الجن
Al-Jinn
The Jinn
1 - Al-Jinn (The Jinn) - 001
قُلۡ أُوحِيَ إِلَيَّ أَنَّهُ ٱسۡتَمَعَ نَفَرٞ مِّنَ ٱلۡجِنِّ فَقَالُوٓاْ إِنَّا سَمِعۡنَا قُرۡءَانًا عَجَبٗا
1. Loba: Emoniseli ekitela ngai ya soló ete: Lisanga moko ya bilima batiaki matoyi тропа koyoka mpe balobaki ete: Ya sólo, toyoki buku ya lokumu na etangeli ya somo,
2 - Al-Jinn (The Jinn) - 002
يَهۡدِيٓ إِلَى ٱلرُّشۡدِ فَـَٔامَنَّا بِهِۦۖ وَلَن نُّشۡرِكَ بِرَبِّنَآ أَحَدٗا
2. Ezali kokamba na nzela ya semba mpe tondimaki na yango, mpe tokosangisa Nkolo wa biso na eloko mosusu te.
3 - Al-Jinn (The Jinn) - 003
وَأَنَّهُۥ تَعَٰلَىٰ جَدُّ رَبِّنَا مَا ٱتَّخَذَ صَٰحِبَةٗ وَلَا وَلَدٗا
3. Ya sólo, bonene naye Nkolo ya biso ekumama, azali na mwasi te, mpe mwana te.
4 - Al-Jinn (The Jinn) - 004
وَأَنَّهُۥ كَانَ يَقُولُ سَفِيهُنَا عَلَى ٱللَّهِ شَطَطٗا
4. Mpe ya sólo, ye (satana) azali koloba mabe тропа Allah.
5 - Al-Jinn (The Jinn) - 005
وَأَنَّا ظَنَنَّآ أَن لَّن تَقُولَ ٱلۡإِنسُ وَٱلۡجِنُّ عَلَى ٱللَّهِ كَذِبٗا
5. Mpe tokanisi ete: Bato na bilima bakoki kokosela Allah te.
6 - Al-Jinn (The Jinn) - 006
وَأَنَّهُۥ كَانَ رِجَالٞ مِّنَ ٱلۡإِنسِ يَعُوذُونَ بِرِجَالٖ مِّنَ ٱلۡجِنِّ فَزَادُوهُمۡ رَهَقٗا
6. Mpe ya sólo, Kati na bato, ezali na mibali misusu bazali koluka libateli epai ya bilima ya mibali, kasi yango ezali kobakisela bango sé mpasi.
7 - Al-Jinn (The Jinn) - 007
وَأَنَّهُمۡ ظَنُّواْ كَمَا ظَنَنتُمۡ أَن لَّن يَبۡعَثَ ٱللَّهُ أَحَدٗا
7. Mpe bakanisaki lolenge bokanisaki été Allah akosekwisa moto te.
8 - Al-Jinn (The Jinn) - 008
وَأَنَّا لَمَسۡنَا ٱلسَّمَآءَ فَوَجَدۡنَٰهَا مُلِئَتۡ حَرَسٗا شَدِيدٗا وَشُهُبٗا
8. Мре ya soló tomataki na mapata тропа koluka koyokamela, kasi tokutaki yango na babateli ya makasi mpe minzoto ya moto (mizali kobamba na mbangu mingi).
9 - Al-Jinn (The Jinn) - 009
وَأَنَّا كُنَّا نَقۡعُدُ مِنۡهَا مَقَٰعِدَ لِلسَّمۡعِۖ فَمَن يَسۡتَمِعِ ٱلۡأٓنَ يَجِدۡ لَهُۥ شِهَابٗا رَّصَدٗا
9. Мре tozalaki kofanda mpe koyoka, kasi oyo akoyokamela sika oyo akokutana na masasi ya moto (minzoto) ekobengana ye.
10 - Al-Jinn (The Jinn) - 010
وَأَنَّا لَا نَدۡرِيٓ أَشَرٌّ أُرِيدَ بِمَن فِي ٱلۡأَرۡضِ أَمۡ أَرَادَ بِهِمۡ رَبُّهُمۡ رَشَدٗا
10. Mpe ya sólo, toyebi te soki bazali kolingela bato ya mokili mabe to Nkolo na bango alingi kotiya bango na nzela ya semba.
11 - Al-Jinn (The Jinn) - 011
وَأَنَّا مِنَّا ٱلصَّـٰلِحُونَ وَمِنَّا دُونَ ذَٰلِكَۖ كُنَّا طَرَآئِقَ قِدَدٗا
11. Mpe kati na biso tozali na baye ya malamu mpe basusu bazali mabe, mpe tokabwanaki na mangomba ebele.
12 - Al-Jinn (The Jinn) - 012
وَأَنَّا ظَنَنَّآ أَن لَّن نُّعۡجِزَ ٱللَّهَ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَلَن نُّعۡجِزَهُۥ هَرَبٗا
12. Mpe ya sólo, tokanisaki été tokokutola nguya ya Allah awa na nsé te mpe lisusu ete tokosilisa nguya naye te na kokima.
13 - Al-Jinn (The Jinn) - 013
وَأَنَّا لَمَّا سَمِعۡنَا ٱلۡهُدَىٰٓ ءَامَنَّا بِهِۦۖ فَمَن يُؤۡمِنۢ بِرَبِّهِۦ فَلَا يَخَافُ بَخۡسٗا وَلَا رَهَقٗا
13. Mpe ya sólo, tango toyokaki bokambi, (kurani) tondimaki na yango, mpe oyo akondima na Nkolo naye, abanga te тропа bokutolami ya lifuta naye, mpe akobebisama te.
14 - Al-Jinn (The Jinn) - 014
وَأَنَّا مِنَّا ٱلۡمُسۡلِمُونَ وَمِنَّا ٱلۡقَٰسِطُونَۖ فَمَنۡ أَسۡلَمَ فَأُوْلَـٰٓئِكَ تَحَرَّوۡاْ رَشَدٗا
14. Mpe kati na biso, tozali na baye bazali bamizilima mpe na baye bazali babubi mpe baye bayambaki islam nde baye balukaki nzela ya semba,
15 - Al-Jinn (The Jinn) - 015
وَأَمَّا ٱلۡقَٰسِطُونَ فَكَانُواْ لِجَهَنَّمَ حَطَبٗا
15. Kasi тропа babubi, bakozala na moto ya lifelo ya bakoni oyo ezali kopela.
16 - Al-Jinn (The Jinn) - 016
وَأَلَّوِ ٱسۡتَقَٰمُواْ عَلَى ٱلطَّرِيقَةِ لَأَسۡقَيۡنَٰهُم مَّآءً غَدَقٗا
16. Soki bamitiyaka na nzela ya malamu, tolingaki komelisa bango mayi ya malamu,
17 - Al-Jinn (The Jinn) - 017
لِّنَفۡتِنَهُمۡ فِيهِۚ وَمَن يُعۡرِضۡ عَن ذِكۡرِ رَبِّهِۦ يَسۡلُكۡهُ عَذَابٗا صَعَدٗا
17. Mpo tomeka bango kati na yango. Kasi oyo akoboya bokundoli ya Nkolo naye, akosukisa ye na nzela ya etumbu oyo ekosilaka te.
1 Masâdjid: Bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 114
18 - Al-Jinn (The Jinn) - 018
وَأَنَّ ٱلۡمَسَٰجِدَ لِلَّهِ فَلَا تَدۡعُواْ مَعَ ٱللَّهِ أَحَدٗا
18. Mpe ya sôló, ba Masâdjid(1) bizali тропа Allah, kasi bobondela eloko mosusu elongo na Allah te.
1 Masâdjid: Bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 114.
19 - Al-Jinn (The Jinn) - 019
وَأَنَّهُۥ لَمَّا قَامَ عَبۡدُ ٱللَّهِ يَدۡعُوهُ كَادُواْ يَكُونُونَ عَلَيۡهِ لِبَدٗا
19. Mpe tango mowumbu ya Allah atelemaki тропа kosambela ye, bayaki ebele kotelema pembeni naye (tango wana nde bilima bandimaki na kurani esantu tango etangamaki).
20 - Al-Jinn (The Jinn) - 020
قُلۡ إِنَّمَآ أَدۡعُواْ رَبِّي وَلَآ أُشۡرِكُ بِهِۦٓ أَحَدٗا
20. Loba: Nazali kobondela Nkolo na ngai mpe nakosangisa ye na eloko mosusu te.
21 - Al-Jinn (The Jinn) - 021
قُلۡ إِنِّي لَآ أَمۡلِكُ لَكُمۡ ضَرّٗا وَلَا رَشَدٗا
21. Loba: Ya sólo, ngai nazali na bokoki ya kosala bino mabe to kotiya bino na nzela ya semba te.
22 - Al-Jinn (The Jinn) - 022
قُلۡ إِنِّي لَن يُجِيرَنِي مِنَ ٱللَّهِ أَحَدٞ وَلَنۡ أَجِدَ مِن دُونِهِۦ مُلۡتَحَدًا
22. Loba: Ya soló, moko te akobatela ngai na botiki Allah, mpe nazui ekimeli mosusu te na botiki Allah.
23 - Al-Jinn (The Jinn) - 023
إِلَّا بَلَٰغٗا مِّنَ ٱللَّهِ وَرِسَٰلَٰتِهِۦۚ وَمَن يَعۡصِ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥ فَإِنَّ لَهُۥ نَارَ جَهَنَّمَ خَٰلِدِينَ فِيهَآ أَبَدًا
23. (Nazali se) momemi sango mpe kokomisa liloba ya Allah. Mpe oyo akozanga kotosa Allah na motindami naye, ya solo akozala na moto ya lifelo libela na libela.
24 - Al-Jinn (The Jinn) - 024
حَتَّىٰٓ إِذَا رَأَوۡاْ مَا يُوعَدُونَ فَسَيَعۡلَمُونَ مَنۡ أَضۡعَفُ نَاصِرٗا وَأَقَلُّ عَدَدٗا
24. Kino bakomona oyo elengelami тропа bango ya etumbu, тре bakoyeba ba nani bazali па lisungi ya makasi, mpe ba nani bazali mike.
25 - Al-Jinn (The Jinn) - 025
قُلۡ إِنۡ أَدۡرِيٓ أَقَرِيبٞ مَّا تُوعَدُونَ أَمۡ يَجۡعَلُ لَهُۥ رَبِّيٓ أَمَدًا
25. Loba: Nayebi te maye balaki bino ezali pene to Nkolo na ngai atikeli yango tango molai.
26 - Al-Jinn (The Jinn) - 026
عَٰلِمُ ٱلۡغَيۡبِ فَلَا يُظۡهِرُ عَلَىٰ غَيۡبِهِۦٓ أَحَدًا
26. Moyebi ya mabombami, mpe moko te ayebi mabombami naye,
27 - Al-Jinn (The Jinn) - 027
إِلَّا مَنِ ٱرۡتَضَىٰ مِن رَّسُولٖ فَإِنَّهُۥ يَسۡلُكُ مِنۢ بَيۡنِ يَدَيۡهِ وَمِنۡ خَلۡفِهِۦ رَصَدٗا
27. Longola sé oyo akosepela naye lokola motindami, mpe akotiela ye bakengeli liboso na sima naye,
28 - Al-Jinn (The Jinn) - 028