الانسان
Al-Insan
The Man
1 - Al-Insan (The Man) - 001
هَلۡ أَتَىٰ عَلَى ٱلۡإِنسَٰنِ حِينٞ مِّنَ ٱلدَّهۡرِ لَمۡ يَكُن شَيۡـٔٗا مَّذۡكُورًا
1. Ezali na tango molayi eleka na mokili moto azalaki eloko moko te liboso ete akelama?
2 - Al-Insan (The Man) - 002
إِنَّا خَلَقۡنَا ٱلۡإِنسَٰنَ مِن نُّطۡفَةٍ أَمۡشَاجٖ نَّبۡتَلِيهِ فَجَعَلۡنَٰهُ سَمِيعَۢا بَصِيرًا
2. Ya soló, tokelaki moto na litanga ya mayi ya mokongo (oyo esangani na biloko ebele), тропа tomeka ye na yango, mpe totieli ye boyoki mpe bomoni mpo oyoka mpe amona.
3 - Al-Insan (The Man) - 003
إِنَّا هَدَيۡنَٰهُ ٱلسَّبِيلَ إِمَّا شَاكِرٗا وَإِمَّا كَفُورًا
3. Ya solo, tolakisaki ye nzela mpo atondo (Allah) to apengwa.
4 - Al-Insan (The Man) - 004
إِنَّآ أَعۡتَدۡنَا لِلۡكَٰفِرِينَ سَلَٰسِلَاْ وَأَغۡلَٰلٗا وَسَعِيرًا
4. Ya solo, tolengeli тропа bapengwi minyololo ya basinga milai ya makasi mpe etumbu ya saira. (moto ya makasi ya lifelo)
5 - Al-Insan (The Man) - 005
إِنَّ ٱلۡأَبۡرَارَ يَشۡرَبُونَ مِن كَأۡسٖ كَانَ مِزَاجُهَا كَافُورًا
5. Ya solo, babangi (Allah) bakomelaka na bakopo ya kitoko ya kafura ya malili solo kitoko.
6 - Al-Insan (The Man) - 006
عَيۡنٗا يَشۡرَبُ بِهَا عِبَادُ ٱللَّهِ يُفَجِّرُونَهَا تَفۡجِيرٗا
6. Esika oyo bawumbu ya Allah bakomelaka ndenge balingi ezali kobimisa mayi ya malamu.
7 - Al-Insan (The Man) - 007
يُوفُونَ بِٱلنَّذۡرِ وَيَخَافُونَ يَوۡمٗا كَانَ شَرُّهُۥ مُسۡتَطِيرٗا
7. Bazali kokokisa bilaka mpe bazalaki kobanga mokolo moye mabe na yango ekopanzana bisika binso.
8 - Al-Insan (The Man) - 008
وَيُطۡعِمُونَ ٱلطَّعَامَ عَلَىٰ حُبِّهِۦ مِسۡكِينٗا وَيَتِيمٗا وَأَسِيرًا
8. Мре bazali koleisa babola na bana bitike mpe bato ya boloko, na bolingo (ya biloko yango).
9 - Al-Insan (The Man) - 009
إِنَّمَا نُطۡعِمُكُمۡ لِوَجۡهِ ٱللَّهِ لَا نُرِيدُ مِنكُمۡ جَزَآءٗ وَلَا شُكُورًا
9. Ya soló, tozali koleisa bino тропа Allah, tolingi bofuta biso te mpe bopesa biso melesi te.
10 - Al-Insan (The Man) - 010
إِنَّا نَخَافُ مِن رَّبِّنَا يَوۡمًا عَبُوسٗا قَمۡطَرِيرٗا
10. Tozali kobanga Nkolo na biso тропа mokolo oyo ya somo mpe ya mabe koleka.
11 - Al-Insan (The Man) - 011
فَوَقَىٰهُمُ ٱللَّهُ شَرَّ ذَٰلِكَ ٱلۡيَوۡمِ وَلَقَّىٰهُمۡ نَضۡرَةٗ وَسُرُورٗا
11. Allah akobatela bango na mabe ya mokolo wana, mpe bakokutana na bongengi mpe esengo.
12 - Al-Insan (The Man) - 012
وَجَزَىٰهُم بِمَا صَبَرُواْ جَنَّةٗ وَحَرِيرٗا
12. Mpe akofuta bango lola тропа maye basalaki, mpe akopesa bango bilamba bia fafala.
13 - Al-Insan (The Man) - 013
مُّتَّكِـِٔينَ فِيهَا عَلَى ٱلۡأَرَآئِكِۖ لَا يَرَوۡنَ فِيهَا شَمۡسٗا وَلَا زَمۡهَرِيرٗا
13. Bakoyekamaka likolo ya bakiti ya kitoko, moyi ekotungisaka bango te mpe bakoyokaka malili makasi te.
14 - Al-Insan (The Man) - 014
وَدَانِيَةً عَلَيۡهِمۡ ظِلَٰلُهَا وَذُلِّلَتۡ قُطُوفُهَا تَذۡلِيلٗا
14. Bilili na yango bikozipa bango penepene, mpe mbuma na yango bikokita tii pembeni na bango тропа kobuka.
15 - Al-Insan (The Man) - 015
وَيُطَافُ عَلَيۡهِم بِـَٔانِيَةٖ مِّن فِضَّةٖ وَأَكۡوَابٖ كَانَتۡ قَوَارِيرَا۠
15. Mpe bakopesaka bango bitiyelo biye bisalami na mabende ya mbongo na bakopo bisalami na mabanga ya pembe ya kitoko bikotambwisama likolo na bango тропа kólia mpe komela,
16 - Al-Insan (The Man) - 016
قَوَارِيرَاْ مِن فِضَّةٖ قَدَّرُوهَا تَقۡدِيرٗا
16. Bakopo to milangi ya mabende ya kongenga ya кококапа.
17 - Al-Insan (The Man) - 017
وَيُسۡقَوۡنَ فِيهَا كَأۡسٗا كَانَ مِزَاجُهَا زَنجَبِيلًا
17. Мре bakomelaka mayi oyo esangani na tangawisi,
18 - Al-Insan (The Man) - 018
عَيۡنٗا فِيهَا تُسَمَّىٰ سَلۡسَبِيلٗا
18. Ezali kowuta na liziba oyo ebengami salsabila kuna na kati.
19 - Al-Insan (The Man) - 019
۞وَيَطُوفُ عَلَيۡهِمۡ وِلۡدَٰنٞ مُّخَلَّدُونَ إِذَا رَأَيۡتَهُمۡ حَسِبۡتَهُمۡ لُؤۡلُؤٗا مَّنثُورٗا
19. Мре bilenge mibali ya libela bakotambola nakati na bango тропа kosalela bango, soki omoni bango okokanisa ete bazali mabanga ya mayi ya kongenga oyo epanzani.
20 - Al-Insan (The Man) - 020
وَإِذَا رَأَيۡتَ ثَمَّ رَأَيۡتَ نَعِيمٗا وَمُلۡكٗا كَبِيرًا
20. Mpe soki otali kuna okomona kitoko na bokonzi bonene.
21 - Al-Insan (The Man) - 021
عَٰلِيَهُمۡ ثِيَابُ سُندُسٍ خُضۡرٞ وَإِسۡتَبۡرَقٞۖ وَحُلُّوٓاْ أَسَاوِرَ مِن فِضَّةٖ وَسَقَىٰهُمۡ رَبُّهُمۡ شَرَابٗا طَهُورًا
21. Мре bakolata bilamba ya langi ya mayi ya pondu ya lolenge ebele тре basinga ya palata na maboko na bango mpo na bonzenga. Mpe Nkolo wa bango akomelisa bango mayi ya bopeto.
22 - Al-Insan (The Man) - 022
إِنَّ هَٰذَا كَانَ لَكُمۡ جَزَآءٗ وَكَانَ سَعۡيُكُم مَّشۡكُورًا
22. Ya soló, oyo ezali lifuta тропа bino, mpe molende na bino ekofutama.
23 - Al-Insan (The Man) - 023
إِنَّا نَحۡنُ نَزَّلۡنَا عَلَيۡكَ ٱلۡقُرۡءَانَ تَنزِيلٗا
23. Ya sólo, biso nde tokitiselaki yo kurani oyo na ndambu ndambu.
24 - Al-Insan (The Man) - 024
فَٱصۡبِرۡ لِحُكۡمِ رَبِّكَ وَلَا تُطِعۡ مِنۡهُمۡ ءَاثِمًا أَوۡ كَفُورٗا
24. Zala na bozeli na oyo Nkolo nayo apesi mibeko, mpe kotosa mosumuki to mopengwi te okati na bango.
25 - Al-Insan (The Man) - 025
وَٱذۡكُرِ ٱسۡمَ رَبِّكَ بُكۡرَةٗ وَأَصِيلٗا
25. Мре tanga nkombo ya Nkolo nayo tongo mpe pokwa.
26 - Al-Insan (The Man) - 026
وَمِنَ ٱلَّيۡلِ فَٱسۡجُدۡ لَهُۥ وَسَبِّحۡهُ لَيۡلٗا طَوِيلًا
26. Mpe na butu ofukamela ye, mpe okumisa ye butu molayi.
27 - Al-Insan (The Man) - 027
إِنَّ هَـٰٓؤُلَآءِ يُحِبُّونَ ٱلۡعَاجِلَةَ وَيَذَرُونَ وَرَآءَهُمۡ يَوۡمٗا ثَقِيلٗا
27. Ya soló, bango balingi (bomoyi) ya nsé, mpe batiki sima na bango mokolo ya kilo mpe ya somo.
28 - Al-Insan (The Man) - 028
نَّحۡنُ خَلَقۡنَٰهُمۡ وَشَدَدۡنَآ أَسۡرَهُمۡۖ وَإِذَا شِئۡنَا بَدَّلۡنَآ أَمۡثَٰلَهُمۡ تَبۡدِيلًا
28. Biso nde tokela mpe tobongisi bokeli, soki tolingi tokoya na bato mosusu na esika na bango.
29 - Al-Insan (The Man) - 029
إِنَّ هَٰذِهِۦ تَذۡكِرَةٞۖ فَمَن شَآءَ ٱتَّخَذَ إِلَىٰ رَبِّهِۦ سَبِيلٗا
29. Ya sólo, oyo ezali bokundoli, oyo alingi, azwa nzela ya kokende epai ya Nkolo naye.
30 - Al-Insan (The Man) - 030
وَمَا تَشَآءُونَ إِلَّآ أَن يَشَآءَ ٱللَّهُۚ إِنَّ ٱللَّهَ كَانَ عَلِيمًا حَكِيمٗا
30. Na yango: Bokolinga eloko te sé ezala na bolingi ya Allah. Ya sólo, Allah azali moyebi atonda bwanya.
31 - Al-Insan (The Man) - 031