Ntoma ya Nzambe, tika ete Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, batunaki ye na ntina ya nini mingi ememaka bato na Paradis, mpe alobaki: “Kobanga Nzambe mpe bizaleli malamu
Choose an available translation of this Hadeeth
Hadeeth text
Kowuta na maloba ya Abu Hurairah, Nzambe asepela na ye, alobaki: Ntoma ya Nzambe, tika ete Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, batunaki ye na ntina ya nini mingi ememaka bato na Paradis, mpe alobaki: “Kobanga Nzambe mpe bizaleli malamu,” mpe batunaki ye ntina ya nini mingi ememaka bato na lifelo alobaki ete: “Lolemo na binama”.
Explanation
Bobangi Nzambe mpe kozala na bizaleli malamu.
Na yango kobanga Nzambe: ezali kotia libateli kati na yo mpe etumbu ya Nzambe, mpe yango ezali na kosalaka mitindo na Ye mpe koboya bipekiseli na Ye.
Bizaleli malamu ezali bongo kobatela elongi ya moto polele, kosala malamu, mpe koboya kosala mabe.
Bantina minene ya kokota na Lifelo ezali bantina mibale:
Lolemo na binama.
Lolemo moko ya masumu na yango ezali : lokuta, koloba kotonga na nsima, kolobaloba songi songi, mpe makambo mosusu.
Binama masumu na yango ezali : ekobo, na homosexualité, mpe makambo mosusu.
Benefits
Lolemo ezali likama mpo na nkolo na yango, mpe ezali moko ya bantina ya kokota na Lifelo.
Likama ya bamposa na misala ya mbindo mpo na bato, mpe ezali kati na bantina oyo emonanaka mingi mpo na kokota na Lifelo.
Attribution
Categories
Share hadeeth
Sharing options · 0 Total shares

