“Bokima makámá nsambo7
Choose an available translation of this Hadeeth
Hadeeth text
Na bokonzi ya Abu Hurairah, Nzambe asepela na ye, na bokonzi ya Ntoma, Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia, alobi: “Bokima makámá nsambo7” Balobaki: O Motindami ya Nzambe, yango ezali nini? Alobaki: "kosangisa nzambe1, na kindoki 2, na koboma oyo nzambe apekisi 3, nakolia Ribâ 4, na kolia bomengo ya bana bitike 5, na kokima baninga Mokolo ya bitumba 6, Mpe kofinga basi ya peto, ya kondima, na likambu oyo bayebi te 7".
Explanation
Ya liboso: Shirki kosangisa nzambe, Na kozwaka molongani mpe bokokani na Ye, Nkembo ezala mpo na Ye, na lolenge nyonso, Amipesaki lolenge nyonso ya losambo epai ya moto mosusu longola kaka Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, mpe abandaki kosambela banzambe mingi. Pamba te ezali lisumu oyo eleki monene.
Ya mibale: Magie - kindoki oyo ezali kobebisa, na ba incantations, na ba kisi, na komela likaya. Ezali ko affecter nzoto ya mutu enchanté na nzela ya liwa to maladie, to kokabola libala yabato, Ezali mosala ya satana, mpe mingi na yango ekoki kosalema kaka na nzela ya Shirki bi nzambi nzambi, mpe kopusana penepene na bilimu mabe na eloko oyo balingaka.
Ya misato: Koboma molimo oyo Nzambe apekisi koboma longola se na justification légitime oyo mokonzi asalelaka.
Ya minei: Kozua Ribâ na nzela ya bilei to lolenge mosusu ya litomba.
Ya mitano: Kokɔtela biloko ya mwana oyo tata na ye akufaki ntango azalaki naino elenge.
Ya motoba: Kokima etumba na ba infidèles (non musulmans).
Ya nsambo: Kokosela basi ya bonsomi ya peto mpo na ekobo, mpe lisusu kokosela mibali.
Benefits
Ezali na ndingisa ya koboma soki ezali droit lokola kozongisa mabe na oyo abomaki, na oyo apengwi, mpe mosali ekobo nsima ya kobala, mpe esalemaka na mokonzi oyo azali na mibeko suka.
Attribution
Categories
Share hadeeth
Sharing options · 0 Total shares

