الأنعام

 

Al-An'am

 

The Cattle

1 - Al-An'am (The Cattle) - 001

ٱلۡحَمۡدُ لِلَّهِ ٱلَّذِي خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ وَجَعَلَ ٱلظُّلُمَٰتِ وَٱلنُّورَۖ ثُمَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ بِرَبِّهِمۡ يَعۡدِلُونَ
1. Lokumu na Allah oyo akela likolo na mabele, mpe atie molili mpe bongengi. Sima, baye bapengwi na Nkolo wa bango bazali kokokisa ye na bikelamu.

2 - Al-An'am (The Cattle) - 002

هُوَ ٱلَّذِي خَلَقَكُم مِّن طِينٖ ثُمَّ قَضَىٰٓ أَجَلٗاۖ وَأَجَلٞ مُّسَمًّى عِندَهُۥۖ ثُمَّ أَنتُمۡ تَمۡتَرُونَ
2. Yende akela bino kowuta na mabele, sima ati elaka (mpona bino), mpe elaka etiyamaka sé epai naye. Sima, bozali kotia tembe.

3 - Al-An'am (The Cattle) - 003

وَهُوَ ٱللَّهُ فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَفِي ٱلۡأَرۡضِ يَعۡلَمُ سِرَّكُمۡ وَجَهۡرَكُمۡ وَيَعۡلَمُ مَا تَكۡسِبُونَ
3. Mpe ye, azali Allah oyo azali o likolo mpe na nsé,(1) ayebaka mabombami ma bino na maye bomonisaka polele. Mpe ayebi maye bozali kosala.
1 Oye nde Allah bazali kobondela na likolo mpe na nsé.

4 - Al-An'am (The Cattle) - 004

وَمَا تَأۡتِيهِم مِّنۡ ءَايَةٖ مِّنۡ ءَايَٰتِ رَبِّهِمۡ إِلَّا كَانُواْ عَنۡهَا مُعۡرِضِينَ
4. Mpe elembo kati ya bilembo bia Nkolo wa bango ekomelaki bango te, sé baboya yango.

5 - Al-An'am (The Cattle) - 005

فَقَدۡ كَذَّبُواْ بِٱلۡحَقِّ لَمَّا جَآءَهُمۡ فَسَوۡفَ يَأۡتِيهِمۡ أَنۢبَـٰٓؤُاْ مَا كَانُواْ بِهِۦ يَسۡتَهۡزِءُونَ
5. Mpe basilaki koboya bosembo ntango eyelaki bango; mpe kala mingi te ekoyela bango bansango ya maye bazalaki kotiola.

6 - Al-An'am (The Cattle) - 006

أَلَمۡ يَرَوۡاْ كَمۡ أَهۡلَكۡنَا مِن قَبۡلِهِم مِّن قَرۡنٖ مَّكَّنَّـٰهُمۡ فِي ٱلۡأَرۡضِ مَا لَمۡ نُمَكِّن لَّكُمۡ وَأَرۡسَلۡنَا ٱلسَّمَآءَ عَلَيۡهِم مِّدۡرَارٗا وَجَعَلۡنَا ٱلۡأَنۡهَٰرَ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهِمۡ فَأَهۡلَكۡنَٰهُم بِذُنُوبِهِمۡ وَأَنشَأۡنَا مِنۢ بَعۡدِهِمۡ قَرۡنًا ءَاخَرِينَ
6. Boye, bazali kornona te bato boni tobomaki liboso na bango, tofandisaki bango kati na mokilina ndenge ya malamu ndenge tosalela naino bino te? Mpe tokitiselaki bango mbula ebele kowuta o likolo, mpe totiaki míngala mizalaki kotiola na nsé ya makolo ma bango, mpe tobomaki bango тропа masumu ma bango. Mpe sima na bango tokelaki lisanga mosusu ya bato ya sika.

7 - Al-An'am (The Cattle) - 007

وَلَوۡ نَزَّلۡنَا عَلَيۡكَ كِتَٰبٗا فِي قِرۡطَاسٖ فَلَمَسُوهُ بِأَيۡدِيهِمۡ لَقَالَ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ إِنۡ هَٰذَآ إِلَّا سِحۡرٞ مُّبِينٞ
7. Ata soki tokitiselaka yo buku ekomami na lokasa eye bakoki kosimba na maboko ma bango, mbele bapengwi balingaki koloba: Oyó ezali sé bondoki bwa polele.

8 - Al-An'am (The Cattle) - 008

وَقَالُواْ لَوۡلَآ أُنزِلَ عَلَيۡهِ مَلَكٞۖ وَلَوۡ أَنزَلۡنَا مَلَكٗا لَّقُضِيَ ٱلۡأَمۡرُ ثُمَّ لَا يُنظَرُونَ
8. Mpe bazali koloba: Mpona nini bakitiselaki ye anzelu te? Kasi soki tokitisaka anzelu, makambo malingaki makokisama, mpe nde bazelisamaki te.

9 - Al-An'am (The Cattle) - 009

وَلَوۡ جَعَلۡنَٰهُ مَلَكٗا لَّجَعَلۡنَٰهُ رَجُلٗا وَلَلَبَسۡنَا عَلَيۡهِم مَّا يَلۡبِسُونَ
9. Mpe soki toponaka anzelu lokola (ntoma), tolingaki kopesa ye lolenge ya moto, mpe tolingaki kotiyela bango mikakatano na ndenge eye bazali na yango.

10 - Al-An'am (The Cattle) - 010

وَلَقَدِ ٱسۡتُهۡزِئَ بِرُسُلٖ مِّن قَبۡلِكَ فَحَاقَ بِٱلَّذِينَ سَخِرُواْ مِنۡهُم مَّا كَانُواْ بِهِۦ يَسۡتَهۡزِءُونَ
10. Kasi ya soló, batiolaki batindami liboso lia yo; kasi, litio lizingaki bango moko mpona maye bazalaki kosakana na yango.

11 - Al-An'am (The Cattle) - 011

قُلۡ سِيرُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ ثُمَّ ٱنظُرُواْ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلۡمُكَذِّبِينَ
11. Loba: Botambola na mabele, bótala ndenge ezalaki suka ya babuki lokuta.

12 - Al-An'am (The Cattle) - 012

قُل لِّمَن مَّا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۖ قُل لِّلَّهِۚ كَتَبَ عَلَىٰ نَفۡسِهِ ٱلرَّحۡمَةَۚ لَيَجۡمَعَنَّكُمۡ إِلَىٰ يَوۡمِ ٱلۡقِيَٰمَةِ لَا رَيۡبَ فِيهِۚ ٱلَّذِينَ خَسِرُوٓاْ أَنفُسَهُمۡ فَهُمۡ لَا يُؤۡمِنُونَ
12. Loba: Nani azali kokonza maye mazuami o likolo na mabele? Loba: Allah. Asila komikatela kozala na ngolu. Akosangisaka bino o mokolo mwa suka moye mozali na tembe te o kati na yango. Baye bamizangisi bango moko, bango nde bandimaka te.

13 - Al-An'am (The Cattle) - 013

۞وَلَهُۥ مَا سَكَنَ فِي ٱلَّيۡلِ وَٱلنَّهَارِۚ وَهُوَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡعَلِيمُ
13. Mpe maye manso mavandaka na butu mpe na moyi mazali ya ye. Mpe ye nde azali moyoki atonda boyebi.

14 - Al-An'am (The Cattle) - 014

قُلۡ أَغَيۡرَ ٱللَّهِ أَتَّخِذُ وَلِيّٗا فَاطِرِ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَهُوَ يُطۡعِمُ وَلَا يُطۡعَمُۗ قُلۡ إِنِّيٓ أُمِرۡتُ أَنۡ أَكُونَ أَوَّلَ مَنۡ أَسۡلَمَۖ وَلَا تَكُونَنَّ مِنَ ٱلۡمُشۡرِكِينَ
14. Loba: Boye natika Allah тропа kozua mosungi mosusu mokeli ya likolo na mabele, mpe yende moleisi, kasi baleisaka ye te? Loba: Bapesi ngai mobeko ete nazala moto ya yambo ya komisokia(1), kasi kozala te omolongo ya basangisi Allah.
1 Kozala mizilima.

15 - Al-An'am (The Cattle) - 015

قُلۡ إِنِّيٓ أَخَافُ إِنۡ عَصَيۡتُ رَبِّي عَذَابَ يَوۡمٍ عَظِيمٖ
15. Loba: Ya soló, nazali kobanga soki nazangi Nkolo nangai botosi, ekozala etumbu enene mokolo yango.

16 - Al-An'am (The Cattle) - 016

مَّن يُصۡرَفۡ عَنۡهُ يَوۡمَئِذٖ فَقَدۡ رَحِمَهُۥۚ وَذَٰلِكَ ٱلۡفَوۡزُ ٱلۡمُبِينُ
16. Oyó akobatelama na yango mokolo wana; ya sólo, (Allah) asili koyokela ye mawa: Мре wana nde elonga enene.

17 - Al-An'am (The Cattle) - 017

وَإِن يَمۡسَسۡكَ ٱللَّهُ بِضُرّٖ فَلَا كَاشِفَ لَهُۥٓ إِلَّا هُوَۖ وَإِن يَمۡسَسۡكَ بِخَيۡرٖ فَهُوَ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٞ
17. Mpe soki Allah apesi yo mikakatano moto akolongola yango azali te kaka sé ye, тре soki apesi yo bolamu; yende oyoazali na nguya likolo ya biloko binso.

18 - Al-An'am (The Cattle) - 018

وَهُوَ ٱلۡقَاهِرُ فَوۡقَ عِبَادِهِۦۚ وَهُوَ ٱلۡحَكِيمُ ٱلۡخَبِيرُ
18. Mpe ye nde mokonzi likolo ya bawumbu naye, mpe azali na bwanya atonda ba nsango.

19 - Al-An'am (The Cattle) - 019

قُلۡ أَيُّ شَيۡءٍ أَكۡبَرُ شَهَٰدَةٗۖ قُلِ ٱللَّهُۖ شَهِيدُۢ بَيۡنِي وَبَيۡنَكُمۡۚ وَأُوحِيَ إِلَيَّ هَٰذَا ٱلۡقُرۡءَانُ لِأُنذِرَكُم بِهِۦ وَمَنۢ بَلَغَۚ أَئِنَّكُمۡ لَتَشۡهَدُونَ أَنَّ مَعَ ٱللَّهِ ءَالِهَةً أُخۡرَىٰۚ قُل لَّآ أَشۡهَدُۚ قُلۡ إِنَّمَا هُوَ إِلَٰهٞ وَٰحِدٞ وَإِنَّنِي بَرِيٓءٞ مِّمَّا تُشۡرِكُونَ
19. Loba: Eloko nini ezali monene koleka litatoli? Loba: Allah, azali nzeneneke kati na ngai na bino, mpe bakitiseli ngai kurani oyo mpo ete nakebisa bino na yango na bato banso ekokomela bango. Boye, bino bozali kotatola ete ezali na ba nzambe mosusu elongo na Allah? Loba: Nakotatola te. Loba: Azali solo Nzambe moko, mpe nazali mosika na maye bozali kosangisa ye na yango.

20 - Al-An'am (The Cattle) - 020

ٱلَّذِينَ ءَاتَيۡنَٰهُمُ ٱلۡكِتَٰبَ يَعۡرِفُونَهُۥ كَمَا يَعۡرِفُونَ أَبۡنَآءَهُمُۘ ٱلَّذِينَ خَسِرُوٓاْ أَنفُسَهُمۡ فَهُمۡ لَا يُؤۡمِنُونَ
20. Baye topesaki bango buku bayebi ye (Muhammad) ndenge bayebi bana na bango, baye bamizangisi bango moko, bango nde bandimaka te.

21 - Al-An'am (The Cattle) - 021

وَمَنۡ أَظۡلَمُ مِمَّنِ ٱفۡتَرَىٰ عَلَى ٱللَّهِ كَذِبًا أَوۡ كَذَّبَ بِـَٔايَٰتِهِۦٓۚ إِنَّهُۥ لَا يُفۡلِحُ ٱلظَّـٰلِمُونَ
21. Mpe nani azali mabe koleka moto oyo azali kobukela Allah lokuta mpe azali koboya mikapo mia ye? Ya soló, babubi bakolonga te.

22 - Al-An'am (The Cattle) - 022

وَيَوۡمَ نَحۡشُرُهُمۡ جَمِيعٗا ثُمَّ نَقُولُ لِلَّذِينَ أَشۡرَكُوٓاْ أَيۡنَ شُرَكَآؤُكُمُ ٱلَّذِينَ كُنتُمۡ تَزۡعُمُونَ
22. Mpe mokolo oyo tokosangisa bango banso sima tokoloba na baye bazalaki kosangisa: Wapi basangisi na bino bozalaki kotutela tolo?

23 - Al-An'am (The Cattle) - 023

ثُمَّ لَمۡ تَكُن فِتۡنَتُهُمۡ إِلَّآ أَن قَالُواْ وَٱللَّهِ رَبِّنَا مَا كُنَّا مُشۡرِكِينَ
23. Na masumu na bango, etikalaki te sé baloba ete: Nakombo ya Allah, Nkolo wa biso tozalaki basangisi te.

24 - Al-An'am (The Cattle) - 024

ٱنظُرۡ كَيۡفَ كَذَبُواْ عَلَىٰٓ أَنفُسِهِمۡۚ وَضَلَّ عَنۡهُم مَّا كَانُواْ يَفۡتَرُونَ
24. Tala ndenge bakosi milimo na bango moko, mpe esundoli banga maye bazalaki kosangisa (na Allah).

25 - Al-An'am (The Cattle) - 025

وَمِنۡهُم مَّن يَسۡتَمِعُ إِلَيۡكَۖ وَجَعَلۡنَا عَلَىٰ قُلُوبِهِمۡ أَكِنَّةً أَن يَفۡقَهُوهُ وَفِيٓ ءَاذَانِهِمۡ وَقۡرٗاۚ وَإِن يَرَوۡاْ كُلَّ ءَايَةٖ لَّا يُؤۡمِنُواْ بِهَاۖ حَتَّىٰٓ إِذَا جَآءُوكَ يُجَٰدِلُونَكَ يَقُولُ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ إِنۡ هَٰذَآ إِلَّآ أَسَٰطِيرُ ٱلۡأَوَّلِينَ
25. Mpe okati na bango basusu bazali koyokamela yo, mpe tozipaki mitema na bango mpo ete bayeba yango te(1) mpe matoyi na bango makangami. Mpe elembo nyoso bakomona yango bakondima na yango te. Kino bakoya epai nayo mpo na kosuanisa yo, bapengwi bazali koloba ete: Oyó ezali sé masapo ya bato ya kala.
1 Kurani.

26 - Al-An'am (The Cattle) - 026

وَهُمۡ يَنۡهَوۡنَ عَنۡهُ وَيَنۡـَٔوۡنَ عَنۡهُۖ وَإِن يُهۡلِكُونَ إِلَّآ أَنفُسَهُمۡ وَمَا يَشۡعُرُونَ
26. Mpe bazali kopekisa bato bapusana pembeni naye mpe bango moko bazali komipekisa. Nzoka nde bazali komiboma kasi bazali koyeba te.

27 - Al-An'am (The Cattle) - 027

وَلَوۡ تَرَىٰٓ إِذۡ وُقِفُواْ عَلَى ٱلنَّارِ فَقَالُواْ يَٰلَيۡتَنَا نُرَدُّ وَلَا نُكَذِّبَ بِـَٔايَٰتِ رَبِّنَا وَنَكُونَ مِنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
27. Mpe soki omona, ntango bakotelemisa bango liboso ya lifelo bakoloba ete: Eh biso mpasi! Tozonga lisusu na mokili tokoboya mikapo mia Nkolo na biso te, mpe tokozala okati ya bandimi.

28 - Al-An'am (The Cattle) - 028

بَلۡ بَدَا لَهُم مَّا كَانُواْ يُخۡفُونَ مِن قَبۡلُۖ وَلَوۡ رُدُّواْ لَعَادُواْ لِمَا نُهُواْ عَنۡهُ وَإِنَّهُمۡ لَكَٰذِبُونَ
28. Te! Kasi maye bazalaki kosala mabimi polele, soki bazongisi bango na mokili, bakozongela sé maye bapekisaki bango. Ya soló, bazali nde bato ya lokuta.

29 - Al-An'am (The Cattle) - 029

وَقَالُوٓاْ إِنۡ هِيَ إِلَّا حَيَاتُنَا ٱلدُّنۡيَا وَمَا نَحۡنُ بِمَبۡعُوثِينَ
29. Mpe bazali koloba: Ezali sé bomoyi na biso ya nsé, mpe tokosekwa te.

30 - Al-An'am (The Cattle) - 030

وَلَوۡ تَرَىٰٓ إِذۡ وُقِفُواْ عَلَىٰ رَبِّهِمۡۚ قَالَ أَلَيۡسَ هَٰذَا بِٱلۡحَقِّۚ قَالُواْ بَلَىٰ وَرَبِّنَاۚ قَالَ فَذُوقُواْ ٱلۡعَذَابَ بِمَا كُنتُمۡ تَكۡفُرُونَ
30. Mpe soki omonaka ntango bakotelemisama liboso ya Nkolo na bango, akoloba: Boye oyo ezali solo te? В akoloba: Iyo na Nkolo na biso! Akoloba: Bomeka etumbu ya maye bozalaki ко mpengwa na yango.

31 - Al-An'am (The Cattle) - 031

قَدۡ خَسِرَ ٱلَّذِينَ كَذَّبُواْ بِلِقَآءِ ٱللَّهِۖ حَتَّىٰٓ إِذَا جَآءَتۡهُمُ ٱلسَّاعَةُ بَغۡتَةٗ قَالُواْ يَٰحَسۡرَتَنَا عَلَىٰ مَا فَرَّطۡنَا فِيهَا وَهُمۡ يَحۡمِلُونَ أَوۡزَارَهُمۡ عَلَىٰ ظُهُورِهِمۡۚ أَلَا سَآءَ مَا يَزِرُونَ
31. Basili kozanga baye baboyi kondima na bokutani na Allah, kino ntango ekoyela bango mbalakaka. Bakoloba: Eh! Mawa na biso na maye oyo tomonaki mpamba na kati na yango! Mpe bako mema mikumba na bango na mikongo na bango, mpe oyo nde mikumba ya mabe!

32 - Al-An'am (The Cattle) - 032

وَمَا ٱلۡحَيَوٰةُ ٱلدُّنۡيَآ إِلَّا لَعِبٞ وَلَهۡوٞۖ وَلَلدَّارُ ٱلۡأٓخِرَةُ خَيۡرٞ لِّلَّذِينَ يَتَّقُونَۚ أَفَلَا تَعۡقِلُونَ
32. Mpe bomoyi ya nsé ezali sé liseki mpe lisano, kasi ndako ya lobi nde ezali malamu тропа babangi. Boye bokososola te?

33 - Al-An'am (The Cattle) - 033

قَدۡ نَعۡلَمُ إِنَّهُۥ لَيَحۡزُنُكَ ٱلَّذِي يَقُولُونَۖ فَإِنَّهُمۡ لَا يُكَذِّبُونَكَ وَلَٰكِنَّ ٱلظَّـٰلِمِينَ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ يَجۡحَدُونَ
33. Tosili koyeba ya soló ete, ezali kosala yo mpasi maye bazali koloba. Bazali koboya yo te, kasi babubi bazali nde koboya mikapo mia Allah.

34 - Al-An'am (The Cattle) - 034

وَلَقَدۡ كُذِّبَتۡ رُسُلٞ مِّن قَبۡلِكَ فَصَبَرُواْ عَلَىٰ مَا كُذِّبُواْ وَأُوذُواْ حَتَّىٰٓ أَتَىٰهُمۡ نَصۡرُنَاۚ وَلَا مُبَدِّلَ لِكَلِمَٰتِ ٱللَّهِۚ وَلَقَدۡ جَآءَكَ مِن نَّبَإِيْ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
34. Mpe basilaki koboya batindami liboso nayo, mpe bakangaki mitema na maye bazuaki bango na lokuta, mpe banyokuamaki, kino lisungi na biso eyaki. Kasi,mbongwana ezali te na maloba ya Allah. Мре ya soló nsango ya batindami esili kokomela yo.

35 - Al-An'am (The Cattle) - 035

وَإِن كَانَ كَبُرَ عَلَيۡكَ إِعۡرَاضُهُمۡ فَإِنِ ٱسۡتَطَعۡتَ أَن تَبۡتَغِيَ نَفَقٗا فِي ٱلۡأَرۡضِ أَوۡ سُلَّمٗا فِي ٱلسَّمَآءِ فَتَأۡتِيَهُم بِـَٔايَةٖۚ وَلَوۡ شَآءَ ٱللَّهُ لَجَمَعَهُمۡ عَلَى ٱلۡهُدَىٰۚ فَلَا تَكُونَنَّ مِنَ ٱلۡجَٰهِلِينَ
35. Mpe soki koboya na bango ezali kosala yo mpasi, mpe soki ozalaki na makoki, ya koluka nzela na mabele to mpe ozua emateli тропа kobuta na mapata тропа komemela bango bikamwiseli; mpe soki Allah alingaki nde atiaki bango banso na nzela ya semba, kasi kozala te o kati na baye bazanga mayele.

36 - Al-An'am (The Cattle) - 036

۞إِنَّمَا يَسۡتَجِيبُ ٱلَّذِينَ يَسۡمَعُونَۘ وَٱلۡمَوۡتَىٰ يَبۡعَثُهُمُ ٱللَّهُ ثُمَّ إِلَيۡهِ يُرۡجَعُونَ
36. Ya sólo, ezali sé baye bazali koyoka nde bayambaka mbela (ya bondimi); kasi тропа bawa, Allah akosekwisa bango. Mpe epai naye nde bakozongisama.

37 - Al-An'am (The Cattle) - 037

وَقَالُواْ لَوۡلَا نُزِّلَ عَلَيۡهِ ءَايَةٞ مِّن رَّبِّهِۦۚ قُلۡ إِنَّ ٱللَّهَ قَادِرٌ عَلَىٰٓ أَن يُنَزِّلَ ءَايَةٗ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَهُمۡ لَا يَعۡلَمُونَ
37. Mpe balobi: Mpona nini elembo ekitelaki ye te epai na Nkolo naye? Loba: Ya sólo Allah azali na makoki ya kokitisa elembo, nzoka nde ebele na bango bazali koyeba te.

38 - Al-An'am (The Cattle) - 038

وَمَا مِن دَآبَّةٖ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَلَا طَـٰٓئِرٖ يَطِيرُ بِجَنَاحَيۡهِ إِلَّآ أُمَمٌ أَمۡثَالُكُمۚ مَّا فَرَّطۡنَا فِي ٱلۡكِتَٰبِ مِن شَيۡءٖۚ ثُمَّ إِلَىٰ رَبِّهِمۡ يُحۡشَرُونَ
38. Mpe ezali na nyama(1) mokote ezali kotambola likolo na mabele, mpe ndeke moko te ezali kopumbwa na mapapu naye, sé kaka bazala na lisanga lokola bino. Mpe totikaki eloko moko te okati ya buku. Na sima, epai na Nkolo na bango nde bakosangisama.
1 Nyama: Ezali: Bikelamu nionso oyo etambolaka likolo ya mabele.

39 - Al-An'am (The Cattle) - 039

وَٱلَّذِينَ كَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِنَا صُمّٞ وَبُكۡمٞ فِي ٱلظُّلُمَٰتِۗ مَن يَشَإِ ٱللَّهُ يُضۡلِلۡهُ وَمَن يَشَأۡ يَجۡعَلۡهُ عَلَىٰ صِرَٰطٖ مُّسۡتَقِيمٖ
39. Mpe baye bazali kozua mikapo mia biso na lokuta, bazali lokola baye matoyi mpe minoko mia bango mikufa bazali okati ya molili: Allah azali kobungisa oyo alingi mpe azali kokamba oyo alingi na nzela ya semba.

40 - Al-An'am (The Cattle) - 040

قُلۡ أَرَءَيۡتَكُمۡ إِنۡ أَتَىٰكُمۡ عَذَابُ ٱللَّهِ أَوۡ أَتَتۡكُمُ ٱلسَّاعَةُ أَغَيۡرَ ٱللَّهِ تَدۡعُونَ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
40. Loba: Boyebisa ngai soki etumbu ya Allah eyeli bino to mpe mokolo ya suka ekomeli bino? Bokobelela nzambe mosusu botika Allah soki bozali na bosembo?

41 - Al-An'am (The Cattle) - 041

بَلۡ إِيَّاهُ تَدۡعُونَ فَيَكۡشِفُ مَا تَدۡعُونَ إِلَيۡهِ إِن شَآءَ وَتَنسَوۡنَ مَا تُشۡرِكُونَ
41. Te; ye nde bokobelela mpe akolongola maye bozalaki kobondela ye тропа yango soki alingi, mpe bokobosana maye bozalaki kosangisa ye na yango.

42 - Al-An'am (The Cattle) - 042

وَلَقَدۡ أَرۡسَلۡنَآ إِلَىٰٓ أُمَمٖ مِّن قَبۡلِكَ فَأَخَذۡنَٰهُم بِٱلۡبَأۡسَآءِ وَٱلضَّرَّآءِ لَعَلَّهُمۡ يَتَضَرَّعُونَ
42. Mpe ya soló, tosilaki kotinda(1) epai ya bato liboso nayo, na sima tozuaki bango na bampasi ya makasi nzala mpe bamalali ya makasi mpo ete ntango mosusu bakolomba (ngolu na biso).
1 Batindami.

43 - Al-An'am (The Cattle) - 043

فَلَوۡلَآ إِذۡ جَآءَهُم بَأۡسُنَا تَضَرَّعُواْ وَلَٰكِن قَسَتۡ قُلُوبُهُمۡ وَزَيَّنَ لَهُمُ ٱلشَّيۡطَٰنُ مَا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ
43. Ntango bampasi na biso eyelaki bango, тропа nini balombaki ngolu na biso te! Mitema na bango mikomaki makasi mpe satana abongisela bango maye bazalaki kosala.

44 - Al-An'am (The Cattle) - 044

فَلَمَّا نَسُواْ مَا ذُكِّرُواْ بِهِۦ فَتَحۡنَا عَلَيۡهِمۡ أَبۡوَٰبَ كُلِّ شَيۡءٍ حَتَّىٰٓ إِذَا فَرِحُواْ بِمَآ أُوتُوٓاْ أَخَذۡنَٰهُم بَغۡتَةٗ فَإِذَا هُم مُّبۡلِسُونَ
44. Мре ntango babosanaki maye bayebisaki bango, tofungolelaki bango bizipela ya biloko binso kino ntango basepeli na maye bazui, tozuaki bango mbalakaka, tala ndenge basilaki kozanga elikia.

45 - Al-An'am (The Cattle) - 045

فَقُطِعَ دَابِرُ ٱلۡقَوۡمِ ٱلَّذِينَ ظَلَمُواْۚ وَٱلۡحَمۡدُ لِلَّهِ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
45. Boye nde lisanga ya babubi esilaki kopanzana, mpe matondi na Allah Nkolo ya mikili.

46 - Al-An'am (The Cattle) - 046

قُلۡ أَرَءَيۡتُمۡ إِنۡ أَخَذَ ٱللَّهُ سَمۡعَكُمۡ وَأَبۡصَٰرَكُمۡ وَخَتَمَ عَلَىٰ قُلُوبِكُم مَّنۡ إِلَٰهٌ غَيۡرُ ٱللَّهِ يَأۡتِيكُم بِهِۗ ٱنظُرۡ كَيۡفَ نُصَرِّفُ ٱلۡأٓيَٰتِ ثُمَّ هُمۡ يَصۡدِفُونَ
46. Loba: Bomoni boni soki Allah azui koyoka na bino na kornona na bino mpe akangi mitema na bino? Nzambe mosusu nani akoyela bino yango na esika ya Allah? Tala ndenge tozali kolimbolela bango bilembo polele, kasi bazali sé kopesa mokongo.

47 - Al-An'am (The Cattle) - 047

قُلۡ أَرَءَيۡتَكُمۡ إِنۡ أَتَىٰكُمۡ عَذَابُ ٱللَّهِ بَغۡتَةً أَوۡ جَهۡرَةً هَلۡ يُهۡلَكُ إِلَّا ٱلۡقَوۡمُ ٱلظَّـٰلِمُونَ
47. Loba: Bokanisi nini soki etumbu ya Allah eyeli bino mbalakaka to polele? Boye, ekobebisama sé bato mabe (babubi)?

48 - Al-An'am (The Cattle) - 048

وَمَا نُرۡسِلُ ٱلۡمُرۡسَلِينَ إِلَّا مُبَشِّرِينَ وَمُنذِرِينَۖ فَمَنۡ ءَامَنَ وَأَصۡلَحَ فَلَا خَوۡفٌ عَلَيۡهِمۡ وَلَا هُمۡ يَحۡزَنُونَ
48. Mpe totindaka batindami te sé bazala bapesi nsango malamu to bakebisi. Na yango; oyo akondima mpe abongisi, babanga te mpe bazala na mawa te.

49 - Al-An'am (The Cattle) - 049

وَٱلَّذِينَ كَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِنَا يَمَسُّهُمُ ٱلۡعَذَابُ بِمَا كَانُواْ يَفۡسُقُونَ
49. Mpe ba oyo bakozua bilembo nabiso na lokuta, etumbu ekozua bango na ntina ya maye bazalaki kobebisa.

50 - Al-An'am (The Cattle) - 050

قُل لَّآ أَقُولُ لَكُمۡ عِندِي خَزَآئِنُ ٱللَّهِ وَلَآ أَعۡلَمُ ٱلۡغَيۡبَ وَلَآ أَقُولُ لَكُمۡ إِنِّي مَلَكٌۖ إِنۡ أَتَّبِعُ إِلَّا مَا يُوحَىٰٓ إِلَيَّۚ قُلۡ هَلۡ يَسۡتَوِي ٱلۡأَعۡمَىٰ وَٱلۡبَصِيرُۚ أَفَلَا تَتَفَكَّرُونَ
50. Loba: Nakoki koyebisa bino te ete nazali na sanduku ya nkita ya Allah, mpe nayebi mabombami te, mpe nakoki koloba te ete na zali anzelu, nazali; kolanda sé maye makiteli ngai na emoniseli. Loba: Oyó azali na miso akokani na oyo akufa miso? Bokokanisa te?

51 - Al-An'am (The Cattle) - 051

وَأَنذِرۡ بِهِ ٱلَّذِينَ يَخَافُونَ أَن يُحۡشَرُوٓاْ إِلَىٰ رَبِّهِمۡ لَيۡسَ لَهُم مِّن دُونِهِۦ وَلِيّٞ وَلَا شَفِيعٞ لَّعَلَّهُمۡ يَتَّقُونَ
51. Mpe kebisa na yango(1) baye bazali kobanga ete bakosangisama liboso ya Nkolo wa bango, bazali na mobateli te mpe molobeli te na botiki naye mpo ete babanga.(2)
1 Kurani. 2 Allah.

52 - Al-An'am (The Cattle) - 052

وَلَا تَطۡرُدِ ٱلَّذِينَ يَدۡعُونَ رَبَّهُم بِٱلۡغَدَوٰةِ وَٱلۡعَشِيِّ يُرِيدُونَ وَجۡهَهُۥۖ مَا عَلَيۡكَ مِنۡ حِسَابِهِم مِّن شَيۡءٖ وَمَا مِنۡ حِسَابِكَ عَلَيۡهِم مِّن شَيۡءٖ فَتَطۡرُدَهُمۡ فَتَكُونَ مِنَ ٱلظَّـٰلِمِينَ
52. Mpe kobengana te baye bazali kobondela Nkolo na bango ntongo mpe mpokwa bazali koluka elongi naye. Ozali na eloko te тропа lifuta na bango, bango mpe bazali na eloko te тропа lifuta пауо. Soki obengani bango okozala akati ya babubi.

53 - Al-An'am (The Cattle) - 053

وَكَذَٰلِكَ فَتَنَّا بَعۡضَهُم بِبَعۡضٖ لِّيَقُولُوٓاْ أَهَـٰٓؤُلَآءِ مَنَّ ٱللَّهُ عَلَيۡهِم مِّنۢ بَيۡنِنَآۗ أَلَيۡسَ ٱللَّهُ بِأَعۡلَمَ بِٱلشَّـٰكِرِينَ
53. Na boye nde totiaki bango na bango na kati ya komekama mpo baloba ete: Ba oyo nde Allah apesi bango bolamu likolo na biso? Boye Allah te nde ayebi baye bapesaka melesi?

54 - Al-An'am (The Cattle) - 054

وَإِذَا جَآءَكَ ٱلَّذِينَ يُؤۡمِنُونَ بِـَٔايَٰتِنَا فَقُلۡ سَلَٰمٌ عَلَيۡكُمۡۖ كَتَبَ رَبُّكُمۡ عَلَىٰ نَفۡسِهِ ٱلرَّحۡمَةَ أَنَّهُۥ مَنۡ عَمِلَ مِنكُمۡ سُوٓءَۢا بِجَهَٰلَةٖ ثُمَّ تَابَ مِنۢ بَعۡدِهِۦ وَأَصۡلَحَ فَأَنَّهُۥ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
54. Мре soki baye bandimi na mikapo na biso bayei epai nayo, mpe loba: Kimia ezala likolo na bino, Nkolo na bino akoma likolo naye ngolu ete oyo kati na bino akosala mabe nakozanga koyeba, sima atubeli mpe abongisi, ya soló azali molimbisi atonda ngolu.

55 - Al-An'am (The Cattle) - 055

وَكَذَٰلِكَ نُفَصِّلُ ٱلۡأٓيَٰتِ وَلِتَسۡتَبِينَ سَبِيلُ ٱلۡمُجۡرِمِينَ
55. Ndenge wana nde tozali kolimbola mikapo, mpo ete nzela ya bato mabe ebima polele.

56 - Al-An'am (The Cattle) - 056

قُلۡ إِنِّي نُهِيتُ أَنۡ أَعۡبُدَ ٱلَّذِينَ تَدۡعُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِۚ قُل لَّآ أَتَّبِعُ أَهۡوَآءَكُمۡ قَدۡ ضَلَلۡتُ إِذٗا وَمَآ أَنَا۠ مِنَ ٱلۡمُهۡتَدِينَ
56. Loba: Bapekisaki ngai kobondela baye bozali kobondela elongo na Allah. Loba: Ngai nakolanda ba mposa na bino te, noki nakobunga mpe nakozala kati ya bakambami te.

57 - Al-An'am (The Cattle) - 057

قُلۡ إِنِّي عَلَىٰ بَيِّنَةٖ مِّن رَّبِّي وَكَذَّبۡتُم بِهِۦۚ مَا عِندِي مَا تَسۡتَعۡجِلُونَ بِهِۦٓۚ إِنِ ٱلۡحُكۡمُ إِلَّا لِلَّهِۖ يَقُصُّ ٱلۡحَقَّۖ وَهُوَ خَيۡرُ ٱلۡفَٰصِلِينَ
57. Loba: Ya solo, nazali na polele ya Nkolo na ngai, mpe boboyi yango. Maye bozali kowelisa ezali na maboko na ngai te. Kokata makambo ezali sé mibeko ya Allah, azali kokata na bosembo mpe ye nde mokaboli ya malamu.

58 - Al-An'am (The Cattle) - 058

قُل لَّوۡ أَنَّ عِندِي مَا تَسۡتَعۡجِلُونَ بِهِۦ لَقُضِيَ ٱلۡأَمۡرُ بَيۡنِي وَبَيۡنَكُمۡۗ وَٱللَّهُ أَعۡلَمُ بِٱلظَّـٰلِمِينَ
58. Loba: Soki oyo bozali kowelisa (etumbu eya noki) ezalaki na maboko na ngai mbele esilaki kokata kati na ngai na bino, mpe Allah nde ayebi babubi.

59 - Al-An'am (The Cattle) - 059

۞وَعِندَهُۥ مَفَاتِحُ ٱلۡغَيۡبِ لَا يَعۡلَمُهَآ إِلَّا هُوَۚ وَيَعۡلَمُ مَا فِي ٱلۡبَرِّ وَٱلۡبَحۡرِۚ وَمَا تَسۡقُطُ مِن وَرَقَةٍ إِلَّا يَعۡلَمُهَا وَلَا حَبَّةٖ فِي ظُلُمَٰتِ ٱلۡأَرۡضِ وَلَا رَطۡبٖ وَلَا يَابِسٍ إِلَّا فِي كِتَٰبٖ مُّبِينٖ
59. Mpe ye nde azali na bafungola ya mabombami, moko te ayebi yango sé ye, mpe ayebi mayemazali na mabele mpe na mayi; mpe lokasa moko te (ya nzete) ekokweya kino ayeba yango. Mpe ezali na mbuma moko te (ya moke) na kati na molili ya mabele, ezala ya mobesu to ya kokawka kino esila kokomama o kati ya buku ya polele.

60 - Al-An'am (The Cattle) - 060

وَهُوَ ٱلَّذِي يَتَوَفَّىٰكُم بِٱلَّيۡلِ وَيَعۡلَمُ مَا جَرَحۡتُم بِٱلنَّهَارِ ثُمَّ يَبۡعَثُكُمۡ فِيهِ لِيُقۡضَىٰٓ أَجَلٞ مُّسَمّٗىۖ ثُمَّ إِلَيۡهِ مَرۡجِعُكُمۡ ثُمَّ يُنَبِّئُكُم بِمَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
60. Mpe na kati ya butu ye nde azali kozua milimo na bino,(1) mpe ayebi maye bosalaki na moyi. Sima azali kolamusa bino kati na yango mpo ete elaka ekokisama. Mpe epai naye bozongi na bino ezali, sima akoyebisa bino maye bozalaki kosala.
1 Na pongi.

61 - Al-An'am (The Cattle) - 061

وَهُوَ ٱلۡقَاهِرُ فَوۡقَ عِبَادِهِۦۖ وَيُرۡسِلُ عَلَيۡكُمۡ حَفَظَةً حَتَّىٰٓ إِذَا جَآءَ أَحَدَكُمُ ٱلۡمَوۡتُ تَوَفَّتۡهُ رُسُلُنَا وَهُمۡ لَا يُفَرِّطُونَ
61. Mpe azali mokonzi likolo na bawumbu naye. Mpe azali kotindela bino bakengeli. Kino liwa ekokomela moko kati na bino, batindami na biso (ba anzelu) bazali kolongola ye molimo na liseki te.

62 - Al-An'am (The Cattle) - 062

ثُمَّ رُدُّوٓاْ إِلَى ٱللَّهِ مَوۡلَىٰهُمُ ٱلۡحَقِّۚ أَلَا لَهُ ٱلۡحُكۡمُ وَهُوَ أَسۡرَعُ ٱلۡحَٰسِبِينَ
62. Sima, bazongi epai na Allah mokonzi na bango ya soló, boye mobeko mozali ya ye te? Mpe azali lombango na kofuta.

63 - Al-An'am (The Cattle) - 063

قُلۡ مَن يُنَجِّيكُم مِّن ظُلُمَٰتِ ٱلۡبَرِّ وَٱلۡبَحۡرِ تَدۡعُونَهُۥ تَضَرُّعٗا وَخُفۡيَةٗ لَّئِنۡ أَنجَىٰنَا مِنۡ هَٰذِهِۦ لَنَكُونَنَّ مِنَ ٱلشَّـٰكِرِينَ
63. Loba: Nani akobikisa bino na molili ya mabele mpe ya mayi? Bokobelela ye na kokitisama mpe na kobanga ete soki abikisi biso na oyo, tokozala okati ya batondi.

64 - Al-An'am (The Cattle) - 064

قُلِ ٱللَّهُ يُنَجِّيكُم مِّنۡهَا وَمِن كُلِّ كَرۡبٖ ثُمَّ أَنتُمۡ تُشۡرِكُونَ
64. Loba: Allah nde akokangola bino kati na yango mpe na ba mpasi nioso, na sima, bozongi kosangisa ye lisusu (na binzambe nzambe).

65 - Al-An'am (The Cattle) - 065

قُلۡ هُوَ ٱلۡقَادِرُ عَلَىٰٓ أَن يَبۡعَثَ عَلَيۡكُمۡ عَذَابٗا مِّن فَوۡقِكُمۡ أَوۡ مِن تَحۡتِ أَرۡجُلِكُمۡ أَوۡ يَلۡبِسَكُمۡ شِيَعٗا وَيُذِيقَ بَعۡضَكُم بَأۡسَ بَعۡضٍۗ ٱنظُرۡ كَيۡفَ نُصَرِّفُ ٱلۡأٓيَٰتِ لَعَلَّهُمۡ يَفۡقَهُونَ
65. Loba: Azali na makoki ya kotindela bino etumbu na likolo to na nsé, na makolo na bino to mpe azipa bino na mabulu ya bitumba mpe ayokisa bino mpasi ya bitumba bino nabino. Tala ndenge tozali kolimbola mikapo mia biso, ntango mosusu bakoki kososola.

66 - Al-An'am (The Cattle) - 066

وَكَذَّبَ بِهِۦ قَوۡمُكَ وَهُوَ ٱلۡحَقُّۚ قُل لَّسۡتُ عَلَيۡكُم بِوَكِيلٖ
66. Mpe bato nayo bazui yango lokuta mpe yango ezali bosembo. Loba: Nazali mobateli na bino te.

67 - Al-An'am (The Cattle) - 067

لِّكُلِّ نَبَإٖ مُّسۡتَقَرّٞۚ وَسَوۡفَ تَعۡلَمُونَ
67. Nsango na nsango ezali na ngonga na yango, mpe kala mingi te bokoyeba.

68 - Al-An'am (The Cattle) - 068

وَإِذَا رَأَيۡتَ ٱلَّذِينَ يَخُوضُونَ فِيٓ ءَايَٰتِنَا فَأَعۡرِضۡ عَنۡهُمۡ حَتَّىٰ يَخُوضُواْ فِي حَدِيثٍ غَيۡرِهِۦۚ وَإِمَّا يُنسِيَنَّكَ ٱلشَّيۡطَٰنُ فَلَا تَقۡعُدۡ بَعۡدَ ٱلذِّكۡرَىٰ مَعَ ٱلۡقَوۡمِ ٱلظَّـٰلِمِينَ
68. Mpe soki omoni baye bazali kotiola mikapo na biso, zala mosika na bango kino bakozua lisolo mosusu. Mpe soki esali ete satana abosanisi yo, koranda te sima ya bokundoli elongo na babubi.

69 - Al-An'am (The Cattle) - 069

وَمَا عَلَى ٱلَّذِينَ يَتَّقُونَ مِنۡ حِسَابِهِم مِّن شَيۡءٖ وَلَٰكِن ذِكۡرَىٰ لَعَلَّهُمۡ يَتَّقُونَ
69. Mpe babangi (Allah) bazali na eloko te ya kofuta тропа bato ya lolenge wana, kaši ezali sé bokundoli ntango mosusu bakobanga.

70 - Al-An'am (The Cattle) - 070

وَذَرِ ٱلَّذِينَ ٱتَّخَذُواْ دِينَهُمۡ لَعِبٗا وَلَهۡوٗا وَغَرَّتۡهُمُ ٱلۡحَيَوٰةُ ٱلدُّنۡيَاۚ وَذَكِّرۡ بِهِۦٓ أَن تُبۡسَلَ نَفۡسُۢ بِمَا كَسَبَتۡ لَيۡسَ لَهَا مِن دُونِ ٱللَّهِ وَلِيّٞ وَلَا شَفِيعٞ وَإِن تَعۡدِلۡ كُلَّ عَدۡلٖ لَّا يُؤۡخَذۡ مِنۡهَآۗ أُوْلَـٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ أُبۡسِلُواْ بِمَا كَسَبُواْۖ لَهُمۡ شَرَابٞ مِّنۡ حَمِيمٖ وَعَذَابٌ أَلِيمُۢ بِمَا كَانُواْ يَكۡفُرُونَ
70. Tika baye bazui lingomba na bango na liseki mpe lisano, mpe bomoyi ya nsé ekosi bango. Mpe kundola na oyo(1) mpo ete molimo moko te ebebisama na maye azuaki. Akozala na mobateli te lokola Allah mpe na molobeli te, likabo nyoso akoya na yango тропа kokangola ye ekondimama te. Ba oyo wana nde bamibebisaki bango moko тропа maye bazuaki, bakomela mayi ya moto mpe bakozala na etumbu ya makasi na ntina ya maye bazalaki kopengwa.
1 Kurani.

71 - Al-An'am (The Cattle) - 071

قُلۡ أَنَدۡعُواْ مِن دُونِ ٱللَّهِ مَا لَا يَنفَعُنَا وَلَا يَضُرُّنَا وَنُرَدُّ عَلَىٰٓ أَعۡقَابِنَا بَعۡدَ إِذۡ هَدَىٰنَا ٱللَّهُ كَٱلَّذِي ٱسۡتَهۡوَتۡهُ ٱلشَّيَٰطِينُ فِي ٱلۡأَرۡضِ حَيۡرَانَ لَهُۥٓ أَصۡحَٰبٞ يَدۡعُونَهُۥٓ إِلَى ٱلۡهُدَى ٱئۡتِنَاۗ قُلۡ إِنَّ هُدَى ٱللَّهِ هُوَ ٱلۡهُدَىٰۖ وَأُمِرۡنَا لِنُسۡلِمَ لِرَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
71. Loba: Boye, tokobelela elongo na Allah oyo ekosalisa biso te mpe ekonyokolo biso te? Mpe tozonga sima wana Allah asili kokamba biso mpo tozala lokola moto oyo basatana basili kokweisa ye mpe azali kotelengana na mabele? Ata baninga bazali kobenga ye na nzela ya semba ete: Yaka epai na biso; lobamzela ya Allah ezali nzela ya semba mpe tobengamaki ete tomisokia epai na Nkolo ya mikili.

72 - Al-An'am (The Cattle) - 072

وَأَنۡ أَقِيمُواْ ٱلصَّلَوٰةَ وَٱتَّقُوهُۚ وَهُوَ ٱلَّذِيٓ إِلَيۡهِ تُحۡشَرُونَ
72. Mpe ete botelemisa losambo mpe bobanga ye, mpe epai naye nde bokosangisama.

73 - Al-An'am (The Cattle) - 073

وَهُ

Scroll to Top