mpe nazali Dhwimaam bin Thalabah, ndeko ya Banu Saad bin Bakr
Choose an available translation of this Hadeeth
Hadeeth text
Kowuta na maloba ya Anas bin Malik, Nzambe asepela na ye, alobaki: Tango tofandaki na Prophète, Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia, na mosquée, mobali moko akoti na kamela na mosquée nsima akangaki yango, na nsima alobaki na bango, : Nani nakati na bino azali Muhammad? Mosakoli, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, azalaki kofanda na kati ya bato, yango wana tolobaki: Ezalaki mobali oyo ya pembe afandi awa, Mobali wana alobaki na ye : O Ibn Abdul Muttalib? Mosakoli, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, alobaki na ye: “Nayanoli yo.”Mobali wana alobaki na Prophète (s.a.w) : Nazali kotuna yo, motuna ya makasi, yango wana kosilikela ngai te na motema na yo. Alobaki: “Senga nyonso oyo olingi Alobi: Nazali kotuna yo na nzela ya Nkolo na yo mpe na nzela ya Nkolo ya baye bazalaki liboso na yo, Nzambe atindaki yo epai ya bato nyonso? Alobaki boye:“ Allâhuma nam, yasolo” Alobi: Nalapeli yo na kombo ya Nzambe. biso tosambelaka losambo mitano na mukolo nzambe nde atindakiyo nayango? Alobaki: "Allâhuma nam, yasolo,". Alobi: Nalapi yo na kombo ya Nzambe. yasolo nzambe nde atindakiyo biso tokangaka sanza oyo na mbula nyonso? Alobaki: "Allâhuma nam, yasolo". Alobi: Nalapeli yo na kombo ya Nzambe, yasolo nzambe nde atindakiyo ozua mosolo (swadaka) na bato ya mbongo kati na biso opesa bazangi? olobaki: " Allâhuma nam, Yasolo". Mobali wana alobaki: Nandimi oyo oyaki na yango, pe nazali motindami ya bato na ngai sima na ngai, mpe nazali Dhwimaam bin Thalabah, ndeko ya Banu Saad bin Bakr.
Explanation
Benefits
Ezaleli malamu ya Ntoma, kimia ezala likolo na ye, mpe boboto na ye na koyanola motuna, mpe eyano malamu ezali moko ya bantina ya kondima libyangi.
Ezali na ndingisa ya kolimbola mobali na Lolenge naye ya mpembe mpe motane, to kozala molai to mokuse, mpe makambo mosusu ya ndenge wana, oyo ezali na mokano ya kopesa nsoni te, soki asepeli na yango te.
Ezali permis mpo na infidel akota na mosquée mpo na ntina.
Hajj elobelamaki te na hadith mpo ete ntango ya koya na ye ekoki kozala ete etiamaki te.
Ba Compagnons bazalaki na posa makasi ya kobengisa bato; Ntango kaka akómaki na Islam, azuaki mposa makasi ya kobengisa bato na ye.
Attribution
Categories
Share hadeeth
Sharing options · 0 Total shares

