HadeethEnc · 1.18.0
“Droit ya Musulman likoló ya Musulman mosusu ezali mitano: Kozongisa mbote, kotala bato ya maladi, kokende na matanga, koyanola na libyangi, mpe kosepela na koswa.”
Available translations
Choose an available translation of this Hadeeth
01
Hadeeth text
Na bokonzi ya Abu Hurairah, Nzambe asepela na ye, alobi: Nayoki Ntoma ya Nzambe, Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia, aloba: “Droit ya Musulman likoló ya Musulman mosusu ezali mitano: Kozongisa mbote, kotala bato ya maladi, kokende na matanga, koyanola na libyangi, mpe kosepela na koswa.”
02
Explanation
Ntoma, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, alimboli mwa ba droit ya musulman likolo ya moninga na ye musulman. Ya liboso kati na droit oyo ezali ya kozongisa mbote na baye bapesaki yo mbote (salamu).
Droit ya mibale: kokende na Clinique ya ba malades mpo na visite naye.
Droit ya misato : kolanda matanga uta na ndako na ye kino na ndako ya losambo kino na cimetière kino bakokunda ye
Droit ya minei : Koyanola na libyangi soki abengisi ye na feti ya libala mpe makambo mosusu.
Droit ya mitano: saki alobi icha nazolo (tashmeet), elingi koloba na ye tango azali kosanzola Nzambe: Tika Nzambe ayokela yo mawa, sima sneezer alobi: Tika Nzambe atambwisa yo pe atia makanisi na yo na kimia.

03
Benefits
Bonene ya Islam ezali na kondimisa makoki kati na ba musulmans mpe kolendisa bondeko na bolingo kati na bango.
Attribution
[متفق عليه]
Categories
Share
Share hadeeth
Sharing options · 0 Total shares