HadeethEnc · 1.18.0
“Mabonza moko te ekitisaka bozwi, mpe Nzambe abakisaka grâce ya mosaleli naye te longola se na kobakisaye makasi, mpe moto moko te amikitisaka liboso ya Nzambe longola se Nzambe akotombola ye”
Available translations
Choose an available translation of this Hadeeth
01
Hadeeth text
Kowuta na maloba ya Abu Hurairah, Nzambe asepela na ye, kowuta na maloba ya Ntoma ya Nzambe (s.a.w) alobaki: “Mabonza moko te ekitisaka bozwi, mpe Nzambe abakisaka grâce ya mosaleli naye te longola se na kobakisaye makasi, mpe moto moko te amikitisaka liboso ya Nzambe longola se Nzambe akotombola ye”.
02
Explanation
Profeta, tika ete mabondeli ya Nzambe mpe kimia ezala likolo na ye, alimboli ete mabonza ekitisaka bomengo te, kasi ebenganaka mabe, mpe Nzambe afutaka mopesi yango na bolamu monene, yango wana ezali ebakisamaka, kasi ekitaka te.
Kolimbisa, esangani na makoki ya kozongisa mabe to kopesa yango mokumba, ebakisaka kaka makasi mpe lokumu.
Na Moto oyo amikitisaka mpe amitiaka mpamba epai ya Nzambe, ezala mpo na kobanga moto, to mpo na koyokela ye mawa, to koluka litomba epai na ye nzambe, kasi mbano na ye ekozala kotombolama mpe lokumu.

03
Benefits
Bolamu mpe bomengo ezali na kotosa mibeko ya Sharia mpe kosala malamu, ata soki bato mosusu bakanisaka ete ezali ndenge mosusu.
Attribution
[رواه مسلم]
Categories
Share
Share hadeeth
Sharing options · 0 Total shares