المطففين

 

Al-Mutaffifin

 

The Defrauding

1 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 001

وَيۡلٞ لِّلۡمُطَفِّفِينَ
1. Mawa na baye bazali koy iba,

2 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 002

ٱلَّذِينَ إِذَا ٱكۡتَالُواْ عَلَى ٱلنَّاسِ يَسۡتَوۡفُونَ
2. Baye ntango bazali (kosomba) bazali kosenga ete bakokisela bango emekeli,

3 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 003

وَإِذَا كَالُوهُمۡ أَو وَّزَنُوهُمۡ يُخۡسِرُونَ
3. Kaši ntango bazali komeka pona bato mosusu bazali kozangisa.

4 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 004

أَلَا يَظُنُّ أُوْلَـٰٓئِكَ أَنَّهُم مَّبۡعُوثُونَ
4. Bango bazali kokanisa ete bakozonga na bomoi te sima ya liwa,

5 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 005

لِيَوۡمٍ عَظِيمٖ
5. Na mokolo ya monene?

6 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 006

يَوۡمَ يَقُومُ ٱلنَّاسُ لِرَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
6. Mokolo moye bato bakotelema liboso ya Nkolo ya molongo,

7 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 007

كَلَّآ إِنَّ كِتَٰبَ ٱلۡفُجَّارِ لَفِي سِجِّينٖ
7. Kasi ya soló, buku ya bato ya mabe ekozala okati ya sidjíne.

8 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 008

وَمَآ أَدۡرَىٰكَ مَا سِجِّينٞ
8. Nani akoyebisa yo eloko nini sidjíne?

9 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 009

كِتَٰبٞ مَّرۡقُومٞ
9. Buku eye ekomama.

10 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 010

وَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
10. Mokolo wana etumbu ekozala тропа baye baboyi kondima,

11 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 011

ٱلَّذِينَ يُكَذِّبُونَ بِيَوۡمِ ٱلدِّينِ
11. Baye bazali kozwa mokolo ya suka na lokuta,

12 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 012

وَمَا يُكَذِّبُ بِهِۦٓ إِلَّا كُلُّ مُعۡتَدٍ أَثِيمٍ
12. Kasi akoboya kondima sé molekisi ndelo mosumuki.

13 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 013

إِذَا تُتۡلَىٰ عَلَيۡهِ ءَايَٰتُنَا قَالَ أَسَٰطِيرُ ٱلۡأَوَّلِينَ
13. Oyo soki batangeli ye maloba na biso alobi: Wana ezali másese ya bakoko ya kala.

14 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 014

كَلَّاۖ بَلۡۜ رَانَ عَلَىٰ قُلُوبِهِم مَّا كَانُواْ يَكۡسِبُونَ
14. Ezali boye te, kaši mitema miabango mizali na mbindo na maye bazalaki kosala,

15 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 015

كَلَّآ إِنَّهُمۡ عَن رَّبِّهِمۡ يَوۡمَئِذٖ لَّمَحۡجُوبُونَ
15. Kasi basala angele ya soló mokolo mona mokozipa bango mpo ete bamona Nkolo na bango te,

16 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 016

ثُمَّ إِنَّهُمۡ لَصَالُواْ ٱلۡجَحِيمِ
16. Sima bakozikisama ya sólo okati ya lifelo.

17 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 017

ثُمَّ يُقَالُ هَٰذَا ٱلَّذِي كُنتُم بِهِۦ تُكَذِّبُونَ
17. Sima bakoloba na bango wana maye bozalaki koboya kondima.

18 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 018

كَلَّآ إِنَّ كِتَٰبَ ٱلۡأَبۡرَارِ لَفِي عِلِّيِّينَ
18. Ya sólo, buku ya bato malamu ekozala o’kati ya iliyíne.

19 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 019

وَمَآ أَدۡرَىٰكَ مَا عِلِّيُّونَ
19. Nani akoyebisayo eloko nini iliyíne?

20 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 020

كِتَٰبٞ مَّرۡقُومٞ
20. Buku eye ekomama,

21 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 021

يَشۡهَدُهُ ٱلۡمُقَرَّبُونَ
21. Ba anzelu ya pembeni ya Nkolo (Allah) bazali banzeneneke тропа yango.

22 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 022

إِنَّ ٱلۡأَبۡرَارَ لَفِي نَعِيمٍ
22. Ya sólo bato ya malamu bakozala okati ya bisengo.

23 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 023

عَلَى ٱلۡأَرَآئِكِ يَنظُرُونَ
23. Likolo ya bakiti ya lokumu bazali kotalana.

24 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 024

تَعۡرِفُ فِي وُجُوهِهِمۡ نَضۡرَةَ ٱلنَّعِيمِ
24. Okoyeba bilembo bia bisengo o’bilongi bia bango.

25 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 025

يُسۡقَوۡنَ مِن رَّحِيقٖ مَّخۡتُومٍ
25. Bakomela masanga ya sukali oyo esila kobongisama,

26 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 026

خِتَٰمُهُۥ مِسۡكٞۚ وَفِي ذَٰلِكَ فَلۡيَتَنَافَسِ ٱلۡمُتَنَٰفِسُونَ
26. Etikaka solo ya mpimbo na suka lokola malasi, na yango esengeli nabaye bazali kolikia тропа yango basala molende.

27 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 027

وَمِزَاجُهُۥ مِن تَسۡنِيمٍ
27. Mpe esangisani na masanga ya tasmin (liziba),

28 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 028

عَيۡنٗا يَشۡرَبُ بِهَا ٱلۡمُقَرَّبُونَ
28. Baye bakozala pembeni na Nkolo (Allah) bako mela mayi ya liziba wana.

29 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 029

إِنَّ ٱلَّذِينَ أَجۡرَمُواْ كَانُواْ مِنَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ يَضۡحَكُونَ
29. Ya soló, bato mabe bazalaki kotiola bandimi.

30 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 030

وَإِذَا مَرُّواْ بِهِمۡ يَتَغَامَزُونَ
30. Mpe soki baleki pene na bango bazali (kodongola bango miso nako fina) miso na bango,

31 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 031

وَإِذَا ٱنقَلَبُوٓاْ إِلَىٰٓ أَهۡلِهِمُ ٱنقَلَبُواْ فَكِهِينَ
31. Mpe soki bazongi o’mabota na bango bazali kokosa bango,

32 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 032

وَإِذَا رَأَوۡهُمۡ قَالُوٓاْ إِنَّ هَـٰٓؤُلَآءِ لَضَآلُّونَ
32. Mpe soki bamoni bandimi balobi ete: Ya sólo, baye wana nde babunga nzela.

33 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 033

وَمَآ أُرۡسِلُواْ عَلَيۡهِمۡ حَٰفِظِينَ
33. Nzoka nde batindamaki te bazala bakengeli likolo ya bandimi.

34 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 034

فَٱلۡيَوۡمَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ مِنَ ٱلۡكُفَّارِ يَضۡحَكُونَ
34. Kasi lelo bandimi bako tiola bapagano.

35 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 035

عَلَى ٱلۡأَرَآئِكِ يَنظُرُونَ
35. Likolo ya bakiti ya lokumu bazali kotala.

36 - Al-Mutaffifin (The Defrauding) - 036

هَلۡ ثُوِّبَ ٱلۡكُفَّارُ مَا كَانُواْ يَفۡعَلُونَ
36. Bapagano bazwi te lifuta liye ekoki na bango na tina ya maye bazalaki kosala.

[sc name="verse"][/sc]

Scroll to Top