HadeethEnc · 1.18.0
“Moto oyo akoloba: "Subhâna l-lâhi wa bi-hamdihi", mbala nkama moko (100) na mokolo moko, masumu na ye ekolimbisama, ata soki ezali lokola zabadi ya ebale”
Available translations
Choose an available translation of this Hadeeth
01
Hadeeth text
Kowuta na maloba ya Abu Hurairah, Nzambe asepela na ye, Yasolo ntoma ya Nzambe, Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia, alobaki : “Moto oyo akoloba: "Subhâna l-lâhi wa bi-hamdihi", mbala nkama moko (100) na mokolo moko, masumu na ye ekolimbisama, ata soki ezali lokola zabadi ya ebale”.
02
Explanation
Mosakoli, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, azali kopesa biso nsango na moto oyo akoloba mbala nkama na mokolo moko : « Subhâna l-lâhi wa bi-hamdihi »; Masumu na ye ekolongolama na ekolimbisama, ata soki ezalaki mingi, lokola fulufulu ya mpembe oyo etambolaka likoló ya ebale ntango ezali koningana mpe kosilika.
03
Benefits
Lifuti oyo ekomelaka moto oyo alobi yango na journée ndenge ya kosangisa to na bokeseni koloba moko moko.
Tasbihi : ezali kotombola lokumu ya nzambe kokitisa ye te, na Al hamdou: ezali kokumisa ye Ndenge akoki na nyonso, pe kopesakaye bolingo ya monene.
Oyo elingi koloba na hadith ezali kolimbisama masumu ya mike mike, kasi masumu ya minene, esengeli kotubela yango (pona nzambe alimbisayo).

Attribution
[متفق عليه]
Categories
Share
Share hadeeth
Sharing options · 0 Total shares