡ أَنۡ أَنذِرِ ٱلنَّاسَ وَبَشِّرِ ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ أَنَّ لَهُمۡ قَدَمَ صِدۡقٍ عِندَ رَبِّهِمۡۗ قَالَ ٱلۡكَٰفِرُونَ إِنَّ هَٰذَا لَسَٰحِرٞ مُّبِينٌ
2. Ezali kokamwisa bato ete topesaki boyebi na mobali moko kati na bango mpo akebisa bato mpe apesa sango elamu epai ya baye bazali kondima, ya soló, bango bazali na lokumu epai ya Nkolo wa bango (тропа mokolo mwa lobi)? Мре bapengwi balobi oyo azali nganga ya polele.

3 - Yunus (Jonah) - 003

إِنَّ رَبَّكُمُ ٱللَّهُ ٱلَّذِي خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ فِي سِتَّةِ أَيَّامٖ ثُمَّ ٱسۡتَوَىٰ عَلَى ٱلۡعَرۡشِۖ يُدَبِّرُ ٱلۡأَمۡرَۖ مَا مِن شَفِيعٍ إِلَّا مِنۢ بَعۡدِ إِذۡنِهِۦۚ ذَٰلِكُمُ ٱللَّهُ رَبُّكُمۡ فَٱعۡبُدُوهُۚ أَفَلَا تَذَكَّرُونَ
3. Ya soló, Nkolo wa bino nde Allah oyo akelaki likolo na mabele na mikolo motoba, sima atombuami likolo ya ngwende azali kotambwisa makambo manso. Moko te akolobelela moninga sé sima ya ye kopesa ndingisa. Wana nde Allah Nkolo wa bino, bobondela ye. Boye bozali kokanisa te?

4 - Yunus (Jonah) - 004

إِلَيۡهِ مَرۡجِعُكُمۡ جَمِيعٗاۖ وَعۡدَ ٱللَّهِ حَقًّاۚ إِنَّهُۥ يَبۡدَؤُاْ ٱلۡخَلۡقَ ثُمَّ يُعِيدُهُۥ لِيَجۡزِيَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّـٰلِحَٰتِ بِٱلۡقِسۡطِۚ وَٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لَهُمۡ شَرَابٞ مِّنۡ حَمِيمٖ وَعَذَابٌ أَلِيمُۢ بِمَا كَانُواْ يَكۡفُرُونَ
4. Epai naye nde bokozongisama bino banso; elaka ya Allah ezali sólo, yende abanda kokela bikelamu bia ye mbala ya liboso, sima akosekwisa biango lisusu, mpo afuta na bosembo baye bandimaki mpe basalaki misala milamu. Mpe bapengwi bakomelaka mayi ya moto mpe bakozala na etumbu ya makasi na ntina ete bazalaki bapengwi.

5 - Yunus (Jonah) - 005

هُوَ ٱلَّذِي جَعَلَ ٱلشَّمۡسَ ضِيَآءٗ وَٱلۡقَمَرَ نُورٗا وَقَدَّرَهُۥ مَنَازِلَ لِتَعۡلَمُواْ عَدَدَ ٱلسِّنِينَ وَٱلۡحِسَابَۚ مَا خَلَقَ ٱللَّهُ ذَٰلِكَ إِلَّا بِٱلۡحَقِّۚ يُفَصِّلُ ٱلۡأٓيَٰتِ لِقَوۡمٖ يَعۡلَمُونَ
5. Ye nde akela mwese (moyi) lokola muinda mpe akela sanza engengisaka, mpe akokisaki botamboli bia yango, mpo boyeba kotanga mibu, mpe boyeba mituya. Allah akelaki yango te sé na bosôló, azali kolimbola bilembo bia ye mpo bato bayeba.

6 - Yunus (Jonah) - 006

إِنَّ فِي ٱخۡتِلَٰفِ ٱلَّيۡلِ وَٱلنَّهَارِ وَمَا خَلَقَ ٱللَّهُ فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ لَأٓيَٰتٖ لِّقَوۡمٖ يَتَّقُونَ
6. Ya soló, na kati ya bokeseni ya butu mpe moyi mpe na manso maye Allah akela na likolo mpe na mabele, ezali bilembo тропа bato baye bazali kobanga.

7 - Yunus (Jonah) - 007

إِنَّ ٱلَّذِينَ لَا يَرۡجُونَ لِقَآءَنَا وَرَضُواْ بِٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا وَٱطۡمَأَنُّواْ بِهَا وَٱلَّذِينَ هُمۡ عَنۡ ءَايَٰتِنَا غَٰفِلُونَ
7. Ya solo, baye bazali kolikya te kokutana na biso, mpe basepeli na bomoyi ya nsé mpe bamoni ete bazali na kimia тропа yango, ndenge moko na baye bazali kokanisa te na mikapo mpe bilembo bia biso.

8 - Yunus (Jonah) - 008

أُوْلَـٰٓئِكَ مَأۡوَىٰهُمُ ٱلنَّارُ بِمَا كَانُواْ يَكۡسِبُونَ
8. Baye bana esika na bango ekozalaka nde na moto тропа maye bazalaki kosala.

9 - Yunus (Jonah) - 009

إِنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّـٰلِحَٰتِ يَهۡدِيهِمۡ رَبُّهُم بِإِيمَٰنِهِمۡۖ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهِمُ ٱلۡأَنۡهَٰرُ فِي جَنَّـٰتِ ٱلنَّعِيمِ
9. Ya solo, baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, Nkolo wa bango akokambaka bango тропа bondimi. Na bango bakozalaka o Iola eye ezali koleka o nsé na yango mingala, bakovandaka o Iola eye etonda bomengo.

10 - Yunus (Jonah) - 010

دَعۡوَىٰهُمۡ فِيهَا سُبۡحَٰنَكَ ٱللَّهُمَّ وَتَحِيَّتُهُمۡ فِيهَا سَلَٰمٞۚ وَءَاخِرُ دَعۡوَىٰهُمۡ أَنِ ٱلۡحَمۡدُ لِلَّهِ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
10. Kuna na kati kosenga na bango ekozalaka sé ete: Lokumu nayo Nzambe, mpe losako na bango ekozala sé kimia, mpe mabondeli na bango ya suka nde ete matondi na Allah Nkolo wa molongo.

11 - Yunus (Jonah) - 011

۞وَلَوۡ يُعَجِّلُ ٱللَّهُ لِلنَّاسِ ٱلشَّرَّ ٱسۡتِعۡجَالَهُم بِٱلۡخَيۡرِ لَقُضِيَ إِلَيۡهِمۡ أَجَلُهُمۡۖ فَنَذَرُ ٱلَّذِينَ لَا يَرۡجُونَ لِقَآءَنَا فِي طُغۡيَٰنِهِمۡ يَعۡمَهُونَ
11. Mpe soki Allah atiyelaka bato mabe ezua bango na lombango ndenge balukaka bolamu na lombangu, nde suka ya bomoyi bwa bango esila kokoka. Mpe topesi elaka na baye bazali kolikya te na bokutani bwa biso. Bazali na koyimayima na kati ya kolekisa ndelo.

12 - Yunus (Jonah) - 012

وَإِذَا مَسَّ ٱلۡإِنسَٰنَ ٱلضُّرُّ دَعَانَا لِجَنۢبِهِۦٓ أَوۡ قَاعِدًا أَوۡ قَآئِمٗا فَلَمَّا كَشَفۡنَا عَنۡهُ ضُرَّهُۥ مَرَّ كَأَن لَّمۡ يَدۡعُنَآ إِلَىٰ ضُرّٖ مَّسَّهُۥۚ كَذَٰلِكَ زُيِّنَ لِلۡمُسۡرِفِينَ مَا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ
12. Mpe soki pasi ezui moto, abengi biso, mpe alali na mopanzi to azali ya kovanda to ya kotelema; mpe tango tokolongola ye pasi ena, akomi kotambola lokola moto abelelaki biso na pasi ezuaki ye te. Na boye nde ebongisami mpo na bato mabe maye bazalaki kosala.

13 - Yunus (Jonah) - 013

وَلَقَدۡ أَهۡلَكۡنَا ٱلۡقُرُونَ مِن قَبۡلِكُمۡ لَمَّا ظَلَمُواْ وَجَآءَتۡهُمۡ رُسُلُهُم بِٱلۡبَيِّنَٰتِ وَمَا كَانُواْ لِيُؤۡمِنُواْۚ كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡقَوۡمَ ٱلۡمُجۡرِمِينَ
13. Mpe ya soló, tosilaki koboma mapinga ebele maye malekaki liboso lia bino, тропа bobubi bwa bango, mpe batindami ba bango bayelaki bango bilembo bia polele, kasi bandimaki te. Ndenge wana nde tokofutaka batomboki.

14 - Yunus (Jonah) - 014

ثُمَّ جَعَلۡنَٰكُمۡ خَلَـٰٓئِفَ فِي ٱلۡأَرۡضِ مِنۢ بَعۡدِهِمۡ لِنَنظُرَ كَيۡفَ تَعۡمَلُونَ
14. Sima na bango, tokitanisaki bino o kati ya mokili, mpo totala ndenge nini bokosala.

15 - Yunus (Jonah) - 015

وَإِذَا تُتۡلَىٰ عَلَيۡهِمۡ ءَايَاتُنَا بَيِّنَٰتٖ قَالَ ٱلَّذِينَ لَا يَرۡجُونَ لِقَآءَنَا ٱئۡتِ بِقُرۡءَانٍ غَيۡرِ هَٰذَآ أَوۡ بَدِّلۡهُۚ قُلۡ مَا يَكُونُ لِيٓ أَنۡ أُبَدِّلَهُۥ مِن تِلۡقَآيِٕ نَفۡسِيٓۖ إِنۡ أَتَّبِعُ إِلَّا مَا يُوحَىٰٓ إِلَيَّۖ إِنِّيٓ أَخَافُ إِنۡ عَصَيۡتُ رَبِّي عَذَابَ يَوۡمٍ عَظِيمٖ
15. Mpe soki batangeli bango mikapo mia biso mia polele, baye bazali kolikya na bokutani na biso te, bakolobaka: Yaka na kurani mosusu kasi oyo te, to bobongola yango! Loba: Esengeli na ngai te kobalola yango na lolenge na ngai, nazali kolanda bobele maye bayebisaki ngai. Ya soló, nazali kobanga soki nazangi botosi na Nkolo wa ngai, noki nakozua etumbu enene o mokolo mwa suka.

16 - Yunus (Jonah) - 016

قُل لَّوۡ شَآءَ ٱللَّهُ مَا تَلَوۡتُهُۥ عَلَيۡكُمۡ وَلَآ أَدۡرَىٰكُم بِهِۦۖ فَقَدۡ لَبِثۡتُ فِيكُمۡ عُمُرٗا مِّن قَبۡلِهِۦٓۚ أَفَلَا تَعۡقِلُونَ
16. Loba ete: Soki Allah alingaki, nde natangeli bino yango te, nde mpe nalakisi bino yango te.(1) nasilaki kofanda na bino mibu miyike liboso na yango, boye bozali kokanisa te?
1 Kurani.

17 - Yunus (Jonah) - 017

فَمَنۡ أَظۡلَمُ مِمَّنِ ٱفۡتَرَىٰ عَلَى ٱللَّهِ كَذِبًا أَوۡ كَذَّبَ بِـَٔايَٰتِهِۦٓۚ إِنَّهُۥ لَا يُفۡلِحُ ٱلۡمُجۡرِمُونَ
17. Mpe oyo alekisi kobuba nde oyo azali kobukela Allah lokuta, to aboyi kondimela mikapo mia ye? Ya solo, ye akolongisa batomboki te.

18 - Yunus (Jonah) - 018

وَيَعۡبُدُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ مَا لَا يَضُرُّهُمۡ وَلَا يَنفَعُهُمۡ وَيَقُولُونَ هَـٰٓؤُلَآءِ شُفَعَـٰٓؤُنَا عِندَ ٱللَّهِۚ قُلۡ أَتُنَبِّـُٔونَ ٱللَّهَ بِمَا لَا يَعۡلَمُ فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَلَا فِي ٱلۡأَرۡضِۚ سُبۡحَٰنَهُۥ وَتَعَٰلَىٰ عَمَّا يُشۡرِكُونَ
18. Mpe bazali kobondela basusu baye bakoki kosala bango mabe to malamu te, batiki Allah, mpe bazali koloba: Ba oyo nde bakolobelela biso epai ya Allah. Loba: Bolingi koloba ete Allah ayebi te maye mazali o likolo na mabele? Lokumu naye Nkolo wa likolo na maye bazali kosangisa ye na yango.

19 - Yunus (Jonah) - 019

وَمَا كَانَ ٱلنَّاسُ إِلَّآ أُمَّةٗ وَٰحِدَةٗ فَٱخۡتَلَفُواْۚ وَلَوۡلَا كَلِمَةٞ سَبَقَتۡ مِن رَّبِّكَ لَقُضِيَ بَيۡنَهُمۡ فِيمَا فِيهِ يَخۡتَلِفُونَ
19. Mpe bato bazalaki (na ebandeli) sé umma(1) moko sima bakabwani na bokeseni na bango. Soki ezalaki na mokano ya Nkolo nayo te, nde likambo lisilaki kokatama kati na bango na ntina ya maye bazalaki kokesene na yango.
1 Umma: Awa elakisi lingomba, bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 128.

20 - Yunus (Jonah) - 020

وَيَقُولُونَ لَوۡلَآ أُنزِلَ عَلَيۡهِ ءَايَةٞ مِّن رَّبِّهِۦۖ فَقُلۡ إِنَّمَا ٱلۡغَيۡبُ لِلَّهِ فَٱنتَظِرُوٓاْ إِنِّي مَعَكُم مِّنَ ٱلۡمُنتَظِرِينَ
20. Bakolobaka ete: Soki ata Nkolo naye akitiselaka ye likamwisi liwuta epai ya Nkolo waye! Mpe loba: Ya soló, mabombami mazali ya Allah, na yango bozela, ya sólo, ngai mpe nazali kozela elongo na bino.

21 - Yunus (Jonah) - 021

وَإِذَآ أَذَقۡنَا ٱلنَّاسَ رَحۡمَةٗ مِّنۢ بَعۡدِ ضَرَّآءَ مَسَّتۡهُمۡ إِذَا لَهُم مَّكۡرٞ فِيٓ ءَايَاتِنَاۚ قُلِ ٱللَّهُ أَسۡرَعُ مَكۡرًاۚ إِنَّ رُسُلَنَا يَكۡتُبُونَ مَا تَمۡكُرُونَ
21. Mpe soki topesi bato bolamu o sima ya mabe kozua bango, bakomi kobundisa mikapo mia biso. Loba: Allah azali lombango na mwango. Ya sólo batindami na biso (ba anzelu) bazali кокота mwango bozali kosala.

22 - Yunus (Jonah) - 022

هُوَ ٱلَّذِي يُسَيِّرُكُمۡ فِي ٱلۡبَرِّ وَٱلۡبَحۡرِۖ حَتَّىٰٓ إِذَا كُنتُمۡ فِي ٱلۡفُلۡكِ وَجَرَيۡنَ بِهِم بِرِيحٖ طَيِّبَةٖ وَفَرِحُواْ بِهَا جَآءَتۡهَا رِيحٌ عَاصِفٞ وَجَآءَهُمُ ٱلۡمَوۡجُ مِن كُلِّ مَكَانٖ وَظَنُّوٓاْ أَنَّهُمۡ أُحِيطَ بِهِمۡ دَعَوُاْ ٱللَّهَ مُخۡلِصِينَ لَهُ ٱلدِّينَ لَئِنۡ أَنجَيۡتَنَا مِنۡ هَٰذِهِۦ لَنَكُونَنَّ مِنَ ٱلشَّـٰكِرِينَ
22. Yende azali kotambwisa bino na mokili mpe na ebale. Kino tango bozalaka o kati ya masua, azali kotindela bino mopepe ya kitoko, bozali kosepela na yango. Kino mopepe makasi ya mabe mpe na mbonge moko wuta bipai na bipai mpe bamoni, ete basili kozingama mpe bakomi kobelela Allah na bosembo mpenza, koloba: Soki obikisi biso na oyo, tokozala kati ya baye bazali kotonda yo.

23 - Yunus (Jonah) - 023

فَلَمَّآ أَنجَىٰهُمۡ إِذَا هُمۡ يَبۡغُونَ فِي ٱلۡأَرۡضِ بِغَيۡرِ ٱلۡحَقِّۗ يَـٰٓأَيُّهَا ٱلنَّاسُ إِنَّمَا بَغۡيُكُمۡ عَلَىٰٓ أَنفُسِكُمۖ مَّتَٰعَ ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَاۖ ثُمَّ إِلَيۡنَا مَرۡجِعُكُمۡ فَنُنَبِّئُكُم بِمَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
23. Mpe soki abikisi bango, okomona bango bakomi kobebisa na bobubi o kati na mokili, batiki bosôló. Oh bino bato! Botomboki bwa bino, bokozongela sé bino moko. Bomoyi búa nsé bisengo ya ntango шоке, sima epai na biso nde bokozongisama, mpe tokoyebisaka bino maye bozalaki kosala.

24 - Yunus (Jonah) - 024

إِنَّمَا مَثَلُ ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا كَمَآءٍ أَنزَلۡنَٰهُ مِنَ ٱلسَّمَآءِ فَٱخۡتَلَطَ بِهِۦ نَبَاتُ ٱلۡأَرۡضِ مِمَّا يَأۡكُلُ ٱلنَّاسُ وَٱلۡأَنۡعَٰمُ حَتَّىٰٓ إِذَآ أَخَذَتِ ٱلۡأَرۡضُ زُخۡرُفَهَا وَٱزَّيَّنَتۡ وَظَنَّ أَهۡلُهَآ أَنَّهُمۡ قَٰدِرُونَ عَلَيۡهَآ أَتَىٰهَآ أَمۡرُنَا لَيۡلًا أَوۡ نَهَارٗا فَجَعَلۡنَٰهَا حَصِيدٗا كَأَن لَّمۡ تَغۡنَ بِٱلۡأَمۡسِۚ كَذَٰلِكَ نُفَصِّلُ ٱلۡأٓيَٰتِ لِقَوۡمٖ يَتَفَكَّرُونَ
24. Ya soló, ndakisa ya bomoyi bwa nsé ezali lokola mayi tokitisaka kowuta o likolo, mpe esangani na milona (matiti) ya mabele, ezali koleisa bato na banyama, kino mabele ekozua bonzenga na yango mpe ekomisi bilanga kitoko, bakolo na yango bazali kokanisa ete bazali na bokoki likolo na yango, mpe mokano na biso moko eyelaki yango butu to moyi, mpe tokomisi yango pamba lolenge mosusu lokola eloko ezalaki te liboso. Lolenge wana nde tozali kolimbola bilembo bia biso, mpo bato bakoka kososolo.

25 - Yunus (Jonah) - 025

وَٱللَّهُ يَدۡعُوٓاْ إِلَىٰ دَارِ ٱلسَّلَٰمِ وَيَهۡدِي مَن يَشَآءُ إِلَىٰ صِرَٰطٖ مُّسۡتَقِيمٖ
25. Allah azali kobenga bato na ndako ya kimia, mpe akambaka oyo alingi o nzela ya semba.

26 - Yunus (Jonah) - 026

۞لِّلَّذِينَ أَحۡسَنُواْ ٱلۡحُسۡنَىٰ وَزِيَادَةٞۖ وَلَا يَرۡهَقُ وُجُوهَهُمۡ قَتَرٞ وَلَا ذِلَّةٌۚ أُوْلَـٰٓئِكَ أَصۡحَٰبُ ٱلۡجَنَّةِۖ هُمۡ فِيهَا خَٰلِدُونَ
26. Mpona baye bazali kosala bolamu, babombeli bango (lifuti) ya kitoko koleka na litabisi(1) mpe bilongi bia bango bikoyindaka na milinga te, mpe bikokitisama te. Bango nde bato ba Iola, bakovandaka libela kati na yango.
1 Litabisi: Kornona elongi ya Allah.

27 - Yunus (Jonah) - 027

وَٱلَّذِينَ كَسَبُواْ ٱلسَّيِّـَٔاتِ جَزَآءُ سَيِّئَةِۭ بِمِثۡلِهَا وَتَرۡهَقُهُمۡ ذِلَّةٞۖ مَّا لَهُم مِّنَ ٱللَّهِ مِنۡ عَاصِمٖۖ كَأَنَّمَآ أُغۡشِيَتۡ وُجُوهُهُمۡ قِطَعٗا مِّنَ ٱلَّيۡلِ مُظۡلِمًاۚ أُوْلَـٰٓئِكَ أَصۡحَٰبُ ٱلنَّارِۖ هُمۡ فِيهَا خَٰلِدُونَ
27. Mpe baye basalaki mabe, bakofutamaka na mabe lokola yango, mpe milinga miyindo mia mabe mikolinga bango. Bakosalisaka bango na etumbu ya Allah te, lokola eteni ya butu na molili ya makasi mozipaki bilongi bia bango. Bango nde bato ba moto, bakovandaka libela o kati na yango.

28 - Yunus (Jonah) - 028

وَيَوۡمَ نَحۡشُرُهُمۡ جَمِيعٗا ثُمَّ نَقُولُ لِلَّذِينَ أَشۡرَكُواْ مَكَانَكُمۡ أَنتُمۡ وَشُرَكَآؤُكُمۡۚ فَزَيَّلۡنَا بَيۡنَهُمۡۖ وَقَالَ شُرَكَآؤُهُم مَّا كُنتُمۡ إِيَّانَا تَعۡبُدُونَ
28. Mpe kanisa mokolo moye tokosangisaka bango banso, sima tokolobaka na baye basangisaki (ngai na banzambe mosusu): Wapi esika na bino na banzambe na bino! Mpe tokaboli kati na bango mpe banzambe na bango bakoloba ete: Bozalaki kobondela biso te.

29 - Yunus (Jonah) - 029

فَكَفَىٰ بِٱللَّهِ شَهِيدَۢا بَيۡنَنَا وَبَيۡنَكُمۡ إِن كُنَّا عَنۡ عِبَادَتِكُمۡ لَغَٰفِلِينَ
29. Allah akoki lokola nzeneneke kati na biso na bino. Ya soló, penza tozalaki na bokeseni na mabondeli na bino.

30 - Yunus (Jonah) - 030

هُنَالِكَ تَبۡلُواْ كُلُّ نَفۡسٖ مَّآ أَسۡلَفَتۡۚ وَرُدُّوٓاْ إِلَى ٱللَّهِ مَوۡلَىٰهُمُ ٱلۡحَقِّۖ وَضَلَّ عَنۡهُم مَّا كَانُواْ يَفۡتَرُونَ
30. Na tango wana molimo na molimo akoyeba maye awelisaki kosala liboso. Mpe sima, bakozongisama epai ya Allah mokonzi na bango ya sólo, mpe bakobungisa maye manso basalaki.

31 - Yunus (Jonah) - 031

قُلۡ مَن يَرۡزُقُكُم مِّنَ ٱلسَّمَآءِ وَٱلۡأَرۡضِ أَمَّن يَمۡلِكُ ٱلسَّمۡعَ وَٱلۡأَبۡصَٰرَ وَمَن يُخۡرِجُ ٱلۡحَيَّ مِنَ ٱلۡمَيِّتِ وَيُخۡرِجُ ٱلۡمَيِّتَ مِنَ ٱلۡحَيِّ وَمَن يُدَبِّرُ ٱلۡأَمۡرَۚ فَسَيَقُولُونَ ٱللَّهُۚ فَقُلۡ أَفَلَا تَتَّقُونَ
31. Loba: Nani azali koleisa bino kowuta na likolo mpe na nsé?, тре nani apesaka bomoni na boyoki? Mpe nani apesaka bomoyi kowuta na liwa, mpe liwa kowuta na bomoyi, mpe nani azali kokamba mokili? Bakolobaka: Allah. Мре loba na bango: Boye bozali kobanga te?

32 - Yunus (Jonah) - 032

فَذَٰلِكُمُ ٱللَّهُ رَبُّكُمُ ٱلۡحَقُّۖ فَمَاذَا بَعۡدَ ٱلۡحَقِّ إِلَّا ٱلضَّلَٰلُۖ فَأَنَّىٰ تُصۡرَفُونَ
32. Wana nde Allah, Nkolo wa bino ya soló. Nini sima ya bosembo eyaka sé libungi, kasi тропа nini bozali kotengama?

33 - Yunus (Jonah) - 033

كَذَٰلِكَ حَقَّتۡ كَلِمَتُ رَبِّكَ عَلَى ٱلَّذِينَ فَسَقُوٓاْ أَنَّهُمۡ لَا يُؤۡمِنُونَ
33. Ndenge wana nde liloba lia Nkolo wayo lizalaki solo epai ya baye babebisaki, mpo solo penza bazalaki kondima te.

34 - Yunus (Jonah) - 034

قُلۡ هَلۡ مِن شُرَكَآئِكُم مَّن يَبۡدَؤُاْ ٱلۡخَلۡقَ ثُمَّ يُعِيدُهُۥۚ قُلِ ٱللَّهُ يَبۡدَؤُاْ ٱلۡخَلۡقَ ثُمَّ يُعِيدُهُۥۖ فَأَنَّىٰ تُؤۡفَكُونَ
34. Loba: Nalingi koyeba banzambe na bino, basusu kati na bango bakelaka mpe bazongisaka ekelamu na bomoyi (o sima ya liwa?) loba: Allah ye mei nde abandaki ekelamu mpe akozongisa ye, тропа nini bolingi komitiya mosika na kokumisa ye?

35 - Yunus (Jonah) - 035

قُلۡ هَلۡ مِن شُرَكَآئِكُم مَّن يَهۡدِيٓ إِلَى ٱلۡحَقِّۚ قُلِ ٱللَّهُ يَهۡدِي لِلۡحَقِّۗ أَفَمَن يَهۡدِيٓ إِلَى ٱلۡحَقِّ أَحَقُّ أَن يُتَّبَعَ أَمَّن لَّا يَهِدِّيٓ إِلَّآ أَن يُهۡدَىٰۖ فَمَا لَكُمۡ كَيۡفَ تَحۡكُمُونَ
35. Loba: Boye okati ya banzambe na bino, ezali na moko oyo azali kokamba na nzela ya bosembo? Loba: Allah nde akambaka na bosoló, boye oyo akambaka na nzela ya bosóló nde akoki ete balanda to oyo akambaka sé soki akambami? Ndenge nini bozali kokata likambo na motindo oyo?

36 - Yunus (Jonah) - 036

وَمَا يَتَّبِعُ أَكۡثَرُهُمۡ إِلَّا ظَنًّاۚ إِنَّ ٱلظَّنَّ لَا يُغۡنِي مِنَ ٱلۡحَقِّ شَيۡـًٔاۚ إِنَّ ٱللَّهَ عَلِيمُۢ بِمَا يَفۡعَلُونَ
36. Mpe ebele kati na bango bazali kolanda sé makanisi, kasi makanisi ekosala bosembo eloko moko te, ya soló Allah ayebi malamu maye bazali kosala.

37 - Yunus (Jonah) - 037

وَمَا كَانَ هَٰذَا ٱلۡقُرۡءَانُ أَن يُفۡتَرَىٰ مِن دُونِ ٱللَّهِ وَلَٰكِن تَصۡدِيقَ ٱلَّذِي بَيۡنَ يَدَيۡهِ وَتَفۡصِيلَ ٱلۡكِتَٰبِ لَا رَيۡبَ فِيهِ مِن رَّبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
37. Kurani oyo ekoki kokelama te mpe bakoki kopesa yango na moto mosusu te na esika ya Allah, kasi; eyei тропа kondima na oyo ekitaki liboso na yango, mpe ezali ndimbola ya buku, tembe ezali te kati na yango, ewuti epai ya Nkolo ya molongo.

38 - Yunus (Jonah) - 038

أَمۡ يَقُولُونَ ٱفۡتَرَىٰهُۖ قُلۡ فَأۡتُواْ بِسُورَةٖ مِّثۡلِهِۦ وَٱدۡعُواْ مَنِ ٱسۡتَطَعۡتُم مِّن دُونِ ٱللَّهِ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
38. To bazali koloba ete: (Muhammad) nde asalaki yango na ndenge naye, loba: Boya na suratu lokola oyo, mpe bobenga baye banso bakoki kosalisa bino na botiki Allah soki bozali bato ya bosembo.

39 - Yunus (Jonah) - 039

بَلۡ كَذَّبُواْ بِمَا لَمۡ يُحِيطُواْ بِعِلۡمِهِۦ وَلَمَّا يَأۡتِهِمۡ تَأۡوِيلُهُۥۚ كَذَٰلِكَ كَذَّبَ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡۖ فَٱنظُرۡ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلظَّـٰلِمِينَ
39. Kasi baboyaki kondima na eloko ya motuya oyo bazali na boyebi na yango te mpe bososoli na yango ekomelaki mpe bango te, lolenge moko na baye balekaki liboso na bango babukaki lokuta. Mpe tala ndenge nini bato mabe basukaki.

40 - Yunus (Jonah) - 040

وَمِنۡهُم مَّن يُؤۡمِنُ بِهِۦ وَمِنۡهُم مَّن لَّا يُؤۡمِنُ بِهِۦۚ وَرَبُّكَ أَعۡلَمُ بِٱلۡمُفۡسِدِينَ
40. O kati na bango, basusu bazali kondima na yango, mpe basusu bazali kondima na yango te. Kasi Nkolo wayo ayebi malamu babebisi koleka.

41 - Yunus (Jonah) - 041

وَإِن كَذَّبُوكَ فَقُل لِّي عَمَلِي وَلَكُمۡ عَمَلُكُمۡۖ أَنتُم بَرِيٓـُٔونَ مِمَّآ أَعۡمَلُ وَأَنَا۠ بَرِيٓءٞ مِّمَّا تَعۡمَلُونَ
41. Mpe soki baboyi kondimela yo, loba: Nazali na mosala mwa ngai, mpe bozali na mosala mia bino. Bino bozali kowangana maye nazali kosala, ngai mpe nawangani maye bozali kosala.

42 - Yunus (Jonah) - 042

وَمِنۡهُم مَّن يَسۡتَمِعُونَ إِلَيۡكَۚ أَفَأَنتَ تُسۡمِعُ ٱلصُّمَّ وَلَوۡ كَانُواْ لَا يَعۡقِلُونَ
42. Mpe kati na bango ezali na baye bazali koyokela yo. Boye yo nde okoyokisa bakufi matoyi, ata soki bazali koyeba te?

43 - Yunus (Jonah) - 043

وَمِنۡهُم مَّن يَنظُرُ إِلَيۡكَۚ أَفَأَنتَ تَهۡدِي ٱلۡعُمۡيَ وَلَوۡ كَانُواْ لَا يُبۡصِرُونَ
43. Mpe kati na bango, baye bazali kotala yo. Boye yo nde okambaka bakufi miso, ata soki bazali kornona te?

44 - Yunus (Jonah) - 044

إِنَّ ٱللَّهَ لَا يَظۡلِمُ ٱلنَّاسَ شَيۡـٔٗا وَلَٰكِنَّ ٱلنَّاسَ أَنفُسَهُمۡ يَظۡلِمُونَ
44. Ya soló, Allah abubaka bato na eloko te, bato bango moko nde bazali komibuba.

45 - Yunus (Jonah) - 045

وَيَوۡمَ يَحۡشُرُهُمۡ كَأَن لَّمۡ يَلۡبَثُوٓاْ إِلَّا سَاعَةٗ مِّنَ ٱلنَّهَارِ يَتَعَارَفُونَ بَيۡنَهُمۡۚ قَدۡ خَسِرَ ٱلَّذِينَ كَذَّبُواْ بِلِقَآءِ ٱللَّهِ وَمَا كَانُواْ مُهۡتَدِينَ
45. Mpe mokolo oyo akosangisa bango, ekozala lokola bavandaki ngonga moko ya mokolo, bakoyebana bango na bango. Kasi baye bazali koboya kondima na bokutani na Allah, bango nde bazangi, mpe bakambami te.

46 - Yunus (Jonah) - 046

وَإِمَّا نُرِيَنَّكَ بَعۡضَ ٱلَّذِي نَعِدُهُمۡ أَوۡ نَتَوَفَّيَنَّكَ فَإِلَيۡنَا مَرۡجِعُهُمۡ ثُمَّ ٱللَّهُ شَهِيدٌ عَلَىٰ مَا يَفۡعَلُونَ
46. Mpe soki tolingi tokolakisa yo ndambu ya etumbu oyo tokani тропа bango, to mpe okokufa liboso mpo ete eyela bango sima nayo, mpe na sima epai na biso nde bakozongisama, mpe na suka Allah azali nzeneneke likolo ya maye bazali kosala.

47 - Yunus (Jonah) - 047

وَلِكُلِّ أُمَّةٖ رَّسُولٞۖ فَإِذَا جَآءَ رَسُولُهُمۡ قُضِيَ بَيۡنَهُم بِٱلۡقِسۡطِ وَهُمۡ لَا يُظۡلَمُونَ
47. Mpe umma(1) nionso ezali na motindami. Mpe tango motindami na bango ayaki makambo ekatanaki na bosembo, mpe moko te abubamaki.
1 Umma: Ezali etonga: Allah azalaki kotinda na etonga nionso motindami to ntoma, kowuta na Adam, kino Muhammad oyo azali motindami mpe ntoma yasuka na ndembe na biso bótala mpe na suratu Al-Baqarah mokapo: 128.

48 - Yunus (Jonah) - 048

وَيَقُولُونَ مَتَىٰ هَٰذَا ٱلۡوَعۡدُ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
48. Mpe bazali koloba: Elaka ekokokaka tango nini soki bozali bato ya bosembo?.

49 - Yunus (Jonah) - 049

قُل لَّآ أَمۡلِكُ لِنَفۡسِي ضَرّٗا وَلَا نَفۡعًا إِلَّا مَا شَآءَ ٱللَّهُۗ لِكُلِّ أُمَّةٍ أَجَلٌۚ إِذَا جَآءَ أَجَلُهُمۡ فَلَا يَسۡتَـٔۡخِرُونَ سَاعَةٗ وَلَا يَسۡتَقۡدِمُونَ
49. Loba: Nazali na eloko moko te ya kosala na nzoto na ngai kowuta na pasi to bisengo sé maye Allah akolinga. Mpe umma nionso bazali na elaka na bango. Soki ngonga yango ekoki, bakozongisa yango sima te, mpe bakotindika yango liboso te.

50 - Yunus (Jonah) - 050

قُلۡ أَرَءَيۡتُمۡ إِنۡ أَتَىٰكُمۡ عَذَابُهُۥ بَيَٰتًا أَوۡ نَهَارٗا مَّاذَا يَسۡتَعۡجِلُ مِنۡهُ ٱلۡمُجۡرِمُونَ
50. Loba: Bomoni boni, soki etumbu naye eyeli bino na butu mpe na moyi? Boye batomboki bakoki kokima yango?

51 - Yunus (Jonah) - 051

أَثُمَّ إِذَا مَا وَقَعَ ءَامَنتُم بِهِۦٓۚ ءَآلۡـَٰٔنَ وَقَدۡ كُنتُم بِهِۦ تَسۡتَعۡجِلُونَ
51. Mpe boye soki (etumbu) ekweyeli bino bokondimaka na yango? (bakoyebisaka bino) sikoyo; bozalaki kolinga eyela bino noki?

52 - Yunus (Jonah) - 052

ثُمَّ قِيلَ لِلَّذِينَ ظَلَمُواْ ذُوقُواْ عَذَابَ ٱلۡخُلۡدِ هَلۡ تُجۡزَوۡنَ إِلَّا بِمَا كُنتُمۡ تَكۡسِبُونَ
52. Sima ekolobama na baye basalaki mabe ete: Bomeka etumbu ya libela, boye bokofutama sé na maye bosalaki?

53 - Yunus (Jonah) - 053

۞وَيَسۡتَنۢبِـُٔونَكَ أَحَقٌّ هُوَۖ قُلۡ إِي وَرَبِّيٓ إِنَّهُۥ لَحَقّٞۖ وَمَآ أَنتُم بِمُعۡجِزِينَ
53. Mpe bazali kotuna yo sango ya etumbu mpe lisekwa ete: Ezali ya soló? Loba: Iyo; nalapi na Nkolo wa ngai! Ezali ya soló penza. Mpe bokokoka kokima yango te.

54 - Yunus (Jonah) - 054

وَلَوۡ أَنَّ لِكُلِّ نَفۡسٖ ظَلَمَتۡ مَا فِي ٱلۡأَرۡضِ لَٱفۡتَدَتۡ بِهِۦۗ وَأَسَرُّواْ ٱلنَّدَامَةَ لَمَّا رَأَوُاْ ٱلۡعَذَابَۖ وَقُضِيَ بَيۡنَهُم بِٱلۡقِسۡطِ وَهُمۡ لَا يُظۡلَمُونَ
54. Soki maye mazali na mabele ezalaki na maboko ya moto oyo asili kosala masumu ebele, alingaki kopesa yango na lombango тропа komikangola na etumbu na biso. Mpe bakobombaka mawa na bango tango bamoni etumbu, mpe bakata makambo kati na bango na bosembo, mpe bakobubamaka te.

55 - Yunus (Jonah) - 055

أَلَآ إِنَّ لِلَّهِ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۗ أَلَآ إِنَّ وَعۡدَ ٱللَّهِ حَقّٞ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَهُمۡ لَا يَعۡلَمُونَ
55. Maye manso mazali kati na likolo na mabele, mazali ma Allah. Elaka ya Allah ezali solo, kasi ebele kati na bango bazali koyeba te.

56 - Yunus (Jonah) - 056

هُوَ يُحۡيِۦ وَيُمِيتُ وَإِلَيۡهِ تُرۡجَعُونَ
56. Ye nde apesaka bomoyi mpe liwa, mpe epai naye nde bokozonga.

57 - Yunus (Jonah) - 057

يَـٰٓأَيُّهَا ٱلنَّاسُ قَدۡ جَآءَتۡكُم مَّوۡعِظَةٞ مِّن رَّبِّكُمۡ وَشِفَآءٞ لِّمَا فِي ٱلصُّدُورِ وَهُدٗى وَرَحۡمَةٞ لِّلۡمُؤۡمِنِينَ
57. Oh bino bato! Ya sólo, malendisi masili koyela bino kowuta epai ya Nkolo wa bino, mpe yango ezali libiki (kurani) ya maye mazali okati ya mitema, ezali mpe lisungi na nzela ya bokambi mpe ngolu тропа bandimi.

58 - Yunus (Jonah) - 058

قُلۡ بِفَضۡلِ ٱللَّهِ وَبِرَحۡمَتِهِۦ فَبِذَٰلِكَ فَلۡيَفۡرَحُواْ هُوَ خَيۡرٞ مِّمَّا يَجۡمَعُونَ
58. Loba: Oyo ewuti na ngolu ya Allah na bolamu naye, mpe wana ezali mpo basepela na yango koleka maye bazali kosangisa.

59 - Yunus (Jonah) - 059

قُلۡ أَرَءَيۡتُم مَّآ أَنزَلَ ٱللَّهُ لَكُم مِّن رِّزۡقٖ فَجَعَلۡتُم مِّنۡهُ حَرَامٗا وَحَلَٰلٗا قُلۡ ءَآللَّهُ أَذِنَ لَكُمۡۖ أَمۡ عَلَى ٱللَّهِ تَفۡتَرُونَ
59. Loba: Bomoni boni тропа bozui oyo Allah akitiseli bino, sima bokaboli yango, ya mabe na ya malamu? Loba: Boye Allah nde apesi bino ndingisa wana to bozali kobukela Allah lokuta?

60 - Yunus (Jonah) - 060

وَمَا ظَنُّ ٱلَّذِينَ يَفۡتَرُونَ عَلَى ٱللَّهِ ٱلۡكَذِبَ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِۗ إِنَّ ٱللَّهَ لَذُو فَضۡلٍ عَلَى ٱلنَّاسِ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَهُمۡ لَا يَشۡكُرُونَ
60. Mpe baye bazali kobukela Allah lokuta bakanisaka nini тропа mokolo mwa suka? Ya soló, Allah azali Nkolo bolamu тропа bato, kasi ebele na bango bazali kotondo te.

61 - Yunus (Jonah) - 061

وَمَا تَكُونُ فِي شَأۡنٖ وَمَا تَتۡلُواْ مِنۡهُ مِن قُرۡءَانٖ وَلَا تَعۡمَلُونَ مِنۡ عَمَلٍ إِلَّا كُنَّا عَلَيۡكُمۡ شُهُودًا إِذۡ تُفِيضُونَ فِيهِۚ وَمَا يَعۡزُبُ عَن رَّبِّكَ مِن مِّثۡقَالِ ذَرَّةٖ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَلَا فِي ٱلسَّمَآءِ وَلَآ أَصۡغَرَ مِن ذَٰلِكَ وَلَآ أَكۡبَرَ إِلَّا فِي كِتَٰبٖ مُّبِينٍ
61. Ozalaka kati ya moko ya likambo te, otangaka kurani te mpe bosalaka eloko te, sé ete tozala na yango ba nzeneneke tango bozali kokana тропа kosala. Mpe Nkolo nayo abungisaka eloko te ata ezali токе lokola mbuma ya zelo ezali na nsé to likolo, ata ezali токе lisusu koleka wana, na ya monene lokola, esila kokomama na buku ya polele.

62 - Yunus (Jonah) - 062

أَلَآ إِنَّ أَوۡلِيَآءَ ٱللَّهِ لَا خَوۡفٌ عَلَيۡهِمۡ وَلَا هُمۡ يَحۡزَنُونَ
62. Talá ya sólo, balingami ya Allah, kobanga ezali тропа bango te mpe bakoyoka mawa te.

63 - Yunus (Jonah) - 063

ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَكَانُواْ يَتَّقُونَ
63. Baye bandimaki mpe bazalaki na bobangi (Allah).

64 - Yunus (Jonah) - 064

لَهُمُ ٱلۡبُشۡرَىٰ فِي ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا وَفِي ٱلۡأٓخِرَةِۚ لَا تَبۡدِيلَ لِكَلِمَٰتِ ٱللَّهِۚ ذَٰلِكَ هُوَ ٱلۡفَوۡزُ ٱلۡعَظِيمُ
64. Bakopesama sango elamu na bomoyi bwa mokili na o mokolo mwa suka, mpe liloba lia Allah likobongwamaka te. Wana nde elonga enene.

65 - Yunus (Jonah) - 065

وَلَا يَحۡزُنكَ قَوۡلُهُمۡۘ إِنَّ ٱلۡعِزَّةَ لِلَّهِ جَمِيعًاۚ هُوَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡعَلِيمُ
65. Koyoka mpasi te тропа maye bazali koloba. Ya soló, bokasi bonso bozali bwa Allah. Azali moyoki atonda boyebi.

66 - Yunus (Jonah) - 066

أَلَآ إِنَّ لِلَّهِ مَن فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَن فِي ٱلۡأَرۡضِۗ وَمَا يَتَّبِعُ ٱلَّذِينَ يَدۡعُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ شُرَكَآءَۚ إِن يَتَّبِعُونَ إِلَّا ٱلظَّنَّ وَإِنۡ هُمۡ إِلَّا يَخۡرُصُونَ
66. Yeba ete, maye manso mazuami o likolo mpe o mabele mazali ma Allah. Baye bazali kokumisa banzambe basusu na botiki Allah, bazali kolanda nini? Bazali kolanda sé makanisi, kasi bazali sé komikosa.

67 - Yunus (Jonah) - 067

هُوَ ٱلَّذِي جَعَلَ لَكُمُ ٱلَّيۡلَ لِتَسۡكُنُواْ فِيهِ وَٱلنَّهَارَ مُبۡصِرًاۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٖ لِّقَوۡمٖ يَسۡمَعُونَ
67. Ye nde atiyelaki bino butu mpo bopema na yango, mpe moyi mpo bótala mpe botambola. Wana ezali solo bilembo mpo ete bato bakokaka koyoka.

68 - Yunus (Jonah) - 068

قَالُواْ ٱتَّخَذَ ٱللَّهُ وَلَدٗاۗ سُبۡحَٰنَهُۥۖ هُوَ ٱلۡغَنِيُّۖ لَهُۥ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِۚ إِنۡ عِندَكُم مِّن سُلۡطَٰنِۭ بِهَٰذَآۚ أَتَقُولُونَ عَلَى ٱللَّهِ مَا لَا تَعۡلَمُونَ
68. Bazali koloba ete: Allah azui mwana nkembo naye. Atonda bomengo, manso mazali na likolo na mabele mazali ya ye. Boye bozali na elembetele moko тропа yango? (mpo bozali koloba ete; Allah abota), boye Bozali koloba na Allah (makambo) maye bozali na boyebi na yango te?

69 - Yunus (Jonah) - 069

قُلۡ إِنَّ ٱلَّذِينَ يَفۡتَرُونَ عَلَى ٱللَّهِ ٱلۡكَذِبَ لَا يُفۡلِحُونَ
69. Loba: Baye bazali kobukela Allah lokuta, bakolongaka te.

70 - Yunus (Jonah) - 070

مَتَٰعٞ فِي ٱلدُّنۡيَا ثُمَّ إِلَيۡنَا مَرۡجِعُهُمۡ ثُمَّ نُذِيقُهُمُ ٱلۡعَذَابَ ٱلشَّدِيدَ بِمَا كَانُواْ يَكۡفُرُونَ
70. Bazali sé na bosepeli (токе) kati ya mokili, sima bakozongisamaka epai na biso, mpe tokomekisaka bango etumbu ekasi тропа maye bapengwaki na yango,.

71 - Yunus (

Scroll to Top