النحل
An-Nahl
The Bee
1 - An-Nahl (The Bee) - 001
أَتَىٰٓ أَمۡرُ ٱللَّهِ فَلَا تَسۡتَعۡجِلُوهُۚ سُبۡحَٰنَهُۥ وَتَعَٰلَىٰ عَمَّا يُشۡرِكُونَ
1. Mokano mwa Allah ezali koya, kasi bowelisa yango te. Nkembo naye azali likolo koleka na maye bazali kosangisa ye na yango.
2 - An-Nahl (The Bee) - 002
يُنَزِّلُ ٱلۡمَلَـٰٓئِكَةَ بِٱلرُّوحِ مِنۡ أَمۡرِهِۦ عَلَىٰ مَن يَشَآءُ مِنۡ عِبَادِهِۦٓ أَنۡ أَنذِرُوٓاْ أَنَّهُۥ لَآ إِلَٰهَ إِلَّآ أَنَا۠ فَٱتَّقُونِ
2. Azali kokitisa ba anzelu na emoniseli (buku) na mokano naye, likolo ya moto oyo alingi kati ya bawumbu naye ete: Bokebisa ete ezali na nzambe mosusu te ya kobondela na bosóló sé ngai, na yango bobanga ngai.
3 - An-Nahl (The Bee) - 003
خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ بِٱلۡحَقِّۚ تَعَٰلَىٰ عَمَّا يُشۡرِكُونَ
3. Akela likolo na mabele na bosóló, azali likolo lia baye bazali kosangisa (ye).
4 - An-Nahl (The Bee) - 004
خَلَقَ ٱلۡإِنسَٰنَ مِن نُّطۡفَةٖ فَإِذَا هُوَ خَصِيمٞ مُّبِينٞ
4. Akeli moto na litanga ya mayi (ya mokongo), sima na yango moto akomi kotia tembe.
5 - An-Nahl (The Bee) - 005
وَٱلۡأَنۡعَٰمَ خَلَقَهَاۖ لَكُمۡ فِيهَا دِفۡءٞ وَمَنَٰفِعُ وَمِنۡهَا تَأۡكُلُونَ
5. Mpe akeli тропа bino bibwele, na yango bozali kozua ba mposo pona kosala bilamba na ba bolamu misusu, mpe misusu pona kolia.
6 - An-Nahl (The Bee) - 006
وَلَكُمۡ فِيهَا جَمَالٌ حِينَ تُرِيحُونَ وَحِينَ تَسۡرَحُونَ
6. Mpe esepelisaka bino na bonzenga tango bozongisaka yango na ndako na pokwa, mpe tango bobimisaka yango (na tongo) тропа kólia matiti.
7 - An-Nahl (The Bee) - 007
وَتَحۡمِلُ أَثۡقَالَكُمۡ إِلَىٰ بَلَدٖ لَّمۡ تَكُونُواْ بَٰلِغِيهِ إِلَّا بِشِقِّ ٱلۡأَنفُسِۚ إِنَّ رَبَّكُمۡ لَرَءُوفٞ رَّحِيمٞ
7. Mpe (bisusu) bizali komemela bino mikumba kokende na yango mboka bisusu biye bizali paši тропа bino кокота. Ya soló, Nkolo wa bino azali wa ngolu atonda mawa.
8 - An-Nahl (The Bee) - 008
وَٱلۡخَيۡلَ وَٱلۡبِغَالَ وَٱلۡحَمِيرَ لِتَرۡكَبُوهَا وَزِينَةٗۚ وَيَخۡلُقُ مَا لَا تَعۡلَمُونَ
8. Mpe bampunda na ba bighal(1) na ba hamir(2) mpo bomatela yango na botamboli, mpe misusu mizali sé кака тропа bonzenga. Мре azali kokela maye bino boyebi te.
1 Bighal: Ezali bosangani ya mpunda na aane ebotaka yango.
2 Hamir: Ezali ba niama oyo bamatelaka, ezuamaka mingi na ba mboka ya esobe. Na lopoto (ânes).
9 - An-Nahl (The Bee) - 009
وَعَلَى ٱللَّهِ قَصۡدُ ٱلسَّبِيلِ وَمِنۡهَا جَآئِرٞۚ وَلَوۡ شَآءَ لَهَدَىٰكُمۡ أَجۡمَعِينَ
9. Allah nde alakisaka nzela ya semba na bolamu naye. Kasi soki alingaki, nde akambi bino banso na nzela ya semba.
10 - An-Nahl (The Bee) - 010
هُوَ ٱلَّذِيٓ أَنزَلَ مِنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءٗۖ لَّكُم مِّنۡهُ شَرَابٞ وَمِنۡهُ شَجَرٞ فِيهِ تُسِيمُونَ
10. Yende akitisaka mayi kowuta na mapata тропа komela, mpe ezali kobotisa matiti na milona oyo bozali koleisa na yango bibwele,
11 - An-Nahl (The Bee) - 011
يُنۢبِتُ لَكُم بِهِ ٱلزَّرۡعَ وَٱلزَّيۡتُونَ وَٱلنَّخِيلَ وَٱلۡأَعۡنَٰبَ وَمِن كُلِّ ٱلثَّمَرَٰتِۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗ لِّقَوۡمٖ يَتَفَكَّرُونَ
11. Azali kobotisela bino milona mizali kobimisa nzete ya zaítún(1) mpe nzete ya tamru na a’náb(1) na bambuma ya ndenge na ndenge. Ya sólo, wana ezali elembo mpo bato basosolo.
1 Zaïtün: Bótala: suratu Al-An’âm: 99, 141.
2 A’nâb: Bótala: suratu Al-An’âm: 99, 141.
12 - An-Nahl (The Bee) - 012
وَسَخَّرَ لَكُمُ ٱلَّيۡلَ وَٱلنَّهَارَ وَٱلشَّمۡسَ وَٱلۡقَمَرَۖ وَٱلنُّجُومُ مُسَخَّرَٰتُۢ بِأَمۡرِهِۦٓۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٖ لِّقَوۡمٖ يَعۡقِلُونَ
12. Мре atieli bino butu na mokolo na moyi na sanza mpe na minzoto mizali kotambola na mitindo mia ye. Ya soló, wana ezali bilembo mpo bato bakoka koyeba.
13 - An-Nahl (The Bee) - 013
وَمَا ذَرَأَ لَكُمۡ فِي ٱلۡأَرۡضِ مُخۡتَلِفًا أَلۡوَٰنُهُۥٓۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗ لِّقَوۡمٖ يَذَّكَّرُونَ
13. Mpe oyo akeli тропа bino o kati na mokili ezali na balangi ebele. Ya sólo, wana ezali elembo mpo bato bakoka kokanisa.
14 - An-Nahl (The Bee) - 014
وَهُوَ ٱلَّذِي سَخَّرَ ٱلۡبَحۡرَ لِتَأۡكُلُواْ مِنۡهُ لَحۡمٗا طَرِيّٗا وَتَسۡتَخۡرِجُواْ مِنۡهُ حِلۡيَةٗ تَلۡبَسُونَهَاۖ وَتَرَى ٱلۡفُلۡكَ مَوَاخِرَ فِيهِ وَلِتَبۡتَغُواْ مِن فَضۡلِهِۦ وَلَعَلَّكُمۡ تَشۡكُرُونَ
14. Mpe ye nde akeli ebale, okati na yango bozali kozua mișuni ya kitoko ya kolia, mpe bozali kozua okati na yango bonzenga ya molato, mpe okomona masuwa ya minene mazali koleka na ebale na lokito ya makasi, mpo ete boluka mapamboli naye, mpe mpo ete na yango bokoka kotondo (ye).
15 - An-Nahl (The Bee) - 015
وَأَلۡقَىٰ فِي ٱلۡأَرۡضِ رَوَٰسِيَ أَن تَمِيدَ بِكُمۡ وَأَنۡهَٰرٗا وَسُبُلٗا لَّعَلَّكُمۡ تَهۡتَدُونَ
15. Mpe apika bangomba o kati na mabele тропа boningani na yango esala bino mabe te, mpe mingala na banzela, mpo bokoka kokambama.
16 - An-Nahl (The Bee) - 016
وَعَلَٰمَٰتٖۚ وَبِٱلنَّجۡمِ هُمۡ يَهۡتَدُونَ
16. Mpe na bilembo bisusu (bizali kolakisa bino nzela), ndenge moko minzoto mpo ete babunga te.
17 - An-Nahl (The Bee) - 017
أَفَمَن يَخۡلُقُ كَمَن لَّا يَخۡلُقُۚ أَفَلَا تَذَكَّرُونَ
17. Boye, oyo akelaka azali lokola oyo akelaka te? Boye bozali kokanisa te?
18 - An-Nahl (The Bee) - 018
وَإِن تَعُدُّواْ نِعۡمَةَ ٱللَّهِ لَا تُحۡصُوهَآۗ إِنَّ ٱللَّهَ لَغَفُورٞ رَّحِيمٞ
18. Mpe soki bolingi kotanga bolamu bwa Allah, bokokoka koyeba motango mwa yango te, ya solo Allah azali molimbisi atonda ngolu.
19 - An-Nahl (The Bee) - 019
وَٱللَّهُ يَعۡلَمُ مَا تُسِرُّونَ وَمَا تُعۡلِنُونَ
19. Mpe Allah ayebi maye bozali kobomba na maye bozali komonisa polele.
20 - An-Nahl (The Bee) - 020
وَٱلَّذِينَ يَدۡعُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ لَا يَخۡلُقُونَ شَيۡـٔٗا وَهُمۡ يُخۡلَقُونَ
20. Na baye wana bazali kobondela basusu mpe kotika Allah bakela eloko te, mpe bango bakelama.
21 - An-Nahl (The Bee) - 021
أَمۡوَٰتٌ غَيۡرُ أَحۡيَآءٖۖ وَمَا يَشۡعُرُونَ أَيَّانَ يُبۡعَثُونَ
21. Bazali bakufi kasi bazali na bomoyi te, mpe bayebi te mokolo nini bakosekwisama.
22 - An-Nahl (The Bee) - 022
إِلَٰهُكُمۡ إِلَٰهٞ وَٰحِدٞۚ فَٱلَّذِينَ لَا يُؤۡمِنُونَ بِٱلۡأٓخِرَةِ قُلُوبُهُم مُّنكِرَةٞ وَهُم مُّسۡتَكۡبِرُونَ
22. Nzambe wa bino (Allah) azali Nzambe sé moko ya kobondela na bosôló, mpe baye bazali kondima na mokolo mwa suka te, mitema mia bango miboya bomoko bwa Allah, mpe batondi na lolendo.
23 - An-Nahl (The Bee) - 023
لَا جَرَمَ أَنَّ ٱللَّهَ يَعۡلَمُ مَا يُسِرُّونَ وَمَا يُعۡلِنُونَۚ إِنَّهُۥ لَا يُحِبُّ ٱلۡمُسۡتَكۡبِرِينَ
23. Ezali na tembe te ete Allah ayebi maye bazali kobomba na maye bazali komonisa polele, ya soló ye alingaka bato ya lolendo te.
24 - An-Nahl (The Bee) - 024
وَإِذَا قِيلَ لَهُم مَّاذَآ أَنزَلَ رَبُّكُمۡ قَالُوٓاْ أَسَٰطِيرُ ٱلۡأَوَّلِينَ
24. Mpe soki batuni bango, nini Nkolo wa bino akitisa? Bakolobaka: Ezali masapo makala.
25 - An-Nahl (The Bee) - 025
لِيَحۡمِلُوٓاْ أَوۡزَارَهُمۡ كَامِلَةٗ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ وَمِنۡ أَوۡزَارِ ٱلَّذِينَ يُضِلُّونَهُم بِغَيۡرِ عِلۡمٍۗ أَلَا سَآءَ مَا يَزِرُونَ
25. Mpo été mokolo mwa suka bamema mikumba mia bango mibimba, na mikumba ya baye bango babungisaki na kozanga mayele. Boye ezali mabe te mikumba ya motindo oyo!
26 - An-Nahl (The Bee) - 026
قَدۡ مَكَرَ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡ فَأَتَى ٱللَّهُ بُنۡيَٰنَهُم مِّنَ ٱلۡقَوَاعِدِ فَخَرَّ عَلَيۡهِمُ ٱلسَّقۡفُ مِن فَوۡقِهِمۡ وَأَتَىٰهُمُ ٱلۡعَذَابُ مِنۡ حَيۡثُ لَا يَشۡعُرُونَ
26. Baye balekaki liboso na bango basilaka kosala likita ya mabe, mpe Allah abetaki na nsé ya misisa ya ndako na bango mpe likolo na yango ekwelaki bango mpe etumbu ezuaki bango o esika bazalaki kokanisa te.
27 - An-Nahl (The Bee) - 027
ثُمَّ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ يُخۡزِيهِمۡ وَيَقُولُ أَيۡنَ شُرَكَآءِيَ ٱلَّذِينَ كُنتُمۡ تُشَـٰٓقُّونَ فِيهِمۡۚ قَالَ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡعِلۡمَ إِنَّ ٱلۡخِزۡيَ ٱلۡيَوۡمَ وَٱلسُّوٓءَ عَلَى ٱلۡكَٰفِرِينَ
27. Sima o mokolo mwa suka, akokitisa bango na kosila lokumu, (na lolenge ya mabe) mpe sima akolobaka na bango ete: Wapi bambanda na ngai oyo bozalaki kobunda тропа bango? Bato ya mayele bakolobaka été; ya soló, mabe ekokitisama lelo epai ya bapagano.
28 - An-Nahl (The Bee) - 028
ٱلَّذِينَ تَتَوَفَّىٰهُمُ ٱلۡمَلَـٰٓئِكَةُ ظَالِمِيٓ أَنفُسِهِمۡۖ فَأَلۡقَوُاْ ٱلسَّلَمَ مَا كُنَّا نَعۡمَلُ مِن سُوٓءِۭۚ بَلَىٰٓۚ إِنَّ ٱللَّهَ عَلِيمُۢ بِمَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
28. Baye ba anzelu babomaka bango тропа bobubi bwa bango moko, na yango bakokitisama, mpe bakolobaka: Tozalaki kosala mabe te, kasi Allah ayebi maye bozalaki kosala.
29 - An-Nahl (The Bee) - 029
فَٱدۡخُلُوٓاْ أَبۡوَٰبَ جَهَنَّمَ خَٰلِدِينَ فِيهَاۖ فَلَبِئۡسَ مَثۡوَى ٱلۡمُتَكَبِّرِينَ
29. Bokota na bikuke ya lifelo, libela kati na yango, etumbu kani ya mabe eye bato ya lolendo bakozuaka!
30 - An-Nahl (The Bee) - 030
۞وَقِيلَ لِلَّذِينَ ٱتَّقَوۡاْ مَاذَآ أَنزَلَ رَبُّكُمۡۚ قَالُواْ خَيۡرٗاۗ لِّلَّذِينَ أَحۡسَنُواْ فِي هَٰذِهِ ٱلدُّنۡيَا حَسَنَةٞۚ وَلَدَارُ ٱلۡأٓخِرَةِ خَيۡرٞۚ وَلَنِعۡمَ دَارُ ٱلۡمُتَّقِينَ
30. Mpe babangi Allah bakotunama été: Eloko nini Nkolo wa bino akitisi? Bakolobaka: Bolamu, тропа baye babongisaki na bomoi ya nsé na kosala bolamu, kasi efandelo ya mokolo mwa suka nde ezali kitoko koleka, oyo nde ndako ya malamu тропа babangi.
31 - An-Nahl (The Bee) - 031
جَنَّـٰتُ عَدۡنٖ يَدۡخُلُونَهَا تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُۖ لَهُمۡ فِيهَا مَا يَشَآءُونَۚ كَذَٰلِكَ يَجۡزِي ٱللَّهُ ٱلۡمُتَّقِينَ
31. Lola ya edeni o esika bakokotaka, mingala mizali kolekisa mayi o nsé na yango, bakozwaka o kati na yango manso bakolingaka. Ndenge wana nde Allah afutaka babangi.
32 - An-Nahl (The Bee) - 032
ٱلَّذِينَ تَتَوَفَّىٰهُمُ ٱلۡمَلَـٰٓئِكَةُ طَيِّبِينَ يَقُولُونَ سَلَٰمٌ عَلَيۡكُمُ ٱدۡخُلُواْ ٱلۡجَنَّةَ بِمَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
32. Baye ba anzelu bakobomaka wana bazali peto, bakolobaka: Boboto ezala likolo na bino, bokoto o kati ya lola engebene na maye ya malamu bozalaki kosala.
33 - An-Nahl (The Bee) - 033
هَلۡ يَنظُرُونَ إِلَّآ أَن تَأۡتِيَهُمُ ٱلۡمَلَـٰٓئِكَةُ أَوۡ يَأۡتِيَ أَمۡرُ رَبِّكَۚ كَذَٰلِكَ فَعَلَ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡۚ وَمَا ظَلَمَهُمُ ٱللَّهُ وَلَٰكِن كَانُوٓاْ أَنفُسَهُمۡ يَظۡلِمُونَ
33. Boye bazali kozela été ba anzelu bayela bango to mokano ya Nkolo wayo eya? Lolenge wana nde baye bazalaki liboso basalaki, mpe Allah abubaki bango te kasi bango moko nde bamibubaki.
34 - An-Nahl (The Bee) - 034
فَأَصَابَهُمۡ سَيِّـَٔاتُ مَا عَمِلُواْ وَحَاقَ بِهِم مَّا كَانُواْ بِهِۦ يَسۡتَهۡزِءُونَ
34. Mpe bazuaki mabe тропа maye basalaki, mpe maye bazalaki kotiola mazingaki bango o bisika binso.
35 - An-Nahl (The Bee) - 035
وَقَالَ ٱلَّذِينَ أَشۡرَكُواْ لَوۡ شَآءَ ٱللَّهُ مَا عَبَدۡنَا مِن دُونِهِۦ مِن شَيۡءٖ نَّحۡنُ وَلَآ ءَابَآؤُنَا وَلَا حَرَّمۡنَا مِن دُونِهِۦ مِن شَيۡءٖۚ كَذَٰلِكَ فَعَلَ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡۚ فَهَلۡ عَلَى ٱلرُّسُلِ إِلَّا ٱلۡبَلَٰغُ ٱلۡمُبِينُ
35. Pe baye bazali kosangisa (Allah) balobi été: Soki Allah alingaki nde tobondelaki eloko mosusu te sé ye, ezala biso na batata na biso, nde topekisaki mpe eloko na esika naye te, lolenge wana nde baye balekaki liboso na bango bazalaki kosala, nde тропа batindami ezali sé kokomisa sango polele te?
36 - An-Nahl (The Bee) - 036
وَلَقَدۡ بَعَثۡنَا فِي كُلِّ أُمَّةٖ رَّسُولًا أَنِ ٱعۡبُدُواْ ٱللَّهَ وَٱجۡتَنِبُواْ ٱلطَّـٰغُوتَۖ فَمِنۡهُم مَّنۡ هَدَى ٱللَّهُ وَمِنۡهُم مَّنۡ حَقَّتۡ عَلَيۡهِ ٱلضَّلَٰلَةُۚ فَسِيرُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَٱنظُرُواْ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلۡمُكَذِّبِينَ
36. Мре tosilaki kotinda na umma(1) nyonso motindami, mpo ayebisa bato naye été: Babondela Allah mpe bozala mosika na motomboki(2), kati na bango Allah akambaki, mpe kati na bango basusu libungi ekokisamaki likolo na bango. Botambola o kati ya mokili bótala ndenge esukela baye baboyaki kondima.
1 Umma: Elakisi: Etuka, bótala lisusu na suratu Al-Baqarah mokapo: 128.
2 Motomboki: Ezali eloko to moto nionso bazali kobondela ye mpe asepeli na mabondeli wana, mpe asepeli balanda ye na batosa ye na esika ya Allah, elingi mpe lisusu koloba: Kosambisa na mibeko oyo ezali ya Allah te mpe ya motindami naye te, bótala na suratu Al-Mâ-idah: Mokapo: 60, An-Nisá: 51, 60, 76, mpe Al-Baqarah: 256, 257.
37 - An-Nahl (The Bee) - 037
إِن تَحۡرِصۡ عَلَىٰ هُدَىٰهُمۡ فَإِنَّ ٱللَّهَ لَا يَهۡدِي مَن يُضِلُّۖ وَمَا لَهُم مِّن نَّـٰصِرِينَ
37. Ata ozali kosala ndenge nyoso mpo bakambama, ya soló, Allah akambaka baye babunga te mpe bakozua moto ya kosalisa mpe kolongisa bango te.
38 - An-Nahl (The Bee) - 038
وَأَقۡسَمُواْ بِٱللَّهِ جَهۡدَ أَيۡمَٰنِهِمۡ لَا يَبۡعَثُ ٱللَّهُ مَن يَمُوتُۚ بَلَىٰ وَعۡدًا عَلَيۡهِ حَقّٗا وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يَعۡلَمُونَ
38. Mpe bazali kolapa na nkombo ya Allah polele été: Allah akosekwisa bawa te. Nzoka nde wana ezali elaka ya bosôló epai naye, kasi ebele ya bato bazali koyeba te.
39 - An-Nahl (The Bee) - 039
لِيُبَيِّنَ لَهُمُ ٱلَّذِي يَخۡتَلِفُونَ فِيهِ وَلِيَعۡلَمَ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ أَنَّهُمۡ كَانُواْ كَٰذِبِينَ
39. Mpo alimbola тропа bango maye bakokesene na yango, тре bapengwi bayeba ete ya sólo, bango bazalaki kokosa.
40 - An-Nahl (The Bee) - 040
إِنَّمَا قَوۡلُنَا لِشَيۡءٍ إِذَآ أَرَدۡنَٰهُ أَن نَّقُولَ لَهُۥ كُن فَيَكُونُ
40. Ya sólo, tango tolingaka eloko, tokolobaka sé liloba moko: Zala; mpe ezalisami.
41 - An-Nahl (The Bee) - 041
وَٱلَّذِينَ هَاجَرُواْ فِي ٱللَّهِ مِنۢ بَعۡدِ مَا ظُلِمُواْ لَنُبَوِّئَنَّهُمۡ فِي ٱلدُّنۡيَا حَسَنَةٗۖ وَلَأَجۡرُ ٱلۡأٓخِرَةِ أَكۡبَرُۚ لَوۡ كَانُواْ يَعۡلَمُونَ
41. Мре baye batikaki (makkah) bakei na (madinah) na tango eye basilaki kobubama, tokofandisa bango na mokili ya bomoi ya kitoko. Kasi lifuta ya lola ezali monene soki bayebaki.
42 - An-Nahl (The Bee) - 042
ٱلَّذِينَ صَبَرُواْ وَعَلَىٰ رَبِّهِمۡ يَتَوَكَّلُونَ
42. Baye bakangaki mitema mpe batiaki elikia epai ya Nkolo wa bango.
43 - An-Nahl (The Bee) - 043
وَمَآ أَرۡسَلۡنَا مِن قَبۡلِكَ إِلَّا رِجَالٗا نُّوحِيٓ إِلَيۡهِمۡۖ فَسۡـَٔلُوٓاْ أَهۡلَ ٱلذِّكۡرِ إِن كُنتُمۡ لَا تَعۡلَمُونَ
43. Мре totindaki yambo nayo te, sé mibali baye tokitiselaki bango emoniseli, botuna baye bayebi soki bozali na boyebi te.
44 - An-Nahl (The Bee) - 044
بِٱلۡبَيِّنَٰتِ وَٱلزُّبُرِۗ وَأَنزَلۡنَآ إِلَيۡكَ ٱلذِّكۡرَ لِتُبَيِّنَ لِلنَّاسِ مَا نُزِّلَ إِلَيۡهِمۡ وَلَعَلَّهُمۡ يَتَفَكَّرُونَ
44. (Totindaki bango) na bilembo bia polele, na babuku ensantu, mpe tokitisi epai nayo buku mpo été: Olimbolela bato maye makiteli bango mpo basosolo.
45 - An-Nahl (The Bee) - 045
أَفَأَمِنَ ٱلَّذِينَ مَكَرُواْ ٱلسَّيِّـَٔاتِ أَن يَخۡسِفَ ٱللَّهُ بِهِمُ ٱلۡأَرۡضَ أَوۡ يَأۡتِيَهُمُ ٱلۡعَذَابُ مِنۡ حَيۡثُ لَا يَشۡعُرُونَ
45. Kasi тропа baye bazalaki kosala likita ya mabe, bazali na ebateli moko te sé Allah azindisa bango na mabele to etumbu eyela bango o esika nyoso oyo bakoyeba te?
46 - An-Nahl (The Bee) - 046
أَوۡ يَأۡخُذَهُمۡ فِي تَقَلُّبِهِمۡ فَمَا هُم بِمُعۡجِزِينَ
46. То mpe ezua bango na ngonga ya misala na bango mpo bazua nzela ya kokima te.
47 - An-Nahl (The Bee) - 047
أَوۡ يَأۡخُذَهُمۡ عَلَىٰ تَخَوُّفٖ فَإِنَّ رَبَّكُمۡ لَرَءُوفٞ رَّحِيمٌ
47. To bobangi (bwa makasi kowuta epai ya Nkolo wa bango ezua bango) ya soló, Nkolo wa bino azali na ngolu atonda mawa.
48 - An-Nahl (The Bee) - 048
أَوَلَمۡ يَرَوۡاْ إِلَىٰ مَا خَلَقَ ٱللَّهُ مِن شَيۡءٖ يَتَفَيَّؤُاْ ظِلَٰلُهُۥ عَنِ ٱلۡيَمِينِ وَٱلشَّمَآئِلِ سُجَّدٗا لِّلَّهِ وَهُمۡ دَٰخِرُونَ
48. Boye bazali kornona te ete maye manso Allah akela, bililingi na yango bitelama alima na ngambu ya loboko ya mobali mpe na loboko ya mwasi, nyoso bizali kofukamela Allah na limemia mpe nakomikitisa?
49 - An-Nahl (The Bee) - 049
وَلِلَّهِۤ يَسۡجُدُۤ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِ مِن دَآبَّةٖ وَٱلۡمَلَـٰٓئِكَةُ وَهُمۡ لَا يَسۡتَكۡبِرُونَ
49. Bikelamu binso o likolo mpe na nsé bizali kogumbamela Allah, banyama mpe ba anzelu mpe bazali kosala lolendo te.
50 - An-Nahl (The Bee) - 050
يَخَافُونَ رَبَّهُم مِّن فَوۡقِهِمۡ وَيَفۡعَلُونَ مَا يُؤۡمَرُونَ۩
50. Bazali kobanga Nkolo wa bango oyo azali o likolo lia bango, mpe basalaka maye akotindaka bango.
51 - An-Nahl (The Bee) - 051
۞وَقَالَ ٱللَّهُ لَا تَتَّخِذُوٓاْ إِلَٰهَيۡنِ ٱثۡنَيۡنِۖ إِنَّمَا هُوَ إِلَٰهٞ وَٰحِدٞ فَإِيَّـٰيَ فَٱرۡهَبُونِ
51. Mpe Allah alobi: Bozua banzambe babale te. Kasi ya soló, ye azali sé nzambe moko ya sólo asengeli na mabondeli, bobanga sé ngaï.
52 - An-Nahl (The Bee) - 052
وَلَهُۥ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَلَهُ ٱلدِّينُ وَاصِبًاۚ أَفَغَيۡرَ ٱللَّهِ تَتَّقُونَ
52. Mpe manso mazuami o nsé mpe o likolo mazali ya ye, mpe limemia nyoso ezali ya ye. Na yango, boye bokobanga eloko mosusu kotika Allah?
53 - An-Nahl (The Bee) - 053
وَمَا بِكُم مِّن نِّعۡمَةٖ فَمِنَ ٱللَّهِۖ ثُمَّ إِذَا مَسَّكُمُ ٱلضُّرُّ فَإِلَيۡهِ تَجۡـَٔرُونَ
53. Mpe binso bia malamu biye bozali na yango eutaka sé epai ya Allah. Sima soki mabe mazui bino, bokobelelaka sé ye na mongongo ya makasi.
54 - An-Nahl (The Bee) - 054
ثُمَّ إِذَا كَشَفَ ٱلضُّرَّ عَنكُمۡ إِذَا فَرِيقٞ مِّنكُم بِرَبِّهِمۡ يُشۡرِكُونَ
54. Mpe soki alongoli mabe mana likolo lia bino, okomona basusu kati na bino babandi kosangisa Nkolo wa bango.
55 - An-Nahl (The Bee) - 055
لِيَكۡفُرُواْ بِمَآ ءَاتَيۡنَٰهُمۡۚ فَتَمَتَّعُواْ فَسَوۡفَ تَعۡلَمُونَ
55. Bazali kopengwa na maye topesaki bango. Bosakana na mwa tango moke, bokoyeba kala mingi te.
56 - An-Nahl (The Bee) - 056
وَيَجۡعَلُونَ لِمَا لَا يَعۡلَمُونَ نَصِيبٗا مِّمَّا رَزَقۡنَٰهُمۡۗ تَٱللَّهِ لَتُسۡـَٔلُنَّ عَمَّا كُنتُمۡ تَفۡتَرُونَ
56. Мре bazali kolongola ndambu ya bozui oyo topesi bango тропа kopesa yango na banzambe ya bikeko oyo bayebi te. Na nkombo ya Allah; bokotunama na maye bozali kosala.
57 - An-Nahl (The Bee) - 057
وَيَجۡعَلُونَ لِلَّهِ ٱلۡبَنَٰتِ سُبۡحَٰنَهُۥ وَلَهُم مَّا يَشۡتَهُونَ
57. Mpe bazali kopesa Allah bana basi, nkembo naye! Kasi bazali komipesa oyo bango moko balingi.
58 - An-Nahl (The Bee) - 058
وَإِذَا بُشِّرَ أَحَدُهُم بِٱلۡأُنثَىٰ ظَلَّ وَجۡهُهُۥ مُسۡوَدّٗا وَهُوَ كَظِيمٞ
58. Mpe soki bapesi moko wa bango sango ya mbotama ya mwana mwasi, abebisi elongi naye mpe atondisi yango na mpizoli.
59 - An-Nahl (The Bee) - 059
يَتَوَٰرَىٰ مِنَ ٱلۡقَوۡمِ مِن سُوٓءِ مَا بُشِّرَ بِهِۦٓۚ أَيُمۡسِكُهُۥ عَلَىٰ هُونٍ أَمۡ يَدُسُّهُۥ فِي ٱلتُّرَابِۗ أَلَا سَآءَ مَا يَحۡكُمُونَ
59. Akomi kokima bato na kobombama, тропа sango ya mabe oyo ekomeli ye, abatela mwana wana na nsoni azali na yango to akotisa ye na mabele? Ezaleli mabe ya motindo boye!
60 - An-Nahl (The Bee) - 060
لِلَّذِينَ لَا يُؤۡمِنُونَ بِٱلۡأٓخِرَةِ مَثَلُ ٱلسَّوۡءِۖ وَلِلَّهِ ٱلۡمَثَلُ ٱلۡأَعۡلَىٰۚ وَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
60. Mpona baye bazali kondima na mokolo mwa suka te, bapesi ndakisa ya mabe, kasi ndakisa ya likolo koleka ezali ya Allah, mpe azali na bokasi atonda bwanya.
61 - An-Nahl (The Bee) - 061
وَلَوۡ يُؤَاخِذُ ٱللَّهُ ٱلنَّاسَ بِظُلۡمِهِم مَّا تَرَكَ عَلَيۡهَا مِن دَآبَّةٖ وَلَٰكِن يُؤَخِّرُهُمۡ إِلَىٰٓ أَجَلٖ مُّسَمّٗىۖ فَإِذَا جَآءَ أَجَلُهُمۡ لَا يَسۡتَـٔۡخِرُونَ سَاعَةٗ وَلَا يَسۡتَقۡدِمُونَ
61. Soki Allah alingaki kopesa etumbu na bato mpona mabe na bango, nde ata ekelamo moko te elingaki kotikala na nsé. Kasi azali kozelisa bango kino mokano mokokokisama, mpe soki tango yango ekoki, bakozongisa yango sima te mpe bakopusa yango liboso te.
62 - An-Nahl (The Bee) - 062
وَيَجۡعَلُونَ لِلَّهِ مَا يَكۡرَهُونَۚ وَتَصِفُ أَلۡسِنَتُهُمُ ٱلۡكَذِبَ أَنَّ لَهُمُ ٱلۡحُسۡنَىٰۚ لَا جَرَمَ أَنَّ لَهُمُ ٱلنَّارَ وَأَنَّهُم مُّفۡرَطُونَ
62. Mpe bazali kobonzela Allah maye bango moko bazali kolinga yango te, mpe bazali kobimisa lokuta na minoko mia bango été: Bakozala na lifuta lia kitoko. Esika na bango ekozala na moto mpe bakozala bato ya liboso ya komema bango noki noki.
63 - An-Nahl (The Bee) - 063
تَٱللَّهِ لَقَدۡ أَرۡسَلۡنَآ إِلَىٰٓ أُمَمٖ مِّن قَبۡلِكَ فَزَيَّنَ لَهُمُ ٱلشَّيۡطَٰنُ أَعۡمَٰلَهُمۡ فَهُوَ وَلِيُّهُمُ ٱلۡيَوۡمَ وَلَهُمۡ عَذَابٌ أَلِيمٞ
63. Na nkombo ya Allah, tosilaki kotinda (bantoma) na bituka ebele liboso nayo, kasi satana abongiselaki bango misala ya mabe, mpe ye azali mokonzi wa bango lelo, kasi mokolo ya lobi bakozala na etumbu ya makasi.
64 - An-Nahl (The Bee) - 064
وَمَآ أَنزَلۡنَا عَلَيۡكَ ٱلۡكِتَٰبَ إِلَّا لِتُبَيِّنَ لَهُمُ ٱلَّذِي ٱخۡتَلَفُواْ فِيهِ وَهُدٗى وَرَحۡمَةٗ لِّقَوۡمٖ يُؤۡمِنُونَ
64. Mpe tokitiselaki yo buku sé mpo olimbola bango malamu maye bazali na bokeseni na yango, mpe mpo ezala bokambi mpe ngolu тропа bandimi.
65 - An-Nahl (The Bee) - 065
وَٱللَّهُ أَنزَلَ مِنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءٗ فَأَحۡيَا بِهِ ٱلۡأَرۡضَ بَعۡدَ مَوۡتِهَآۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗ لِّقَوۡمٖ يَسۡمَعُونَ
65. Mpe Allah akitisi mayi kowuta o likolo, mpe azali kopesa bomoyi na mabele o sima ya kokufa na yango. Ya soló, wana nde elembo тропа baye bazali koyoka.
66 - An-Nahl (The Bee) - 066
وَإِنَّ لَكُمۡ فِي ٱلۡأَنۡعَٰمِ لَعِبۡرَةٗۖ نُّسۡقِيكُم مِّمَّا فِي بُطُونِهِۦ مِنۢ بَيۡنِ فَرۡثٖ وَدَمٖ لَّبَنًا خَالِصٗا سَآئِغٗا لِّلشَّـٰرِبِينَ
66. Мре ya soló, тропа bibwele, ezali liteya monene тропа bino, tozali komelisa bino biloko biye bizali na mabumu na yango bisangani na makila, mpe ebimisi miliki ya kitoko mpe elengi тропа komelisa bino.
67 - An-Nahl (The Bee) - 067
وَمِن ثَمَرَٰتِ ٱلنَّخِيلِ وَٱلۡأَعۡنَٰبِ تَتَّخِذُونَ مِنۡهُ سَكَرٗا وَرِزۡقًا حَسَنًاۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗ لِّقَوۡمٖ يَعۡقِلُونَ
67 Mpe kowuta na mbuma ya Naghil(1) na a’nâb(2) biye bozali kozua bilei na masanga kitoko. Ya sólo, wana ezali elembo тропа bato bakoka koyeba.
1 Naghil: Nzete ya tamru.
2 A’náb: Ezali ba mbuma ya mike mike baliaka.
68 - An-Nahl (The Bee) - 068
وَأَوۡحَىٰ رَبُّكَ إِلَى ٱلنَّحۡلِ أَنِ ٱتَّخِذِي مِنَ ٱلۡجِبَالِ بُيُوتٗا وَمِنَ ٱلشَّجَرِ وَمِمَّا يَعۡرِشُونَ
68. Mpe Nkolo wayo akitisaki mayele epai ya ba nzoi été: Bozua bisika ya kofanda na bangomba mpe okati ya banzete, to mpe bisika bisusu oyo bato basali.
69 - An-Nahl (The Bee) - 069
ثُمَّ كُلِي مِن كُلِّ ٱلثَّمَرَٰتِ فَٱسۡلُكِي سُبُلَ رَبِّكِ ذُلُلٗاۚ يَخۡرُجُ مِنۢ بُطُونِهَا شَرَابٞ مُّخۡتَلِفٌ أَلۡوَٰنُهُۥ فِيهِ شِفَآءٞ لِّلنَّاسِۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗ لِّقَوۡمٖ يَتَفَكَّرُونَ
69. Mpe sima bolia bambuma nyonso mpe holanda ba nzela ya Nkolo wa bino oyo atieli bino yango na bolembu, na mabumu na yango, mafuta ezali kobima ya balangi ndenge na ndenge mpe elengi тропа komela, mpe na kati na yango ezali libiki тропа bato. Ya sólo, wana ezali elembo тропа bato bakoka kososola.
70 - An-Nahl (The Bee) - 070
وَٱللَّهُ خَلَقَكُمۡ ثُمَّ يَتَوَفَّىٰكُمۡۚ وَمِنكُم مَّن يُرَدُّ إِلَىٰٓ أَرۡذَلِ ٱلۡعُمُرِ لِكَيۡ لَا يَعۡلَمَ بَعۡدَ عِلۡمٖ شَيۡـًٔاۚ إِنَّ ٱللَّهَ عَلِيمٞ قَدِيرٞ
70. Allah nde akelaki bino mpe ye nde akoboma bino. Mpe basusu kati na bino apesi bango bomoi molai kino akomi mobange makasi azali koyeba lisusu eloko te. Ya solo, Allah azali moyebi atonda na makoki.
71 - An-Nahl (The Bee) - 071
وَٱللَّهُ فَضَّلَ بَعۡضَكُمۡ عَلَىٰ بَعۡضٖ فِي ٱلرِّزۡقِۚ فَمَا ٱلَّذِينَ فُضِّلُواْ بِرَآدِّي رِزۡقِهِمۡ عَلَىٰ مَا مَلَكَتۡ أَيۡمَٰنُهُمۡ فَهُمۡ فِيهِ سَوَآءٌۚ أَفَبِنِعۡمَةِ ٱللَّهِ يَجۡحَدُونَ
71. Allah atomboli basusu kati na bino likolo ya baninga тропа bozui. Kasi baye bazali na yango, esengeli na bango kopesa na baye bazali na nsé na bango, (bazangi) mpo été bakokana. Boye bakowangana bolamu ya Allah?
72 - An-Nahl (The Bee) - 072
وَٱللَّهُ جَعَلَ لَكُم مِّنۡ أَنفُسِكُمۡ أَزۡوَٰجٗا وَجَعَلَ لَكُم مِّنۡ أَزۡوَٰجِكُم بَنِينَ وَحَفَدَةٗ وَرَزَقَكُم مِّنَ ٱلطَّيِّبَٰتِۚ أَفَبِٱلۡبَٰطِلِ يُؤۡمِنُونَ وَبِنِعۡمَتِ ٱللَّهِ هُمۡ يَكۡفُرُونَ
72. Allah apesa bino basi baye bawuti na bino moko. Mpe basi ba bino bazali kobotela bino bana na bankoko, тре apeși bino bozui kitoko, boye bazali kondima na mabe mpe bazali kopengwa na bolamu ya Allah?
73 - An-Nahl (The Bee) - 073
وَيَعۡبُدُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ مَا لَا يَمۡلِكُ لَهُمۡ رِزۡقٗا مِّنَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ شَيۡـٔٗا وَلَا يَسۡتَطِيعُونَ
73. Мре batiki Allah bazali kobondela eloko oyo ekopesa bango bilei kowuta na likolo te тре na nsé te, kasi bakokoka eloko moko te.
74 - An-Nahl (The Bee) - 074
فَلَا تَضۡرِبُواْ لِلَّهِ ٱلۡأَمۡثَالَۚ إِنَّ ٱللَّهَ يَعۡلَمُ وَأَنتُمۡ لَا تَعۡلَمُونَ
74. Mpe bokokisa Allah na eloko te. Ya sólo, Allah ayebi kasi bino boyebi te.
75 - An-Nahl (The Bee) - 075
۞ضَرَبَ ٱللَّهُ مَثَلًا عَبۡدٗا مَّمۡلُوكٗا لَّا يَقۡدِرُ عَلَىٰ شَيۡءٖ وَمَن رَّزَقۡنَٰهُ مِنَّا رِزۡقًا حَسَنٗا فَهُوَ يُنفِقُ مِنۡهُ سِرّٗا وَجَهۡرًاۖ هَلۡ يَسۡتَوُۥنَۚ ٱلۡحَمۡدُ لِلَّهِۚ بَلۡ أَكۡثَرُهُمۡ لَا يَعۡلَمُونَ
75. Allah asilaki kobeta ndakisa ya mowumbu oyo azali epai ya Nkolo waye azali kokoka kosala eloko te, na oyo topesi ye bozui ya malamu mpe bozui wana azali kobimisa yango тропа Allah, na kobombama mpe na polele. Boye bakokani? Lokumu na Allah, kasi ebele kati na bango bazali koyeba te.
76 - An-Nahl (The Bee) - 076
وَضَرَبَ ٱللَّهُ مَثَلٗا رَّجُلَيۡنِ أَحَدُهُمَآ أَبۡكَمُ لَا يَقۡدِرُ عَلَىٰ شَيۡءٖ وَهُوَ كَلٌّ عَلَىٰ مَوۡلَىٰهُ أَيۡنَمَا يُوَجِّههُّ لَا يَأۡتِ بِخَيۡرٍ هَلۡ يَسۡتَوِي هُوَ وَمَن يَأۡمُرُ بِٱلۡعَدۡلِ وَهُوَ عَلَىٰ صِرَٰطٖ مُّسۡتَقِيمٖ
76. Мре Allah abeti ndakisa ya mibali mibale, moko alobaka te, mpe asalaka eloko te, makambo manso mazali kosalama sé na mitindo mia Nkolo waye, soki atindi ye asalaka bolamu te. Boye bazali lolenge moko na oyo azali kotinda na bosembo mpe azali na nzela ya semba?
77 - An-Nahl (The Bee) - 077
وَلِلَّهِ غَيۡبُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۚ وَمَآ أَمۡرُ ٱلسَّاعَةِ إِلَّا كَلَمۡحِ ٱلۡبَصَرِ أَوۡ هُوَ أَقۡرَبُۚ إِنَّ ٱللَّهَ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٞ
77. Mabombami ya likolo na ya nsé ezali ya Allah. Mpe тропа mokolo ya suka ekozala lokola kobuka miso to mpe ezali pene koleka oyo wana. Ya soló, Allah azali na makoki likolo ya biloko binso.
78 - An-Nahl (The Bee) - 078
وَٱللَّهُ أَخۡرَجَكُم مِّنۢ بُطُونِ أُمَّهَٰتِكُمۡ لَا تَعۡلَمُونَ شَيۡـٔٗا وَجَعَلَ لَكُمُ ٱلسَّمۡعَ وَٱلۡأَبۡصَٰرَ وَٱلۡأَفۡـِٔدَةَ لَعَلَّكُمۡ تَشۡكُرُونَ
78. Mpe Allah nde oyo abimisaka bino o kati ya mabumu ya bamama ba bino boyebi eloko te, mpe atiyeli bino boyoki na bomoni na mitema mpo bokoka kotondo.
79 - An-Nahl (The Bee) - 079
أَلَمۡ يَرَوۡاْ إِلَى ٱلطَّيۡرِ مُسَخَّرَٰتٖ فِي جَوِّ ٱلسَّمَآءِ مَا يُمۡسِكُهُنَّ إِلَّا ٱللَّهُۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٖ لِّقَوۡمٖ يُؤۡمِنُونَ
79. Boye bozali kornona te ete! Ba ndeke baye bazali kopumbwa o likolo, eloko ya kosimba bango ezali te sé Allah? Ya sólo, wana ezali elembo mpo bato bakoka kondima.
80 -