“Yasolo halali ezali polele, na haramu ezali polele
Choose an available translation of this Hadeeth
Hadeeth text
“Yasolo halali ezali polele, na haramu ezali polele, mpe kati na yango ezali na makambo ya ntembe oyo bato mingi bayebi te, Na yango, oyo akokima makambo ya ntembe, akozala na lingomba na lokumu naye, mpe oyo akokweya na makambo ya ntembe, akosala oyo epekisami, Lokola mobateli ya mpate oyo azali kolya matiti zingazinga ya esika ya libateli ezali mingi epai alingi kolya matiti, na ezali yasolo te! mokonzi nyonso ezali na libateli naye !, Na ezali yasolo te! Nzambe abatelaka bipekiseli naye!, na ezali ya solo te ! ezali na liboke ya mosuni na nzoto! soki yango ebongi Nzoto mobimba ekozala malamu!, mpe soki yango ebebi, nzoto mobimba ebebaka!, mpe eloko wana ezali motema”.
Explanation
Oyo atiki makambo oyo eza na doute nakati, lingomba na ye ekozala na sécurité na ko éviter kokweya na oyo epekisami, mpe lokumu na ye ekozala na sécurité na maloba ya batu na oyo ba critiquer ye mpo asali likambo oyo eza na ba doute. Oyo akimi makambo ya ntembe te, akomimonisa polele na kokweya na oyo epekisami, to na kosala ete bato balobela lokumu na ye mabe. Motindami, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, apesi ndakisa mpo na kolakisa ezalela ya moto oyo asali ba soupçons Azali lokola mobateli ya mpate oyo azali koleisa bibwele na ye pene na mabele oyo nkolo na yango abatelaki, yango wana bangombe ya mobateli ya mpate elingi koleisa matiti na libateli oyo mpo na bozalani na bango penepene na ye Ndenge moko mpe, oyo azali kosala oyo ezali kobanga, azali bongo kopusana penepene na oyo epekisami mpe azali kobangisaye akokweya na kati. Na sima Prophète, tika mabondeli ya Nzambe pe kimia ezala likolo na ye, alobaki ete ezali na morceau ya nzoto (oyo ezali motema) mpe nzoto ekómaka malamu na bolamu na yango, mpe ebebaka na kobeba na yango.
Attribution
Categories
Share hadeeth
Sharing options · 0 Total shares

