HadeethEnc · 1.18.0
“Siwak ezali kopetola monoko, oyo esepelisaka Nkolo.”
Available translations
Choose an available translation of this Hadeeth
01
Hadeeth text
Na bokonzi ya Aisha, Nzambe asepela na ye, alobaki boye: Motindami ya Nzambe, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, alobi: “Siwak ezali kopetola monoko, oyo esepelisaka Nkolo.”
02
Explanation
Ntoma, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, ayebisi biso ete kosukola mino na banzete ya nzete ya arak mpe makambo mosusu ya ndenge wana epetolaka monoko na bosoto mpe nsolo ya mabe. Mpe ezali moko ya bantina oyo Nzambe asepelaka na mosaleli; Pamba te esengaka kotosa Nzambe mpe koyanola na etinda na Ye, mpe mpo na bopeto oyo Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alingaka.
03
Benefits
Bolamu ya siwak, pe Prophète, tika mabondeli ya Nzambe pe kimia ezala likolo na ye, alendisaki ekolo na ye esala mingi na yango.
Ezali malamu kosalela nzete ya arak ntango ozali kosalela brossé ya mino, mpe kosalela Kisi ya muno na pâte na esika na yango.
Ezali malamu kosalela nzete ya arak ntango ozali kosalela brossé ya mino, mpe kosalela Kisi ya muno na pâte na esika na yango.
Attribution
[رواه النسائي وأحمد]
Categories
Share
Share hadeeth
Sharing options · 0 Total shares

