الزخرف
Az-Zukhruf
The Ornaments of Gold
1 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 001
حمٓ
1. Há, mím.(1)
1 Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
2 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 002
وَٱلۡكِتَٰبِ ٱلۡمُبِينِ
2. Mpe buku eye elimbolama polele.
3 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 003
إِنَّا جَعَلۡنَٰهُ قُرۡءَٰنًا عَرَبِيّٗا لَّعَلَّكُمۡ تَعۡقِلُونَ
3. Ya sôló, totiaki yango kurani na lokota ya arabo mpo ete bokanisa.
4 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 004
وَإِنَّهُۥ فِيٓ أُمِّ ٱلۡكِتَٰبِ لَدَيۡنَا لَعَلِيٌّ حَكِيمٌ
4. Mpe ya sôló, yango ezali o kati ya mama ya makomi pembeni na biso o likolo koleka etonda bwanya.
5 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 005
أَفَنَضۡرِبُ عَنكُمُ ٱلذِّكۡرَ صَفۡحًا أَن كُنتُمۡ قَوۡمٗا مُّسۡرِفِينَ
5. Boye tóbetela bino bokundoli ete bozalaki bato mabe?
6 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 006
وَكَمۡ أَرۡسَلۡنَا مِن نَّبِيّٖ فِي ٱلۡأَوَّلِينَ
6. Boni kati ya bantoma baye totindaki epai ya bato ya yambo?
7 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 007
وَمَا يَأۡتِيهِم مِّن نَّبِيٍّ إِلَّا كَانُواْ بِهِۦ يَسۡتَهۡزِءُونَ
7. Ntoma atikalaki koyela bango te sé kino batióla ye.
8 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 008
فَأَهۡلَكۡنَآ أَشَدَّ مِنۡهُم بَطۡشٗا وَمَضَىٰ مَثَلُ ٱلۡأَوَّلِينَ
8. Mpe tobomaki mingi koleka kati na bango, mpe tosilaki kotanga ndakisa ya bato ya yambo.
9 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 009
وَلَئِن سَأَلۡتَهُم مَّنۡ خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ لَيَقُولُنَّ خَلَقَهُنَّ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡعَلِيمُ
9. Mpe soki otuni bango; nani akela likolo na mabele? Bakolobaka: ya soló, oyo akela yango nde oyo azali na bokasi atonda boyebi.
10 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 010
ٱلَّذِي جَعَلَ لَكُمُ ٱلۡأَرۡضَ مَهۡدٗا وَجَعَلَ لَكُمۡ فِيهَا سُبُلٗا لَّعَلَّكُمۡ تَهۡتَدُونَ
10. Oyo atiyelaki bino mabele ezala etando ya kofanda, mpe atiyeli bino banzela kati kati na yango mpo bokambamaka (na yango).
11 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 011
وَٱلَّذِي نَزَّلَ مِنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءَۢ بِقَدَرٖ فَأَنشَرۡنَا بِهِۦ بَلۡدَةٗ مَّيۡتٗاۚ كَذَٰلِكَ تُخۡرَجُونَ
11. Ye nde akitisaka mayi kowuta na likolo na bokoki, mpe tozali kopesa na yango bomoyi na mboka oyo ekufa (ekawuka), mpe lolenge wana nde bokobimisama.
12 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 012
وَٱلَّذِي خَلَقَ ٱلۡأَزۡوَٰجَ كُلَّهَا وَجَعَلَ لَكُم مِّنَ ٱلۡفُلۡكِ وَٱلۡأَنۡعَٰمِ مَا تَرۡكَبُونَ
12. Mpe ye nde akela balongani mibale mibale bango banso, mpe asaleli bino masuwa na banyama mpo bomataka na yango.
13 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 013
لِتَسۡتَوُۥاْ عَلَىٰ ظُهُورِهِۦ ثُمَّ تَذۡكُرُواْ نِعۡمَةَ رَبِّكُمۡ إِذَا ٱسۡتَوَيۡتُمۡ عَلَيۡهِ وَتَقُولُواْ سُبۡحَٰنَ ٱلَّذِي سَخَّرَ لَنَا هَٰذَا وَمَا كُنَّا لَهُۥ مُقۡرِنِينَ
13. Mpo ete bofanda na mikongo mia yango, mpe bokanisa bolamu ya Nkolo wa bino osima ya komata na yango mpe bokolobaka: lokumu ya oyo asaleli biso maye, mpe tozalaki na makoki ya kosala yango te.
14 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 014
وَإِنَّآ إِلَىٰ رَبِّنَا لَمُنقَلِبُونَ
14. Mpe ya soló epai ya Nkolo wa biso nde tokozongaka.
15 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 015
وَجَعَلُواْ لَهُۥ مِنۡ عِبَادِهِۦ جُزۡءًاۚ إِنَّ ٱلۡإِنسَٰنَ لَكَفُورٞ مُّبِينٌ
15. Mpe kati ya bawumbu naye oyo akela bango bazueli ye bambanda. Ya soló, moto azali na bopengwi monene mpe ya polele.
16 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 016
أَمِ ٱتَّخَذَ مِمَّا يَخۡلُقُ بَنَاتٖ وَأَصۡفَىٰكُم بِٱلۡبَنِينَ
16. To na kati ya maye akela aponi bana basi (ba anzelu), mpe asali bino bana mibali?
1 Ar-Rahmán: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
17 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 017
وَإِذَا بُشِّرَ أَحَدُهُم بِمَا ضَرَبَ لِلرَّحۡمَٰنِ مَثَلٗا ظَلَّ وَجۡهُهُۥ مُسۡوَدّٗا وَهُوَ كَظِيمٌ
17. Мре soki bapesi moko kati na bango sango ya maye bazali kopesa na Ar-Rahmân(1) (Allah) (тропа kobotama ya mwana mwasi), okomona elongi naye ekomi moyindo na mawa. (etondi na pizoli na kosilika)
1 Ar-Rahmân: Bótala Ar-Ra’d mokapo: ЗО.
18 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 018
أَوَمَن يُنَشَّؤُاْ فِي ٱلۡحِلۡيَةِ وَهُوَ فِي ٱلۡخِصَامِ غَيۡرُ مُبِينٖ
18. (Soki batuni ye) ezali nini? (Akolobaka ezali nde mwana mwasi), oyo akoki kosala ata eloko moko te, mpe akoki mpe kotelema тропа koloba polele te, sé kosala mabe.
19 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 019
وَجَعَلُواْ ٱلۡمَلَـٰٓئِكَةَ ٱلَّذِينَ هُمۡ عِبَٰدُ ٱلرَّحۡمَٰنِ إِنَٰثًاۚ أَشَهِدُواْ خَلۡقَهُمۡۚ سَتُكۡتَبُ شَهَٰدَتُهُمۡ وَيُسۡـَٔلُونَ
19. Mpe bazali kokomisa baanzelu baye bazali bikelamu ya Ar-Rahmân ete bazali basi. Boye bazalaki banzeneneke na bokelami na bango? Ekokomama maye bazalaki koloba mpe bakotunama.
1 Ar-Rahmán: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
20 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 020
وَقَالُواْ لَوۡ شَآءَ ٱلرَّحۡمَٰنُ مَا عَبَدۡنَٰهُمۗ مَّا لَهُم بِذَٰلِكَ مِنۡ عِلۡمٍۖ إِنۡ هُمۡ إِلَّا يَخۡرُصُونَ
20. Mpe bazali koloba ete: Soki Ar-Rahmân(1) alingaki nde tobondeli bango te, bazali na boyebi moko te, bazali sé na makanisi mabe.
1 Ar-Rahmân: Bótala Ar-Ra’d mokapo: ЗО.
21 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 021
أَمۡ ءَاتَيۡنَٰهُمۡ كِتَٰبٗا مِّن قَبۡلِهِۦ فَهُم بِهِۦ مُسۡتَمۡسِكُونَ
21. To boye topesaki bango buku liboso mpo basimbama na yango?
22 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 022
بَلۡ قَالُوٓاْ إِنَّا وَجَدۡنَآ ءَابَآءَنَا عَلَىٰٓ أُمَّةٖ وَإِنَّا عَلَىٰٓ ءَاثَٰرِهِم مُّهۡتَدُونَ
22. Kasi bakolobaka ete: Tokutaki bankoko na biso na lingomba oyo mpe tozali na bokambami mpe tozali sé kolanda yango.
23 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 023
وَكَذَٰلِكَ مَآ أَرۡسَلۡنَا مِن قَبۡلِكَ فِي قَرۡيَةٖ مِّن نَّذِيرٍ إِلَّا قَالَ مُتۡرَفُوهَآ إِنَّا وَجَدۡنَآ ءَابَآءَنَا عَلَىٰٓ أُمَّةٖ وَإِنَّا عَلَىٰٓ ءَاثَٰرِهِم مُّقۡتَدُونَ
23. Мре lolenge wana nde totindaki liboso nayo mokebisi na engumba sé bato ya bozui kati na yango baboya (ye) mpe baloba: Tokutaki bankoko na biso na lingomba oyo, tokolanda sé nzela na bango.
24 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 024
۞قَٰلَ أَوَلَوۡ جِئۡتُكُم بِأَهۡدَىٰ مِمَّا وَجَدتُّمۡ عَلَيۡهِ ءَابَآءَكُمۡۖ قَالُوٓاْ إِنَّا بِمَآ أُرۡسِلۡتُم بِهِۦ كَٰفِرُونَ
24. (Mokebisi) alobi ata soki nayeli bino nzela ya semba koleka oyo ya bankoko na bino? Bakoyanolaka: Tokondima na maye oyei na yango te.
25 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 025
فَٱنتَقَمۡنَا مِنۡهُمۡۖ فَٱنظُرۡ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلۡمُكَذِّبِينَ
25. Tozuaki bango mabe, mpe tala lolenge nini bato ya lokuta basukaki.
26 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 026
وَإِذۡ قَالَ إِبۡرَٰهِيمُ لِأَبِيهِ وَقَوۡمِهِۦٓ إِنَّنِي بَرَآءٞ مِّمَّا تَعۡبُدُونَ
26. Mpe tango Ibrâhîm alobaki na tata waye na bato naye: Ya soló, ngai namitiye mosika na maye bozali kobondela.
27 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 027
إِلَّا ٱلَّذِي فَطَرَنِي فَإِنَّهُۥ سَيَهۡدِينِ
27. Longola sé oyo akela ngai, ya sólo ye nde akokamba ngai na (nzela ya semba)
28 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 028
وَجَعَلَهَا كَلِمَةَۢ بَاقِيَةٗ فِي عَقِبِهِۦ لَعَلَّهُمۡ يَرۡجِعُونَ
28. Mpe atiaki liloba bango litikala na libota lia ye, na ntina ete bamizongisa epai ya Allah.
29 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 029
بَلۡ مَتَّعۡتُ هَـٰٓؤُلَآءِ وَءَابَآءَهُمۡ حَتَّىٰ جَآءَهُمُ ٱلۡحَقُّ وَرَسُولٞ مُّبِينٞ
29. Kasi napesaki bango na batata na bango bisengo ya токе kino bosembo (kurani) eyelaki bango mpe na motindami ya polele.
30 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 030
وَلَمَّا جَآءَهُمُ ٱلۡحَقُّ قَالُواْ هَٰذَا سِحۡرٞ وَإِنَّا بِهِۦ كَٰفِرُونَ
30. Mpe tango bosóló eyelaki bango balobi: Oyo ezali bondoki bwa polele, mpe tokondimela yango te.
31 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 031
وَقَالُواْ لَوۡلَا نُزِّلَ هَٰذَا ٱلۡقُرۡءَانُ عَلَىٰ رَجُلٖ مِّنَ ٱلۡقَرۡيَتَيۡنِ عَظِيمٍ
31. Мре balobaki: Mpona nini bakitisaki kurani te ata epai ya moto ya monene kati ya bamboka mibale?
32 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 032
أَهُمۡ يَقۡسِمُونَ رَحۡمَتَ رَبِّكَۚ نَحۡنُ قَسَمۡنَا بَيۡنَهُم مَّعِيشَتَهُمۡ فِي ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَاۚ وَرَفَعۡنَا بَعۡضَهُمۡ فَوۡقَ بَعۡضٖ دَرَجَٰتٖ لِّيَتَّخِذَ بَعۡضُهُم بَعۡضٗا سُخۡرِيّٗاۗ وَرَحۡمَتُ رَبِّكَ خَيۡرٞ مِّمَّا يَجۡمَعُونَ
32. Boye bango nde bakabolaka bolamu ya Nkolo wayo? Tokabolelaki bango bomoyi bwa bango kati na mokili, totomboli basusu koleka baninga, mpo basusu bazala basali ya baninga. Mpe ngolu ya Nkolo wayo ezali malamu koleka maye bazali kosangisa.
1 Ar-Rahmán: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
33 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 033
وَلَوۡلَآ أَن يَكُونَ ٱلنَّاسُ أُمَّةٗ وَٰحِدَةٗ لَّجَعَلۡنَا لِمَن يَكۡفُرُ بِٱلرَّحۡمَٰنِ لِبُيُوتِهِمۡ سُقُفٗا مِّن فِضَّةٖ وَمَعَارِجَ عَلَيۡهَا يَظۡهَرُونَ
33. Soki (bobangi) te ete bato bazala umma(1) moko (ya libungi), nde totielaki bapengwi ya Ar- Rahmán(2) mpona bandako na bango motondo ya mabende ya pembe mpe ngala-ngala (ebuteli) mpo bamataka na yango.
1 Umma: Awa ezali: Lingomba, bótala Al-Baqarah mokapo: 128.
2 Ar-Rahmán: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
34 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 034
وَلِبُيُوتِهِمۡ أَبۡوَٰبٗا وَسُرُرًا عَلَيۡهَا يَتَّكِـُٔونَ
34. (nde totielaki bango) na bandako na bango bikuke mpe bambeto ya kitoko oyo bakofandela.
2 Ar-Rahmán: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
35 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 035
وَزُخۡرُفٗاۚ وَإِن كُلُّ ذَٰلِكَ لَمَّا مَتَٰعُ ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَاۚ وَٱلۡأٓخِرَةُ عِندَ رَبِّكَ لِلۡمُتَّقِينَ
35. Na bonzenga. Wana nyoso ezali mpona bosepeli ya bomoyi bwa mokili, kasi ya mokolo mwa suka epayi ya Nkolo nayo ezali mpona babangi.
1 Ar-Rahmán: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
36 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 036
وَمَن يَعۡشُ عَن ذِكۡرِ ٱلرَّحۡمَٰنِ نُقَيِّضۡ لَهُۥ شَيۡطَٰنٗا فَهُوَ لَهُۥ قَرِينٞ
36. Na oyo akokanga miso (mpe amitiye mosika) mpona bokundoli bwa Ar-Rahmân(1), tokotiela ye satana azala moninga naye ya libela.
2 Ar-Rahmán: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
37 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 037
وَإِنَّهُمۡ لَيَصُدُّونَهُمۡ عَنِ ٱلسَّبِيلِ وَيَحۡسَبُونَ أَنَّهُم مُّهۡتَدُونَ
37. Мре ya soló, bazali kopekisa bango nzela, mpe ya sólo, bazali kokanisa ete bazali na nzela ya semba.
38 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 038
حَتَّىٰٓ إِذَا جَآءَنَا قَالَ يَٰلَيۡتَ بَيۡنِي وَبَيۡنَكَ بُعۡدَ ٱلۡمَشۡرِقَيۡنِ فَبِئۡسَ ٱلۡقَرِينُ
38. Kino moto wana akokoma epai na biso akoloba na elima naye ete: Mawa na ngai! Soki ntaka kati na ngai nayo lokola moniele na eloli, mpe oyo moninga ya mabe!
39 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 039
وَلَن يَنفَعَكُمُ ٱلۡيَوۡمَ إِذ ظَّلَمۡتُمۡ أَنَّكُمۡ فِي ٱلۡعَذَابِ مُشۡتَرِكُونَ
39. Mokolo mona mokosalisaka bino na eloko te mpo bozalaki babubi, bokosanganaka okati ya etumbu.
40 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 040
أَفَأَنتَ تُسۡمِعُ ٱلصُّمَّ أَوۡ تَهۡدِي ٱلۡعُمۡيَ وَمَن كَانَ فِي ضَلَٰلٖ مُّبِينٖ
40. Boye, yo nde ozali na bokoki ya koyokisa mokufi matoyi to boye okambaka mokufi miso to oyo azali na libungi ya polele?
41 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 041
فَإِمَّا نَذۡهَبَنَّ بِكَ فَإِنَّا مِنۡهُم مُّنتَقِمُونَ
41. To mpe tokotombola yo na likolo (koboma yo), mpe ya sólo, tokosilana na bango.
42 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 042
أَوۡ نُرِيَنَّكَ ٱلَّذِي وَعَدۡنَٰهُمۡ فَإِنَّا عَلَيۡهِم مُّقۡتَدِرُونَ
42. To tolakisa yo mabe oyo tolakaki bango (etumbu) kasi tozali na bokasi likolo na bango.
43 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 043
فَٱسۡتَمۡسِكۡ بِٱلَّذِيٓ أُوحِيَ إِلَيۡكَۖ إِنَّكَ عَلَىٰ صِرَٰطٖ مُّسۡتَقِيمٖ
43. Zala na bokangami na maye bamoniselaki yo. Ya sólo, ozali na nzela ya semba.
44 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 044
وَإِنَّهُۥ لَذِكۡرٞ لَّكَ وَلِقَوۡمِكَۖ وَسَوۡفَ تُسۡـَٔلُونَ
44. Ya sólo (kurani oyo), ezali bokundoli тропа yo mpe bato nayo. Mpe mosika te bokotunama.
1 Ar-Rahmán: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
45 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 045
وَسۡـَٔلۡ مَنۡ أَرۡسَلۡنَا مِن قَبۡلِكَ مِن رُّسُلِنَآ أَجَعَلۡنَا مِن دُونِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ءَالِهَةٗ يُعۡبَدُونَ
45. Мре tuna batindami ba biso baye totindaki liboso nayo, boye tozalaki kozua banzambe misusu na botiki Ar-Rahmán(1) тропа kobondela bango?
2 Ar-Rahmán: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
46 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 046
وَلَقَدۡ أَرۡسَلۡنَا مُوسَىٰ بِـَٔايَٰتِنَآ إِلَىٰ فِرۡعَوۡنَ وَمَلَإِيْهِۦ فَقَالَ إِنِّي رَسُولُ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
46. Mpe tosilaki kotinda Mûssa na makamwisi та biso epai ya falo na bato naye (bankumu), mpe alobaki: Ya soló, nazali motindami ya Nkolo ya mokili.
47 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 047
فَلَمَّا جَآءَهُم بِـَٔايَٰتِنَآ إِذَا هُم مِّنۡهَا يَضۡحَكُونَ
47. Mpe tango bayeli bango makamwisi та biso, okomona bango bazali koseka yango.
48 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 048
وَمَا نُرِيهِم مِّنۡ ءَايَةٍ إِلَّا هِيَ أَكۡبَرُ مِنۡ أُخۡتِهَاۖ وَأَخَذۡنَٰهُم بِٱلۡعَذَابِ لَعَلَّهُمۡ يَرۡجِعُونَ
48. Mpe na likamwisi nyoso na oyo tolakisaki bango, ezalaki makasi mingi koleka oyo ya liboso. Mpe topesaki bango etumbu mpo tango mosusu bakoki komizongisa epai na biso.
49 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 049
وَقَالُواْ يَـٰٓأَيُّهَ ٱلسَّاحِرُ ٱدۡعُ لَنَا رَبَّكَ بِمَا عَهِدَ عِندَكَ إِنَّنَا لَمُهۡتَدُونَ
49. Mpe balobi ete: Oh yo nganga! Sengela biso Nkolo nayo тропа maye alakaki epai nayo, na yango tokokambama ya sólo na nzela ya semba.
50 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 050
فَلَمَّا كَشَفۡنَا عَنۡهُمُ ٱلۡعَذَابَ إِذَا هُمۡ يَنكُثُونَ
50. Mpe tango tolongoleli bango etumbu, okomona bango wana babuki mibeko ya elaka.
51 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 051
وَنَادَىٰ فِرۡعَوۡنُ فِي قَوۡمِهِۦ قَالَ يَٰقَوۡمِ أَلَيۡسَ لِي مُلۡكُ مِصۡرَ وَهَٰذِهِ ٱلۡأَنۡهَٰرُ تَجۡرِي مِن تَحۡتِيٓۚ أَفَلَا تُبۡصِرُونَ
51. Mpe falo abengi bato naye alobi: Oh bato na ngai! Bokonzi ya ezipito ezali na ngai te, mpe mayi ya ebale oyo ezali kotambola na nsé na ngai, boye bozali kornona te?
52 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 052
أَمۡ أَنَا۠ خَيۡرٞ مِّنۡ هَٰذَا ٱلَّذِي هُوَ مَهِينٞ وَلَا يَكَادُ يُبِينُ
52. To boye nazali malamu te koleka moto mpamba oyo, mpe alobaka polele te?
53 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 053
فَلَوۡلَآ أُلۡقِيَ عَلَيۡهِ أَسۡوِرَةٞ مِّن ذَهَبٍ أَوۡ جَآءَ مَعَهُ ٱلۡمَلَـٰٓئِكَةُ مُقۡتَرِنِينَ
53. Mpona nini babwakeli ye basinga ya wolo ya maboko te, to mpe ba anzelu baya naye elongo!
54 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 054
فَٱسۡتَخَفَّ قَوۡمَهُۥ فَأَطَاعُوهُۚ إِنَّهُمۡ كَانُواْ قَوۡمٗا فَٰسِقِينَ
54. Na boye nde abangisaki bato naye mpe batosi ye. Ya soló, bazalaki bato mabe.
55 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 055
فَلَمَّآ ءَاسَفُونَا ٱنتَقَمۡنَا مِنۡهُمۡ فَأَغۡرَقۡنَٰهُمۡ أَجۡمَعِينَ
55. Mpe tango bapesaki biso kanda makasi, tozuaki bango mpe tozindisaki bango banso.
56 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 056
فَجَعَلۡنَٰهُمۡ سَلَفٗا وَمَثَلٗا لِّلۡأٓخِرِينَ
56. Mpe totiaki bango bazala liteya mpona baye bakoya sima na bango.
57 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 057
۞وَلَمَّا ضُرِبَ ٱبۡنُ مَرۡيَمَ مَثَلًا إِذَا قَوۡمُكَ مِنۡهُ يَصِدُّونَ
57. Mpe tango ndakisa ya mwana ya Maryam, epesamaki bato nayo bakomaki koyima yima (bamoni yango pamba)
58 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 058
وَقَالُوٓاْ ءَأَٰلِهَتُنَا خَيۡرٌ أَمۡ هُوَۚ مَا ضَرَبُوهُ لَكَ إِلَّا جَدَلَۢاۚ بَلۡ هُمۡ قَوۡمٌ خَصِمُونَ
58. Balobi banzambe na biso to ye, nani azali malamu? Babeti ndakisa wana sé mpona yo na lolenge ya bilobaloba, kasi bazali sé bato balutisaki kosuana.
59 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 059
إِنۡ هُوَ إِلَّا عَبۡدٌ أَنۡعَمۡنَا عَلَيۡهِ وَجَعَلۡنَٰهُ مَثَلٗا لِّبَنِيٓ إِسۡرَـٰٓءِيلَ
59. (Issa) azali sé mowumbu oyo topessaki ye bolamu, mpe tozalisa ye ndakisa mpona bana ya isalayele.
60 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 060
وَلَوۡ نَشَآءُ لَجَعَلۡنَا مِنكُم مَّلَـٰٓئِكَةٗ فِي ٱلۡأَرۡضِ يَخۡلُفُونَ
60. Soki tolingaki nde totiaki kati na bino ba anzelu awa na nsé bazali kokitana.
61 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 061
وَإِنَّهُۥ لَعِلۡمٞ لِّلسَّاعَةِ فَلَا تَمۡتَرُنَّ بِهَا وَٱتَّبِعُونِۚ هَٰذَا صِرَٰطٞ مُّسۡتَقِيمٞ
61. Mpe ya soló, akozala elembo тропа mokolo ya suka,botia tembe te, mpe bolanda ngai. Oyo nde nzela ya semba.
62 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 062
وَلَا يَصُدَّنَّكُمُ ٱلشَّيۡطَٰنُۖ إِنَّهُۥ لَكُمۡ عَدُوّٞ مُّبِينٞ
62. Satana abungisa bino te mpo azali monguna ya polele тропа bino.
63 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 063
وَلَمَّا جَآءَ عِيسَىٰ بِٱلۡبَيِّنَٰتِ قَالَ قَدۡ جِئۡتُكُم بِٱلۡحِكۡمَةِ وَلِأُبَيِّنَ لَكُم بَعۡضَ ٱلَّذِي تَخۡتَلِفُونَ فِيهِۖ فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ
63. Mpe tango Issa ayaki na bilembo alobaki: Nayeli bino yango na bwanya, mpe mpo nalimbolela bino ndambo ya maye bozalaki kokesene na yango. Bobanga Allah mpe botosa ngai.
64 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 064
إِنَّ ٱللَّهَ هُوَ رَبِّي وَرَبُّكُمۡ فَٱعۡبُدُوهُۚ هَٰذَا صِرَٰطٞ مُّسۡتَقِيمٞ
64. Ya solo, Allah azali Nkolo wa ngai, mpe Nkolo wa bino, bobondela ye. Oyo nde nzela ya semba.
65 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 065
فَٱخۡتَلَفَ ٱلۡأَحۡزَابُ مِنۢ بَيۡنِهِمۡۖ فَوَيۡلٞ لِّلَّذِينَ ظَلَمُواْ مِنۡ عَذَابِ يَوۡمٍ أَلِيمٍ
65. Kasi bakeseneki kati kati na bango. Babubi bakozuaka mabe o mokolo mwa etumbu ya makasi.
66 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 066
هَلۡ يَنظُرُونَ إِلَّا ٱلسَّاعَةَ أَن تَأۡتِيَهُم بَغۡتَةٗ وَهُمۡ لَا يَشۡعُرُونَ
66. Boye bazali kozela (mokolo ya suka) yango ekoyela bango mbalakaka mpe bakoyeba te?
67 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 067
ٱلۡأَخِلَّآءُ يَوۡمَئِذِۭ بَعۡضُهُمۡ لِبَعۡضٍ عَدُوٌّ إِلَّا ٱلۡمُتَّقِينَ
67. O mokolo mona, baye balinganaki bakokomaka banguna kati kati na bango, longola sé babangi (Allah)
68 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 068
يَٰعِبَادِ لَا خَوۡفٌ عَلَيۡكُمُ ٱلۡيَوۡمَ وَلَآ أَنتُمۡ تَحۡزَنُونَ
68. Eh! Bawumbu na ngai! Lelo, bozala na bobangi mpe niawa te.
69 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 069
ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ بِـَٔايَٰتِنَا وَكَانُواْ مُسۡلِمِينَ
69. В aye bandimaki na bilembo bia biso, mpe bazalaki kotosa (ba mizilima).
70 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 070
ٱدۡخُلُواْ ٱلۡجَنَّةَ أَنتُمۡ وَأَزۡوَٰجُكُمۡ تُحۡبَرُونَ
70. Bokota o kati ya Iola, bosala biyenga elongo na basi na bino, (bosepela)
71 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 071
يُطَافُ عَلَيۡهِم بِصِحَافٖ مِّن ذَهَبٖ وَأَكۡوَابٖۖ وَفِيهَا مَا تَشۡتَهِيهِ ٱلۡأَنفُسُ وَتَلَذُّ ٱلۡأَعۡيُنُۖ وَأَنتُمۡ فِيهَا خَٰلِدُونَ
71. Basani mpe bakopo ya wolo biko balukaka, bikotiama liboso na bango, o kati na yango bitondi na maye mazali na mposa na bango mpe bosepelisi miso. Bokozala libela na kati na yango.
72 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 072
وَتِلۡكَ ٱلۡجَنَّةُ ٱلَّتِيٓ أُورِثۡتُمُوهَا بِمَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
72. Wana ezali nde lola oyo bokitani yango, тропа maye bozalaki kosala.
73 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 073
لَكُمۡ فِيهَا فَٰكِهَةٞ كَثِيرَةٞ مِّنۡهَا تَأۡكُلُونَ
73. Kati na yango bokozalaka na bambuma ebele тропа kólia.
74 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 074
إِنَّ ٱلۡمُجۡرِمِينَ فِي عَذَابِ جَهَنَّمَ خَٰلِدُونَ
74. Ya sôló, batomboki bakozalaka na etumbu ya moto ya lifelo libela.
75 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 075
لَا يُفَتَّرُ عَنۡهُمۡ وَهُمۡ فِيهِ مُبۡلِسُونَ
75. Ekokutolama te mpe bakozanga elikia o kati na yango.
76 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 076
وَمَا ظَلَمۡنَٰهُمۡ وَلَٰكِن كَانُواْ هُمُ ٱلظَّـٰلِمِينَ
76. Tosalaki bango mabe te kasi bango moko nde bamisalaki mabe.
77 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 077
وَنَادَوۡاْ يَٰمَٰلِكُ لِيَقۡضِ عَلَيۡنَا رَبُّكَۖ قَالَ إِنَّكُم مَّـٰكِثُونَ
77. Mpe bakobelelaka: Oh Mâlik! Nkolo wayo aboma biso, akoyanolaka bango: Botikali libela o kati na yango.
78 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 078
لَقَدۡ جِئۡنَٰكُم بِٱلۡحَقِّ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَكُمۡ لِلۡحَقِّ كَٰرِهُونَ
78. Tosilaki koyela bino bosôló, kasi ebele kati na bino baboyaki yango.
79 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 079
أَمۡ أَبۡرَمُوٓاْ أَمۡرٗا فَإِنَّا مُبۡرِمُونَ
79. Boye basili kokana likita, kasi biso nde tozali na likita.
80 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 080
أَمۡ يَحۡسَبُونَ أَنَّا لَا نَسۡمَعُ سِرَّهُمۡ وَنَجۡوَىٰهُمۚ بَلَىٰ وَرُسُلُنَا لَدَيۡهِمۡ يَكۡتُبُونَ
80. To bazali kokanisa ete toyokaka sekele na koyima yima na bango na mongongo ya sé te? Iyo! Batindami na biso epai na bango bazali kokoma nyoso (ba anzelu).
1 Ar-Rahmán: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
81 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 081
قُلۡ إِن كَانَ لِلرَّحۡمَٰنِ وَلَدٞ فَأَنَا۠ أَوَّلُ ٱلۡعَٰبِدِينَ
81. Loba: Soki Ar-Rahmân(1) azalaka na mwana, nalingaki kozala wa yambo тропа kobondela.
2 Ar-Rahmán: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
82 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 082
سُبۡحَٰنَ رَبِّ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ رَبِّ ٱلۡعَرۡشِ عَمَّا يَصِفُونَ
82. Lokumu na Nkolo ya likolo na ya mabele, Nkolo ya ngwende na maye bazali koloba.
83 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 083
فَذَرۡهُمۡ يَخُوضُواْ وَيَلۡعَبُواْ حَتَّىٰ يُلَٰقُواْ يَوۡمَهُمُ ٱلَّذِي يُوعَدُونَ
83. Tika bango bazinda na mabe mpe basakana kino bakokutana na mokolo mwa elaka na bango.
84 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 084
وَهُوَ ٱلَّذِي فِي ٱلسَّمَآءِ إِلَٰهٞ وَفِي ٱلۡأَرۡضِ إِلَٰهٞۚ وَهُوَ ٱلۡحَكِيمُ ٱلۡعَلِيمُ
84. Ye nde azali Nzambe ya kobondela likolo mpe o nsé, тре azali wa bwanya atonda boyebi.
85 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 085
وَتَبَارَكَ ٱلَّذِي لَهُۥ مُلۡكُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَمَا بَيۡنَهُمَا وَعِندَهُۥ عِلۡمُ ٱلسَّاعَةِ وَإِلَيۡهِ تُرۡجَعُونَ
85. Mpe apambolami ye oyo azali na bokonzi ya nsé na ya likolo, na maye ezali okati na yango, mpe ye nde azali na boyebi ya tango ya suka. Mpe epai naye nde bokozongisama.
86 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 086
وَلَا يَمۡلِكُ ٱلَّذِينَ يَدۡعُونَ مِن دُونِهِ ٱلشَّفَٰعَةَ إِلَّا مَن شَهِدَ بِٱلۡحَقِّ وَهُمۡ يَعۡلَمُونَ
86. Мре baye bazali kobondela bango elongo naye (Allah), bakokoka te kolobela, longola sé baye batatoli bosembo mpe bango bazali koyeba.
87 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 087
وَلَئِن سَأَلۡتَهُم مَّنۡ خَلَقَهُمۡ لَيَقُولُنَّ ٱللَّهُۖ فَأَنَّىٰ يُؤۡفَكُونَ
87. Mpe soki otuni bango nani akela bango, bakolobaka: Ya soló ezali Allah, kasi тропа nini bazali kopesa ye mokongo?
88 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 088
وَقِيلِهِۦ يَٰرَبِّ إِنَّ هَـٰٓؤُلَآءِ قَوۡمٞ لَّا يُؤۡمِنُونَ
88. Mpe liloba lia ye (ntoma Muhammad epai ya Allah): Nkolo! Ya soló, bato wana bakondimaka te.
89 - Az-Zukhruf (The Ornaments of Gold) - 089