”
#5372HadeethEnc[صحيح]
Kowuta na maloba ya Anas bin Malik, Nzambe asepela na ye, ete Motindami ya Nzambe (S.a.w) alobaki: “Moto oyo alingi ete Rizki na ye epanzana mpo na ye, mpe libula na ye ebakisama, abatela boyokani ya bondeko naye”.
”
#5375HadeethEnc[حسن]
Kowuta na maloba ya Abu Swirmah, Nzambe asepela na ye, ete Ntoma ya Nzambe (S.a.w) alobaki: “Moto nyonso oyo akosala mabe, Nzambe akosala ye mabe, mpe moto nyonso oyo azali makasi, Nzambe akozala mpasi mpo na ye”.
”
#5382HadeethEnc[صحيح]
Kowuta na maloba ya Abu Hurairah, Nzambe asepela na ye, ete Ntoma ya Nzambe (S.a.w) alobaki: “Ngonga oyo mosaleli azalaka penepene na Nkolo na ye ezali ntango azali kofukama na sujudu, yango wana bobondela Dua mingi”.
”
#5435HadeethEnc[صحيح]
Kowuta na maloba ya Jundub bin Abdullah Al-Qasri, Nzambe asepela na ye, alobaki: Ntoma ya Nzambe (S.a.w) alobaki: “Moto oyo akosambela losambo ya ntongo azali na nse ya libateli ya Nzambe, yango wana Nzambe akosenga bino eloko moko te na libateli na Ye, mpo ete moto nyo…
”
#5437HadeethEnc[صحيح]
Kowuta na maloba ya Abu Hurairah, Nzambe asepela na ye, kowuta na maloba ya Ntoma ya Nzambe (S.a.w) alobaki: “Moto oyo andimi Nzambe mpe na Mokolo ya Nsuka, aloba malamu to afanda kimia, mpe moto nyonso oyo andimi Nzambe mpe na Mokolo ya Nsuka, asunga voisin na ye. Mpe…
”
#5439HadeethEnc[صحيح]
Kowuta na maloba ya Jarir bin Abdullah, Nzambe asepela na ye, alobaki: Motindami ya Nzambe (S.a.w) alobaki: “Moto oyo ayokelaka bato mawa te, Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akoyokela ye mawa te”.
”
#5474HadeethEnc[صحيح]
Kowuta na maloba ya Aisha, Nzambe asepela na ye, kowuta na maloba ya Prophète (S.aw) alobaki: “Ya solo, bato oyo Nzambe ayinaka bango mingi, ezali monguna ya trouble”.
”
#5475HadeethEnc[صحيح]
Kowuta na maloba ya Samurah bin Jundub, Nzambe asepela na ye, alobaki: Motindami ya Nzambe (S.a.w) alobaki: “Maloba oyo nzambe alingaka yango mingi, koloba minei: Subhâna l-lâhi, wa-l-hamdu li-l-lâhi, wa lâ ilâaha illâ l-lâahu, wa l-lâahu akbar. Ezali mabe te epayi nayo…
”
#5476HadeethEnc[حسن صحيح]
Kowuta na maloba ya Abu Hurairah, Nzambe asepela na ye, alobaki: Ntoma ya Nzambe, tika ete Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, batunaki ye na ntina ya nini mingi ememaka bato na Paradis, mpe alobaki: “Kobanga Nzambe mpe bizaleli malamu,” mpe batunaki ye ntina ya nini…
”
#5478HadeethEnc[صحيح]
Kowuta na maloba ya Abdullah bin Omar, Nzambe asepela na bango mibale, alobaki: Mosakoli, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, ayokaki mobali moko azali kopesa toli na ndeko na ye na ntina ya nsoni, mpe alobaki: “nsoni ezali eteni ya bondimi”.
”
#5496HadeethEnc[صحيح]
Kowuta na maloba ya Al-Numan bin Bashir, Nzambe asepela na ye, alobaki: Nayokaki Ntoma (S.a.w) azoloba : “Kosenga Dua ezali losambo,” na nsima atángaki : “{Mpe Nkolo na bino alobaki, “Bóbelela Ngai, nakoyanola bino, ya solo, baoyo bazali kotyola mingi mpo na kosambela N…
”
#5507HadeethEnc[صحيح]
Kowuta na maloba ya Abu Hurairah, Nzambe asepela na ye, kowuta na maloba ya Ntoma (s.a.w) Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia, alobaki: “Maloba mibale oyo ezali pepele na lolemo, kilo na balance, mpe elingami epai ya nzambe oyo aleki Ngolu koloba : Subhâna l-lâahi-l-'a…