“Mosala nyonso ya malamu ezali swadaka”
Kowuta na maloba ya Jabir bin Abdullah, Nzambe asepela na bango mibale, kowuta na maloba ya Ntoma (S.a.w) alobaki: “Mosala nyonso ya malamu ezali swadaka”.
Books saved in this browser.
Loading favorites…
Tap the heart on any book card to save it here.
Search and read verified Prophetic hadeeth translations, explanations, benefits, categories and source attribution. Page 3.
Smart instant results tolerate minor spelling mistakes, with every filter in one place.
Kowuta na maloba ya Jabir bin Abdullah, Nzambe asepela na bango mibale, kowuta na maloba ya Ntoma (S.a.w) alobaki: “Mosala nyonso ya malamu ezali swadaka”.
Kowuta na maloba ya Abu Dharr, Nzambe asepela na ye, alobaki: Ntoma (S.a.w) alobaki na ngai: “Kotyola mosala moko ya malamu te, ata soki ezali kokutana na ndeko na yo na elongi ya esengo (kosekisa ye)”.
Kowuta na maloba ya Abu Hurairah, Nzambe asepela na ye, ete Ntoma ya Nzambe (S.a.w) alobaki : “Moto ya makasi ezali te oyo abetaka, kasi moto ya makasi nde amipekisaka ntango asiliki”.
Kowuta na maloba ya Abu Masoud Al-Ansari, Nzambe asepela na ye, alobaki: Moto moko ayaki epayi ya Profeta, Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia, pe alobi: Nazali créatif, yango wana mema ngai. Alobaki boye: “Nazali na yango te.” Bongo moto moko alobski : O Ntoma ya Nzam…
Kowuta na maloba ya Aisha, Nzambe asepela na ye, alobaki boye: Prophète (S.a.w) alobaki: “Bofingaka bakufi te, mpo na bango basilá kokokisa makambo oyo basalaki”.
Kowuta na maloba ya Abu Ayyub Al-Ansari, Nzambe asepela na ye, ete Ntoma ya Nzambe (S.a.w) alobaki: “Epesameli nzela te moto asundola ndeko na ye mikolo koleka misato, Bakutani, na oyo alakisi ye, oyo alakisi, ye, na oyo eleki malamu kati na bango mibale ezali oyo akoba…
Kowuta na maloba ya Jubair bin Mut’im, Nzambe asepela na ye, ete ayokaki Ntoma (S.a.w) azoloba: “Akokota na Paladiso te oyo akataka boyokani ya bondeko”.
Kowuta na maloba ya Hudhayfah, Nzambe asepela na ye, alobaki: Nayokaki Prophète (S.a.w) azoloba: “Momemi makambo songi songi akokota na Paradis te!”.
Kowuta na maloba ya Anas bin Malik, Nzambe asepela na ye, ete Motindami ya Nzambe (S.a.w) alobaki: “Moto oyo alingi ete Rizki na ye epanzana mpo na ye, mpe libula na ye ebakisama, abatela boyokani ya bondeko naye”.
Kowuta na maloba ya Abu Hurairah, Nzambe asepela na ye, ete Ntoma ya Nzambe (S.a.w) alobaki: “Ngonga oyo mosaleli azalaka penepene na Nkolo na ye ezali ntango azali kofukama na sujudu, yango wana bobondela Dua mingi”.
Kowuta na maloba ya Abu Hurairah, Nzambe asepela na ye, kowuta na maloba ya Ntoma ya Nzambe (S.a.w) alobaki: “Moto oyo andimi Nzambe mpe na Mokolo ya Nsuka, aloba malamu to afanda kimia, mpe moto nyonso oyo andimi Nzambe mpe na Mokolo ya Nsuka, asunga voisin na ye. Mpe…
Kowuta na maloba ya Jarir bin Abdullah, Nzambe asepela na ye, alobaki: Motindami ya Nzambe (S.a.w) alobaki: “Moto oyo ayokelaka bato mawa te, Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akoyokela ye mawa te”.
Follow any language without creating an account.

