الصافات

 

As-Saffat

 

Those who set the Ranks

1 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 001

وَٱلصَّـٰٓفَّـٰتِ صَفّٗا
1. Na (ba anzelu) baye batelemi na milongo,

2 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 002

فَٱلزَّـٰجِرَٰتِ زَجۡرٗا
2. Mpe na baye bazali kotindika na makasi (mapata).(1)
1 Mpe biloko misusu.

3 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 003

فَٱلتَّـٰلِيَٰتِ ذِكۡرًا
3. Na baye batangaka bokundoli.

4 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 004

إِنَّ إِلَٰهَكُمۡ لَوَٰحِدٞ
4. Ya soló, Nzambe na bino azali moko.

5 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 005

رَّبُّ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَمَا بَيۡنَهُمَا وَرَبُّ ٱلۡمَشَٰرِقِ
5. Nkolo wa likolo na mabele, na maye manso mazuami kati na yango mibale mpe Nkolo wa moniele.

6 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 006

إِنَّا زَيَّنَّا ٱلسَّمَآءَ ٱلدُّنۡيَا بِزِينَةٍ ٱلۡكَوَاكِبِ
6. Ya sólo, tobongisaki mapata ya nsé na bonzenga ya minzoto.

7 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 007

وَحِفۡظٗا مِّن كُلِّ شَيۡطَٰنٖ مَّارِدٖ
7. Mpe ebatelami na mabe ya satana motomboki.

8 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 008

لَّا يَسَّمَّعُونَ إِلَى ٱلۡمَلَإِ ٱلۡأَعۡلَىٰ وَيُقۡذَفُونَ مِن كُلِّ جَانِبٖ
8. Mpo bakoka koyoka te epai ya ba anzelu ya likolo, kasi bakobwakelamaka mabanga ngambu inso,

9 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 009

دُحُورٗاۖ وَلَهُمۡ عَذَابٞ وَاصِبٌ
9. Bakobenganama mpe bakozala na etumbu ya libela.

10 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 010

إِلَّا مَنۡ خَطِفَ ٱلۡخَطۡفَةَ فَأَتۡبَعَهُۥ شِهَابٞ ثَاقِبٞ
10. Longola sé oyo akolinga kozua (sango) na lolenge ya moyibi, kasi bakolandisaka kobengana ye na libanga ya moto.

11 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 011

فَٱسۡتَفۡتِهِمۡ أَهُمۡ أَشَدُّ خَلۡقًا أَم مَّنۡ خَلَقۡنَآۚ إِنَّا خَلَقۡنَٰهُم مِّن طِينٖ لَّازِبِۭ
11. Tuna bango, soki kokela bango ezali makasi koleka manso tokela? Te, ya soló, tokelaki bango na mabele ya potopoto oyo ekangaka.

12 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 012

بَلۡ عَجِبۡتَ وَيَسۡخَرُونَ
12. Kasi soki ozali kokamwa mpe bazali koseka.

13 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 013

وَإِذَا ذُكِّرُواْ لَا يَذۡكُرُونَ
13. Mpe soki bapesami malendisi (kurani), baboyi kokanisa yango. (kotanga yango)

14 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 014

وَإِذَا رَأَوۡاْ ءَايَةٗ يَسۡتَسۡخِرُونَ
14. Mpe soki bamoni elembo, bakomi kosalela yango litio.

15 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 015

وَقَالُوٓاْ إِنۡ هَٰذَآ إِلَّا سِحۡرٞ مُّبِينٌ
15. Mpe balobi: Oyo ezali bonganga (bondoki) ya polele.

16 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 016

أَءِذَا مِتۡنَا وَكُنَّا تُرَابٗا وَعِظَٰمًا أَءِنَّا لَمَبۡعُوثُونَ
16. Soki tokufi tokomi mabele, mpe mikuwa, boye tokosekwisama lisusu?

17 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 017

أَوَءَابَآؤُنَا ٱلۡأَوَّلُونَ
17. Na bankoko na biso ya kala?

18 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 018

قُلۡ نَعَمۡ وَأَنتُمۡ دَٰخِرُونَ
18. Loba: Iyo, bino mpe lokola bokokitisama.

19 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 019

فَإِنَّمَا هِيَ زَجۡرَةٞ وَٰحِدَةٞ فَإِذَا هُمۡ يَنظُرُونَ
19. Mpe ekozalaka sé bolengisi moko ya makasi, mpe bakomi kotala.

20 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 020

وَقَالُواْ يَٰوَيۡلَنَا هَٰذَا يَوۡمُ ٱلدِّينِ
20. Mpe bakomi koloba: Eh mawa na biso! Oyo nde mokolo mwa mbano (ya suka mpe lifuti)

21 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 021

هَٰذَا يَوۡمُ ٱلۡفَصۡلِ ٱلَّذِي كُنتُم بِهِۦ تُكَذِّبُونَ
21. Oyo nde mokolo mwa bokati makambo moye botiaki tembe тропа yango.

22 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 022

۞ٱحۡشُرُواْ ٱلَّذِينَ ظَلَمُواْ وَأَزۡوَٰجَهُمۡ وَمَا كَانُواْ يَعۡبُدُونَ
22. Bosangisa babubi na baninga na bango тре baye banso bazalaki kobondela bango.

23 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 023

مِن دُونِ ٱللَّهِ فَٱهۡدُوهُمۡ إِلَىٰ صِرَٰطِ ٱلۡجَحِيمِ
23. Na botiki Allah, mpe bokamba bango na nzela ya lifelo.

24 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 024

وَقِفُوهُمۡۖ إِنَّهُم مَّسۡـُٔولُونَ
24. Mpe botelemisa bango mpo bakoka kotunama.

25 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 025

مَا لَكُمۡ لَا تَنَاصَرُونَ
25. Mpona nini bozali komisunga te?

26 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 026

بَلۡ هُمُ ٱلۡيَوۡمَ مُسۡتَسۡلِمُونَ
26. Kasi lelo bakoluka kozala na botosi.

27 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 027

وَأَقۡبَلَ بَعۡضُهُمۡ عَلَىٰ بَعۡضٖ يَتَسَآءَلُونَ
27. Mpe basusu bakobongola bilongi epai ya baninga mpe bakomi komitunana.

28 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 028

قَالُوٓاْ إِنَّكُمۡ كُنتُمۡ تَأۡتُونَنَا عَنِ ٱلۡيَمِينِ
28. Bakolobaka: Ezali bino nde bobengaki biso na makasi. (na bopengwi)

29 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 029

قَالُواْ بَل لَّمۡ تَكُونُواْ مُؤۡمِنِينَ
29. (Bakonzi) bakolobaka: Bino moko boboyaki kondima.

30 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 030

وَمَا كَانَ لَنَا عَلَيۡكُم مِّن سُلۡطَٰنِۭۖ بَلۡ كُنتُمۡ قَوۡمٗا طَٰغِينَ
30. Tozalaki na bokoki epai na bino te, bino moko nde bozalaki bato ya mabe.

31 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 031

فَحَقَّ عَلَيۡنَا قَوۡلُ رَبِّنَآۖ إِنَّا لَذَآئِقُونَ
31. Liloba lia Nkolo wa biso lizali ya soló. Sólo tokomema. (etumbu)

32 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 032

فَأَغۡوَيۡنَٰكُمۡ إِنَّا كُنَّا غَٰوِينَ
32. Tomemaki bino na libungi, kasi ya soló, tomibungisaki biso moko.

33 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 033

فَإِنَّهُمۡ يَوۡمَئِذٖ فِي ٱلۡعَذَابِ مُشۡتَرِكُونَ
33. Mokolo mona bakosanganaka (bango) banso na etumbu.

34 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 034

إِنَّا كَذَٰلِكَ نَفۡعَلُ بِٱلۡمُجۡرِمِينَ
34. Lolenge wana nde tokosalaka na batomboki.

35 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 035

إِنَّهُمۡ كَانُوٓاْ إِذَا قِيلَ لَهُمۡ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا ٱللَّهُ يَسۡتَكۡبِرُونَ
35. Ya soló, bazalaki soki bayebisi bango nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te sé Allah, basali lolendo.

36 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 036

وَيَقُولُونَ أَئِنَّا لَتَارِكُوٓاْ ءَالِهَتِنَا لِشَاعِرٖ مَّجۡنُونِۭ
36. Mpe bazali koloba: Totika banzambe na biso тропа molobi ntôki oyo тре azali moto ya ligboma?

37 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 037

بَلۡ جَآءَ بِٱلۡحَقِّ وَصَدَّقَ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
37. Kasi ayaki na bosóló, batindami balobaki bosembo.

38 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 038

إِنَّكُمۡ لَذَآئِقُواْ ٱلۡعَذَابِ ٱلۡأَلِيمِ
38. Ya sólo penza, bokomeka etumbu ya makasi.

39 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 039

وَمَا تُجۡزَوۡنَ إِلَّا مَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
39. Mpe bokofutama sé kolandana na maye bozalaki kosala.

40 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 040

إِلَّا عِبَادَ ٱللَّهِ ٱلۡمُخۡلَصِينَ
40. Longola sé bawumbu ya Allah ba oyo baponama.

41 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 041

أُوْلَـٰٓئِكَ لَهُمۡ رِزۡقٞ مَّعۡلُومٞ
41. Bango nde bakozalaka na bolamu oyo eyebani.

42 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 042

فَوَٰكِهُ وَهُم مُّكۡرَمُونَ
42. (Bakoliaka) mbuma mpe bakosepelisaka bango.

43 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 043

فِي جَنَّـٰتِ ٱلنَّعِيمِ
43. Okati na bilanga (lola) bilamu.

44 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 044

عَلَىٰ سُرُرٖ مُّتَقَٰبِلِينَ
44. Likolo lia bambeto bizali ya kotalana.

45 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 045

يُطَافُ عَلَيۡهِم بِكَأۡسٖ مِّن مَّعِينِۭ
45. Bakolekiselaka bango коро etondi na mayi ya miluka.

46 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 046

بَيۡضَآءَ لَذَّةٖ لِّلشَّـٰرِبِينَ
46. Ya pembe elengi тропа komela.

47 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 047

لَا فِيهَا غَوۡلٞ وَلَا هُمۡ عَنۡهَا يُنزَفُونَ
47. Ekosalaka bango mabe te, mpe ekolangwisaka te.

48 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 048

وَعِندَهُمۡ قَٰصِرَٰتُ ٱلطَّرۡفِ عِينٞ
48. Bakozala na basi ya kitoko pembeni na bango, basi ya miso minene ya kotalatala pembeni te.

49 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 049

كَأَنَّهُنَّ بَيۡضٞ مَّكۡنُونٞ
49. Bazali lokola pembe ya likei oyo ebatelami.

50 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 050

فَأَقۡبَلَ بَعۡضُهُمۡ عَلَىٰ بَعۡضٖ يَتَسَآءَلُونَ
50. Basusu bakobaluka kot ala baninga na kotunana.

51 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 051

قَالَ قَآئِلٞ مِّنۡهُمۡ إِنِّي كَانَ لِي قَرِينٞ
51. Moko wa bango akolobaka: Ya soló, nazalaki na moninga.

52 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 052

يَقُولُ أَءِنَّكَ لَمِنَ ٱلۡمُصَدِّقِينَ
52. Akoloba ete: Boye ozalaki okati ya bandimi.

53 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 053

أَءِذَا مِتۡنَا وَكُنَّا تُرَابٗا وَعِظَٰمًا أَءِنَّا لَمَدِينُونَ
53. Tango tokokufa mpe tokomi mabele na mikuwa, boye tokotunamaka?

54 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 054

قَالَ هَلۡ أَنتُم مُّطَّلِعُونَ
54. Akolobaka: Boye bolingi kotala na likolo?

55 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 055

فَٱطَّلَعَ فَرَءَاهُ فِي سَوَآءِ ٱلۡجَحِيمِ
55. Mpe akotalaka likolo mpe akomonaka ye na lifelo.

56 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 056

قَالَ تَٱللَّهِ إِن كِدتَّ لَتُرۡدِينِ
56. Mpe akoloba: Na nkombo ya Allah, yo nde osali ete ngai nazanga.

57 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 057

وَلَوۡلَا نِعۡمَةُ رَبِّي لَكُنتُ مِنَ ٱلۡمُحۡضَرِينَ
57. Soki ezalaka bolamu bwa Nkolo wa ngai te, mbele nalingaki kozala o kati ya bato ya etumbu.

58 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 058

أَفَمَا نَحۡنُ بِمَيِّتِينَ
58. Ezali solo te ete tokokufa te?

59 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 059

إِلَّا مَوۡتَتَنَا ٱلۡأُولَىٰ وَمَا نَحۡنُ بِمُعَذَّبِينَ
59. Sé ezala kokufa ya biso ya yambo mpe tokozuaka etumbu te?

60 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 060

إِنَّ هَٰذَا لَهُوَ ٱلۡفَوۡزُ ٱلۡعَظِيمُ
60. Ya soló, oyo nde elonga enene.

61 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 061

لِمِثۡلِ هَٰذَا فَلۡيَعۡمَلِ ٱلۡعَٰمِلُونَ
61. Na lolenge ya boye nde esengeli na baye balingi kosala basala.

62 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 062

أَذَٰلِكَ خَيۡرٞ نُّزُلًا أَمۡ شَجَرَةُ ٱلزَّقُّومِ
62. Boye wana ezali esika ya malamu тропа kofanda to ezali nzete ya zaqqüm? (ezali nzete wana mbuma na yango ezali bololo ezali o kati ya lifelo, yango nde bilei ya bato ya mabe),

63 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 063

إِنَّا جَعَلۡنَٰهَا فِتۡنَةٗ لِّلظَّـٰلِمِينَ
63. Totiyaki yango ezala komekama тропа babubi,

64 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 064

إِنَّهَا شَجَرَةٞ تَخۡرُجُ فِيٓ أَصۡلِ ٱلۡجَحِيمِ
64. Ezali nzete eye ebotaka o kati ya lifelo,

65 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 065

طَلۡعُهَا كَأَنَّهُۥ رُءُوسُ ٱلشَّيَٰطِينِ
65. Mbuma na yango ezali lokola mitu ya basatana.

66 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 066

فَإِنَّهُمۡ لَأٓكِلُونَ مِنۡهَا فَمَالِـُٔونَ مِنۡهَا ٱلۡبُطُونَ
66. Ya soló, esengeli na bango kólia yango тре kotondisa mabumu na bango.

67 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 067

ثُمَّ إِنَّ لَهُمۡ عَلَيۡهَا لَشَوۡبٗا مِّنۡ حَمِيمٖ
67. Sima bakomela mayi ya tofina ya moto.

68 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 068

ثُمَّ إِنَّ مَرۡجِعَهُمۡ لَإِلَى ٱلۡجَحِيمِ
68. Sima lifelo nde esika ya bozongi na bango ya sólo.

69 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 069

إِنَّهُمۡ أَلۡفَوۡاْ ءَابَآءَهُمۡ ضَآلِّينَ
69. Ya soló, bakutaki batata na bango na libungi.

70 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 070

فَهُمۡ عَلَىٰٓ ءَاثَٰرِهِمۡ يُهۡرَعُونَ
70. Mpe balandaki sé nzele na bango.

71 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 071

وَلَقَدۡ ضَلَّ قَبۡلَهُمۡ أَكۡثَرُ ٱلۡأَوَّلِينَ
71. Мре liboso na bango, ebele ya bankoko na bango basilaki kobunga.

72 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 072

وَلَقَدۡ أَرۡسَلۡنَا فِيهِم مُّنذِرِينَ
72. Tosilaki kotindela bango bakebisi.

73 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 073

فَٱنظُرۡ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلۡمُنذَرِينَ
73. Tala lolenge ezalaki тропа baye bakebisamaki.

74 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 074

إِلَّا عِبَادَ ٱللَّهِ ٱلۡمُخۡلَصِينَ
74. Longola sé bawumbu ya Allah baye baponama.

75 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 075

وَلَقَدۡ نَادَىٰنَا نُوحٞ فَلَنِعۡمَ ٱلۡمُجِيبُونَ
75. Mpe ya soló, Nûh abengaki biso тре toyanolaki ye kitoko.

76 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 076

وَنَجَّيۡنَٰهُ وَأَهۡلَهُۥ مِنَ ٱلۡكَرۡبِ ٱلۡعَظِيمِ
76. Mpe tobikisaki ye elongo na libota lia ye na etumbu ya monene.

77 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 077

وَجَعَلۡنَا ذُرِّيَّتَهُۥ هُمُ ٱلۡبَاقِينَ
77. Mpe totiyaki ete libota lia ye bazala bakitani.

78 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 078

وَتَرَكۡنَا عَلَيۡهِ فِي ٱلۡأٓخِرِينَ
78. Mpe totikaki nkombo naye ezala bokundoli epai ya basusu.

79 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 079

سَلَٰمٌ عَلَىٰ نُوحٖ فِي ٱلۡعَٰلَمِينَ
79. Kimia ezala likolo ya Nûh kati na mokili mobimba.

80 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 080

إِنَّا كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡمُحۡسِنِينَ
80. Ya soló, lolenge wana nde tofutaka babongisi.

81 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 081

إِنَّهُۥ مِنۡ عِبَادِنَا ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
81. Ya sólo, ye azalaki okati ya bawumbu na biso, baye bandima.

82 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 082

ثُمَّ أَغۡرَقۡنَا ٱلۡأٓخَرِينَ
82. Sima tobomaki basusu.

83 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 083

۞وَإِنَّ مِن شِيعَتِهِۦ لَإِبۡرَٰهِيمَ
83. Mpe ya soló, Ibrâhîm azalaki moko kati na baye balandaki ye na lingomba.

84 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 084

إِذۡ جَآءَ رَبَّهُۥ بِقَلۡبٖ سَلِيمٍ
84. Tango ayaki epai ya Nkolo waye na motema mosantu.

85 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 085

إِذۡ قَالَ لِأَبِيهِ وَقَوۡمِهِۦ مَاذَا تَعۡبُدُونَ
85. Tango alobaki na tata waye тре bato naye: Bozali kobondela nini?

86 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 086

أَئِفۡكًا ءَالِهَةٗ دُونَ ٱللَّهِ تُرِيدُونَ
86. Na libungi na bino boluki banzambe mosusu botiki Allah?

87 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 087

فَمَا ظَنُّكُم بِرَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
87. Bozali kokanisa nini тропа Nkolo wa molongo?

88 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 088

فَنَظَرَ نَظۡرَةٗ فِي ٱلنُّجُومِ
88. Sima atalaki minzoto na bokebi.

89 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 089

فَقَالَ إِنِّي سَقِيمٞ
89. Mpe alobaki ete: Ya soló ngai nazui malali.

90 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 090

فَتَوَلَّوۡاْ عَنۡهُ مُدۡبِرِينَ
90. Bapesi ye mokongo bakei.

91 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 091

فَرَاغَ إِلَىٰٓ ءَالِهَتِهِمۡ فَقَالَ أَلَا تَأۡكُلُونَ
91. Apusani ngambu ya banzambe na bango alobi: Boliaka te?

92 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 092

مَا لَكُمۡ لَا تَنطِقُونَ
92. Boye bozali koloba te тропа nini?

93 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 093

فَرَاغَ عَلَيۡهِمۡ ضَرۡبَۢا بِٱلۡيَمِينِ
93. Akei kobeta bango mbata na loboko ya mobali.

94 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 094

فَأَقۡبَلُوٓاْ إِلَيۡهِ يَزِفُّونَ
94. Sima bato bayaki epai naye na lombango.

95 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 095

قَالَ أَتَعۡبُدُونَ مَا تَنۡحِتُونَ
95. Ayebisi bango: Boye bozali kobondela bikeko biye bosali bino moko?

96 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 096

وَٱللَّهُ خَلَقَكُمۡ وَمَا تَعۡمَلُونَ
96. Kasi Allah nde akela bino na maye bozali kosala.

97 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 097

قَالُواْ ٱبۡنُواْ لَهُۥ بُنۡيَٰنٗا فَأَلۡقُوهُ فِي ٱلۡجَحِيمِ
97. Balobaki ete: Botimola libulu ya moto mpe bobwaka ye na kati.

98 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 098

فَأَرَادُواْ بِهِۦ كَيۡدٗا فَجَعَلۡنَٰهُمُ ٱلۡأَسۡفَلِينَ
98. Basalelaki ye likita kasi tokweisaki bango.

99 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 099

وَقَالَ إِنِّي ذَاهِبٌ إِلَىٰ رَبِّي سَيَهۡدِينِ
99. Mpe alobaki ete: Ya soló, ngai nakei epai ya Nkolo wa ngai akokamba ngai.

100 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 100

رَبِّ هَبۡ لِي مِنَ ٱلصَّـٰلِحِينَ
100. Nkolo, Pesa ngai (mwana) o kati ya bato ya malamu.

101 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 101

فَبَشَّرۡنَٰهُ بِغُلَٰمٍ حَلِيمٖ
101. Mpe topesaki ye sango elamu ya mwana mobali ya boboto mingi (Ismail).

102 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 102

فَلَمَّا بَلَغَ مَعَهُ ٱلسَّعۡيَ قَالَ يَٰبُنَيَّ إِنِّيٓ أَرَىٰ فِي ٱلۡمَنَامِ أَنِّيٓ أَذۡبَحُكَ فَٱنظُرۡ مَاذَا تَرَىٰۚ قَالَ يَـٰٓأَبَتِ ٱفۡعَلۡ مَا تُؤۡمَرُۖ سَتَجِدُنِيٓ إِن شَآءَ ٱللَّهُ مِنَ ٱلصَّـٰبِرِينَ
102. Мре tango (Ismail) akolaki (Ibrâhîm) alobi: Eh mwana wa ngai! Namoni na ndoto ete nazali kokata yo kingo, omoni ndenge nini? (Ismâîl) alobi: Eh tata wa ngai wa bolingo! Sala lolenge batindi yo, okokuta ngai na bolingi ya Allah, okati ya bakangi mitema.

103 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 103

فَلَمَّآ أَسۡلَمَا وَتَلَّهُۥ لِلۡجَبِينِ
103. Sima ya bango banso mibale kotosa (mibeko mia Allah), alalisi ye mpo ete aboma ye.

104 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 104

وَنَٰدَيۡنَٰهُ أَن يَـٰٓإِبۡرَٰهِيمُ
104. Mpe tobelelaki ye ete: Oh Ibrâhîm!

105 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 105

قَدۡ صَدَّقۡتَ ٱلرُّءۡيَآۚ إِنَّا كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡمُحۡسِنِينَ
105. Osili kokokisa (elaka) ya ndoto, lolenge wana nde tofutaka babongisi.

106 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 106

إِنَّ هَٰذَا لَهُوَ ٱلۡبَلَـٰٓؤُاْ ٱلۡمُبِينُ
106. Ya soló, wana ezalaki momekano mwa polele.

107 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 107

وَفَدَيۡنَٰهُ بِذِبۡحٍ عَظِيمٖ
107. Mpe topesaki ye ebwele ya kitoko тропа kosasa.

108 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 108

وَتَرَكۡنَا عَلَيۡهِ فِي ٱلۡأٓخِرِينَ
108. Mpe totikaki nkombo naye ezala bokundoli epai ya basusu.

109 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 109

سَلَٰمٌ عَلَىٰٓ إِبۡرَٰهِيمَ
109. Kimia ezala likolo ya Ibrâhîm.

110 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 110

كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡمُحۡسِنِينَ
110. Lolenge wana nde tofutaka babongisi.

111 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 111

إِنَّهُۥ مِنۡ عِبَادِنَا ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
111. Ya soló, ye azalaki okati ya bawumbu na biso bandimi.

112 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 112

وَبَشَّرۡنَٰهُ بِإِسۡحَٰقَ نَبِيّٗا مِّنَ ٱلصَّـٰلِحِينَ
112. Mpe topesaki ye sango elamu ya kobotama ya Is’háq, ntoma okati ya (bato) malamu.

113 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 113

وَبَٰرَكۡنَا عَلَيۡهِ وَعَلَىٰٓ إِسۡحَٰقَۚ وَمِن ذُرِّيَّتِهِمَا مُحۡسِنٞ وَظَالِمٞ لِّنَفۡسِهِۦ مُبِينٞ
113. Mpe topambolaki ye na Is’háq, na libota lia bango mibale oyo ezalaki na (bato ya malamu) mpe oyo akomibuba etali sé ye moko.

114 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 114

وَلَقَدۡ مَنَنَّا عَلَىٰ مُوسَىٰ وَهَٰرُونَ
114. Mpe ya sólo, tosilaki kopesa na Mûssa na Hânına bolamu na biso.

115 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 115

وَنَجَّيۡنَٰهُمَا وَقَوۡمَهُمَا مِنَ ٱلۡكَرۡبِ ٱلۡعَظِيمِ
115. Mpe tobikisaki bango mibale elongo na bato na bango na etumbu ya monene.

116 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 116

وَنَصَرۡنَٰهُمۡ فَكَانُواْ هُمُ ٱلۡغَٰلِبِينَ
116. Mpe tolongisaki bango, mpe bango nde bazalaki balongi.

117 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 117

وَءَاتَيۡنَٰهُمَا ٱلۡكِتَٰبَ ٱلۡمُسۡتَبِينَ
117. Mpe topesaki bango buku ya polele.

118 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 118

وَهَدَيۡنَٰهُمَا ٱلصِّرَٰطَ ٱلۡمُسۡتَقِيمَ
118. Mpe tokambaki bango mibale na nzela ya semba.

119 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 119

وَتَرَكۡنَا عَلَيۡهِمَا فِي ٱلۡأٓخِرِينَ
119. Mpe nkombo ya bango mibale ezala bokanisi тропа basusu.

120 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 120

سَلَٰمٌ عَلَىٰ مُوسَىٰ وَهَٰرُونَ
120. Kimia ezala likolo ya Mûssa na Háruna.

121 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 121

إِنَّا كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡمُحۡسِنِينَ
121. Ya sólo, lolenge wana nde tofutaka babongisi.

122 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 122

إِنَّهُمَا مِنۡ عِبَادِنَا ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
122. Ya soló, bango mibale bazalaki okati ya bawumbu na biso ya bandimi.

123 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 123

وَإِنَّ إِلۡيَاسَ لَمِنَ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
123. Мре ya sólo IL’YÁS azalaki moko okati ya batindami.

124 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 124

إِذۡ قَالَ لِقَوۡمِهِۦٓ أَلَا تَتَّقُونَ
124. Tango alobaki na bato naye: Boye bokobanga te?

125 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 125

أَتَدۡعُونَ بَعۡلٗا وَتَذَرُونَ أَحۡسَنَ ٱلۡخَٰلِقِينَ
125. Boye bozali kokumisa ba’alan (nkombo ya ekeko), mpe botiki mokeli malamu?

126 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 126

ٱللَّهَ رَبَّكُمۡ وَرَبَّ ءَابَآئِكُمُ ٱلۡأَوَّلِينَ
126. Allah nde Nkolo wa bino, mpe Nkolo ya bankoko ya bino ya kala.

127 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 127

فَكَذَّبُوهُ فَإِنَّهُمۡ لَمُحۡضَرُونَ
127. Baboyaki kondimela ye, kasi bakomemama o kati ya etumbu.

128 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 128

إِلَّا عِبَادَ ٱللَّهِ ٱلۡمُخۡلَصِينَ
128. Longola sé bawumbu ya Allah baye baponama.

129 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 129

وَتَرَكۡنَا عَلَيۡهِ فِي ٱلۡأٓخِرِينَ
129. Mpe totikaki nkombo naye ezala bokundoli epai ya basusu.

130 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 130

سَلَٰمٌ عَلَىٰٓ إِلۡ يَاسِينَ
130. Kimia ezala likolo ya Il’yâsîn na balandi ye.

131 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 131

إِنَّا كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡمُحۡسِنِينَ
131. Ya sólo, lolenge wana nde tofutaka babongisi.

132 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 132

إِنَّهُۥ مِنۡ عِبَادِنَا ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
132. Ya sólo, ye azalaki okati ya bawumbu na biso ya bandimi.

133 - As-Saffat (Those who set the Ranks) - 133

وَإِن

Scroll to Top