HadeethEnc · 1.18.0
“Ndakisa ya moto ya bokosi munafiki ezali lokola meme oyo ebunga nzela. Kati na ba ntaba mibale, ebaluki epai ya oyo mbala moko mpe epai ya mosusu mbala moko”
Available translations
Choose an available translation of this Hadeeth
01
Hadeeth text
Kowuta na maloba ya Ibn Omar, Nzambe asepela na bango mibale, kowuta na maloba ya Ntoma (s.a.w) alobaki: “Ndakisa ya moto ya bokosi munafiki ezali lokola meme oyo ebunga nzela. Kati na ba ntaba mibale, ebaluki epai ya oyo mbala moko mpe epai ya mosusu mbala moko”.
02
Explanation
Ntoma, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, alimbolaki ezalela ya mokosi munafiki mpe ete azali lokola mpate oyo azali koyenga yanga, na ayebi te ngambo nini alanda ba meme ya wapi ayebi te. Ngonga moko akendaka na lisanga oyo mpe ngonga mosusu ake na ngambo mosusu. Bazali kobulungana kati na kondima mpe kozanga kondima Bazali na bandimi te, libanda na kati, mpe bazali na ba kafiri te, libanda mpe na kati, lolenge na bango ya libanda ezali na bandimi, mpe na kati na bango bazali na ntembe mpe mikakatana bamikitisaka epai ya baoyo, mpe na bantango mosusu bamibalukaka epai ya baoyo.
03
Benefits
Moko ya bokambi ya Ntoma, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, ezali ya kotia lisese mpo na kopusana penepene na bandimbola.
Kolimbola ezaleli ya ba nafiki na oyo etali koboya, na ntembe, mpe instabilité.
Kokebisa ezaleli ya bakosi ba nafiki mpe kolendisa bosembo mpe mokano na kondima, ezala na libanda mpe na kati.
Kolimbola ezaleli ya ba nafiki na oyo etali koboya, na ntembe, mpe instabilité.
Kokebisa ezaleli ya bakosi ba nafiki mpe kolendisa bosembo mpe mokano na kondima, ezala na libanda mpe na kati.
Attribution
[رواه مسلم]
Categories
Share
Share hadeeth
Sharing options · 0 Total shares

