النمل
An-Naml
The Ant
1 - An-Naml (The Ant) - 001
طسٓۚ تِلۡكَ ءَايَٰتُ ٱلۡقُرۡءَانِ وَكِتَابٖ مُّبِينٍ
1. Twâ sîn,(1) oyo ezali mikapo mia kurani, mpe buku wa polele.
1 Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
2 - An-Naml (The Ant) - 002
هُدٗى وَبُشۡرَىٰ لِلۡمُؤۡمِنِينَ
2. (Ezali) na bokambami mpe kopesa sango elamu epai ya bandimi.
3 - An-Naml (The Ant) - 003
ٱلَّذِينَ يُقِيمُونَ ٱلصَّلَوٰةَ وَيُؤۡتُونَ ٱلزَّكَوٰةَ وَهُم بِٱلۡأٓخِرَةِ هُمۡ يُوقِنُونَ
3. Baye bazali kotelemisa losambo mpe kobimisa zakat(2), mpe bazali na tembe te na mokolo mwa suka.
2 Zakat: Bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
4 - An-Naml (The Ant) - 004
إِنَّ ٱلَّذِينَ لَا يُؤۡمِنُونَ بِٱلۡأٓخِرَةِ زَيَّنَّا لَهُمۡ أَعۡمَٰلَهُمۡ فَهُمۡ يَعۡمَهُونَ
4. Ya soló, baye bazali kondima na mokolo ya suka te, totieli misala na bango ya mabe bonzenga, mpe batikali na yango na koyimayima mpe kozanga bososoli.
5 - An-Naml (The Ant) - 005
أُوْلَـٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ لَهُمۡ سُوٓءُ ٱلۡعَذَابِ وَهُمۡ فِي ٱلۡأٓخِرَةِ هُمُ ٱلۡأَخۡسَرُونَ
5. Bango wana nde bakozala na etumbu ya mabe, mpe o mokolo ya suka bakozala bazangi mpenza.
6 - An-Naml (The Ant) - 006
وَإِنَّكَ لَتُلَقَّى ٱلۡقُرۡءَانَ مِن لَّدُنۡ حَكِيمٍ عَلِيمٍ
6. Mpe ya solo, ozali koyamba kurani oyo kowuta epai ya oyo azali na bwanya atonda mayele.
7 - An-Naml (The Ant) - 007
إِذۡ قَالَ مُوسَىٰ لِأَهۡلِهِۦٓ إِنِّيٓ ءَانَسۡتُ نَارٗا سَـَٔاتِيكُم مِّنۡهَا بِخَبَرٍ أَوۡ ءَاتِيكُم بِشِهَابٖ قَبَسٖ لَّعَلَّكُمۡ تَصۡطَلُونَ
7. (Kanisa) tango Mûssa alobaki na libota lia ye: Ya solo, ngai namoni moto, nakoyela bino sango okati na yango to nakoyela bino koni ya moto mpo été bomiyotola.
8 - An-Naml (The Ant) - 008
فَلَمَّا جَآءَهَا نُودِيَ أَنۢ بُورِكَ مَن فِي ٱلنَّارِ وَمَنۡ حَوۡلَهَا وَسُبۡحَٰنَ ٱللَّهِ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
8. Mpe tango akomaki ayoki mongongo ebengi été: Apambolami moto oyo atelemi o kati ya moto, ndenge moko mpe baye bazali zinga zinga na yango. Nkembo na Allah Nkolo ya mokili. (atonda bokasi mpe bwanya).
9 - An-Naml (The Ant) - 009
يَٰمُوسَىٰٓ إِنَّهُۥٓ أَنَا ٱللَّهُ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
9. Eh Mûssa! Ezali ya soló, ngai Allah oyo nazali na nguya na ntonda bwanya.
10 - An-Naml (The Ant) - 010
وَأَلۡقِ عَصَاكَۚ فَلَمَّا رَءَاهَا تَهۡتَزُّ كَأَنَّهَا جَآنّٞ وَلَّىٰ مُدۡبِرٗا وَلَمۡ يُعَقِّبۡۚ يَٰمُوسَىٰ لَا تَخَفۡ إِنِّي لَا يَخَافُ لَدَيَّ ٱلۡمُرۡسَلُونَ
10. Mpe bwaka lingenda nayo, mpe tango amoni yango ekomi kongoluma lokola nyoka, apesi mokongo abaluki, eh Mûssa! Kobanga te epai na ngai batindami babangaka te.
11 - An-Naml (The Ant) - 011
إِلَّا مَن ظَلَمَ ثُمَّ بَدَّلَ حُسۡنَۢا بَعۡدَ سُوٓءٖ فَإِنِّي غَفُورٞ رَّحِيمٞ
11. Longola sé oyo asali mbeba mpe sima abongisi yango. Ya solo, nazali molimbisi na tonda mawa.
12 - An-Naml (The Ant) - 012
وَأَدۡخِلۡ يَدَكَ فِي جَيۡبِكَ تَخۡرُجۡ بَيۡضَآءَ مِنۡ غَيۡرِ سُوٓءٖۖ فِي تِسۡعِ ءَايَٰتٍ إِلَىٰ فِرۡعَوۡنَ وَقَوۡمِهِۦٓۚ إِنَّهُمۡ كَانُواْ قَوۡمٗا فَٰسِقِينَ
12. Mpe kotisa loboko nayo na libenga nayo, ekobima pembe ekosala mpasi te, ezali moko ya bikamwiseli libua ökende na yango epai ya falo na bato naye, mpo bazali ya sólo bato ya mabe mpenza.
13 - An-Naml (The Ant) - 013
فَلَمَّا جَآءَتۡهُمۡ ءَايَٰتُنَا مُبۡصِرَةٗ قَالُواْ هَٰذَا سِحۡرٞ مُّبِينٞ
13. Mpe tango bilembo bia biso bikomelaki bango polele polele, balobi ete: Oyo ezali bonganga ya polele.
14 - An-Naml (The Ant) - 014
وَجَحَدُواْ بِهَا وَٱسۡتَيۡقَنَتۡهَآ أَنفُسُهُمۡ ظُلۡمٗا وَعُلُوّٗاۚ فَٱنظُرۡ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلۡمُفۡسِدِينَ
14. Bawanganaki yango na motema mabe mpe na lolendo nzoka nde namitema na bango bazalaki na tembe te, kasi tala ndenge nini bato mabe basukaki.
15 - An-Naml (The Ant) - 015
وَلَقَدۡ ءَاتَيۡنَا دَاوُۥدَ وَسُلَيۡمَٰنَ عِلۡمٗاۖ وَقَالَا ٱلۡحَمۡدُ لِلَّهِ ٱلَّذِي فَضَّلَنَا عَلَىٰ كَثِيرٖ مِّنۡ عِبَادِهِ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
15. Mpe tosilaki kopesa Dâwud na Suleyman boyebi, mpe bango mibale balobaki: Matondo na Allah oyo apesi biso ebele o kati ya bawumbu naye bandimi.
16 - An-Naml (The Ant) - 016
وَوَرِثَ سُلَيۡمَٰنُ دَاوُۥدَۖ وَقَالَ يَـٰٓأَيُّهَا ٱلنَّاسُ عُلِّمۡنَا مَنطِقَ ٱلطَّيۡرِ وَأُوتِينَا مِن كُلِّ شَيۡءٍۖ إِنَّ هَٰذَا لَهُوَ ٱلۡفَضۡلُ ٱلۡمُبِينُ
16. Mpe Suleyman akitanaki Dâwud, mpe alobaki: Eh bino bato! Totangisama monoko ya bandeke, mpe topesama biloko binso. Ya soló, oyo ezali bolamu ya polele.
17 - An-Naml (The Ant) - 017
وَحُشِرَ لِسُلَيۡمَٰنَ جُنُودُهُۥ مِنَ ٱلۡجِنِّ وَٱلۡإِنسِ وَٱلطَّيۡرِ فَهُمۡ يُوزَعُونَ
17. Mpe basangiseli Suleyman mapinga ya basoda naye ya badjini (bilima) na bato, mpe bandeke, batandanaki milongo milongo.
18 - An-Naml (The Ant) - 018
حَتَّىٰٓ إِذَآ أَتَوۡاْ عَلَىٰ وَادِ ٱلنَّمۡلِ قَالَتۡ نَمۡلَةٞ يَـٰٓأَيُّهَا ٱلنَّمۡلُ ٱدۡخُلُواْ مَسَٰكِنَكُمۡ لَا يَحۡطِمَنَّكُمۡ سُلَيۡمَٰنُ وَجُنُودُهُۥ وَهُمۡ لَا يَشۡعُرُونَ
18. Kino bakomaki na bisika ya basombe bazali, sombe moko alobaki ete: Oh bino basombe! Bokota na bandako na bino noki te Suleyman na mapinga naye bakonyata bino mpe bakoyeba te.
19 - An-Naml (The Ant) - 019
فَتَبَسَّمَ ضَاحِكٗا مِّن قَوۡلِهَا وَقَالَ رَبِّ أَوۡزِعۡنِيٓ أَنۡ أَشۡكُرَ نِعۡمَتَكَ ٱلَّتِيٓ أَنۡعَمۡتَ عَلَيَّ وَعَلَىٰ وَٰلِدَيَّ وَأَنۡ أَعۡمَلَ صَٰلِحٗا تَرۡضَىٰهُ وَأَدۡخِلۡنِي بِرَحۡمَتِكَ فِي عِبَادِكَ ٱلصَّـٰلِحِينَ
19. Mpe (Suleyman) akatani na koseka tango ayokaki liloba ya sombe wana mpe asepeli na makambo na bango oyo basali mpe alobi: Oh Nkolo! Tika natondo yo botondi тропа bolamu nayo likolo na ngai na baboti na ngai mpe tika ete nasala mosala oyo ekosepelisa yo, mpe na ngolu nayo, kotisa ngai na mawa nayo okati ya lisanga ya bawumbu nayo ya malamu.
20 - An-Naml (The Ant) - 020
وَتَفَقَّدَ ٱلطَّيۡرَ فَقَالَ مَالِيَ لَآ أَرَى ٱلۡهُدۡهُدَ أَمۡ كَانَ مِنَ ٱلۡغَآئِبِينَ
20. Mpe atalaki milongo ya bandeke alobi: Nazali kornona hud-hud(1) te azali wapi? To azali elongo na baye bazalaki te?
1 Hud-hud: Lisumba.
21 - An-Naml (The Ant) - 021
لَأُعَذِّبَنَّهُۥ عَذَابٗا شَدِيدًا أَوۡ لَأَاْذۡبَحَنَّهُۥٓ أَوۡ لَيَأۡتِيَنِّي بِسُلۡطَٰنٖ مُّبِينٖ
21. Nakopesa ye etumbu ya makasi mpenza to nakokata ye kingo, to ayela ngai eloko oyo ekoki kolongisa ye.
22 - An-Naml (The Ant) - 022
فَمَكَثَ غَيۡرَ بَعِيدٖ فَقَالَ أَحَطتُ بِمَا لَمۡ تُحِطۡ بِهِۦ وَجِئۡتُكَ مِن سَبَإِۭ بِنَبَإٖ يَقِينٍ
22. Kaši awumelaki tango molayi te na kozonga, mpe alobaki na mokonzi ete: Nazui boyebi oyo ozali na yango te, mpe nayeli yo sango ya sôló, kowuta na mboka sabat(2).
2 Sabat: Ezali mboka moko na yemen.
23 - An-Naml (The Ant) - 023
إِنِّي وَجَدتُّ ٱمۡرَأَةٗ تَمۡلِكُهُمۡ وَأُوتِيَتۡ مِن كُلِّ شَيۡءٖ وَلَهَا عَرۡشٌ عَظِيمٞ
23. Nakuti mwasi moko azali kokonza bango, mpe makambo mazali kokambama naye, mpe azali na kiti ya bokonzi ya kitoko monene koleka.
24 - An-Naml (The Ant) - 024
وَجَدتُّهَا وَقَوۡمَهَا يَسۡجُدُونَ لِلشَّمۡسِ مِن دُونِ ٱللَّهِ وَزَيَّنَ لَهُمُ ٱلشَّيۡطَٰنُ أَعۡمَٰلَهُمۡ فَصَدَّهُمۡ عَنِ ٱلسَّبِيلِ فَهُمۡ لَا يَهۡتَدُونَ
24. Nakuti ye na bato naye bazali kogumbamela moyi, na botiki Allah, mpe satana abongiseli bango misala, mpe abungisi bango nzela ya semba, mpe bakokambama te.
25 - An-Naml (The Ant) - 025
أَلَّاۤ يَسۡجُدُواْۤ لِلَّهِ ٱلَّذِي يُخۡرِجُ ٱلۡخَبۡءَ فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَيَعۡلَمُ مَا تُخۡفُونَ وَمَا تُعۡلِنُونَ
25. Boye bakofukamela Allah te oyo abimisaka maye mabombami kati ya mapata na mabele, mpe ayebi maye bozali kobomba mpe maye bozali komonisa?
26 - An-Naml (The Ant) - 026
ٱللَّهُ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ رَبُّ ٱلۡعَرۡشِ ٱلۡعَظِيمِ۩
26. Allah nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te kaka sé ye Nkolo ya ngwende ya bonene (ya bokonzi).
27 - An-Naml (The Ant) - 027
۞قَالَ سَنَنظُرُ أَصَدَقۡتَ أَمۡ كُنتَ مِنَ ٱلۡكَٰذِبِينَ
27. (Suleyman) Alobi: Tokotala soki olobi bosôló to ozali kokosa.
28 - An-Naml (The Ant) - 028
ٱذۡهَب بِّكِتَٰبِي هَٰذَا فَأَلۡقِهۡ إِلَيۡهِمۡ ثُمَّ تَوَلَّ عَنۡهُمۡ فَٱنظُرۡ مَاذَا يَرۡجِعُونَ
28. Kende kotikela bango mokanda mwa ngai moye, sima tika bango mpe otelema pembeni mpe tala lolenge nini bakoyanola.
29 - An-Naml (The Ant) - 029
قَالَتۡ يَـٰٓأَيُّهَا ٱلۡمَلَؤُاْ إِنِّيٓ أُلۡقِيَ إِلَيَّ كِتَٰبٞ كَرِيمٌ
29. Mokonzi ya mwasi alobi: Eh bankumu! Babwakeli ngai mokanda ya lokumu.
30 - An-Naml (The Ant) - 030
إِنَّهُۥ مِن سُلَيۡمَٰنَ وَإِنَّهُۥ بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
30. Ya soló, ewuti epai ya Suleyman. Mpe ya sólo yango ebandi na nkombo ya Allah wa boboto atonda ngolu.
31 - An-Naml (The Ant) - 031
أَلَّا تَعۡلُواْ عَلَيَّ وَأۡتُونِي مُسۡلِمِينَ
31. Ete bosalela ngai lolendo te, mpe boya epai na ngai nakomisokia (kozala bamizilima).
32 - An-Naml (The Ant) - 032
قَالَتۡ يَـٰٓأَيُّهَا ٱلۡمَلَؤُاْ أَفۡتُونِي فِيٓ أَمۡرِي مَا كُنتُ قَاطِعَةً أَمۡرًا حَتَّىٰ تَشۡهَدُونِ
32. Alobi: Eh bankumu! Bopesa ngai toli тропа likambo liye, nakosala eloko te kino bokozala awa. (тропа toii)
33 - An-Naml (The Ant) - 033
قَالُواْ نَحۡنُ أُوْلُواْ قُوَّةٖ وَأُوْلُواْ بَأۡسٖ شَدِيدٖ وَٱلۡأَمۡرُ إِلَيۡكِ فَٱنظُرِي مَاذَا تَأۡمُرِينَ
33. Balobi: Tozali na bokasi mpe nguya ya kosakana te, liloba ya suka ezali epai nayo, tinda biso na oyo omoni.
34 - An-Naml (The Ant) - 034
قَالَتۡ إِنَّ ٱلۡمُلُوكَ إِذَا دَخَلُواْ قَرۡيَةً أَفۡسَدُوهَا وَجَعَلُوٓاْ أَعِزَّةَ أَهۡلِهَآ أَذِلَّةٗۚ وَكَذَٰلِكَ يَفۡعَلُونَ
34. Alobi: Ya soló, bakonzi soki bakoti na mboka babebisaka yango, na koboma mpe kosala mabe ebele, mpe bakomisaka bankumu na yango bato mpamba. Mpe lolenge wana nde basalaka.
35 - An-Naml (The Ant) - 035
وَإِنِّي مُرۡسِلَةٌ إِلَيۡهِم بِهَدِيَّةٖ فَنَاظِرَةُۢ بِمَ يَرۡجِعُ ٱلۡمُرۡسَلُونَ
35. Mpe na yango ya sólo, ngai nazali kotindela bango likabo sikoyo, mpe na kotala eyano nini ekoyela ngai.
36 - An-Naml (The Ant) - 036
فَلَمَّا جَآءَ سُلَيۡمَٰنَ قَالَ أَتُمِدُّونَنِ بِمَالٖ فَمَآ ءَاتَىٰنِۦَ ٱللَّهُ خَيۡرٞ مِّمَّآ ءَاتَىٰكُمۚ بَلۡ أَنتُم بِهَدِيَّتِكُمۡ تَفۡرَحُونَ
36. Mpe tango (bantoma to basali naye) bakomaki epai ya Suleyman na (libonza) alobi: Boye bolingi kosomba ngai na misolo? Kasi oyo Allah asilaki kopesa ngai ezali ebele mpe eleki likabo na bino oyo bozali kosepela na yango.
37 - An-Naml (The Ant) - 037
ٱرۡجِعۡ إِلَيۡهِمۡ فَلَنَأۡتِيَنَّهُم بِجُنُودٖ لَّا قِبَلَ لَهُم بِهَا وَلَنُخۡرِجَنَّهُم مِّنۡهَآ أَذِلَّةٗ وَهُمۡ صَٰغِرُونَ
37. Zonga epai na bango, kasi tokoyela bango na basoda ya makasi baye bakotelema liboso na bango te mpe tokobimisa bango. Na yango mpe bakozanga lokumu mpe bakokitisama.
38 - An-Naml (The Ant) - 038
قَالَ يَـٰٓأَيُّهَا ٱلۡمَلَؤُاْ أَيُّكُمۡ يَأۡتِينِي بِعَرۡشِهَا قَبۡلَ أَن يَأۡتُونِي مُسۡلِمِينَ
38. Alobaki ete: (Suleyman) oh bankumu na ngai! Nani akoyela ngai ngwende naye awa yambo ete baya epai nanga!’ na botosi bonso?
39 - An-Naml (The Ant) - 039
قَالَ عِفۡرِيتٞ مِّنَ ٱلۡجِنِّ أَنَا۠ ءَاتِيكَ بِهِۦ قَبۡلَ أَن تَقُومَ مِن مَّقَامِكَۖ وَإِنِّي عَلَيۡهِ لَقَوِيٌّ أَمِينٞ
39. If’rît(1) alobaki ete: Ngai nakoyela yo yango yambo ete otelema na esika nayo. Mpe ya soló ngai nazali тропа yango makasi mpe bosembo.
1 If’rît: Ezali kombo ya elima moko ya makasi nakati ya bilima oyo bazalaki na nsé ya mitindo ya Suleyman.
40 - An-Naml (The Ant) - 040
قَالَ ٱلَّذِي عِندَهُۥ عِلۡمٞ مِّنَ ٱلۡكِتَٰبِ أَنَا۠ ءَاتِيكَ بِهِۦ قَبۡلَ أَن يَرۡتَدَّ إِلَيۡكَ طَرۡفُكَۚ فَلَمَّا رَءَاهُ مُسۡتَقِرًّا عِندَهُۥ قَالَ هَٰذَا مِن فَضۡلِ رَبِّي لِيَبۡلُوَنِيٓ ءَأَشۡكُرُ أَمۡ أَكۡفُرُۖ وَمَن شَكَرَ فَإِنَّمَا يَشۡكُرُ لِنَفۡسِهِۦۖ وَمَن كَفَرَ فَإِنَّ رَبِّي غَنِيّٞ كَرِيمٞ
40. (moto) moko azalaki na boyebi ya buku alobaki ete: Ngai nakoyela yo yango yambo ete obuka miso nayo. Mpe tango amonaki yango etelemi liboso naye, alobaki ete: (Suleyman) oyo ezali bolamu ya Nkolo na ngai, ameki ngai na yango soki nakotondo ye to nakozanga ye botondi, kasi oyo akotondo ayeba ete ezali тропа bolamu naye moko, mpe oyo akoboya kotondo, ya solo, Nkolo na ngai atonda bomengo azali malamu.
41 - An-Naml (The Ant) - 041
قَالَ نَكِّرُواْ لَهَا عَرۡشَهَا نَنظُرۡ أَتَهۡتَدِيٓ أَمۡ تَكُونُ مِنَ ٱلَّذِينَ لَا يَهۡتَدُونَ
41. Alobi (lisusu): Bozongisela ye kiti naye, totala soki akokambama, to akozala o kati ya ba’oyo bakambami te.
42 - An-Naml (The Ant) - 042
فَلَمَّا جَآءَتۡ قِيلَ أَهَٰكَذَا عَرۡشُكِۖ قَالَتۡ كَأَنَّهُۥ هُوَۚ وَأُوتِينَا ٱلۡعِلۡمَ مِن قَبۡلِهَا وَكُنَّا مُسۡلِمِينَ
42. Tango ayakaki balobaki naye ete (mokonzi mwasi wana): Boye oyo ngwende nayo te? Azongisaki ete ezali lokola yango! (Alobi Suleyman): Tozuaki boyebi liboso naye mpe tomisokie (tokomi bamizilima).
43 - An-Naml (The Ant) - 043
وَصَدَّهَا مَا كَانَت تَّعۡبُدُ مِن دُونِ ٱللَّهِۖ إِنَّهَا كَانَتۡ مِن قَوۡمٖ كَٰفِرِينَ
43. Kasi oyo azalaki kobondela na botiki Allah, nde epekisaki ye kasi azalaki soló o kati ya bapengwi.
44 - An-Naml (The Ant) - 044
قِيلَ لَهَا ٱدۡخُلِي ٱلصَّرۡحَۖ فَلَمَّا رَأَتۡهُ حَسِبَتۡهُ لُجَّةٗ وَكَشَفَتۡ عَن سَاقَيۡهَاۚ قَالَ إِنَّهُۥ صَرۡحٞ مُّمَرَّدٞ مِّن قَوَارِيرَۗ قَالَتۡ رَبِّ إِنِّي ظَلَمۡتُ نَفۡسِي وَأَسۡلَمۡتُ مَعَ سُلَيۡمَٰنَ لِلَّهِ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
44. Мре balobaki naye: Kota na ndako, mpe tango amonaki yango lokola mayi ya mozindo, amonaki makolo naye ebimi na elilingi, (Suleyman) alobi naye: Oyo ezali ndako esalami na milangi ya talo,: (Mwasi mokonzi!) alobaki ete: Nkolo, ya solo namibubaki ngai moko, na yango namisoki elongo na Suleyman epai ya Allah Nkolo ya mokili mobimba.
45 - An-Naml (The Ant) - 045
وَلَقَدۡ أَرۡسَلۡنَآ إِلَىٰ ثَمُودَ أَخَاهُمۡ صَٰلِحًا أَنِ ٱعۡبُدُواْ ٱللَّهَ فَإِذَا هُمۡ فَرِيقَانِ يَخۡتَصِمُونَ
45. Mpe ya solo, totindaki epai ya Thamûd, ndeko wa bango Swâlih ete (ayebisa bango): Bobondela Allah, kasi bakabwanaki na biteni mibale na kosuana.
46 - An-Naml (The Ant) - 046
قَالَ يَٰقَوۡمِ لِمَ تَسۡتَعۡجِلُونَ بِٱلسَّيِّئَةِ قَبۡلَ ٱلۡحَسَنَةِۖ لَوۡلَا تَسۡتَغۡفِرُونَ ٱللَّهَ لَعَلَّكُمۡ تُرۡحَمُونَ
46. Alobi: Oh bato na ngai! Mpona nini bozali kowelisa kosala mabe mpe botiki kosala bolamu? Soki ata bosengaki bolimbisi epai ya Allah, tango mosusu bokoyambema na ngolu naye?
47 - An-Naml (The Ant) - 047
قَالُواْ ٱطَّيَّرۡنَا بِكَ وَبِمَن مَّعَكَۚ قَالَ طَـٰٓئِرُكُمۡ عِندَ ٱللَّهِۖ بَلۡ أَنتُمۡ قَوۡمٞ تُفۡتَنُونَ
47. Balobi ete: Tozali kornona mpona baye bazali nayo mabe mpona biso, azongiseli bango ete: Likambo na bino litali sé Allah. Kasi bino bokwei nde okati ya komekama.
48 - An-Naml (The Ant) - 048
وَكَانَ فِي ٱلۡمَدِينَةِ تِسۡعَةُ رَهۡطٖ يُفۡسِدُونَ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَلَا يُصۡلِحُونَ
48. Mpe okati ya mboka ezalaki na lisanga ya bato libua bazalaki kotia mobulu likolo ya mabele, bazalaki kosala bolamu ata шоке te.
49 - An-Naml (The Ant) - 049
قَالُواْ تَقَاسَمُواْ بِٱللَّهِ لَنُبَيِّتَنَّهُۥ وَأَهۡلَهُۥ ثُمَّ لَنَقُولَنَّ لِوَلِيِّهِۦ مَا شَهِدۡنَا مَهۡلِكَ أَهۡلِهِۦ وَإِنَّا لَصَٰدِقُونَ
49. Balobaki ete: Tolapa na Allah ete tokosala ye na libota naye mabe na butu, na sima tokoloba na moto oyo atelemi тропа kosenga makila naye ete: Biso toyebi moto abomi libota naye te. Mpe ya soló, tozali bosembo.
50 - An-Naml (The Ant) - 050
وَمَكَرُواْ مَكۡرٗا وَمَكَرۡنَا مَكۡرٗا وَهُمۡ لَا يَشۡعُرُونَ
50. Mpe basali likita ya mabe, mpe tosalelaki bango lokola, kasi bazalaki koyeba te.
51 - An-Naml (The Ant) - 051
فَٱنظُرۡ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ مَكۡرِهِمۡ أَنَّا دَمَّرۡنَٰهُمۡ وَقَوۡمَهُمۡ أَجۡمَعِينَ
51. Tala lifuta ya mwango na bango basalaki mpe tobomaki bango na baye banso bazalaki elongo na bango.
52 - An-Naml (The Ant) - 052
فَتِلۡكَ بُيُوتُهُمۡ خَاوِيَةَۢ بِمَا ظَلَمُوٓاْۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗ لِّقَوۡمٖ يَعۡلَمُونَ
52. Mpe tala bandako na bango, bitikali polele тропа bobubi bwa bango. Wana ezali sólo elembo mpo bato bakoka koyeba.
53 - An-Naml (The Ant) - 053
وَأَنجَيۡنَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَكَانُواْ يَتَّقُونَ
53. Mpe tolongisaki baye bandimaki mpe bazalaki kobanga.
54 - An-Naml (The Ant) - 054
وَلُوطًا إِذۡ قَالَ لِقَوۡمِهِۦٓ أَتَأۡتُونَ ٱلۡفَٰحِشَةَ وَأَنتُمۡ تُبۡصِرُونَ
54. Mpe Loth tango ayebisaki na bato naye ete: Bozali kosala mabe (kokutana mibali na mibali na nzela ya sima) mpe bozali kornona?
55 - An-Naml (The Ant) - 055
أَئِنَّكُمۡ لَتَأۡتُونَ ٱلرِّجَالَ شَهۡوَةٗ مِّن دُونِ ٱلنِّسَآءِۚ بَلۡ أَنتُمۡ قَوۡمٞ تَجۡهَلُونَ
55. Ya soló, bino bozali koyela mibali na sima, botiki basi baye bakokokisela bino mposa. Kasi bozali na boyebi te.
56 - An-Naml (The Ant) - 056
۞فَمَا كَانَ جَوَابَ قَوۡمِهِۦٓ إِلَّآ أَن قَالُوٓاْ أَخۡرِجُوٓاْ ءَالَ لُوطٖ مِّن قَرۡيَتِكُمۡۖ إِنَّهُمۡ أُنَاسٞ يَتَطَهَّرُونَ
56. Eyano ya bato naye ezalaki ete: Bobimisa libota lia Loth na mboka na bino, ya soló, bango bazali bato balingaka sé komipetola.
57 - An-Naml (The Ant) - 057
فَأَنجَيۡنَٰهُ وَأَهۡلَهُۥٓ إِلَّا ٱمۡرَأَتَهُۥ قَدَّرۡنَٰهَا مِنَ ٱلۡغَٰبِرِينَ
57. Mpe tolongisaki ye na libota lia ye, longola sé mwasi naye, totiyaki ye kati ya baye tobomaki.
58 - An-Naml (The Ant) - 058
وَأَمۡطَرۡنَا عَلَيۡهِم مَّطَرٗاۖ فَسَآءَ مَطَرُ ٱلۡمُنذَرِينَ
58. Mpe tobetiselaki bango mbula (ya mabanga), mpe mbula nini ya mabe ya lolenge wana тропа baye bakebisamaki!.
59 - An-Naml (The Ant) - 059
قُلِ ٱلۡحَمۡدُ لِلَّهِ وَسَلَٰمٌ عَلَىٰ عِبَادِهِ ٱلَّذِينَ ٱصۡطَفَىٰٓۗ ءَآللَّهُ خَيۡرٌ أَمَّا يُشۡرِكُونَ
59. Loba: Matondo na Allah, mpe kimia ezala likolo ya bawumbu naye oyo baponami na (bolamu), boye Allah nde azali malamu to banzambe oyo bazali kosangisa naye nde baleki malamu?.
60 - An-Naml (The Ant) - 060
أَمَّنۡ خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ وَأَنزَلَ لَكُم مِّنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءٗ فَأَنۢبَتۡنَا بِهِۦ حَدَآئِقَ ذَاتَ بَهۡجَةٖ مَّا كَانَ لَكُمۡ أَن تُنۢبِتُواْ شَجَرَهَآۗ أَءِلَٰهٞ مَّعَ ٱللَّهِۚ بَلۡ هُمۡ قَوۡمٞ يَعۡدِلُونَ
60. Ezali ye te nde akela likolo na mabele mpe azali kokitisela bino mbula kowuta na likolo, mpe tobimiseli bino bilanga na milona ya kitoko? Bozalaki na makoki moko te ya kokolisa banzete na yango, boye ezali na nzambe mosusu elongo na Allah? Kasi bazali nde bato ya kokokisa Allah na eloko.
61 - An-Naml (The Ant) - 061
أَمَّن جَعَلَ ٱلۡأَرۡضَ قَرَارٗا وَجَعَلَ خِلَٰلَهَآ أَنۡهَٰرٗا وَجَعَلَ لَهَا رَوَٰسِيَ وَجَعَلَ بَيۡنَ ٱلۡبَحۡرَيۡنِ حَاجِزًاۗ أَءِلَٰهٞ مَّعَ ٱللَّهِۚ بَلۡ أَكۡثَرُهُمۡ لَا يَعۡلَمُونَ
61. Ezali ye te nde atandi mabele тропа kofanda? Mpe atiolisi mingala okati na yango? Mpe apiki bangomba likolo na yango? Mpe akaboli bibale mibale ete bikutana te? Boye ezali na nzambe mosusu elongo na Allah? Kasi ebele na bango bazali koyeba te.
62 - An-Naml (The Ant) - 062
أَمَّن يُجِيبُ ٱلۡمُضۡطَرَّ إِذَا دَعَاهُ وَيَكۡشِفُ ٱلسُّوٓءَ وَيَجۡعَلُكُمۡ خُلَفَآءَ ٱلۡأَرۡضِۗ أَءِلَٰهٞ مَّعَ ٱللَّهِۚ قَلِيلٗا مَّا تَذَكَّرُونَ
62. Ezali ye te nde oyo azali koyanola moleli tango abeleli ye, mpe alongoli ye mpasi mpe azali kokitanisa bino na mabele? Boye ezali na nzambe mosusu elongo na Allah? Moke nde bozali kokanisa.
63 - An-Naml (The Ant) - 063
أَمَّن يَهۡدِيكُمۡ فِي ظُلُمَٰتِ ٱلۡبَرِّ وَٱلۡبَحۡرِ وَمَن يُرۡسِلُ ٱلرِّيَٰحَ بُشۡرَۢا بَيۡنَ يَدَيۡ رَحۡمَتِهِۦٓۗ أَءِلَٰهٞ مَّعَ ٱللَّهِۚ تَعَٰلَى ٱللَّهُ عَمَّا يُشۡرِكُونَ
63. Ezali ye te nde azali kokamba bino na molili ya mokili mpe molili ya ebale? Mpe nani azali kotindaka mopepe lokola sango ya malamu na ngolu naye? Boye ezali na nzambe mosusu elongo na Allah? Allah azali likolo koleka maye bazali kosangisa na yango.
64 - An-Naml (The Ant) - 064
أَمَّن يَبۡدَؤُاْ ٱلۡخَلۡقَ ثُمَّ يُعِيدُهُۥ وَمَن يَرۡزُقُكُم مِّنَ ٱلسَّمَآءِ وَٱلۡأَرۡضِۗ أَءِلَٰهٞ مَّعَ ٱللَّهِۚ قُلۡ هَاتُواْ بُرۡهَٰنَكُمۡ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
64. Ezali ye te oyo abandaka bokeli sima azongeli yango? Mpe nani azali koleisa bino kowuta na likolo mpe na mabele? Boye ezali na nzambe mosusu elongo na Allah? Loba: Bopesa bilembetele bia bino soki bozali na bosôló.
65 - An-Naml (The Ant) - 065
قُل لَّا يَعۡلَمُ مَن فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ ٱلۡغَيۡبَ إِلَّا ٱللَّهُۚ وَمَا يَشۡعُرُونَ أَيَّانَ يُبۡعَثُونَ
65. Loba: Moko te ayebi maye mabombami kati ya likolo na mabele, ezali sé Allah. Mpe bakoyebaka mokolo bakosekwisamaka te.
66 - An-Naml (The Ant) - 066
بَلِ ٱدَّـٰرَكَ عِلۡمُهُمۡ فِي ٱلۡأٓخِرَةِۚ بَلۡ هُمۡ فِي شَكّٖ مِّنۡهَاۖ بَلۡ هُم مِّنۡهَا عَمُونَ
66. Kasi boyebi bwa bango na mokolo ya suka, mpe bazali na tembe тропа yango, to bazali kornona yango te.
67 - An-Naml (The Ant) - 067
وَقَالَ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ أَءِذَا كُنَّا تُرَٰبٗا وَءَابَآؤُنَآ أَئِنَّا لَمُخۡرَجُونَ
67. Мре bapengwi balobi: Boye tango biso na batata na biso tokokomaka putulu, tokosekwisamaka lisusu (kowuta na malita)?
68 - An-Naml (The Ant) - 068
لَقَدۡ وُعِدۡنَا هَٰذَا نَحۡنُ وَءَابَآؤُنَا مِن قَبۡلُ إِنۡ هَٰذَآ إِلَّآ أَسَٰطِيرُ ٱلۡأَوَّلِينَ
68. Tosilaki kopesama elaka biso na batata na biso тропа oyo liboso, kasi ezali sé masapo ya bankoko ya kala.
69 - An-Naml (The Ant) - 069
قُلۡ سِيرُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَٱنظُرُواْ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلۡمُجۡرِمِينَ
69. Loba: Botambola na mokili, bótala lolenge kani oyo esukelaka batomboki.
70 - An-Naml (The Ant) - 070
وَلَا تَحۡزَنۡ عَلَيۡهِمۡ وَلَا تَكُن فِي ضَيۡقٖ مِّمَّا يَمۡكُرُونَ
70. Kozala na mawa na bango te , mpe koyoka mpasi te тропа mwango na bango bazali kosala.
71 - An-Naml (The Ant) - 071
وَيَقُولُونَ مَتَىٰ هَٰذَا ٱلۡوَعۡدُ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
71. Mpe bazali koloba: Elaka yango ekozalaka tango nini, soki bozali koloba bosóló.
72 - An-Naml (The Ant) - 072
قُلۡ عَسَىٰٓ أَن يَكُونَ رَدِفَ لَكُم بَعۡضُ ٱلَّذِي تَسۡتَعۡجِلُونَ
72. Loba: Tango mosusu oyo bozali koluka, ekokomelaka bino na makolo na bino.
73 - An-Naml (The Ant) - 073
وَإِنَّ رَبَّكَ لَذُو فَضۡلٍ عَلَى ٱلنَّاسِ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَهُمۡ لَا يَشۡكُرُونَ
73. Mpe ya soló, Nkolo nayo atonda bolamu likolo ya bato, kasi ebele ya bato bazali kotondo te.
74 - An-Naml (The Ant) - 074
وَإِنَّ رَبَّكَ لَيَعۡلَمُ مَا تُكِنُّ صُدُورُهُمۡ وَمَا يُعۡلِنُونَ
74. Mpe Nkolo wayo ayebi sólo maye bazali kobomba o mitma mia bango, mpe maye bazali komonisa polele.
75 - An-Naml (The Ant) - 075
وَمَا مِنۡ غَآئِبَةٖ فِي ٱلسَّمَآءِ وَٱلۡأَرۡضِ إِلَّا فِي كِتَٰبٖ مُّبِينٍ
75. Mpe eloko moko te ebombami o kati ya likolo na mabele sé ekomama o kati ya buku ya polele.
76 - An-Naml (The Ant) - 076
إِنَّ هَٰذَا ٱلۡقُرۡءَانَ يَقُصُّ عَلَىٰ بَنِيٓ إِسۡرَـٰٓءِيلَ أَكۡثَرَ ٱلَّذِي هُمۡ فِيهِ يَخۡتَلِفُونَ
76. Ya soló, kurani oyo ezali kolobela bana ya isalayele тропа ebele ya maye bazali kokabwana na yango.
77 - An-Naml (The Ant) - 077
وَإِنَّهُۥ لَهُدٗى وَرَحۡمَةٞ لِّلۡمُؤۡمِنِينَ
77. Мре ya sólo, yango ezali bokambi mpe ngolu тропа bandimi.
78 - An-Naml (The Ant) - 078
إِنَّ رَبَّكَ يَقۡضِي بَيۡنَهُم بِحُكۡمِهِۦۚ وَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡعَلِيمُ
78. Ya sólo, Nkolo wayo akokataka o kati kati na bango na mibeko mia ye. Mpe azali wa bokasi atonda boyebi.
79 - An-Naml (The Ant) - 079
فَتَوَكَّلۡ عَلَى ٱللَّهِۖ إِنَّكَ عَلَى ٱلۡحَقِّ ٱلۡمُبِينِ
79. Mpe mipesa epai ya Allah. Ya sólo, ozali na bosembo ya polele.
80 - An-Naml (The Ant) - 080
إِنَّكَ لَا تُسۡمِعُ ٱلۡمَوۡتَىٰ وَلَا تُسۡمِعُ ٱلصُّمَّ ٱلدُّعَآءَ إِذَا وَلَّوۡاْ مُدۡبِرِينَ
80. Ya sólo, yo ozali na bokoki ya koyokisa bawei te, mpe koyokisa baye bakufa matoyi te, tango bakimi bapesi mokongo.
81 - An-Naml (The Ant) - 081
وَمَآ أَنتَ بِهَٰدِي ٱلۡعُمۡيِ عَن ضَلَٰلَتِهِمۡۖ إِن تُسۡمِعُ إِلَّا مَن يُؤۡمِنُ بِـَٔايَٰتِنَا فَهُم مُّسۡلِمُونَ
81. Mpe ozali na bokoki ya kokamba bakufi miso te soki babungi, kasi okoki sé koyoka baye bandimi na mikapo mia biso mpe bazali batosi (bamizilima).
82 - An-Naml (The Ant) - 082
۞وَإِذَا وَقَعَ ٱلۡقَوۡلُ عَلَيۡهِمۡ أَخۡرَجۡنَا لَهُمۡ دَآبَّةٗ مِّنَ ٱلۡأَرۡضِ تُكَلِّمُهُمۡ أَنَّ ٱلنَّاسَ كَانُواْ بِـَٔايَٰتِنَا لَا يُوقِنُونَ
82. Mpe tango liloba likokwelaka bango, tokobimisela bango nyama o kati na mabele oyo akolobela bango. Ya sólo, bato bazalaki kondimela bilembo bia biso te.
83 - An-Naml (The Ant) - 083
وَيَوۡمَ نَحۡشُرُ مِن كُلِّ أُمَّةٖ فَوۡجٗا مِّمَّن يُكَذِّبُ بِـَٔايَٰتِنَا فَهُمۡ يُوزَعُونَ
83. Mpe mokolo moye tokosangisaka na umma(1) nionso bato ebele, baye baboyaki kondima na bilembo bia biso, banso bakotelema na milongo.
1 Umma: Awa elakisi: Lisanga ya bato. Bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 128
84 - An-Naml (The Ant) - 084
حَتَّىٰٓ إِذَا جَآءُو قَالَ أَكَذَّبۡتُم بِـَٔايَٰتِي وَلَمۡ تُحِيطُواْ بِهَا عِلۡمًا أَمَّاذَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
84. Kino tango bakokoma, (Allah) akolobaka: Boye boboyaki kondimela bilembo bia ngai, mpe botiki kokangama na yango mpe bozali koyeba, to bozalaki kosala nini?
85 - An-Naml (The Ant) - 085
وَوَقَعَ ٱلۡقَوۡلُ عَلَيۡهِم بِمَا ظَلَمُواْ فَهُمۡ لَا يَنطِقُونَ
85. Mpe liloba likokweyaka likolo lia bango тропа bobubi bwa bango, mpe bakokoka koloba eleko te.
86 - An-Naml (The Ant) - 086
أَلَمۡ يَرَوۡاْ أَنَّا جَعَلۡنَا ٱلَّيۡلَ لِيَسۡكُنُواْ فِيهِ وَٱلنَّهَارَ مُبۡصِرًاۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٖ لِّقَوۡمٖ يُؤۡمِنُونَ
86. Bazali kornona te, boye ya soló, totiyaki butu mpo bazua bopemi, mpe mokolo тропа kornona. Ya sólo, wana ezali bilembo тропа bandimi.
87 - An-Naml (The Ant) - 087
وَيَوۡمَ يُنفَخُ فِي ٱلصُّورِ فَفَزِعَ مَن فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَن فِي ٱلۡأَرۡضِ إِلَّا مَن شَآءَ ٱللَّهُۚ وَكُلٌّ أَتَوۡهُ دَٰخِرِينَ
87. Mpe mokolo moye kelelo ekobetama (kofula mondule to kelelo ya suka тропа kosekwisa bato), baye banso bazali o likolo mpe na nsé, bakosutuka na kobanga (liwa,) longola sé ba oyo ye moko Allah akobatela. Mpe banso bakoya epai naye na komikitisa nyoso.
88 - An-Naml (The Ant) - 088