Ntoma ya Nzambe, tika mabondeli ya Nzambe mpe kimia ezala likolo na ye, ayebisaki biso, mpe azali na bosolo na oyo alobaki, mpe azali na bondimi : “Ya solo, bozalisi ya moko na moko kati na bino esangisami na libumu ya mama na ye mikolo ntuku minei na butu ntuku minei 40
Choose an available translation of this Hadeeth
Hadeeth text
Kowuta na maloba ya Abdullah bin Masoud, Nzambe asepela na ye: Ntoma ya Nzambe, tika mabondeli ya Nzambe mpe kimia ezala likolo na ye, ayebisaki biso, mpe azali na bosolo na oyo alobaki, mpe azali na bondimi : “Ya solo, bozalisi ya moko na moko kati na bino esangisami na libumu ya mama na ye mikolo ntuku minei na butu ntuku minei 40, Na sima ekozala na libulu alaqatah makila Lolenge nango, sima ekozala na liboke lokola yango, sima anzelu akotindama epai na ye, mpe akosakola maloba minei, mpe eko komama: Ebongiseli na ye na eleko na ye. na mosala na ye ezali ya Pasi to ya bisengo, boye molimo ekotiama kati na ye, na moko na bino akosala misala ya bato ya Paradis kino eloko moko te ekozala kati na yango na ye, okotikala se longueur ya loboko moko. Na nsima, oyo epesameli naye ekozwa ye, mpe akosala misala ya bato ya Lifelo na akokota na Lifelo Mpe ya solo, moko na bino akosala misala ya bato ya Lifelo kino akozala kati na yango. Kati na yango ezali kaka na lipeka moko, yango wana oyo ekomamaki ekokomela ye, yango wana akosala misala ya bato ya Paradis na akoti na yango”.
Explanation
Benefits
Kokebisa mpo na kokosama na bilili ya misala. Misala etongami likoló na nsuka na yango.
Attribution
Categories
Share hadeeth
Sharing options · 0 Total shares

