غافر

 

Ghafir

 

The Forgiver

1 - Ghafir (The Forgiver) - 001

حمٓ
1. Há, mím.(1)
1 Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.

2 - Ghafir (The Forgiver) - 002

تَنزِيلُ ٱلۡكِتَٰبِ مِنَ ٱللَّهِ ٱلۡعَزِيزِ ٱلۡعَلِيمِ
2. Kokita ya buku oyo ewuti epai na Allah wa nguya atonda boyebi.

3 - Ghafir (The Forgiver) - 003

غَافِرِ ٱلذَّنۢبِ وَقَابِلِ ٱلتَّوۡبِ شَدِيدِ ٱلۡعِقَابِ ذِي ٱلطَّوۡلِۖ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَۖ إِلَيۡهِ ٱلۡمَصِيرُ
3. Molimbisi masumu mpe moyambi tubela, mopesi etumbu ya makasi, Nkolo ya bomengo, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosôló sé ye. Mpe epai naye nde bozongi bokozalaka.

4 - Ghafir (The Forgiver) - 004

مَا يُجَٰدِلُ فِيٓ ءَايَٰتِ ٱللَّهِ إِلَّا ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ فَلَا يَغۡرُرۡكَ تَقَلُّبُهُمۡ فِي ٱلۡبِلَٰدِ
4. Ezali sé bobele bapengwi nde bazali kosuanisa mikapo mia Allah, kaši misala mia bango ya mokili mikosa yo te.

5 - Ghafir (The Forgiver) - 005

كَذَّبَتۡ قَبۡلَهُمۡ قَوۡمُ نُوحٖ وَٱلۡأَحۡزَابُ مِنۢ بَعۡدِهِمۡۖ وَهَمَّتۡ كُلُّ أُمَّةِۭ بِرَسُولِهِمۡ لِيَأۡخُذُوهُۖ وَجَٰدَلُواْ بِٱلۡبَٰطِلِ لِيُدۡحِضُواْ بِهِ ٱلۡحَقَّ فَأَخَذۡتُهُمۡۖ فَكَيۡفَ كَانَ عِقَابِ
5. Liboso na bango, bato ya Nûh basilaki koboya (ntoma) sima na bango, bato ya makita mpe baboyaki lokola, mpe bato na bato bamipesaki тропа kobundisa motindami na bango, mpe baye ya lokuta тропа kobundisa bosembo, mpe nazuaki bango, mpe ndenge nini etumbu na ngai ezalaki?

6 - Ghafir (The Forgiver) - 006

وَكَذَٰلِكَ حَقَّتۡ كَلِمَتُ رَبِّكَ عَلَى ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ أَنَّهُمۡ أَصۡحَٰبُ ٱلنَّارِ
6. Мре lolenge moko na liloba lia Nkolo wa yo lízali na bosôló тропа bapengwi ete: Bazali bato ya moto.

7 - Ghafir (The Forgiver) - 007

ٱلَّذِينَ يَحۡمِلُونَ ٱلۡعَرۡشَ وَمَنۡ حَوۡلَهُۥ يُسَبِّحُونَ بِحَمۡدِ رَبِّهِمۡ وَيُؤۡمِنُونَ بِهِۦ وَيَسۡتَغۡفِرُونَ لِلَّذِينَ ءَامَنُواْۖ رَبَّنَا وَسِعۡتَ كُلَّ شَيۡءٖ رَّحۡمَةٗ وَعِلۡمٗا فَٱغۡفِرۡ لِلَّذِينَ تَابُواْ وَٱتَّبَعُواْ سَبِيلَكَ وَقِهِمۡ عَذَابَ ٱلۡجَحِيمِ
7. В aye bazali komema ng wende naye, (ba anzelu) тре na baye bazingami pembeni na yango bazali kokumisa Nkolo wa bango, тре bazali kondima naye, тре bazali kosengela bandimi bolimbisi, (bazali koloba): Nkolo, eloko nyoso etondisami na ngolu nayo na boyebi, limbisa baye bazali kotubela mpe baye bazali kolanda nzela nayo, mpe batela bango na etumbu ya moto.

8 - Ghafir (The Forgiver) - 008

رَبَّنَا وَأَدۡخِلۡهُمۡ جَنَّـٰتِ عَدۡنٍ ٱلَّتِي وَعَدتَّهُمۡ وَمَن صَلَحَ مِنۡ ءَابَآئِهِمۡ وَأَزۡوَٰجِهِمۡ وَذُرِّيَّـٰتِهِمۡۚ إِنَّكَ أَنتَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
8. Nkolo, kotisa bango na Iola ya edeni oyo olakaki bango, mpe baye ya malamu kati na batata na bango mpe basi na bango mpe bana na bango, ya soló ozali wa bokasi otonda bwanya.

9 - Ghafir (The Forgiver) - 009

وَقِهِمُ ٱلسَّيِّـَٔاتِۚ وَمَن تَقِ ٱلسَّيِّـَٔاتِ يَوۡمَئِذٖ فَقَدۡ رَحِمۡتَهُۥۚ وَذَٰلِكَ هُوَ ٱلۡفَوۡزُ ٱلۡعَظِيمُ
9. Mpe tia bango mosika na etumbu ya misala ya mabe, mpo moto oyo okotia ye mosika na (etumbu) о mokolo wana, asili kozua ngolu nayo. Mpe wana nde ekozala elonga monene.

10 - Ghafir (The Forgiver) - 010

إِنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ يُنَادَوۡنَ لَمَقۡتُ ٱللَّهِ أَكۡبَرُ مِن مَّقۡتِكُمۡ أَنفُسَكُمۡ إِذۡ تُدۡعَوۡنَ إِلَى ٱلۡإِيمَٰنِ فَتَكۡفُرُونَ
10. Mpe тропа baye bapengwaki bakobengaka bango mpe kanda ya Allah likolo na bino eleki makasi mingi likolo ya kanda na bino moko tango bobengamaki na bondimi, boponaki sé kotikala na bopengwi.

11 - Ghafir (The Forgiver) - 011

قَالُواْ رَبَّنَآ أَمَتَّنَا ٱثۡنَتَيۡنِ وَأَحۡيَيۡتَنَا ٱثۡنَتَيۡنِ فَٱعۡتَرَفۡنَا بِذُنُوبِنَا فَهَلۡ إِلَىٰ خُرُوجٖ مِّن سَبِيلٖ
11. Bakolobaka: Nkolo wa biso, obomaki biso mbala mibale mpe opesaki biso bomoyi mbala mibale, mpe toyebi mabe na biso, boye nzela ya kobimela ezali?

12 - Ghafir (The Forgiver) - 012

ذَٰلِكُم بِأَنَّهُۥٓ إِذَا دُعِيَ ٱللَّهُ وَحۡدَهُۥ كَفَرۡتُمۡ وَإِن يُشۡرَكۡ بِهِۦ تُؤۡمِنُواْۚ فَٱلۡحُكۡمُ لِلَّهِ ٱلۡعَلِيِّ ٱلۡكَبِيرِ
12. Bozalaki soki (nkombo) ya Allah ebengami na bomoko bwa ye, bozali koboya kondima, mpe soki basangisi ye (Allah) bondimi, mobeko ya kokata likambo ezali ya Allah, wa likolo azali monene.

13 - Ghafir (The Forgiver) - 013

هُوَ ٱلَّذِي يُرِيكُمۡ ءَايَٰتِهِۦ وَيُنَزِّلُ لَكُم مِّنَ ٱلسَّمَآءِ رِزۡقٗاۚ وَمَا يَتَذَكَّرُ إِلَّا مَن يُنِيبُ
13. Ye nde alakisaki bino bilembo bia ye, mpe azali kokitisela bino bozui kowuta na likolo. Azali kokanisa sé oyo amizongisi epai naye (ya Allah)

14 - Ghafir (The Forgiver) - 014

فَٱدۡعُواْ ٱللَّهَ مُخۡلِصِينَ لَهُ ٱلدِّينَ وَلَوۡ كَرِهَ ٱلۡكَٰفِرُونَ
14. Bokumisa Allah na bomoko mpe kolanda lingomba lia bosôló, ata soki bapengwi bazali koboya.

15 - Ghafir (The Forgiver) - 015

رَفِيعُ ٱلدَّرَجَٰتِ ذُو ٱلۡعَرۡشِ يُلۡقِي ٱلرُّوحَ مِنۡ أَمۡرِهِۦ عَلَىٰ مَن يَشَآءُ مِنۡ عِبَادِهِۦ لِيُنذِرَ يَوۡمَ ٱلتَّلَاقِ
15. Amitombuami likolo koleka, Nkolo ngwende, atindaka molimo mosantu epai ya moto oyo alingi kati ya bawumbu naye, mpo ete akebisa тропа mokolo ya bokutani.

16 - Ghafir (The Forgiver) - 016

يَوۡمَ هُم بَٰرِزُونَۖ لَا يَخۡفَىٰ عَلَى ٱللَّهِ مِنۡهُمۡ شَيۡءٞۚ لِّمَنِ ٱلۡمُلۡكُ ٱلۡيَوۡمَۖ لِلَّهِ ٱلۡوَٰحِدِ ٱلۡقَهَّارِ
16. Mokolo moye bakobimaka polele, eloko moko te ekobombamaka Allah, lelo; kibokonzi bozali ya nani? (eyano ekozalaka): Ya Allah wa bomoko atonda bokasi.

17 - Ghafir (The Forgiver) - 017

ٱلۡيَوۡمَ تُجۡزَىٰ كُلُّ نَفۡسِۭ بِمَا كَسَبَتۡۚ لَا ظُلۡمَ ٱلۡيَوۡمَۚ إِنَّ ٱللَّهَ سَرِيعُ ٱلۡحِسَابِ
17. Lelo molimo (moto) nyoso mokozua lifuta kolanda na maye asalaki, lelo kobuba bozali te, ya soló, Allah azali noki тропа kofuta.

18 - Ghafir (The Forgiver) - 018

وَأَنذِرۡهُمۡ يَوۡمَ ٱلۡأٓزِفَةِ إِذِ ٱلۡقُلُوبُ لَدَى ٱلۡحَنَاجِرِ كَٰظِمِينَۚ مَا لِلظَّـٰلِمِينَ مِنۡ حَمِيمٖ وَلَا شَفِيعٖ يُطَاعُ
18. Mpe kebisa bango тропа mokolo moye mozali pene (mokolo ya suka), tango mitema na mingongo mikomataka mpe mikokangama. В abubi bakozuaka moninga ya kosalisa bango te mpe kosunga bango te.

19 - Ghafir (The Forgiver) - 019

يَعۡلَمُ خَآئِنَةَ ٱلۡأَعۡيُنِ وَمَا تُخۡفِي ٱلصُّدُورُ
19. (Allah) ayebaka mabe oyo miso esalaka, mpe manso maye mabombami o mitema. (mia bato)

20 - Ghafir (The Forgiver) - 020

وَٱللَّهُ يَقۡضِي بِٱلۡحَقِّۖ وَٱلَّذِينَ يَدۡعُونَ مِن دُونِهِۦ لَا يَقۡضُونَ بِشَيۡءٍۗ إِنَّ ٱللَّهَ هُوَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡبَصِيرُ
20. Mpe Allah akataka makambo na bosembo, mpe baye bazali kobondela na botiki ye bakokata likambo moko te, ya sólo, Allah azali moyoki mpe azali momoni.

21 - Ghafir (The Forgiver) - 021

۞أَوَلَمۡ يَسِيرُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَيَنظُرُواْ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلَّذِينَ كَانُواْ مِن قَبۡلِهِمۡۚ كَانُواْ هُمۡ أَشَدَّ مِنۡهُمۡ قُوَّةٗ وَءَاثَارٗا فِي ٱلۡأَرۡضِ فَأَخَذَهُمُ ٱللَّهُ بِذُنُوبِهِمۡ وَمَا كَانَ لَهُم مِّنَ ٱللَّهِ مِن وَاقٖ
21. Boye bazali kotambola na mokili te mpo batala lolenge esukela baye baleka liboso na bango, balekaki bango na bokasi mpe na bilembo okati ya mabele, mpe Allah azuaki bango тропа masumu та bango. Mpe bakokaki kobatelama te na maye Allah asalaki.

22 - Ghafir (The Forgiver) - 022

ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ كَانَت تَّأۡتِيهِمۡ رُسُلُهُم بِٱلۡبَيِّنَٰتِ فَكَفَرُواْ فَأَخَذَهُمُ ٱللَّهُۚ إِنَّهُۥ قَوِيّٞ شَدِيدُ ٱلۡعِقَابِ
22. Boye ya sólo, batindami bazalaki koyela bango bilembo, mpe baboyaki kondima, mpe Allah azuaki bango. Ya soló, ye azali makasi тропа etumbu.

23 - Ghafir (The Forgiver) - 023

وَلَقَدۡ أَرۡسَلۡنَا مُوسَىٰ بِـَٔايَٰتِنَا وَسُلۡطَٰنٖ مُّبِينٍ
23. Мре tosilaki kotinda Mûssa na bilembo bia biso mpe bilembetele ya polele.

24 - Ghafir (The Forgiver) - 024

إِلَىٰ فِرۡعَوۡنَ وَهَٰمَٰنَ وَقَٰرُونَ فَقَالُواْ سَٰحِرٞ كَذَّابٞ
24. Epai ya falo na Hâmân na Qârûn, kasi balobaki ete: Oyo nganga moto ya lokuta monene.

25 - Ghafir (The Forgiver) - 025

فَلَمَّا جَآءَهُم بِٱلۡحَقِّ مِنۡ عِندِنَا قَالُواْ ٱقۡتُلُوٓاْ أَبۡنَآءَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ مَعَهُۥ وَٱسۡتَحۡيُواْ نِسَآءَهُمۡۚ وَمَا كَيۡدُ ٱلۡكَٰفِرِينَ إِلَّا فِي ضَلَٰلٖ
25. Mpe tango ayelaki bango bosôló kowuta epai na biso, balobaki: B oboma bana ya mibali baye bazali na bondimi elongo naye mpe botika basi na bango na bomoyi, kasi likita ya bapagano ezalaka sé na libunga.

26 - Ghafir (The Forgiver) - 026

وَقَالَ فِرۡعَوۡنُ ذَرُونِيٓ أَقۡتُلۡ مُوسَىٰ وَلۡيَدۡعُ رَبَّهُۥٓۖ إِنِّيٓ أَخَافُ أَن يُبَدِّلَ دِينَكُمۡ أَوۡ أَن يُظۡهِرَ فِي ٱلۡأَرۡضِ ٱلۡفَسَادَ
26. Mpe falo alobaki: Botika ngai na boma Mûssa, mpe abenga Nkolo waye. Ya soló, nazali kobanga noki akobongola lingomba lia bino to noki akosala mbeba kati na mokili.

27 - Ghafir (The Forgiver) - 027

وَقَالَ مُوسَىٰٓ إِنِّي عُذۡتُ بِرَبِّي وَرَبِّكُم مِّن كُلِّ مُتَكَبِّرٖ لَّا يُؤۡمِنُ بِيَوۡمِ ٱلۡحِسَابِ
27. Mpe Mûssa alobi: Nazali koluka libateli epai ya Nkolo wa ngai na ya bino тропа baye bazali kosala lolendo baye balingi kondima na mokolo mwa suka te.

28 - Ghafir (The Forgiver) - 028

وَقَالَ رَجُلٞ مُّؤۡمِنٞ مِّنۡ ءَالِ فِرۡعَوۡنَ يَكۡتُمُ إِيمَٰنَهُۥٓ أَتَقۡتُلُونَ رَجُلًا أَن يَقُولَ رَبِّيَ ٱللَّهُ وَقَدۡ جَآءَكُم بِٱلۡبَيِّنَٰتِ مِن رَّبِّكُمۡۖ وَإِن يَكُ كَٰذِبٗا فَعَلَيۡهِ كَذِبُهُۥۖ وَإِن يَكُ صَادِقٗا يُصِبۡكُم بَعۡضُ ٱلَّذِي يَعِدُكُمۡۖ إِنَّ ٱللَّهَ لَا يَهۡدِي مَنۡ هُوَ مُسۡرِفٞ كَذَّابٞ
28. Mpe mobali moko ya mondimi kati ya bato ya falo abombaka bondimi bwa ye alobi: Boye bozali koboma moto mpo alobi: Nkolo na ngai Allah? Mpe asili koyela bino bilembo binene kowuta epai ya Nkolo wa bino? Soki solo azali na lokuta, lokuta wana ekozongela sé ye moko, mpe soki azali koloba bosembo, ndambu ya masumu ya maye azali kokebisa bino ekozua bino. Ya soló, Allah akambaka moto ya mabe mpe ya lokuta te.

29 - Ghafir (The Forgiver) - 029

يَٰقَوۡمِ لَكُمُ ٱلۡمُلۡكُ ٱلۡيَوۡمَ ظَٰهِرِينَ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَمَن يَنصُرُنَا مِنۢ بَأۡسِ ٱللَّهِ إِن جَآءَنَاۚ قَالَ فِرۡعَوۡنُ مَآ أُرِيكُمۡ إِلَّا مَآ أَرَىٰ وَمَآ أَهۡدِيكُمۡ إِلَّا سَبِيلَ ٱلرَّشَادِ
29. Eh bato ba ngai! Bozali na bokonzi lelo kati na mabele, nani akosungaka biso na etumbu ya Allah tango ekoyelaka biso? Falo alobi: Nakolakisa bino sé oyo nazali kornona, mpe nakokamba bino te sé na nzela ya semba.

30 - Ghafir (The Forgiver) - 030

وَقَالَ ٱلَّذِيٓ ءَامَنَ يَٰقَوۡمِ إِنِّيٓ أَخَافُ عَلَيۡكُم مِّثۡلَ يَوۡمِ ٱلۡأَحۡزَابِ
30. Mpe oyo azalaki na bondimi alobi: Eh bato na ngai! Nazali kobangela bino noki ekozalela bino lokola o mokolo ya lisanga ya mapinga.

31 - Ghafir (The Forgiver) - 031

مِثۡلَ دَأۡبِ قَوۡمِ نُوحٖ وَعَادٖ وَثَمُودَ وَٱلَّذِينَ مِنۢ بَعۡدِهِمۡۚ وَمَا ٱللَّهُ يُرِيدُ ظُلۡمٗا لِّلۡعِبَادِ
31. Ndenge moko lokola bato ya Núh mpe bato ya Aad na Thamúd, mpe bato basusu bayaki sima na bango. Kasi Allah alingeli bawumbu naye libubi te.

32 - Ghafir (The Forgiver) - 032

وَيَٰقَوۡمِ إِنِّيٓ أَخَافُ عَلَيۡكُمۡ يَوۡمَ ٱلتَّنَادِ
32. Eh bato na ngai! Nazali kobangela bino тропа mokolo ya bobengami.

33 - Ghafir (The Forgiver) - 033

يَوۡمَ تُوَلُّونَ مُدۡبِرِينَ مَا لَكُم مِّنَ ٱللَّهِ مِنۡ عَاصِمٖۗ وَمَن يُضۡلِلِ ٱللَّهُ فَمَا لَهُۥ مِنۡ هَادٖ
33. Mokolo moye bokopesaka mikongo na bokimi, moko te akobatela bino liboso ya Allah mpe oyo Allah akobungisa, akozuaka mokambi te.

34 - Ghafir (The Forgiver) - 034

وَلَقَدۡ جَآءَكُمۡ يُوسُفُ مِن قَبۡلُ بِٱلۡبَيِّنَٰتِ فَمَا زِلۡتُمۡ فِي شَكّٖ مِّمَّا جَآءَكُم بِهِۦۖ حَتَّىٰٓ إِذَا هَلَكَ قُلۡتُمۡ لَن يَبۡعَثَ ٱللَّهُ مِنۢ بَعۡدِهِۦ رَسُولٗاۚ كَذَٰلِكَ يُضِلُّ ٱللَّهُ مَنۡ هُوَ مُسۡرِفٞ مُّرۡتَابٌ
34. Yûsuf asilaki koyela bino bilembo binene liboso, kasi botikaki tembe te тропа oyo ayelaki bino, kino tango akufaki bolobaki: Allah akotinda lisusu motindami sima naye te, lolenge wana nde Allah abungisaka moto ya mabe mpe ya tembe.

35 - Ghafir (The Forgiver) - 035

ٱلَّذِينَ يُجَٰدِلُونَ فِيٓ ءَايَٰتِ ٱللَّهِ بِغَيۡرِ سُلۡطَٰنٍ أَتَىٰهُمۡۖ كَبُرَ مَقۡتًا عِندَ ٱللَّهِ وَعِندَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْۚ كَذَٰلِكَ يَطۡبَعُ ٱللَّهُ عَلَىٰ كُلِّ قَلۡبِ مُتَكَبِّرٖ جَبَّارٖ
35. Baye bazalaki kobundisa bilembo bia Allah тре bazali na bilembetele te, ezali lisumu monene epai na Allah тре epai ya bandimi. Na boye nde Allah azali kokanga motema ya moto nyoso ya mabe mpe ya lolendo.

36 - Ghafir (The Forgiver) - 036

وَقَالَ فِرۡعَوۡنُ يَٰهَٰمَٰنُ ٱبۡنِ لِي صَرۡحٗا لَّعَلِّيٓ أَبۡلُغُ ٱلۡأَسۡبَٰبَ
36. Mpe falo alobi: Eh Hâmân! Tongela ngai ndako ya likolo koleka, tango mosusu nakoki kozua banzela,

37 - Ghafir (The Forgiver) - 037

أَسۡبَٰبَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ فَأَطَّلِعَ إِلَىٰٓ إِلَٰهِ مُوسَىٰ وَإِنِّي لَأَظُنُّهُۥ كَٰذِبٗاۚ وَكَذَٰلِكَ زُيِّنَ لِفِرۡعَوۡنَ سُوٓءُ عَمَلِهِۦ وَصُدَّ عَنِ ٱلسَّبِيلِۚ وَمَا كَيۡدُ فِرۡعَوۡنَ إِلَّا فِي تَبَابٖ
37. Banzela ya likolo, mpo namata epai ya Nzambe ya Mûssa, kasi nayebi ete ye azali moto ya lokuta. Lolenge wana nde falo azalaki kokanisa ete azali kosala malamu nzoka nde azalaki kosala mabe koleka, mpe abungaki nzela ya semba. Kasi likita lia falo lizalaki sé bozangi na bokufi.

38 - Ghafir (The Forgiver) - 038

وَقَالَ ٱلَّذِيٓ ءَامَنَ يَٰقَوۡمِ ٱتَّبِعُونِ أَهۡدِكُمۡ سَبِيلَ ٱلرَّشَادِ
38. Oyo andimaki alobi: Oh bato na ngai! Bolanda ngai, nakokamba bino o nzela ya semba.

39 - Ghafir (The Forgiver) - 039

يَٰقَوۡمِ إِنَّمَا هَٰذِهِ ٱلۡحَيَوٰةُ ٱلدُّنۡيَا مَتَٰعٞ وَإِنَّ ٱلۡأٓخِرَةَ هِيَ دَارُ ٱلۡقَرَارِ
39. Eh bato na ngai! Bomoyi boye bozali sé kosepelisa na mwa tango токе, kasi mokolo mwa lobi mozali esika (ndako) kitoko тропа kofanda.

40 - Ghafir (The Forgiver) - 040

مَنۡ عَمِلَ سَيِّئَةٗ فَلَا يُجۡزَىٰٓ إِلَّا مِثۡلَهَاۖ وَمَنۡ عَمِلَ صَٰلِحٗا مِّن ذَكَرٍ أَوۡ أُنثَىٰ وَهُوَ مُؤۡمِنٞ فَأُوْلَـٰٓئِكَ يَدۡخُلُونَ ٱلۡجَنَّةَ يُرۡزَقُونَ فِيهَا بِغَيۡرِ حِسَابٖ
40. Oyo asali mabe akofutama sé ndenge asalaki, mpe oyo akosala malamu mwasi to mobali mpe azali mondimi, bango wana nde bakokota na paladiso, bakoleisama maye mazali na suka te.

41 - Ghafir (The Forgiver) - 041

۞وَيَٰقَوۡمِ مَا لِيٓ أَدۡعُوكُمۡ إِلَى ٱلنَّجَوٰةِ وَتَدۡعُونَنِيٓ إِلَى ٱلنَّارِ
41. Mpe Oh bato na ngai! Nini na ngai, nazali kobenga bino na lobiko, kaši bino bozali kobenga ngai na móto?

42 - Ghafir (The Forgiver) - 042

تَدۡعُونَنِي لِأَكۡفُرَ بِٱللَّهِ وَأُشۡرِكَ بِهِۦ مَا لَيۡسَ لِي بِهِۦ عِلۡمٞ وَأَنَا۠ أَدۡعُوكُمۡ إِلَى ٱلۡعَزِيزِ ٱلۡغَفَّـٰرِ
42. Bozali koyebisa ngai napengwa na Allah mpe nasangisa ye na maye nayebi te? Kaši nazali kobenga bino epai ya oyo atonda bokasi azali molimbisi.

43 - Ghafir (The Forgiver) - 043

لَا جَرَمَ أَنَّمَا تَدۡعُونَنِيٓ إِلَيۡهِ لَيۡسَ لَهُۥ دَعۡوَةٞ فِي ٱلدُّنۡيَا وَلَا فِي ٱلۡأٓخِرَةِ وَأَنَّ مَرَدَّنَآ إِلَى ٱللَّهِ وَأَنَّ ٱلۡمُسۡرِفِينَ هُمۡ أَصۡحَٰبُ ٱلنَّارِ
43. Tembe ezali te na oyo bozali kobenga ngai naya epai naye, azali na bosôló te, ye akoki kondimela (mabondeli) te, ezala awa na mokili to na mokolo ya suka, mpe bozongi bwa biso bokozalaka nde epai ya Allah, mpe ya soló bato ya mabe esika na bango ekozalaka nde móto.

44 - Ghafir (The Forgiver) - 044

فَسَتَذۡكُرُونَ مَآ أَقُولُ لَكُمۡۚ وَأُفَوِّضُ أَمۡرِيٓ إِلَى ٱللَّهِۚ إِنَّ ٱللَّهَ بَصِيرُۢ بِٱلۡعِبَادِ
44. Kala te, bokokanisaka maye nazali koyebisa bino. Mpe napesi makambo na ngai manso epai ya Allah. Ya soló, Allah amonaka bawumbu (naye)

45 - Ghafir (The Forgiver) - 045

فَوَقَىٰهُ ٱللَّهُ سَيِّـَٔاتِ مَا مَكَرُواْۖ وَحَاقَ بِـَٔالِ فِرۡعَوۡنَ سُوٓءُ ٱلۡعَذَابِ
45. Allah abatelaki ye na likita ya mabe liye basalaki, mpe etumbu ya mabe ezingaki bato ya falo.

46 - Ghafir (The Forgiver) - 046

ٱلنَّارُ يُعۡرَضُونَ عَلَيۡهَا غُدُوّٗا وَعَشِيّٗاۚ وَيَوۡمَ تَقُومُ ٱلسَّاعَةُ أَدۡخِلُوٓاْ ءَالَ فِرۡعَوۡنَ أَشَدَّ ٱلۡعَذَابِ
46. Bakofanda na moto tongo mpe mpokwa, mpe tango mokolo ya suka ekotelema, bokotisa bato ya falo na etumbu ya makasi koleka.

47 - Ghafir (The Forgiver) - 047

وَإِذۡ يَتَحَآجُّونَ فِي ٱلنَّارِ فَيَقُولُ ٱلضُّعَفَـٰٓؤُاْ لِلَّذِينَ ٱسۡتَكۡبَرُوٓاْ إِنَّا كُنَّا لَكُمۡ تَبَعٗا فَهَلۡ أَنتُم مُّغۡنُونَ عَنَّا نَصِيبٗا مِّنَ ٱلنَّارِ
47. Mpe tango bato ya motawu na bato ya lolendo bakozongisanaka maloba kati na lifelo, ya soló, biso tozalaki nde kolanda bino, boye bokoki kolongolela biso ndambu ya etumbu ya moto te?

48 - Ghafir (The Forgiver) - 048

قَالَ ٱلَّذِينَ ٱسۡتَكۡبَرُوٓاْ إِنَّا كُلّٞ فِيهَآ إِنَّ ٱللَّهَ قَدۡ حَكَمَ بَيۡنَ ٱلۡعِبَادِ
48. Bato ya lolendo bakolobaka: Ya sólo, biso banso tozuami na kati na yango, kasi Allah asili kokata makambo kati kati ya bawumbu (baye)

49 - Ghafir (The Forgiver) - 049

وَقَالَ ٱلَّذِينَ فِي ٱلنَّارِ لِخَزَنَةِ جَهَنَّمَ ٱدۡعُواْ رَبَّكُمۡ يُخَفِّفۡ عَنَّا يَوۡمٗا مِّنَ ٱلۡعَذَابِ
49. Mpe baye bakozalaka o kati ya moto bakoloba na bakengeli ya lifelo: Bosengela biso Nkolo wa bino alembisela biso etumbu ata mokolo moko.

50 - Ghafir (The Forgiver) - 050

قَالُوٓاْ أَوَلَمۡ تَكُ تَأۡتِيكُمۡ رُسُلُكُم بِٱلۡبَيِّنَٰتِۖ قَالُواْ بَلَىٰۚ قَالُواْ فَٱدۡعُواْۗ وَمَا دُعَـٰٓؤُاْ ٱلۡكَٰفِرِينَ إِلَّا فِي ضَلَٰلٍ
50. Bakoyanola bango ete: Boye batindami bayelaki bino bilembo te? Bakozongisa ete: Iyo; bakoloba na bango lisusu: Bosenga, kasi kosenga ya bapengwi ezali sé na libungi.

51 - Ghafir (The Forgiver) - 051

إِنَّا لَنَنصُرُ رُسُلَنَا وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ فِي ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا وَيَوۡمَ يَقُومُ ٱلۡأَشۡهَٰدُ
51. Ya solo, tokolongisa batindami na biso elongo na baye bandima na nsé mpe o mokolo oyo banzeneneke bakotelema.

52 - Ghafir (The Forgiver) - 052

يَوۡمَ لَا يَنفَعُ ٱلظَّـٰلِمِينَ مَعۡذِرَتُهُمۡۖ وَلَهُمُ ٱللَّعۡنَةُ وَلَهُمۡ سُوٓءُ ٱلدَّارِ
52. Mokolo mona bosengi ya bolimbisi bwa bapengwi bokozalaka na ntina te, bakozuaka botutu mpe bakovandaka na mabe.

53 - Ghafir (The Forgiver) - 053

وَلَقَدۡ ءَاتَيۡنَا مُوسَى ٱلۡهُدَىٰ وَأَوۡرَثۡنَا بَنِيٓ إِسۡرَـٰٓءِيلَ ٱلۡكِتَٰبَ
53. Mpe tosilaki kopesa Mûssa bokambi, mpe tokitanisaki bana ya isalayele buku.

54 - Ghafir (The Forgiver) - 054

هُدٗى وَذِكۡرَىٰ لِأُوْلِي ٱلۡأَلۡبَٰبِ
54. (Ezala) bokambami na bokundoli тропа baye bazali kokanisa.

55 - Ghafir (The Forgiver) - 055

فَٱصۡبِرۡ إِنَّ وَعۡدَ ٱللَّهِ حَقّٞ وَٱسۡتَغۡفِرۡ لِذَنۢبِكَ وَسَبِّحۡ بِحَمۡدِ رَبِّكَ بِٱلۡعَشِيِّ وَٱلۡإِبۡكَٰرِ
55. Kanga motema; elaka ya Allah ezali ya soló, senga bolimbisi na masumu nayo mpe pesa lokumu epai ya Nkolo wayo, na tongo mpe na pokwa.

56 - Ghafir (The Forgiver) - 056

إِنَّ ٱلَّذِينَ يُجَٰدِلُونَ فِيٓ ءَايَٰتِ ٱللَّهِ بِغَيۡرِ سُلۡطَٰنٍ أَتَىٰهُمۡ إِن فِي صُدُورِهِمۡ إِلَّا كِبۡرٞ مَّا هُم بِبَٰلِغِيهِۚ فَٱسۡتَعِذۡ بِٱللَّهِۖ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡبَصِيرُ
56. Ya sólo, baye bazali kobundisa mikapo mia Allah, mpe bazali na bilembetele te, ya sólo, bazali na lolendo okati na ba ntolo na bango. Bakozuaka maye balingi te, senga ebateli epai ya Allah. Ya sólo, ye azali moyoki, momoni ya nionso.

57 - Ghafir (The Forgiver) - 057

لَخَلۡقُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ أَكۡبَرُ مِنۡ خَلۡقِ ٱلنَّاسِ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يَعۡلَمُونَ
57. Bokelami ya likolo na ya mabele eleki bokelami ya bato, kasi ebele ya bato bazali koyeba te.

58 - Ghafir (The Forgiver) - 058

وَمَا يَسۡتَوِي ٱلۡأَعۡمَىٰ وَٱلۡبَصِيرُ وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّـٰلِحَٰتِ وَلَا ٱلۡمُسِيٓءُۚ قَلِيلٗا مَّا تَتَذَكَّرُونَ
58. Mpe oyo miso ekufa na oyo azali kornona bakokani te, mpe baye bandima mpe basali misala ya malamu bakokani mpe te na oyo asalaka mabe, токе nde bozali kokanisa.

59 - Ghafir (The Forgiver) - 059

إِنَّ ٱلسَّاعَةَ لَأٓتِيَةٞ لَّا رَيۡبَ فِيهَا وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يُؤۡمِنُونَ
59. Ya soló, tango ekoyaka, tembe ezali te тропа yango. Kasi ebele ya bato bazali kondima te.

60 - Ghafir (The Forgiver) - 060

وَقَالَ رَبُّكُمُ ٱدۡعُونِيٓ أَسۡتَجِبۡ لَكُمۡۚ إِنَّ ٱلَّذِينَ يَسۡتَكۡبِرُونَ عَنۡ عِبَادَتِي سَيَدۡخُلُونَ جَهَنَّمَ دَاخِرِينَ
60. Mpe Nkolo na bino alobaki ete: Bobelela ngai, nakoyanola bino. Ya sólo, baye batiki kobondela ngai na lolendo bakokota na lifelo, mpe bakozanga lokumu.

61 - Ghafir (The Forgiver) - 061

ٱللَّهُ ٱلَّذِي جَعَلَ لَكُمُ ٱلَّيۡلَ لِتَسۡكُنُواْ فِيهِ وَٱلنَّهَارَ مُبۡصِرًاۚ إِنَّ ٱللَّهَ لَذُو فَضۡلٍ عَلَى ٱلنَّاسِ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يَشۡكُرُونَ
61. Allah nde atiyela bino butu mpo bopemaka, mpe atiyeli bino mokolo mpo bomonaka bongengi. Ya sólo, Allah azali Nkolo wa bolamu epai ya bato, kasi ebele ya bato bazali kotondo (ye) te.

62 - Ghafir (The Forgiver) - 062

ذَٰلِكُمُ ٱللَّهُ رَبُّكُمۡ خَٰلِقُ كُلِّ شَيۡءٖ لَّآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَۖ فَأَنَّىٰ تُؤۡفَكُونَ
62. Wana nde Allah Nkolo wa bino, mokeli wa biloko binso, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosoló sé ye mei, boye тропа nini bozali kotika (nzela ya semba?)

63 - Ghafir (The Forgiver) - 063

كَذَٰلِكَ يُؤۡفَكُ ٱلَّذِينَ كَانُواْ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ يَجۡحَدُونَ
63. (Ndakisa); lokola baye bazali koboya mikapo mia Allah, bango batiki (nzela ya semba)

64 - Ghafir (The Forgiver) - 064

ٱللَّهُ ٱلَّذِي جَعَلَ لَكُمُ ٱلۡأَرۡضَ قَرَارٗا وَٱلسَّمَآءَ بِنَآءٗ وَصَوَّرَكُمۡ فَأَحۡسَنَ صُوَرَكُمۡ وَرَزَقَكُم مِّنَ ٱلطَّيِّبَٰتِۚ ذَٰلِكُمُ ٱللَّهُ رَبُّكُمۡۖ فَتَبَارَكَ ٱللَّهُ رَبُّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
64. Allah nde akeli тропа bino mabele ya kofandisama mpe likolo lokola motondo, mpe abongisi bino kitoko koleka mpe apesi bino bilei ya malamu. Wana nde Allah Nkolo na bino, mapamboli na Allah Nkolo ya mokili.

65 - Ghafir (The Forgiver) - 065

هُوَ ٱلۡحَيُّ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ فَٱدۡعُوهُ مُخۡلِصِينَ لَهُ ٱلدِّينَۗ ٱلۡحَمۡدُ لِلَّهِ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
65. Azali na bomoyi, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosóló sé ye mei, bobelela ye na bomoko bwa ye, mpe holanda lingomba lilamu (islamu), lokumu na Allah Nkolo wa molongo.

66 - Ghafir (The Forgiver) - 066

۞قُلۡ إِنِّي نُهِيتُ أَنۡ أَعۡبُدَ ٱلَّذِينَ تَدۡعُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ لَمَّا جَآءَنِيَ ٱلۡبَيِّنَٰتُ مِن رَّبِّي وَأُمِرۡتُ أَنۡ أُسۡلِمَ لِرَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
66. Loba: Ya soló, bapekisi ngai ete nabondela baye bozali kobondela botiki Allah, na tango polele esili koyela ngai kowuta epai ya Nkolo na ngai, mpe natindami ete namisokia epai ya Nkolo ya mokili.

67 - Ghafir (The Forgiver) - 067

هُوَ ٱلَّذِي خَلَقَكُم مِّن تُرَابٖ ثُمَّ مِن نُّطۡفَةٖ ثُمَّ مِنۡ عَلَقَةٖ ثُمَّ يُخۡرِجُكُمۡ طِفۡلٗا ثُمَّ لِتَبۡلُغُوٓاْ أَشُدَّكُمۡ ثُمَّ لِتَكُونُواْ شُيُوخٗاۚ وَمِنكُم مَّن يُتَوَفَّىٰ مِن قَبۡلُۖ وَلِتَبۡلُغُوٓاْ أَجَلٗا مُّسَمّٗى وَلَعَلَّكُمۡ تَعۡقِلُونَ
67. Ye nde akelaki bino na mabele, sima na litanga ya mayi ya mokongo sima ekomi liboke ya makila (bokomi mosuni ya makila) sima abimisi bino mwana moke, sima bokoli bokomi makasi, sima bokomi mibange,mpe na kati na bino, ba oyo bakufa noki, mpo ete bokokisa mibu miyebani, na ntina ete bososolo.

68 - Ghafir (The Forgiver) - 068

هُوَ ٱلَّذِي يُحۡيِۦ وَيُمِيتُۖ فَإِذَا قَضَىٰٓ أَمۡرٗا فَإِنَّمَا يَقُولُ لَهُۥ كُن فَيَكُونُ
68. Ye nde apesaka bomoyi mpe liwa, mpe soki alingi kosala likambo akolobaka: Zala; mpe ezalisami.

69 - Ghafir (The Forgiver) - 069

أَلَمۡ تَرَ إِلَى ٱلَّذِينَ يُجَٰدِلُونَ فِيٓ ءَايَٰتِ ٱللَّهِ أَنَّىٰ يُصۡرَفُونَ
69. Boye ozali kornona te ete: Baye bazali kobundisa mikapo mia Allah ba pengwisami (na bosembo)?

70 - Ghafir (The Forgiver) - 070

ٱلَّذِينَ كَذَّبُواْ بِٱلۡكِتَٰبِ وَبِمَآ أَرۡسَلۡنَا بِهِۦ رُسُلَنَاۖ فَسَوۡفَ يَعۡلَمُونَ
70. Baye bazali koboya kondima na buku (kurani) na maye totindaki batindami na biso na yango, bakoyeba kala mingi te.

71 - Ghafir (The Forgiver) - 071

إِذِ ٱلۡأَغۡلَٰلُ فِيٓ أَعۡنَٰقِهِمۡ وَٱلسَّلَٰسِلُ يُسۡحَبُونَ
71. Bakokanga bakingo mpe makolo na bango na minyololo mpe bakobendama (o lifelo).

72 - Ghafir (The Forgiver) - 072

فِي ٱلۡحَمِيمِ ثُمَّ فِي ٱلنَّارِ يُسۡجَرُونَ
72. O kati ya mayi ya lifelo, sima bakozikisama na moto.

73 - Ghafir (The Forgiver) - 073

ثُمَّ قِيلَ لَهُمۡ أَيۡنَ مَا كُنتُمۡ تُشۡرِكُونَ
73. Sima bakoyebisaka bango: Wapi baye bozalaki kosangisa?

74 - Ghafir (The Forgiver) - 074

مِن دُونِ ٱللَّهِۖ قَالُواْ ضَلُّواْ عَنَّا بَل لَّمۡ نَكُن نَّدۡعُواْ مِن قَبۡلُ شَيۡـٔٗاۚ كَذَٰلِكَ يُضِلُّ ٱللَّهُ ٱلۡكَٰفِرِينَ
74. Elongo na Allah! Bakozongisa ete: Basundoli biso, mpe biso tozalaki kokumisa eloko te liboso. Na lolenge wana nde Allah azali kobungisa bapengwi.

75 - Ghafir (The Forgiver) - 075

ذَٰلِكُم بِمَا كُنتُمۡ تَفۡرَحُونَ فِي ٱلۡأَرۡضِ بِغَيۡرِ ٱلۡحَقِّ وَبِمَا كُنتُمۡ تَمۡرَحُونَ
75. Wana nde lifuta ya maye bozalaki kosepela na yango na mokili na lokuta, mpe bovimbaki na lolendo.

76 - Ghafir (The Forgiver) - 076

ٱدۡخُلُوٓاْ أَبۡوَٰبَ جَهَنَّمَ خَٰلِدِينَ فِيهَاۖ فَبِئۡسَ مَثۡوَى ٱلۡمُتَكَبِّرِينَ
76. Bokota na bikuke ya lifelo libela, oyo esika mabe ya bato ya lolendo!

77 - Ghafir (The Forgiver) - 077

فَٱصۡبِرۡ إِنَّ وَعۡدَ ٱللَّهِ حَقّٞۚ فَإِمَّا نُرِيَنَّكَ بَعۡضَ ٱلَّذِي نَعِدُهُمۡ أَوۡ نَتَوَفَّيَنَّكَ فَإِلَيۡنَا يُرۡجَعُونَ
77. Kanga motema; ya soló, elaka ya Allah ezali ya solo. Tango mosusu tokolakisa yo ndambu ya etumbu tolengeli тропа bango, to mpe tokoboma yo yambo ete eyela bango, mpe epai na biso nde bakozongisama.

78 - Ghafir (The Forgiver) - 078

وَلَقَدۡ أَرۡسَلۡنَا رُسُلٗا مِّن قَبۡلِكَ مِنۡهُم مَّن قَصَصۡنَا عَلَيۡكَ وَمِنۡهُم مَّن لَّمۡ نَقۡصُصۡ عَلَيۡكَۗ وَمَا كَانَ لِرَسُولٍ أَن يَأۡتِيَ بِـَٔايَةٍ إِلَّا بِإِذۡنِ ٱللَّهِۚ فَإِذَا جَآءَ أَمۡرُ ٱللَّهِ قُضِيَ بِٱلۡحَقِّ وَخَسِرَ هُنَالِكَ ٱلۡمُبۡطِلُونَ
78. Ya sólo, tosilaki kotinda yambo nayo batindami, kati na bango tobetelaki yo masolo, mpe тропа basusu tobetelaki yo te. Mpe motindami akokaki koya na elembo (mokapo) te sé ezala na ndingisa ya Allah. Mpe tango motindo mwa Allah mokoyaka, makambo manso makokatamaka na bosôló, mpe baye balingaki sé kobuka lokuta, bakozangaka.

79 - Ghafir (The Forgiver) - 079

ٱللَّهُ ٱلَّذِي جَعَلَ لَكُمُ ٱلۡأَنۡعَٰمَ لِتَرۡكَبُواْ مِنۡهَا وَمِنۡهَا تَأۡكُلُونَ
79. Allah nde akeli тропа bino banyama mpo bomataka likolo na yango, mpe misusu boliaka yango.

80 - Ghafir (The Forgiver) - 080

وَلَكُمۡ فِيهَا مَنَٰفِعُ وَلِتَبۡلُغُواْ عَلَيۡهَا حَاجَةٗ فِي صُدُورِكُمۡ وَعَلَيۡهَا وَعَلَى ٱلۡفُلۡكِ تُحۡمَلُونَ
80. Misusu ezali kosalisa bino, mpe kati na yango bozali kobimisa biloko biye bolingaka, bozali komemama likolo na yango mpe likolo ya masuwa.

81 - Ghafir (The Forgiver) - 081

وَيُرِيكُمۡ ءَايَٰتِهِۦ فَأَيَّ ءَايَٰتِ ٱللَّهِ تُنكِرُونَ
81. Mpe

Scroll to Top