“Ntango Nzambe akelaki Lola mpe Lifelo, atindaki Gabriel, kimia ezala likolo na ye
Choose an available translation of this Hadeeth
Hadeeth text
Kowuta na maloba ya Abu Hurairah, Nzambe asepela na ye, kowuta na maloba ya Ntoma ya Nzambe (s.a.w) alobaki: “Ntango Nzambe akelaki Lola mpe Lifelo, atindaki Gabriel, kimia ezala likolo na ye na Lola, Alobaki: otala yango pe oyo nabongisi kati pona bato na yango. Atalaki yango mpe azongaki. Alobaki: Na nkembo na Yo, moto moko te akoyoka yango soki akoti na yango te. Na yango, apesaki mitindo ete bázinga yango na makama, yango wana alobaki ete: Kende epai na yango mpe talá yango mpe makambo oyo nabongisi mpo na bato na yango kati na yango. Bongo atalaki yango mpe amonaki ete ezingami na likama Alobi: Na nkembo na Yo, nabangaki ete moto moko te akota na yango. Alobaki: Kende kotala Moto mpe oyo nabongisi mpo na bato na yango kati na yango. Bongo atalaki yango mpe amonaki ete ezali komata likoló na mosusu mpe alobaki ete: Na nkembo na Yo, moto moko te akokota na yango. Na yango, apesaki mitindo ete ezinga yango na bamposa, yango wana alobaki: Zongela mpe tala yango. Bongo atalaki yango mpe amonaki ete ezingami na bamposa na nsima azongaki mpe alobaki ete: Na nkembo na Yo, nabangaki ete moto moko te akima yango soki akoti na yango te.
Explanation
Benefits
Ezali obligatoire ko ndima oyo emonanaka te, pe nionso oyo ewuti na Nzambe na Ntoma na Ye, Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia.
Ntina ya motema molai liboso ya mpasi mpo ezali nzela ya Paradis.
Ntina ya kokima makambo oyo epekisami; Pamba te ezali nzela oyo ememaka na Lifelo.
Kosala ete Paradis ezingama na mikakatano, mpe Lifelo ezingama na ba mposa, ezali ntina ya bomekano mpe komekama na bomoi ya mokili oyo.
Nzela ya Paradis ezali mpasi na difficult, mpe esengaka motema molai mpona yango na kondima, mpe nzela ya Lifelo ezingami na bisengo na bamposa na mokili oyo.
Attribution
Categories
Share hadeeth
Sharing options · 0 Total shares

