ngai namitie pene ya nzambe koleka kozala pene ya moko na bino, mpe Yasolo nzambe asili kotia ngai pene naye Ndenge atia Abraham camarade naye
Choose an available translation of this Hadeeth
Hadeeth text
Na bokonzi ya Jundub, Nzambe asepela na ye, alobaki: Nayokaki Profeta, Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia, mikolo mitano liboso akufa, alobaki: «ngai namitie pene ya nzambe koleka kozala pene ya moko na bino, mpe Yasolo nzambe asili kotia ngai pene naye Ndenge atia Abraham camarade naye, Soki nazuaki moninga ya pene na ekolo na ngai, mbele nazua Abu Bakr lokola moninga, Ya solo baoyo bazalaki liboso na bino bazalaki kozwa malita ya basakoli na bango, Mpe bayengebene lokola bisika ya losambo, Bozwa malita te lokola bisika ya losambo ngai napekisi bino yango".
Explanation
Benefits
Kotonga ba mosquées na malita ezali likambo ya nsoni ya bikólo ya kala.
Epekisami kosalela malita lokola bisika ya losambo mpo na kosambela epai to epai na yango, mpe kotonga ba mosquée to ba dôme likolo na yango, mpo na bokebi mpo na kokweya na Shirki ya binzambi nzambi mpo na yango.
Kokebisa na kolekisa ndelo na bato ya sembo, kotombola bango ememaka na Shirki.
Likama ya maye Ntoma, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, akebisaki, lokola asimbaki yango butu mitano yambo ya liwa na ye.
Attribution
Categories
Share hadeeth
Sharing options · 0 Total shares

